Mwamisato, 15 sanza ya 4
Bólinganaka.—Yoa. 15:12.
Basaleli ya Yehova balingaka kosalisana. (2 Ko. 8:4) Kasi na bantango mosusu, esɛngaka mpiko mpo na kosala yango. Na ndakisa, na ntango ya etumba, bankulutu bamonaka ete esengeli kolendisa bandeko, kopesa bango lisungi, mpe mbala mosusu komemela bango bilei ya elimo to ya mosuni. Lokola bankulutu balingaka bampate, batyaka bomoi na bango na likama mpo na kosalisa bandeko na ndenge oyo esengeli. Na makambo ya ndenge wana, ezalaka na ntina mingi kotosa mpo tóbatela bomoko. Tosá malako oyo euti na Betele. (Ebr. 13:17) Bankulutu basengeli mbala na mbala kozongelaka bibongiseli oyo lisangá ezwá na oyo etali komibongisa na makama, mpe malako ya ebongiseli ya Yehova mpo na ndenge ya kosala na ntango ya likama. (1 Ko. 14:33, 40) Zalá na mpiko kasi mpe ekɛngɛ. (Mas. 22:3) Salelá bososoli. Komitya na likama ezangá ntina te. Tyelá Yehova motema. Akoki kosunga yo osalisa bandeko kozanga omitya na likama. w24.07 4 par. 8; 5 par. 11
Mwaminei, 16 sanza ya 4
Na mpasi na ngai nabelelaki Yehova, . . . mpe kolela na ngai epai na ye mpo na kosɛnga lisalisi ekómaki na matoi na ye.—Nz. 18:6.
Mokonzi Davidi ayebaki Yehova mpe azalaki kotyela Ye motema. Ntango banguna, ata mpe Mokonzi Saulo, bazalaki koluka koboma ye, Davidi abondelaki Yehova asalisa ye. Na nsima ntango Nzambe ayanolaki na libondeli na ye mpe abikisaki ye, Davidi alobaki: “Yehova azali na bomoi!” (Nz. 18:46) Na maloba yango, Davidi azalaki kaka kondima te ete Nzambe azalaka. Buku moko elobi ete Davidi azalaki komonisa ndenge atyelaki Yehova motema lokola “Nzambe ya bomoi oyo asalaka ntango nyonso mpo na bolamu ya bato na ye.” Ya solo, makambo oyo Davidi akutanaki na yango esalisaki ye amona ete Nzambe na ye azalaki na bomoi, mpe yango ebakiselaki ye mpiko ya kosalela Yehova mpe kosanzola ye. (Nz. 18:28, 29, 49) Komindimisa ete Yehova azali Nzambe ya bomoi ekoki kosalisa biso tósalela ye na molende. Tokozala na makasi ya koyikela mikakatano mpiko mpe tokolinga kokoba kosala mingi na mosala na ye. Tokozala mpe na ekateli ya kotikala penepene na Yehova. w24.06 20-21 par. 3-4
Mwamitano, 17 sanza ya 4
Moto akosa bino te ata na ndenge nini.—2 Tes. 2:3.
Maloba ya ntoma Paulo epai ya Batesaloniki ekoki koteya biso nini? Ntango toyoki likambo moko oyo eyokani te na makambo oyo toyekolá na Biblia, to ntango toyoki nungunungu oyo eningisi biso, tosengeli kosalela bososoli. Na ex-Union soviétique, banguna na biso batambwisaki mokanda moko oyo emonanaki lokola ete eutaki na biro monene. Mokanda yango elendisaki bandeko mosusu bálongwa mpe básala ebongiseli mosusu ya bango moko. Mokanda yango emonanaki lokola ya solo mpenza. Kasi bandeko oyo bazalaki sembo bakosamaki te. Bamonaki ete makambo oyo ezali na mokanda yango eyokanaki te na mateya oyo bayekolá. Lelo mpe, na bantango mosusu banguna ya solo basalelaka Internet mpe basite ya kosolola na bato mpo na kokɔtisa mobulungano kati na biso mpe kokabola biso. Tosengeli te ‘kobulungana nokinoki na makanisi na biso’; tosengeli komibatela, kotala malamumalamu soki makambo oyo toyoki to totángi eyokani na mateya ya solo oyo toyekolá.—2 Tes. 2:2; 1 Yoa. 4:1. w24.07 12 par. 14-15