Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 15/9 nk. 28-31
  • Libongoli ya Biblia oyo ebongolaki mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Libongoli ya Biblia oyo ebongolaki mokili
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Libongoli yango epemami?
  • Yafete na hema ya Semi?
  • Baprozelite mpe bato oyo babangaka Nzambe
  • Libongoli ya Septante esungaki mpo na kobongisa nzela
  • Libongoli ya Septante “epemami” lisusu te
  • Libongoli ya “Septante” ezalaki na ntina kala mpe ezali na ntina lelo oyo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Baklisto ya liboso na mokili ya Bagreki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Ezali na ntina oyekola Ebre mpe Greki?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mpo na nini mabongoli ebele ya Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 15/9 nk. 28-31

Libongoli ya Biblia oyo ebongolaki mokili

Ntango Mose mosakoli ya Nzambe abandaki kokoma Biblia esili koleka mbula 3 500, bobele ekólo moke nde ekokaki kotánga yango. (Deteronome 7:7) Ezalaki bongo mpamba te Makomami ezalaki bobele na lokota ya Liebele oyo libota wana ezalaki koloba. Nzokande, makambo ebongwanaki na nsima.

NSANGO ya Biblia epalanganaki mpe esalaki bopusi kitoko na boumeli ya bikeke, mingimingi mpo na libongoli ya liboso, oyo ebéngami Septante. Mpo na nini babongolaki yango? Mpe tokoki solo koloba ete yango ezali Biblia oyo ebongolaki mokili?

Libongoli yango epemami?

Ntango Bayuda bautaki boombo na Babilone na ekeke ya nsambo mpe ya motoba L.T.B., mingi na bango bazongaki na Yisalaele mpe na Yuda te. Bayuda oyo babotamaki na boombo bayebaki koloba lokota ya Liebele, kasi yango ezalaki lokota ya kobotama te. Na ekeke ya misato L.T.B., Bayuda mosusu bazalaki kofanda na engumba Alexandrie, na ekólo Ezipito. Alexandrie ezalaki esika monene na bokonzi ya Grèce. Bayuda wana bamonaki malamu bábongola Makomami ya Bulɛɛ na lokota ya Greke, oyo ezalaki lokota na bango ya kobotama.

Kino ntango wana, nsango ya Biblia oyo epemami na Nzambe ezalaki bobele na lokota ya Liebele, na mwa makambo moke na lokota ya araméen. Kobongola Liloba ya Nzambe na lokota mosusu elingaki nde kosilisa nguya ya elimo ya Nzambe? Elingaki ata mbala mosusu komema na bandimbola ya lokuta? Bayuda, oyo bazwaki mokumba ya kobatela Liloba lipemami, bakokaki nde kopesa nzela na libongoli oyo ekobebisa nsango wana?—Nzembo 147:19, 20; Baloma 3:1, 2.

Makambo oyo ya ntina ebangisaki bango. Kasi, balongolaki kobanga mpo bamonaki ete soki bakosala bongo te, mbɛlɛ Bayuda bakoyeba lisusu Liloba ya Nzambe malamu te. Yango wana, bazwaki ekateli ya kobongola Torah na lokota ya Greke. Torah ezali mikanda mitano ya ebandeli oyo Mose akomaki na kati ya Biblia. Lelo oyo, moto moko te ayebi soki babongolaki mpenza mokanda yango to te. Mokanda ya Aristeas elobi ete, Ptolémée II, mokonzi ya Ezipito (mobu 285-246 L.T.B.) azalaki na mposa ete bábongolela ye Pentateke (to, Torah) na lokota ya Greke mpo atyá yango na bibliotɛkɛ na ye. Apesaki mokumba wana na banganga-mayele 72, bautaki na Yisalaele mpe bayaki na Ezipito. Mpe basilisaki libongoli wana nsima ya mikolo 72. Batángelaki Bayuda libongoli yango mpe Bayuda balobaki ete ezalaki kitoko mpe na bosikisiki. Na nsima, bayaki kobakisa na lisolo oyo mwa mungwa mingi. Balobaki ete batyaki mobongoli mokomoko na esika na ye moko kasi makambo oyo babongolaki ekokanaki nyonso ndenge moko. Bokeseni ata ya lɛtɛlɛ moko ezalaki te. Lokola bato 72 nde babongolaki yango, Biblia oyo ya lokota ya Greke ebéngamaki Septante. Nkombo yango euti na liloba ya Latin oyo elimboli “ntuku nsambo.”

Banganga-mayele mingi ya mikolo na biso bandimi ete Mokanda ya Aristeas ezali lisapo mpamba. Bazali lisusu kondima ete likanisi ya kobongola [Pentateke] eutaki epai na Ptolémée II te, kasi eutaki epai na bakonzi ya Bayuda oyo bazalaki kofanda na Alexandrie. Mikanda ya Philon, Moyuda moko moto ya filozofi oyo azalaki na Alexandrie, na ya Josèphe, nganga-mayele ya istware ya Bayuda mpe Talmud emonisi likanisi oyo Bayuda bazalaki na yango na ekeke ya liboso ete Septante epemamaki na elimo ya Nzambe ndenge moko na Makomami ya ebandeli. Na ntembe te, Bayuda ya Alexandrie basalaki molende makasi mpo Bayuda na mokili mobimba bándima libongoli ya Septante. Yango wana babimisaki makanisi oyo.

Atako libongoli ya ebandeli etalelaki bobele mikanda mitano ya Mose, nkombo Septante ekómaki nkombo ya Makomami nyonso ya Liebele oyo babongolaki na lokota ya Greke. Mikanda oyo etikalaki ebongolamaki nsima ya mbula monkama to koleka. Atako bato mingi basangisaki milende na bango, libongoli mobimba ya Septante esalemaki ndambondambo. Bato oyo babongolaki yango bakesanaki na mayele mpe bayebaki lokota ya Liebele ndenge moko te. Babongolaki mikanda mingi kolanda liloba na liloba, mbala mosusu kutu kolanda lɛtɛlɛ na lɛtɛlɛ, kasi na bisika mosusu bazalaki nde kolimbola makanisi. Tozali lelo oyo na mwa mikanda ya Makomami ya Liebele oyo bakomaki na molai mpe na mokuse. Na nsuka ya ekeke ya mibale L.T.B., bato bakokaki kotánga mikanda nyonso ya Makomami ya Liebele na lokota ya Greke. Mikanda yango ezali na boyokani te moko na mosusu. Atako bongo, matomba na yango ekamwisaki bato oyo babongolaki Makomami ya Liebele na lokota ya Greke.

Yafete na hema ya Semi?

Talmud ezongeli maloba ya Genese 9:27 ndenge ekomami na libongoli ya Septante ete: “Tiká . . . Yafete . . . afanda na hema na Semi.” (Megillah 9b, Talmud ya Babilone) Talmud ezalaki koloba na ndenge ya elilingi, maloba kitoko ya lokota ya Greke oyo esalelami na libongoli ya Septante ete Yafete (tata ya Yava, nkɔkɔ ya ba Greke) afandaki na hema ya Semi (nkɔkɔ ya libota ya Yisalaele). Nzokande, ekoki mpe kolobama ete na nzela ya Septante, Semi afandaki na hema ya Yafete. Ndenge nini?

Alexandre le Grand abɔtɔlaki bamboka mingi. Na nsuka ya ekeke ya minei L.T.B., asalaki milende mpo na kopalanganisa lokota mpe bonkɔkɔ ya Bagreke na bamboka nyonso oyo ekómaki na nse ya bokonzi na ye. Babéngaki likambo yango Hellénisation. Bayuda bamonaki ete likambo yango elingi kolimwisa bonkoko na bango. Soki bonkɔkɔ mpe filozofi ya Greke elongaki, mbɛlɛ lingomba ya Bayuda elingaki kozala lisusu na ntina te. Eloko nini ekokaki kosukisa likama wana?

Max Margolis, azali Moyuda mpe mobongoli ya Biblia, alobeli likambo moko oyo epusaki bayuda básala libongoli ya Septante: “Soki tolobi ete Bayuda babimisaki likanisi ya kobongola Biblia na lokota ya Greke, boye tokoloba basalaki yango mpo na mokano mosusu. Mokano yango ezali oyo: Kosalisa bapakano ete báyeba Mobeko ya Bayuda mpe kondimisa mokili mobimba ete Bayuda bazalaki na bonkɔkɔ oyo elekaki mayele ya Bagreke.” Kokɔtisa Makomami ya Liebele na bamboka oyo elobaka lokota ya Greke elingaki kosalisa Bayuda bámibatela mpo bálanda bonkɔkɔ ya bikólo mosusu te, kasi bango nde bándimisa bato mosusu bonkɔkɔ na bango.

Kopalanganisa bonkɔkɔ ya Bagreke esalaki ete lokota ya Greke ekóma lokota ya mokili mobimba. Ata ntango Loma ebɔtɔlaki bokonzi ya Alexandre, balandaki koloba lokota ya Greke oyo ezalaki kolobama na bato nyonso (to Koïnè) ezala na makambo ya mombongo to na makambo matali boyokani kati na bikólo ndenge na ndenge. Ezala ete kopalangana ya lokota ya Greke euti na milende ya bato, to kaka na ndenge na yango moko, atako bongo, libongoli ya Liebele oyo ebéngami Septante endimamaki na bato mingi oyo bazalaki Bayuda te. Elingi koloba bato oyo bayebaki Nzambe te mpe bayebaki Mibeko ya Bayuda te. Oyo nde matomba ya kokamwisa!

Baprozelite mpe bato oyo babangaka Nzambe

Na ekeke ya liboso T.B., Philon akomaki ete “bonzenga mpe lokumu ya Mibeko ya Mose endimamaki bobele na Bayuda te, kasi lisusu na mabota nyonso.” Joseph Klausner, azali Moyuda mpe nganga-mayele ya istware, alobi mpo na Bayuda oyo bazalaki kofanda na Palestine te ete: “Ezalaki mpasi mpo na kondima ete ebele ya Bayuda wana nyonso bautaki epai mosusu te bobele na Palestine. Emonani polele ete Bayuda bakómaki mingi mpo kati na bango ezalaki na ebele ya baprozelite, basi na mibali.”

Nzokande, esuki se bongo te. Shaye J. D. Cohen, azali mokomi mikanda mpe profesere ya istware ya Bayuda, alobi boye: “Ebele ya bato ya mabota, basi na mibali bakɔtaki na Lingomba ya Bayuda na bikeke ya nsuka L.T.B. mpe na bikeke mibale ya ebandeli ya T.B. Nzokande, ezalaki lisusu na motuya monene ya bato ya mabota oyo bandimaki mwa makambo ya Lingomba ya Bayuda kasi bakɔtaki te.” Klausner na Cohen babéngaka bato yango bato oyo babangaka Nzambe, nkombo oyo esalelami mingi na mikanda ya Bagreke ya kala.

Bokeseni nini ezali kati na prozelite na moto oyo abangaka Nzambe? Baprozelite bakɔtaki mobimba na Lingomba ya Bayuda, batalelamaki mpenza lokola Bayuda mpamba te bandimaki Nzambe ya Yisalaele (babwakaki banzambe nyonso mosusu), bakatamaki ngenga, mpe bakómaki bato ya libota ya Yisalaele. Nzokande, mpo na “bato oyo babangaka Nzambe” Cohen alobi boye: “Atako bato ya mabota oyo bazalaki kosalela ebele ya makambo ya Bayuda mpe bazalaki kosambela Nzambe ya Yisalaele na lolenge moko to mosusu, bamitalelaki lokola Bayuda te, bato mosusu mpe batalelaki bango lokola Bayuda te.” Klausner alobi “batɛlɛmaki na katikati,” mpamba te bandimaki Lingomba ya Bayuda mpe “batosaki ndambo ya mimeseno na bango, kasi . . . bakómaki Bayuda te.”

Mbala mosusu, bamoko bazalaki kosepela na Nzambe mpo na masolo oyo Bayuda bazalaki kosalela na mosala ya misionere to ndenge bazalaki komona ete Bayuda bakesanaki na bango na etamboli, na mimeseno, mpe na bizaleli. Lisusu, Septante ezalaki buku oyo ezalaki kosunga bato oyo babangaka Nzambe mpo na koyeba Yehova Nzambe. Atako toyebi motuya ya bato oyo babangaka Nzambe oyo bazalaki na ekeke ya liboso te, na ntembe te, Septante epalanganisaki boyebi ya Nzambe na boyangeli ya Loma. Na nzela ya Septante, moboko ya ntina ebandaki kotyama.

Libongoli ya Septante esungaki mpo na kobongisa nzela

Libongoli ya Septante esalelamaki libosoliboso mpo na kopalanganisa nsango ya boklisto ya solo. Bayuda mingi oyo bazalaki koloba lokota ya Greke bazalaki ntango lisangá ya boklisto esalemaki na Pentekote ya 33 T.B. Baprozelite mpe bazalaki na kati ya baoyo bakómaki bayekoli ya Klisto na ebandeli. (Misala 2:5-11; 6:1-6; 8:26-38) Lokola makomi mapemami ya bantoma mpe ya bayekoli ya Yesu esengelaki kotángama na bato mingi, bakomaki yango na lokota ya Greke.a Kutu, makambo mingi ya Makomami ya Liebele oyo ezongelami na kati ya Makomami ya Greke euti na libongoli ya Septante.

Longola Bayuda na baprozelite, bato mosusu mpe balingaki kondima nsango ya Bokonzi. Mopakano Korneye, azalaki “moto na kosambela mpe na kobanga Nzambe, na ye na bato na ndako na ye nyonso. Apesi bato makabo na mawa mingi, mpe abondeli Nzambe ntango nyonso.” Na mobu 36 T.B., Korneye, libota na ye, mpe bato mosusu oyo basanganaki na ndako na ye bazalaki bato ya liboso na kati ya bapakano oyo babatisamaki mpo na kokóma bayekoli ya Klisto. (Misala 10:1, 2, 24, 44-48; kokanisá na Luka 7:2-10.) Ntango ntoma Paulo atambolaki na Asie Mineure mpe na Grèce, ateyaki bapakano mingi oyo bazalaki bato na kobanga Nzambe na ‘Bagreke oyo bazalaki kosambela Nzambe.’ (Misala 13:16, 26; 17:4, NW) Mpo na nini Korneye na bato mosusu bandimaki nsango malamu? Libongoli ya Septante esungaki mpo na kobongisa nzela. Nganga-mayele moko alobi ete libongoli ya Septante “ezali buku ya ntina mingi mpamba te soki yango te mbɛlɛ bato mingi balingaki koyeba mangomba ya boklisto na bonkɔkɔ ya bato ya Mpoto te.”

Libongoli ya Septante “epemami” lisusu te

Lokola bazalaki kosalela libongoli ya Septante mingi, matata makasi ebimaki na kati ya Bayuda. Na ndakisa, ntango bazalaki kowelana na baklisto, Bayuda balobaki ete Septante ebongolamaki mabe. Na ekeke ya mibale T.B., Bayuda baboyaki kosalela libongoli ya Septante oyo na ebandeli bakumisaki yango ete epemami na Nzambe. Balabi bayaki koboya likambo oyo ete yango ebongolamaki na bato 72. Balobaki boye: “Ezalaki mokolo moko bankumu mitano babongolaki Torah na lokota ya Greke mpo na mokonzi Ptolémée, mpe mokolo yango ezalaki mabe mpo na Yisalaele ndenge moko mpe lokola mokolo oyo basalaki mwana ya ngɔmbɛ ya wolo. Babongolaki Torah malamu te.” Mpo na kolakisa mpenza ete bandimi likanisi wana, Balabi bapesaki nzela ete libongoli ya sika esalema na lokota ya Greke. Na ekeke ya mibale T.B., Aquila, oyo azalaki prozelite nde asalaki libongoli yango, ye azalaki moyekoli ya labi Akiba.

Bayuda batikaki kosalela libongoli ya Septante, kasi ekómaki buku ya “Kondimana ya Kala” ya Lingomba ya Katolike kino ntango Jérôme asalaki libongoli ya Latin oyo bakómaki kosalela na esika ya Septante. Atako libongoli ekoki kokamata esika ya makomami ya ebandeli te, libongoli ya Septante ekokisaki mokumba monene na kopalanganisa boyebi ya Yehova mpe ya Bokonzi na ye oyo etambwisami na Yesu Klisto. Ya solo, libongoli ya Septante ezali libongoli ya Biblia oyo ebongolaki mokili.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ekoki kozala ete Evanzile ya Matai ekomamaki liboso na Liebele, mpe na nsima babongolaki yango na Greke.

[Elilingi na lokasa 31]

Bato mingi oyo Paulo ateyaki bandimaki libongoli ya “Septante”

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 29]

Na ndingisa ya bolingo malamu ya Israel Antiquities Authority

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto