Bamakabe bazalaki banani?
BATO mingi bakokanisaka eleko ya Bamakabe na boîte noire oyo ezalaka na kati ya mpɛpɔ. Balobaka ete eleko ya Bamakabe ezali na makambo oyo masalemaki ntango basilisaki kokoma mikanda ya nsuka ya Makomami ya Liebele kino koya ya Yesu Klisto. Na likama ya mpɛpɔ, makambo mosusu mayebanaka soki batali boîte noire, ndenge moko mpe tokoki koyeba makambo mingi soki toyekoli makambo oyo malekaki na eleko ya Bamakabe mpamba te mbongwana esalemaki na ekólo ya Bayuda na eleko yango.
Bamakabe bazalaki banani? Mbongwana nini bakɔtisaki na Lingomba ya Bayuda liboso ete Masiya oyo asakolamaki aya?—Danyele 9:25, 26.
Yikiyiki euti na bonkɔkɔ ya Bagreke
Alesandala Monene alongaki bamboka nyonso kobanda na ekólo Grèce kino na ekólo Inde (mobu 336 kino 323 L.T.B.). Ezali mpo na Bokonzi na ye monene nde makambo ya Bagreke epalanganaki mingi, mingimingi lokota mpe mimeseno na bango. Basoda ya Alesandala babalaki basi na bamboka oyo bakómaki koyangela, yango wana bonkɔkɔ ya Bagreke na bonkɔkɔ ya mabota ya bapaya esanganaki. Nsima ya liwa ya Alesandala, bakonzi ya basoda na ye bakabolaki bokonzi na ye. Na ebandeli ya ekeke ya mibale liboso ya ntango na biso, Antiochos III moto ya libota ya Séleucos na Ekólo Sulia abɔtɔlaki Yisalaele na mabɔkɔ ya ba Ptolémée ya Ezipito. Bango nyonso bazalaki na nse ya boyangeli ya Bagreke. Bopusi nini boyangeli ya Bagreke esalaki likoló ya Bayuda na Yisalaele?
Nganga-mayele moko ya masolo ya kala akomi boye: “Bayuda bakokaki te kopɛngola bopusi ya Bagreke oyo bazalaki kofanda na Palestine, ndenge moko mpe bakokaki te kopɛngola bopusi ya bandeko na bango Bayuda oyo bazalaki kofanda na mboka mopaya oyo bamekolaki mimeseno ya Bagreke. Yango wana bakokaki te kopɛngola komekola mimeseno ya Bagreke mpe lolenge na bango ya kokanisa. . . . Moto nyonso oyo azalaki na bomoi na eleko wana asengelaki komekola mimeseno ya Bagreke!” Kutu Bayuda bakómaki kozwa bankombo ya Bagreke. Na makambo mingi, bamekolaki mimeseno mpe bakómaki kolata lokola Bagreke. Kolɛngolama yango ekómaki kopalangana mingi.
Lipɛngwi ya banganga
Banganga nde bamipesaki mingi na komekola mimeseno ya Bagreke koleka Bayuda nyonso. Banganga mingi bakanisaki ete kondima mimeseno ya Bagreke ekopesa nzela ete Losambo ya Bayuda ekende liboso. Moko kati na Bayuda yango nkombo na ye Yasona (Jason) na lokota ya Greke (na Liebele Yosua). Azalaki ndeko ya nganga-monene Onias III. Wana Onias akendaki na Antiokia, Yasona apesaki bakonzi ya Bagreke kanyaka. Mpo na nini? Mpo na kopusa bango ete bátya ye nganga-monene na esika ya Onias. Antiochos Épiphane, mokonzi Mogreke na libota ya Séleucos (mobu 175 kino 164 L.T.B.) andimaki kanyaka yango. Atako bakonzi ya Bagreke oyo bazalaki liboso na ye bazalaki komikɔtisa te na likambo etali bonganga ya Bayuda, nzokande Antiochos azalaki na mposa ya mbongo mpo na basoda na ye. Asepelaki lisusu mpamba te azwaki mokonzi ya Bayuda oyo alingaki kotombola na mpiko nyonso mimeseno ya Bagreke. Antiochos akómisaki Yelusaleme engumba ya Bagreke (polis) ndenge Yasona asɛngaki. Yasona atongaki esika ya masano epai wapi bilenge Bayuda ata mpe banganga bazalaki kowelana na masano.
Mabe ebotaki mabe. Nsima ya mbula misato, Menelaus oyo emonani ete azalaki na libota ya banganga te, apesaki kanyaka ya mingi koleka, mpe Yasona akimaki. Ebele ya mbongo oyo Menelaus afutaki Antiochos, akamataki yango na sanduku ya tempelo. Lokola Onias III (oyo akimaki na Antiokia) atɛmɛlaki likambo yango, Menelaus abomisaki ye.
Ntango nsango epalanganaki ete Antiochos akufi, Yasona azongaki na Yelusaleme na bato nkóto mpo na kolongola Menelaus nganga-monene. Nzokande, Antiochos akufaki te. Lokola ayokaki makambo ya Yasona mpe mobulu oyo Bayuda bazalaki kosala mpo na kosukisa politiki na ye ya kopalanganisa mimeseno ya Bagreke, Antiochos akanelaki bango.
Antiochos atomboki
Moshe Pearlman akomi kati na buku na ye Bamakabe (na Lingelesi) ete: “Atako balapolo yango ezali mpenza sikisiki te, emonani ete na nsuka Antiochos alobaki ete bamikosaki na ndenge batikelaki Bayuda bonsomi ya losambo. Mpo na ye, botomboki ya nsuka oyo esalemaki na Yelusaleme eutaki bobele na makambo ya losambo te, kasi Bayuda bakómaki kolanda mimeseno ya Baezipito. Makanisi yango ya politiki mazalaki koyeisa likama, mpenzampenza, mpo ete kati na bato nyonso oyo Antiochos azalaki koyangela bobele Bayuda nde bakanisaki ete bazwi bonsomi ya kokabwana na basusu na makambo ya losambo. . . . Yango wana, azwaki ekateli ya kosukisa likambo yango.”
Abba Eban, moto ya politiki na Yisalaele mpe nganga-mayele alobi boye na mokuse: “Makambo elandanaki nokinoki na boumeli ya mobu 168 mpe mobu 167 [L.T.B.], bazalaki koboma Bayuda, babebisaki Tempelo, bapekisaki Losambo ya Bayuda. Bakómaki kopesa etumbu ya liwa na baoyo bazalaki kokatama-ngenga mpe kotosa Sabata. Kotuka eleki monene esalemaki na Desɛ́mbɛ 167, ntango Antiochos apesaki ndingisa mpe batongaki etumbelo mpo na Zeus na kati ya Tempelo, mpe basɛngisaki Bayuda ete bátumbela nzambe ya Bagreke mbeka ya ngulu, eloko oyo ezalaki mbindo na Mobeko ya Bayuda.” Na boumeli ya eleko yango, Menelaus na Bayuda mosusu oyo bamipesaki na komekola mimeseno ya Bagreke batikaki mosala na bango te, bazalaki kosala na tempelo oyo ekómaki sikoyo eloko ya mbindo.
Wana ebele ya Bayuda bamipesaki na komekola mimeseno ya Bagreke, etuluku moko ya sika oyo bamibéngaki ba Hasidim, elingi koloba bato oyo babangaka Nzambe, bazalaki kolendisa bato ete bátosa Mobeko ya Mose. Sikoyo lokola bayinaki banganga oyo bamipesaki na komekola mimeseno ya Bagreke, ebele ya Bayuda basanganaki na ba Hasidim. Eleko ya kobomama lokola bamartiru ebandaki, mpamba te na Yisalaele mobimba Bayuda bapusamaki na makasi ete bátosa mimeseno mpe bambeka ya bapakano, soki te bakobomama. Mokanda ya Makabe oyo ezali mokanda epemami na elimo ya Nzambe te, elobeli ebele ya mibali, basi, mpe bana oyo baponaki kokufa na esika ya kowangana kondima na bango.
Bamakabe batomboki
Misala mabe ya Antiochos epusaki Bayuda mingi na kobundela lingomba na bango. Nganga moko nkombo na ye Mattathias azalaki kofanda na Modin na nɔrdi-wɛsti ya Yelusaleme penepene na engumba Lod ya lelo oyo, abéngisamaki na Yelusaleme. Lokola bato bazalaki kotosa Mattathias mingi, motindami ya mokonzi amekaki kondimisa ye asangana na kopesa mbeka moko ya bapakano mpo na kobatela bomoi na ye mpe kopesa ndakisa na Bayuda mosusu. Ntango Mattathias aboyaki, Moyuda mosusu andimaki kosala yango. Na nkanda nyonso, Mattathias abimisaki mopanga mpe abomaki ye. Basoda ya Bagreke bakamwaki ndenge mobange wana asalaki, bazongaki na malɛmbɛ. Na ntango wana, Mattathias abomaki lisusu motindami ya mokonzi ya Bagreke. Basoda ya Bagreke bakokaki kopika pende te liboso ya bana mitano ya Mattathias mpe bafandi ya engumba, mpamba te balekaki bango na makasi.
Mattathias angangaki ete: ‘Moto nyonso oyo azali na molende mpo na Mobeko alanda ngai.’ Ye na bana na ye bakimaki likoló na ngomba mpo ete ntango basoda ya Bagreke bakoya bákuta bango te. Lokola nsango na bango epalanganaki, Bayuda (bakisa ebele ya ba Hasidim) basanganaki na bango.
Mattathias atyaki mwana na ye Yuda mokonzi ya basoda. Ekoki kozala ete lokola azalaki soda ya mpiko, yango wana babéngaki ye Makabe, oyo elimboli “marto.” Mattathias na bana na ye babéngamaki bato ya Asmon (Asmonéens), nkombo yango euti na engumba Hesemono to na nkɔkɔ na bango. (Yosua 15:27) Nzokande, lokola Yuda Makabe akómaki moto ya lokumu na eleko ya botomboki, libota mobimba ekómaki kobéngama Bamakabe.
Tempelo epɛtolami lisusu
Na mbula ya liboso ya botomboki, Mattathias na bana na ye bazalaki na basoda mingi te. Mbala mingi, basoda ya Bagreke bazalaki kobundisa ba Hasidim mokolo ya Sabata. Atako bakokaki komibikisa bango moko, bazalaki kobunda te mokolo ya Sabata noki bakobuka mobeko. Yango wana, bato na bango bazalaki kokufa mingi. Mattathias lokola amimonaki mokonzi ya lingomba abimisaki mobeko oyo epesaki Bayuda nzela ya kobunda mokolo ya Sabata. Mobeko yango ezalaki bobele etinda mpo na botomboki te, kasi ekómaki ndakisa kati na Lingomba ya Bayuda oyo epesaki bakonzi na bango nzela ya kobongolaka Mibeko ya Bayuda ntango bakutani na makambo ndenge na ndenge. Talmud mpe emonisi lolenge yango na maloba oyo: “Tiká ete bátyola Sabata moko mpo ete bákoka kobulisa Basabata mingi.”—Yoma 85b.
Nsima ya liwa ya tata na ye oyo akómaki mobange, Yuda Makabe nde akómaki mokonzi mpo na kokamba botomboki. Lokola ayebaki ete soki batɛlɛmi na banguna na etumba akolonga bango te, asalelaki mayele ya sika, elingi koloba kobundisa banguna ntango bamibongisi naino te lokola lolenge ya etumba oyo ebéngami lelo guérrilla. Abundisaki basoda ya Antiochos na bisika oyo bakokaki kobunda lokola momeseno te. Na motindo yango, Yuda alongaki basoda oyo bazalaki ebele koleka basoda na ye.
Lokola kowelana ezalaki kati na bakonzi ya libota ya Séleucos mpe Loma ebandaki kokóma na nguya makasi, bakonzi ya libota ya Séleucos bazalaki kotya likebi mingi te na mibeko oyo etɛmɛlaki Bayuda. Yango epesaki Yuda likoki ya kokómisa etumba kino na Yelusaleme. Na Desɛ́mbɛ 165 L.T.B. (to 164 L.T.B.), ye na basoda na ye babɔtɔlaki tempelo, bapɛtolaki bisaleli na yango, mpe bafungolaki yango lisusu. Ezalaki bongo nsima ya mbula misato kobanda bakómisaki tempelo eloko ya mbindo. Bayuda bakundolaka likambo wana mbula na mbula na Hanukkah, elingi koloba feti ya bofungoli.
Balingi makambo ya politiki koleka Nzambe
Mokano ya botomboki ekokisamaki. Balongolaki bipekiseli likoló ya Losambo ya Bayuda. Bazongelaki kosambela mpe kopesa bambeka na tempelo. Sikoyo ba Hasidim basepelaki, batikaki kozala basoda ya Yuda Makabe, mpe bazongaki na bandako na bango. Kasi Yuda azalaki na makanisi mosusu. Azalaki na basoda ya makasi, mpo na nini te kosalela bango mpo na kopesa Bayuda lipanda? Botomboki elongwaki mpo na matomba ya losambo ekómaki sikoyo mpo na matomba ya politiki. Na yango, bitumba ekobaki.
Yuda Makabe asalaki boyokani na Loma, mpo básunga ye abundisa bakonzi ya libota ya Séleucos oyo bazalaki koyangela. Atako babomaki ye na etumba na mobu 160 L.T.B., bandeko na ye bakobaki kobunda. Yonatana ndeko ya Yuda abongolaki makambo na boye ete bakonzi ya libota ya Séleucos batyaki ye nganga-monene mpe mokonzi na Yudea, kasi azalaki kaka na boyangeli ya libota ya Séleucos. Ntango Basulia bakosaki Yonatana, bakangaki ye mpe babomaki ye, ndeko na ye Simeona moto ya nsuka na libota ya Makabe akómaki mokonzi. Na boyangeli na ye, Simeona alongolaki biloko ya nsuka ya boyangeli ya libota ya Séleucos (na mobu 141 L.T.B.). Simeona azongisaki boyokani na Loma, mpe bakonzi ya Bayuda bandimaki ye lokola mokonzi mpe nganga-monene. Bamakabe babandisaki boyangeli oyo ezalaki bobele mpo na bato ya Asmon.
Bamakabe bazongisaki losambo na tempelo liboso ete Masiya aya. (Kokanisá na Yoane 1:41, 42; 2:13-17.) Bonganga ezalaki lisusu eloko ya kotyela motema te na ntina na misala ya banganga oyo bamikɔtisaki na bonkɔkɔ ya Bagreke, ata na eleko ya bato ya Asmon ezalaki bobele mabe. Bayuda batambwisamaki na banganga oyo bamipesaki na makambo ya politiki na esika ya kotambwisama na mokonzi moko na libota ya Davidi libota ya sembo, yango wana bazwaki mapamboli ya solosolo te.—2 Samwele 7:16; Nzembo 89:3, 4, 35, 36.
[Elilingi na lokasa 21]
Mattathias, tata ya Yuda Makabe angangaki ete: ‘Moto nyonso oyo azali na molende mpo na Mobeko alanda ngai’
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Mattathias abéngisaki Bayuda oyo bakimaki mboka/The Doré Bible Illustrations/Dover Publications