Bato ya Asmon mpe libula na bango
NTANGO Yesu azalaki awa na mabele, Lingomba ya Bayuda ekabwanaki na biteni mikemike; mpe biteni yango ezalaki kowelana mpo na kotambwisa Bayuda. Ezali lolenge wana nde masolo ya Baevanzile mpe mikanda ya Josèphe, Moyuda mpe moto ya mayele ya istware ya ekeke ya liboso, emonisi ndenge makambo ezalaki koleka na ntango wana.
Na eleko yango, Bafalisai mpe Basadukai bazalaki na bokonzi mingi; bazalaki na likoki ya kobongola makanisi ya bato mpe ya kotinda bato na koboya kondima ete Yesu azali Masiya. (Matai 15:1, 2; 16:1; Yoane 11:47, 48; 12:42, 43) Nzokande, ezali ata na esika moko te oyo Makomami ya Liebele elobeli bituluku yango mibale, oyo ezalaki na bopusi monene likoló ya Bayuda.
Josèphe alobeli Basadukai mpe Bafalisai mpo na mbala ya liboso, na makambo oyo ezalaki koleka na ekeke ya mibale liboso ya ntango na biso. Na ntango yango, Bayuda mingi bakómaki kolanda makambo ya Bagrɛki, elingi koloba mimeseno mpe filozofi na bango. Matata kati na mimeseno ya Bagrɛki mpe oyo ya Bayuda ekómaki makasi koleka, ntango bayangeli oyo bazalaki bakitani ya Mokonzi Séleucus bakómisaki tempelo ya Yelusaleme mbindo, mpe bapesaki yango mpo na lokumu ya nzambe Zeus. Yuda Makabe, mokambi ya mpiko ya Bayuda mpe moto ya libota oyo eyebanaki na nkombo ya bato ya Asmon, akambaki limpinga moko ya batomboki mpe babɔtɔlaki tempelo na mabɔkɔ ya Bagrɛki.a
Na bambula oyo elandaki botomboki mpe bolongi ya Makabe, bato mingi bakómaki na mposa ya kosala mangomba ya mikemike, oyo ezalaki na makanisi ya kowelana; mpe lingomba mokomoko ezalaki koluka kolonga mitema ya Bayuda. Kasi mpo na nini mposa yango ekolaki? Mpo na nini Lingomba ya Bayuda ekabwanaki? Mpo na kozwa biyano na mituna wana, tiká tótalela lisolo ya bato ya Asmon.
Kobakisama ya lipanda ebimisi bokabwani
Nsima ya kokokisa mokano na ye mpo na makambo ya Nzambe: mokano ya kozongisa losambo na tempelo ya Yehova; Yuda Makabe akɔtaki na politiki. Yango wana, Bayuda mingi batikaki kolanda ye. Atako bongo, alandaki kobundisa bakonzi ya libota ya Séleucus, asalaki boyokani na bakonzi ya Loma, mpe alukaki ete ekólo ya Bayuda ezwa lipanda. Na nsima ya liwa ya Yuda na etumba, bandeko na ye, Yonatana mpe Simona, bakobaki na etumba yango. Na ebandeli, bakonzi ya libota ya Séleucus batɛmɛlaki Bamakabe makasi mpenza. Kasi na nsima, bakonzi yango bandimaki kosala boyokani ya politiki mpe batikelaki bato ya libota ya Asmon nzela ya kozala na mwa bonsomi.
Atako bazalaki bakitani ya libota ya banganga, moto moko ya libota ya Asmon akómaki naino te nganga-monene. Bayuda mingi bakanisaki ete baoyo basengelaki kosala mosala yango ezalaki kaka banganga ya libota ya Sadoko, moto oyo Salomo aponaki mpo na kozala nganga-monene. (1 Mikonzi 2:35; Ezekiele 43:19) Yonatana abimisaki etumba mpe asalelaki mayele mabe mpo na kondimisa bakonzi ya libota ya Séleucus ete bápona ye nganga-monene. Kasi, nsima ya liwa ya Yonatana, yaya na ye Simona akendeki kutu mosika koleka leki na ye. Na sanza ya Sɛtɛmbɛ ya mobu 140 L.T.B., babimisaki ekateli moko ya ntina mingi na Yelusaleme, mpe bakomaki yango na Grɛki likoló ya bitanda ya bronze; ezalaki na maloba oyo: “Mokonzi Demetrio [mokonzi ya Grɛki oyo azali moto ya libota ya Séleucus], andimi ye [Simona] o mosala mwa nganga Nzambe. Ayambi ye o molongo mwa baninga ba ye mpenza, mpe akumisi ye mingi. . . . Ba-Yuda bango moko baponoki Simon azala mokonzi mpe nganga Nzambe monene seko tee mokolo profeta wa sika akobima.”—1 Makabe 14:38-41 (mokanda moko ya istware oyo ezali kati na mikanda ya kala oyo epememaki te).
Ezali kaka te bato ya libota ya Séleucus, oyo bazalaki bakonzi na mboka mopaya nde bandimaki ete Simona azala moyangeli mpe nganga-monene—mpo na ye mpe bakitani na ye—kasi “Liyangani Monene” ya bato na ye mpenza mpe bandimaki ye. Likambo yango ekɔtisaki mbongwana moko monene mpenza. Ndenge Emil Schürer, moto ya mayele ya istware, akomaki yango, ntango kaka bato ya Asmon na bakitani na bango bakómaki koyangela lokola bakonzi ya politiki, “kokokisama ya Torah [mobeko ya Bayuda] ezalaki lisusu te likambo ya liboso na makanisi na bango; likambo ya liboso ekómaki nde kobatela mpe kopalanganisa bokonzi na bango ya politiki.” Kasi, lokola azalaki kosɛnzɛla ete ayokisa Bayuda nkanda te, Simona amipesaki nkombo ya lokumu ete “mokambi ya ekólo,” na esika ya komibenga “mokonzi.”
Bato nyonso basepelaki te ndenge bato ya Asmon bamikómisaki na makasi bakonzi ya lingomba mpe bakonzi ya politiki. Bato mingi ya mayele ya istware balobaka ete ezalaki na ntango wana nde lisangá ya mboka Qumran ebandaki. Nganga moko, mokitani ya libota ya Sadoko, oyo bato ya mayele bakanisaka ete ye nde “Moteyi ya Boyengebene” oyo balobeli na mikanda ya Qumran, alongwaki na Yelusaleme mpe amemaki etuluku moko ya batɛmɛli na Esobe ya Yudea, pembeni ya Mbu Ekufá. Moko ya barulo ya Mbu Ekufá, oyo ezali na ndimbola ya mokanda ya Habakuku, ezali kokweisa “Nganga Mabe oyo, na ebandeli, bazalaki kobenga ye na nkombo ya solo, kasi ntango akómaki mokonzi ya Yisalaele, motema na ye ekómaki na lolendo.” Bato mingi ya mayele bakanisaka ete “Nganga Mabe” oyo azalaki koyangela, ndenge bato ya mwa lingomba wana ya Qumran balobelaki ye, ezali Yonatana to Simona.”
Mpo na kokómisa monene teritware oyo ezalaki na nse ya boyangeli na ye, Simona akobaki kobunda bitumba. Kasi, bokonzi na ye esukaki na mbalakaka ntango Ptolemée, mobali ya mwana na ye, abomaki ye na bana na ye mibale; na ntango yango bazalaki kosala elambo penepene na Yeliko. Ptolemée akanisaki ete nsima na yango, ye nde akokóma mokonzi, kasi alongaki te. Bayebisaki Jean Hyrcan, mwana ya Simona oyo atikalaki, ete akeba noki te bakoboma mpe ye. Akangaki bato yango oyo balingaki koboma ye mpe azwaki bokonzi mpe bonganga monene oyo ezalaki na tata na ye.
Bokonzi na bango epalangani lisusu mpe bato bakómi konyokwama
Na ebandeli, mapinga ya Sulia ezalaki mbala na mbala kokanela makasi Jean Hyrcan; kasi na nsima, na mobu 129 L.T.B., bakonzi ya libota ya Séleucus balongamaki na Ba-Parthe nsima ya etumba moko monene. Na kotalela makambo oyo etumba yango ebimisaki mpo na bakonzi ya libota ya Séleucus, Menahem Stern, Moyuda mpe moto ya mayele ya istware, akomaki boye: “Ebongiseli mobimba ya bokonzi na bango ekweaki mpenza.” Na ndenge yango, Hyrcan “azwaki likoki ya kozongisa Yudea na lipanda na yango ya solosolo mpo na oyo etali politiki mpe kobanda kopalanganisa bokonzi na ye na bisika ebele.” Ya solo, apalanganisaki mpenza bokonzi na ye na bamboka mosusu.
Sikoyo, lokola Sulia ezalaki lisusu wana te mpo na kokanela ye, Hyrcan akómaki kokɔta na makasi na bamboka oyo ezalaki na Yudea te, mpe kotya yango na nse ya bokonzi na ye. Bafandi ya bamboka yango basengelaki kokɔta na Lingomba ya Bayuda; soki te, bingumba na bango elingaki kobebisama. Ezali lolenge yango nde asalaki mpo na Baedome. Na ntina na likambo yango, Stern alobaki boye: “Kobongwana ya Baedome ezalaki kobongwana oyo esalemá naino liboso te, mpo ete yango ezalaki mpo na bato ya ekólo yango mobimba, na esika ete ezala kaka mpo na mwa bato moke.” Moko ya bamboka mosusu oyo balongaki ezalaki Samalia, epai Hyrcan abebisaki tempelo ya Basamalia oyo ezalaki na Ngomba Gelizimi. Mpo na komonisa bozoba ya ebongiseli oyo bakonzi ya libota ya Asmon bakómaki kosalela, ya kotindika bato na makasi ete bábongwana, Solomon Grayzel, moto ya mayele ya istware, akomaki boye: “Likambo ya kokamwa, nkɔkɔ ya Mattathias [tata ya Yuda Makabe], nde akómaki kobuka lilako ya bonsomi ya losambo, lilako oyo batata na ye moko babundaki mpo na kobatela yango.”
Bafalisai na Basadukai babimi
Ezali ntango azalaki kokoma makambo etali bokonzi ya Hyrcan nde Josèphe alobelaki mpo na mbala ya liboso ndenge bopusi ya Bafalisai na Basadukai ezalaki se kokola. (Josèphe asilaki kolobela Bafalisai oyo bazalaki na bomoi na ntango Yonatana azalaki mokonzi.) Ayebisaki te epai bautaki. Bato mosusu ya mayele ya istware batalelaka bango lokola etuluku moko oyo eutaki na Ba-Hasidim, mwa lingomba moko oyo ezalaki komonana lokola ete ezalaki kobanga Nzambe; mwa lingomba yango nde esungaki Yuda Makabe na mikano na ye oyo etali makambo ya Nzambe, kasi batikaki ye ntango abongolaki makanisi na ye mpo na komipesa na politiki.
Mingi bakanisaka ete nkombo Bafalisai euti na liloba ya Liebele oyo elimboli “baoyo batangolami,” atako basusu bakanisaka ete euti na liloba “balimboli.” Bafalisai bazalaki bato ya mayele oyo bautaki kaka na kati ya bato nyonso, bazalaki te bakitani ya libota moko ya lolenge mosusu. Bango moko bamitangolaki na makambo ya mbindo mpo na oyo etali milulu ya losambo; basalaki yango na nzela ya filozofi ya kobanga Nzambe oyo bango moko babimisaki; na lolenge mosusu, bazalaki kosalela mibeko ya tempelo oyo etalaki bosantu ya banganga na makambo oyo bazalaki kokutana na yango na bomoi ya mokolo na mokolo. Bafalisai babimisaki mayele ya sika ya kolimbola Makomami, mpe likanisi moko oyo nsima, ebengamaki mibeko oyo ekomamaki te. Na ntango oyo Simona azalaki mokonzi, nguya na bango ekómaki makasi mpenza ntango bamosusu kati na bango baponamaki mpo na kozala na Geruzia (lisangani ya mikoló), oyo na nsima ekómaki Sanedrina.
Josèphe ayebisi ete Jean Hyrcan azalaki na ebandeli moyekoli mpe moto oyo azalaki kosunga Bafalisai. Kasi, ekómaki ntango moko, Bafalisai baboyaki ye, mpamba te andimaki te kotika kozala nganga-monene. Likambo yango esalaki ete ye na bango báyokana lisusu te. Yango mpe etindaki Hyrcan apekisa milulu ya lingomba ya Bafalisai. Etumbu mosusu oyo apesaki bango ezalaki ndenge amityaki na ngambo ya Basadukai, mwa lingomba oyo ezalaki koyokana ata moke te na Bafalisai.
Emonani ete nkombo Basadukai euti nde na nkombo ya Nganga-Monene Sadoko, oyo bakitani na ye balandaki kozala banganga kobanda na eleko ya Salomo. Kasi, ezali Basadukai nyonso te nde bazalaki bakitani ya libota yango. Mpo na Josèphe, Basadukai bazalaki bankumu mpe bato ya bozwi na kati ya bato nyonso ya ekólo na bango, mpe bato nyonso oyo batikali bazalaki kosunga bango te. Profesɛrɛ Schiffman apesi makanisi oyo: “Ekokaki kozala ete mingi kati na bango . . . bazalaki banganga to baoyo babalanaki na moto moko ya mabota ya banganga-minene.” Na ndenge yango, na boumeli ya bambula mingi bazalaki pene mpenza ya bato oyo bazalaki na bokonzi. Yango wana, ndenge bopusi ya Bafalisai likoló ya bato ekómaki se komata mpe na kotalela liteya na bango ya kotinda moto nyonso na komitalela lokola mosantu ndenge moko na banganga, Basadukai bamonaki likama oyo ekokaki kokitisa bokonzi oyo esengelaki kaka kozala na bango. Sikoyo, na bambula ya nsuka ya boyangeli ya Hyrcan, Basadukai bakómaki lisusu kotambwisa makambo.
Bamipesi mingi na politiki, babosani Nzambe
Aristobule, mwana ya liboso ya Hyrcan, ayangelaki mbula moko mpamba, nsima na yango akufaki. Alandaki kosalela mayele ya kotinda bato ete bábongwana na makasi; ezali yango oyo asalaki mpo na bato oyo bazalaki kofanda na ekólo ya Itulia mpe atyaki Galilai ya likoló na nse ya bokonzi ya bato ya Asmon. Kasi ezalaki na ntango oyo ndeko na ye Alexandre Jannée azalaki mokonzi, kobanda na mobu 103 tii na 76 L.T.B., nde nguya ya bakonzi ya libota ya Asmon emataki mingi mpenza.
Alexandre Jannée atikaki kosalela mayele oyo batata na ye basalelaki mpe kozanga kokakatana amikómisaki nganga-monene mpe mokonzi. Matata kati na bato ya Asmon na Bafalisai engalaki mpenza, ebimisaki kutu etumba kati ya bana-mboka; etumba yango ebomaki Bayuda 50 000. Nsima ya kosilisa botomboki yango, Jannée asalaki likambo moko oyo ekokanaki mpenza na ndenge mikonzi ya bapakano bazalaki kosala: abakisaki batomboki 800 na banzete. Na ntango oyo bato yango balingaki kokufa, basi na bango mpe bana na bango bazalaki kobomama na miso na bango; wana Jannée azalaki kosala fɛti na bamakango na ye.b
Atako azalaki koyokana na Bafalisai te, Jannée ayebaki mpenza ndenge ya kosala politiki. Amonaki ete Bafalisai bayebanaki mingi, mpe bato ebele bazalaki kosunga bango. Yango wana, liboso ete akufa, apesaki mwasi na ye Salome Alexandra toli ete asala elongo na Bafalisai. Na esika ya kopona bana, Jannée aponaki nde mwasi na ye lokola mokitani ya bokonzi na ye. Salome amonisaki ete azalaki mokonzi ya makoki, mpamba te, kobanda ntango oyo bato ya Asmon babandaki koyangela, eleko ya bokonzi ya Salome (mobu 76 tii 67 L.T.B.) ezali moko ya bileko oyo ekɔtisaki mpenza kimya na kati ya mboka. Apesaki lisusu Bafalisai bokonzi oyo bazalaki na yango liboso, mpe alongolaki mibeko oyo epekisaki milulu na bango ya losambo.
Ntango Salome akufaki, mwana na ye Hyrcan II, oyo azalaki nganga-monene, mpe mwana na ye Aristobule II bakómaki kowela bokonzi. Bango nyonso mibale bazangaki bososoli oyo bankɔkɔ na bango bazalaki na yango na makambo ya politiki mpe ya kotambwisa mampinga ya basoda; mpe emonanaki lokola ete basosolaki mpenza te ntina oyo Baloma bakómaki kobakisama na bamboka ya pembeni nsima ya nsuka ya boyangeli ya bato ya libota ya Séleucus. Na mobu 63 L.T.B., bandeko yango mibale babalukaki epai ya mokonzi Moloma Pompée na ntango oyo azalaki na mboka Damas mpe basɛngaki ye ete akata likambo ya kowela bokonzi. Kaka na mbula yango, Pompée na mampinga na ye bakɔtaki na Yelusaleme mpe bazwaki yango. Ezali na ntango wana nde nsuka ya bokonzi ya bato ya Asmon ebandaki. Na mobu 37 L.T.B., Yelusaleme ekómaki na mabɔkɔ ya Elode Monene, mokonzi ya Idume, oyo Lisangani ya bankumu ya Loma (Sénat) endimaki ete azala “mokonzi ya Yudea,” mpe “moto oyo amityaki na ngámbo ya Baloma mpe azalaki moninga na bango.” Ezali na ntango wana nde bokonzi ya bato ya Asmon esukaki mpenza.
Libula ya bato ya Asmon
Eleko ya boyangeli ya bato ya Asmon, kobanda na Yuda Makabe tii na Aristobule II, etyaki moboko ya bokabwani ya mangomba oyo ezalaki ntango Yesu azalaki awa na mabele. Bato ya Asmon babandaki na molende mpo na losambo ya Nzambe, kasi basukaki na koluka matomba na bango moko na ndenge ya mabe mpenza. Banganga na bango, oyo bazalaki na libaku malamu ya kosangisa bato mpo ete bátosa mibeko ya Nzambe, bamemaki ekólo na bango na libulu mozindo ya yikiyiki ya politiki oyo eumelaki ntango molai. Lokola makambo ezalaki koleka bongo, yango esalaki ete makanisi ndenge na ndenge ebima mpe ekabola mangomba. Bato ya Asmon bazalaki lisusu te, kasi Basadukai, Bafalisai, mpe mangomba mosusu balandaki kaka kowela kozwa esika ya liboso na mitema ya bato atako na ntango wana ekólo na bango ekómaki sikoyo na nse ya bokonzi ya Elode mpe ya Baloma.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Bamakabe bazalaki banani?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 1998.
b Rulo ya Mbu Ekufá oyo ezali na motó ya likambo ete “Ndimbola ya mokanda ya Nahumu” elobeli “Nkɔsi ya nkanda” oyo “abakaki na nzete bato oyo bazalaki na bomoi”; ntango mosusu ezalaki nde kolobela likambo oyo touti kolobela.
[Etanda na lokasa 30]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Bakonzi ya libota ya Asmon
Yuda Makabe Jonathan Maccabee Simona Makabe
↓
Jean Hyrcan
↓ ↓
Salome Alexandra — abalaki — Alexandre Jannée Aristobule
↓ ↓
Hyrcan II Aristobule II
[Elilingi na lokasa 27]
Yuda Makabe alukaki lipanda ya Bayuda
[Eutelo ya bafɔtɔ]
The Doré Bible Illustrations/Dover Publications, Inc.
[Elilingi na lokasa 29]
Bato ya Asmon babundaki mpo na kopalanganisa bokonzi na bango na bingumba oyo ezalaki ya Bayuda te
[Eutelo ya bafɔtɔ]
The Doré Bible Illustrations/Dover Publications, Inc.