Pole esukisi eleko ya molili
NA ELEKO ya Yesu Klisto mpe ya bantoma na ye, mokili oyo ezingelaki bango ekesanaki na oyo elobelami kati na Makomami ya Liebele. Batángi ya Biblia oyo bayebi likambo oyo te bakoki kokanisa ete makambo matali bomoi ya bato mpe losambo ekóbaki kozala lolenge moko uta na mosakoli Malaki kino na Matai, mokomi ya Evanzile, kozanga kososola malamu makambo oyo masalemaki na boumeli ya mibu 400 oyo mikabolaki bakomi wana mibale.
Malaki, mokanda ya nsuka ya Makomi ya Liebele kati na Biblia mingi ya mikolo na biso, na nsuka na yango elobeli lolenge Yisalaele ezongaki lisusu kati na mabelé na yango nsima ya kobimisama na boombo na Babilone. (Yilimia 23:3) Bayuda oyo bamipesaki bayikisamaki mpiko ete bázela mokolo ya kosambisa ya Yehova wana akolongola mabe na mokili mpe akobandisa Eleko ya Masiya. (Malaki 4:1, 2) Liboso ya kokokisama ya elaka yango, Pelese ezalaki koyangela. Basodá ya Pelese oyo bafandaki kati na Yuda babatelaki kimya mpe batombolaki mitindá ya mokonzi na kosaleláká bibundeli.—Kokanisá Ezɛla 4:23.
Nzokande, bamboka oyo elobelami kati na Biblia ebatelaki ntango nyonso kimya na yango te na boumeli ya bikeke minei oyo elandaki na nsima. Molili ya elimo mpe mobulungano ebandaki kokɔta. Mikili ya Proche-Orient ezalaki na yikiyiki mpo na mobulu, monyokoli, komipesa na losambo na lolenge loleki ndelo, makanisi ya filozofi mazangi moboko ya sikisiki, mpe kozanga boyokani mpo na oyo etali mimeseno mikeseni ya bato.
Matai, mokanda ya liboso ya Makomami ya Greke ya boklisto, ekomamaki na eleko mosusu. Mampinga ya Loma masalaki oyo ebéngamaki ete Pax Romana, to Kimya ya Loma. Bato oyo bazalaki na ezaleli ya kobanga Nzambe bazalaki kozela na motema likoló mpenza koya ya Masiya mpo na kolongola mpasi, bokonzi mabe, bobólá, mpe kopesa bingɛngiseli na ntina na bomoi, bolamu, mpe kimya. (Kokanisá na Luka 1:67-79; 24:21; 2 Timoté 1:10.) Tiká tótalela naino nguya makasi oyo ebongisaki lisusu libota ya Bayuda na boumeli ya bikeke oyo bizalaki liboso ya kobotama ya Yesu Klisto.
Bomoi ya Bayuda na eleko ya Pelese
Nsima na eyambweli ya Siruse oyo elongolaki Bayuda na boombo na Babilone na 537 L.T.B., etuluku moko ya Bayuda mpe baninga na bango oyo bazalaki Bayuda te batikaki Babilone. Etuluku ya bato wana oyo bazalaki na elimo malamu mpe bandimaki libyangi yango bazongaki na teritware oyo bingumba na yango bisilaki kobebisama mpe mabelé na yango masilaki kosundolama. Baedome, Bafenisi, Basamalia, bitúlúká ya Balabo, mpe basusu basilaki kokamatakamata biteni ya mabelé ya Yisalaele oyo ezalaki liboso teritware monene. Biteni mosusu ya mabelé ya Yuda mpe ya Benyamina bikómaki moko na bitúká ya Pelese oyo ebéngamaki Abar Nahara (Koleka ebale).—Ezɛla 1:1-4; 2:64, 65.
Búku Cambridge History of Judaism elobi ete na nsé ya boyangeli ya Pelese, Yuda ezalaki kati na “eleko moko ya bokóli mpe motángo ya bafandi na yango emataki.” Búku yango elobi lisusu na ntina na Yelusaleme ete: “Bato ya mboka mpe basáli-mobembo bazalaki komema makabo, Tempelo mpe engumba ekómaki na bozwi mingi, mpe bozwi na bango ebendaki basáli-mombongo mpe basáli misala ya mabɔkɔ.” Atako Bapelese bazalaki kondima mpenza boyangeli ya mboka mpe makambo ya losambo, kasi mpako ezalaki ntalo mingi mpe ekokaki kofutama bobele na mabendé ya motuya.—Kokanisá na Nehemia 5:1-5, 15; 9:36, 37; 13:15, 16, 20.
Mibu ya nsuka ya boyangeli ya Pelese ezalaki na yikiyiki mingi, oyo emonanaki na botomboki ya bayangeli ya bitúká na yango. Bayuda mingi basanganaki na botomboki oyo esalemaki pembenipembeni ya libongo ya Méditerranée mpe bamemamaki mosika na nɔ́rdi, na etúká ya Hyrcanie na libeke Caspienne. Nzokande, emonani ete eteni monene ya Yuda ezwaki etumbu ya Pelese te.
Eleko ya boyangeli ya Pelese
Alekzandre monene abimaki lokola nkoi na Moyen-Orient na 332 L.T.B., kasi liboso na kobima na ye bato bazalaki kosepela mingi na makambo ya Bagreke. (Danyele 7:6) Komonáká ete mimeseno ya Bagreke ezalaki na makambo mingi ya motuya mpo na oyo etali politiki, asepelaki ete boyangeli na ye elanda mimeseno ya Bagreke. Lokótá ya Greke ekómaki kolobama na mikili mingi. Boyangeli ya mokuse ya Alekzandre epusaki bato ete bákóma kolinga mingi makanisi ya bozimbisi, kolinga masano mingi, mpe kosepela na biloko ya bonzenga. Mokemoke, ata mimeseno ya Bayuda mpe ekómaki kolanda oyo ya Bagreke.
Nsima ya liwa ya Alekzandre na 323 L.T.B., bakitani na ye na Sulia mpe na Ezipito bazalaki bato ya liboso ya kokokisa mokumba ya baoyo Danyele abéngaki “[mokonzi ya nɔ́rdi, NW]” mpe “[mokonzi ya súdi, NW].” (Danyele 11:1-19) Na boumeli ya boyangeli ya mokonzi Moezipito Ptolemée II Philadelphes, “mokonzi ya súdi” (285-246 L.T.B.), Makomami ya Liebele mabandaki kobongolama na Koine, lokótá ya Greke oyo bato mingi bazalaki koloba. Na nsima libongoli yango ekómaki kobéngama la Septante. Mikapo mingi ya libongoli yango milobelami mpe kati na Makomami ya Greke ya boklisto. Greke ezalaki mpenza lokótá oyo ebongaki mpo na kopesa bandimbola ya polele kati na mokili oyo etondaki na mobulungano ya elimo mpe oyo ezalaki kati na molili.
Nsima wana Antiochus IV Epiphanes akómaki mokonzi ya Sulia mpe moyangeli ya Palestine (175-163 L.T.B.), lingomba ya Bayuda elingaki mpenza kolimwisama mpo na monyokoli oyo boyangeli ebimiselaki yango. Bapusaki Bayuda na makasi, kotyeláká bango makaneli ya liwa, ete báboya Yehova Nzambe mpe ete bápesa mbeka bobele epai na banzambe ya Bagreke. Na sanza ya Desɛ́mbɛ ya mobu 168 L.T.B., etumbelo moko ya bapakano etongamaki likoló na etumbelo monene ya Yehova kati na tempelo ya Yelusaleme, mpe bambeka ekómaki kopesama likoló na yango epai na Zeus Olympia. Mibali ya mboka oyo babulunganisamaki, kasi bazalaki na mpiko basanganaki na nsé ya litambwisi ya Yuda Makabé mpe babundaki bitumba kino babotolaki Yelusaleme. Tempelo epesamaki lisusu na Nzambe, mpe mbula misato nsima ya kobebisama na yango, mbeka ya mokolo na mokolo ezongaki kopesama lisusu.
Na boumeli ya eleko oyo etikalaki ya boyangeli ya Bagreke, Bayuda balukaki na mobulu nyonso kozongisa etando ya mabelé na yango. Basalelaki nguya oyo ezongisamaki lisusu ya mampinga na bango na lolenge mabe na kopusáká bapakano oyo bazalaki zingazinga na bango ete babongwana na losambo na bango na kotyeláká bango makaneli ya kobomama soki babongwani te. Atako bongo, makanisi ya politiki ya Bagreke ekóbaki koyangela bamboka mpe bingumba.
Na boumeli ya ntango yango, bato oyo bazalaki kosala mosala ya nganga monene bazalaki mbala mingi kondima kanyaka. Myango mabe, koboma bato, mpe mayele mabe ya politiki ebebisaki mokumba na bango. Wana elimo ya kotuka Nzambe ezalaki kokóla mingi kati na Bayuda, masano ya Bagreke mpe ekómaki kolingama na bato mingi. Ezalaki likambo ya kokamwa na komona bilenge banganga kosundola mikumba na bango mpo na kosangana na masano! Basani Bayuda bazalaki kútu kondima ete básala bango lipasó ya mpasi mingi na nzoto na bango mpo bámonana lokola ete “bakatami ngɛnga te,” mpo ete bátungisama te na ntango bazalaki kobunda bolumbu elongo na Bapakano.—Kokanisá na 1 Bakolinti 7:18.
Mbongwana ya lingomba
Na ebandeli ya eleko oyo ezalaki nsima ya kobima ya Bayuda na boombo, Bayuda ya sembo baboyaki kosangisama ya mateya mpe bafilozofi ya bapakano na lingomba ya solo oyo emonisamaki kati na Makomami ya Liebele. Mokanda ya Esetele, oyo ekomamaki nsima ya mibu koleka 60 ya bokangami makasi na Pelese, ezalaki soko moke te na makambo ya lingomba ya Zoroaster kati na yango. Lisusu, bopusi ya lingomba ya Bapelese emonani soko moke te kati na mikanda oyo ya Biblia: Ezɛla, Nehemia, to Malaki, mikanda oyo nyonso ekomamaki na boumeli ya ebandeli ya eleko ya Boyangeli ya Pelese (537-443 L.T.B.).
Nzokande, banganga-mayele bandimi ete na boumeli ya eteni ya nsuka ya eleko ya boyangeli ya Pelese, Bayuda mingi babandaki kondima mwa makanisi ya basambeli ya Ahura Mazda, kapita ya banzambe nyonso ya Pelese. Yango emonani polele kati na biyambayamba mpe bindimeli ya Baɛsɛnɛ. Bankombo oyo eyebanaki mingi na lokótá ya Liebele mpo na kobénga mbulú (chacal), mpe bikelamu mosusu oyo bazalaka kati na mokili mokauki, mpe bandɛkɛ oyo batambolaka na butu, kati na makanisi ya Bayuda, ekómaki na boyokani na bilimu mabe mpe bilimá ya butu ya Babilone mpe ya bonkɔ́kɔ ya Pelese.
Bayuda bakómaki kotalela makanisi ya bapakano na lolenge mosusu. Maloba lokola likoló, lifelo, molimo, Liloba (Logos), mpe mayele, mazwaki ndimbola ya sika. Mpe, lokola yango eteyamaki na eleko wana, soki Nzambe azalaki mosika mingi na boye ete azalaki kosolola lisusu na bato te, mbɛlɛ alingaki kozala na mposa ya bayokanisi. Bagreke bazalaki kobénga bikelamo wana ya elimo oyo bazalaki bayokanisi mpe bakɛngɛli ete ba daimones. Lokola basilaki kokamata likanisi oyo ete ba daimones (bademó) bakokaki kosala bato mabe to malamu, Bayuda bazwamaki na nsé ya litambwisi ya bademó.
Mbongwana moko ya ntina mingi etalelaki losambo na bango. Biyanganelo bitongamaki nokinoki mpo ete bizala bisika oyo masangá ya pembeni ya Bayuda mazalaki koyangana mpo na kolakisama mpe mpo na misala ya lingomba. Ntango ya sikisiki, esika ya sikisiki, mpe lolenge ya sikisiki oyo biyanganelo ya Bayuda ebandaki eyebani te. Lokola ekokisaki bamposa ya losambo ya Bayuda oyo bazalaki na bamboka ya mosika mpamba te bakokaki kokende na tempelo te, bato mingi bandimaka ete biyanganelo yango bisalemaki na eleko ya boombo na Babilone to na nsima na yango. Likambo ya ntina mingi ezali ete, biyanganelo yango bikómaki bisika malamu mpo na Yesu mpe bayekoli na ye mpo na ‘koyebisa malamu ya Nzambe, ye oyo abyangaka bato kobima na molili mpo na kokɔta na moi na ye na kokamwisa.’—1 Petelo 2:9.
Lingomba ya Bayuda endimaki makanisi ndenge na ndenge
Na ekeke ya mibale L.T.B., makanisi ndenge na ndenge mabandaki kobima. Ezalaki te kouta na mangomba makeseni. Ezalaki kouta nde na bituluku mikemike ya bakonzi ya lingomba ya Bayuda, na bafilozofe, mpe bato na politiki oyo bazalaki koluka kopusa bato mpe koyangela ekólo, bango nyonso bazalaki kobatama na nsima ya lingomba ya Bayuda.
Basadukai oyo bamipesaki na politiki bazalaki mingi mpenza bato ya bozwi, bayebanaki mpo na mayele na bango ya mabe uta na ntango ya botomboki ya Bamakabé na katikati ya ekeke ya mibale L.T.B. Atako basusu mpe bazalaki bato ya mombongo mpe bankóló mabelé, mingi na bango bazalaki banganga. Na ntango oyo Yesu abotamaki, Basadukai mingi bandimaki boyangeli ya Loma likoló na Palestine mpamba te bazalaki kokanisa ete yango elingaki koumela mingi mpe ete esengelaki kobatela statu quo. (Kokanisá na Yoane 11:47, 48.) Bobele etuluku ya bato moke (Bato ya Elode) nde bazalaki kokanisa ete boyangeli ya libota ya Elode elingaki kondimama na ekólo mobimba. Ata ndenge nini, Basadukai bazalaki kolinga te ete ekólo etambwisama na Bayuda oyo bazalaki na molende moleki ndelo to na moto mosusu te bobele banganga nde basengelaki kokamba tempelo. Bindimeli ya Basadukai bizalaki kobongwana te, bizwaki moboko na yango mingimingi likoló ya kolimbolama ya makomi ya Mose, mpe bazalaki kotɛmɛla makasi lingomba ya nguya ya Bafalisai. (Misala 23:6-8) Basadukai batalelaki bisakweli ya Makomami ya Liebele lokola makambo mazangi moboko ya sikisiki. Bazalaki koteya ete mikanda ya Biblia oyo milobelaka makambo ya kala, ntɔ́ki, masese, mipemamaki te mpe mizali na ntina te.
Uta na ebandeli ya kobima ya etuluku na bango na boumeli ya boyangeli ya Bagreke, Bafalisai batɛmɛlaki bopusi ya mimeseno ya Bagreke likoló na Bayuda. Nzokande, na mikolo ya Yesu, bapalanganisi mateya ya lingomba mpe balakisi, oyo bazalaki na makambo makasi, bamipesaki na bonkɔ́kɔ, na mibeko, bazalaki lolendo, mpe bazalaki komitalela ete bazalaki sembo; bazalaki koluka koyangela ekólo na nzela ya kolakisama na eyanganelo. Mingi na bango bautaki na etuluku ya bato oyo bazalaki na mwa ndambo ya bozwi mpe bazalaki koyina bato oyo bazalaki babólá. Yesu azalaki kotalela Bafalisai mingi mpenza lokola bato oyo bazalaki koluka bolamu na bango moko, bato bazangi motema mawa mpe balingi na mosolo oyo bazalaki komonisa ezaleli ya bokosi. (Matai, mokapo 23) Bandimaki Makomami ya Liebele na mobimba na yango na boyokani na bandimbola oyo bango moko bazalaki kopesa kasi bazalaki mpe kopesa motuya lolenge moko to koleka na mibeko ya bonkɔ́kɔ oyo mikomami te. Bazalaki koloba ete bonkɔ́kɔ na bango ezalaki “efelo oyo ezingaki Mibeko.” Nzokande, na esika ete ezala efelo, mimeseno ya bonkɔ́kɔ na bango ebebisaki motuya ya Liloba ya Nzambe mpe ebulunganisaki bato.—Matai 23:2-4; Malako 7:1, 9-13.
Baɛsɛnɛ bazalaki bato ya bikelákela, emonani lokola ete bazalaki kofanda kati na mwa ndambo ya bituluku moke ya bato ya komitangola. Bazalaki komitalela bango moko lokola batikali ya solo ya Yisalaele, bazalaki kozela na bopɛto nyonso Masiya oyo alakamaki. Baɛsɛnɛ bazalaki na bomoi ya komipesa mpenza makasi na kozanga komisepelisa, mpe mingi na bindimeli na bango ezalaki komonisa makanisi ya Bapelese mpe ya Bagreke.
Mitindo ndenge na ndenge ya Bazélotes oyo bapusamaki mingi na lingomba na bango, mpe bazalaki na molende ya mabe bazalaki kotalela lokola monguna, moto nyonso oyo azalaki kotɛmɛla likanisi ete ekólo ya Bayuda ezala na lipandá te. Bakokanisamaki na Bamakabé mpe bazalaki kosepela mingi mpenza na bilenge mibali ya molende mingi, oyo bazalaki kobanga te. Batalelamaki lokola babandí to babundi-batomboki, bazalaki kosalela mayele mabe ya batomboki oyo esalaki ete banzela mpe bitando ya polele ya bingumba bizala bisika ya likámá mpe bayeisaki makasi yikiyiki oyo ezalaki na eleko wana.
Na Ezipito, Filozofi ya Bagreke ekólaki mingi kati na Bayuda oyo bazalaki na Alexandrie. Uta na esika yango, yango epalanganaki kino na Palestine mpe kino na Bayuda ya Lipalangana oyo bazalaki bipai na bipai. Banganga-mayele ya Bayuda oyo bakomaki Apocryphe mpe Pseudepigraphe balimbolaki ete makomi ya Mose mazalaki ya sikisiki te, mpe ete mazalaki masapo ya pambapamba.
Ntango eleko ya Baloma ekómaki, mimeseno ya Bagreke misilaki kobongola mpo na libela makambo na Palestine mpo na oyo etalaki lolenge ya bomoi, politiki, mpe filozofi. Losambo ya Bayuda oyo ezwaki moboko na yango kati na Biblia ekómaki nde lingomba ya Bayuda mpe bakɔtisaki makanisi ya bato ya Babilone, ya Pelese, mpe ya Bagreke na eteni monene ya solo ya Makomami. Nzokande, bango nyonso, Basadukai, Bafalisai, mpe Baɛsɛnɛ bazalaki na nsé ya 7% ya ekólo mobimba. Bibele mingi ya Bayuda, oyo ‘balemalemaki lokola bampate bazali na mobateli te’ bazwaki mpasi mpo na yikiyiki oyo ezalaki kati na banguya wana oyo ezalaki kowelana.—Matai 9:36.
Ezali kati na mokili wana ya molili nde Yesu Klisto abimaki. Libyangi na ye oyo etondi na elikya ebɔndisaki bato: “Boyá liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino.” (Matai 11:28) Ezalaki likambo ya esengo koyoka ye koloba ete: “Ngai nazali [pole] na mokili”! (Yoane 8:12) Elaka na ye oyo ya kopesa nsai na motema esepelisaki mpenza bato: “Ye oyo [akolanda] ngai akotambola kati na molili te kasi akozala na [pole] na bomoi.”—Yoane 8:12.
[Elilingi na lokasa 26]
Yesu amonisaki ete bakonzi ya lingomba ya Bayuda bazalaki kati na molili ya elimo
[Elilingi na lokasa 28]
Palata oyo ezali na elilingi ya Antiochus IV (Epiphanes)
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Fɔtɔ́ ya kala (Near Easter History) Est.