Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 15/1 lok. 30
  • Bolóngi kati na makambo matali mibeko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolóngi kati na makambo matali mibeko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 15/1 lok. 30

Bolóngi kati na makambo matali mibeko

NA SANZA ya Apríli 1995, bolóngi moko monene ya esambiselo ezwamaki. Nyonso ebandaki na mokolo mwa 28 Yanuáli 1992, na ntango Luz Nereida Acevedo Quiles, elenge mwasi ya mibu 24, akɔtaki lopitalo ya El Buen Pastor na Porto Rico mpo ete bákoka kosala ye lipasó. Nsima ya kondimama kati na lopitalo yango, ayebisaki na monɔkɔ mpe akomaki mokanda ete lokola azali Motatoli ya Yehova, akolinga te ete bázongisa ye makila. (Misala 15:28, 29) Basáli na lopitalo oyo bazalaki kotalela likambo na ye, mpe monganga oyo azalaki kosalisa ye, bango nyonso bayebaki malamu bamposa na ye.

Mikolo mibale nsima ya lipaso na ye, makila ya Luz ekitaki mingi mpe nokinoki makila masilaki ye na nzoto mpamba te mabimaki mingi. Monganga-moyekoli, Dr. José Rodríguez Rodríguez, akanisaki ete lolenge bobele moko oyo ebongaki mpo na kosalisa ye ezalaki bongo kozongisama makila. Na yango, kozanga ete Luz ayeba to andima likambo yango, monganga yango alukaki kozwa ekateli ya esambiselo mpo ete bázongisa Luz makila.

Atako Luz azalaki koyeba makambo nyonso oyo mazalaki koleka zingazinga na ye mpe ete azalaki na likoki ya koloba ye moko, Dr. Rodríguez Rodríguez atingamaki bobele ete lokola bokɔnɔ ezalaki makasi mpenza, ntango ezalaki te ya koluka ete moto moko andima liboso. Mokonzi ya etúká mpo na oyo etali bosembo, Eduardo Pérez Soto, atyaki sinyatili na ye, mpe mosambisi ya etúká, moto na lokumu Ángel Luis Rodríguez Ramos, abimisaki ekateli ya esambiselo mpo na kozongisama makila.

Na yango, na mokolo mwa 31 Yanuáli 1992, bamemaki Luz kati na ndako ya lipasó, epai kuna bazongisaki ye makila. Wana makila mazalaki kozongisama, ayokaki bamoko na basáli na lopitalo bazalaki kosɛka. Basusu bazalaki kopamela ye, kolobáká ete oyo bazalaki kosala mpo na ye ezalaki mpo na bolamu na ye moko. Abundaki na makasi na ye nyonso​—kasi alóngaki te. Na mpokwa, asilaki kozongisama milangi minei ya makila.

Likambo ya Luz ezalaki ya liboso te mpe ezalaki ya nsuka te oyo etalelaki Batatoli ya Yehova mpe kozongisama makila na Porto Rico. Liboso ete likambo wana likómela ye, soko mbala 15, bisambiselo bisilaki kobimisa bikateli ya kozongisama makila kozanga kotalela bamposa ya Batatoli ya Yehova, oyo bazalaki mikóló, mpe bikateli mosusu mingi bibimaki na nsima na yango. Na mawa nyonso, na likambo moko ekateli ya esambiselo ekokisamaki, mpe makila mazongisamaki na makasi epai na moto ya maladi oyo azalaki koyeba likambo te.

Nzokande, etumba ya Luz esukaki bobele kati na ndako ya lipasó te. Na Ɔkɔtɔ́bɛ 1993, afundaki boyangeli ya Leta ya Porto Rico. Esambiselo monene nde ekataki likambo yango, mpe na mokolo mwa 18 Apríli 1995, ekateli moko ezwamaki mpo na kolóngisa ye. Esambiselo yango eyebisaki ete ekateli ya kozongisama makila ezalaki “na boyokani te na mibeko ya mboka mpe enyataki lotómo ya mofundi ya kosalela lingomba oyo ye moko alingi na bonsomi nyonso, makambo matali bomoi na ye moko mpe ekateli oyo asengeli kozwa mpo na nzoto na ye moko kozanga ete bálandela ye na mibeko.”

Ekateli wana ezalaki na ntina mingi, mpamba te ezalaki mbala ya liboso ete esambiselo moko na Porto Rico ekamata ekateli ya kolóngisa Batatoli ya Yehova mpo na likambo litali kozongisama makila. Esambiselo yango ebimisaki likambo moko ya kokamwa. Lisoló esalemaki na bapanzi-nsango, bapanzi-nsango ya bazulunalo oyo eyebani mingi, ya radio mpe ya televizyó bazalaki wana.

Bobele na butu wana lisoló elongo na baavoká ya Luz elekaki na radio. Bato oyo bazalaki koyoka babyangamaki ete bátuna mituna na nzela ya telefone. Minganga mpe bato ya mibeko babéngaki mpe balobaki maloba ya kolóngisa mpo na likambo yango. Moko na bato oyo babéngaki alobaki ete: “Siansi ezali na likoki te ya kondimisa biso ete kozongisama makila ekoki kobikisa bomoi ya bato, mpe kokanisa bongo ezali nde lokuta.” Alobaki lisusu ete: “Mosika te, kozongisama makila ekokomama kati na lisoló ya bato lokola moko na makambo maleki mabe mpe moko na mabungá ya zébi ya monganga na mikolo na biso.”

a nsima, molakisi moko ya mibeko ya lokumu mingi abéngaki na la Société Watch Tower mpe ayebisaki bosepeli na ye mozindo na ntina na oyo abéngaki yango ete “bolóngi monene.” Abakisaki ete ekateli ya esambiselo etomboli ntómo ya mibeko ya mboka, bobele mpo na Batatoli ya Yehova te kasi mpo na bana-mboka nyonso ya Porto Rico.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto