15-21/06/2026
LOYEMBO 122 Tópikama makasi, tóninganaka te!
Kobá kotalela bampasi na ndenge ya malamu
“Atako mpasi mpe mokakatano ezali kosopanela ngai, nalingaka mitindo na yo mingi.”—NZ. 119:143.
NA MOKUSE
Tokomona ndenge oyo kotalela bampasi na ndenge ya malamu ekoki kosalisa biso tóyikela yango mpiko.
1-2. Mpo tóyika mpiko na bampasi, tosengeli kosala nini? (Talá mpe elilingi.)
OZALI kokutana na makambo ya kozanga bosembo, botɛmɛli na libota, to monyoko mpo na kondima na yo? Ozali na maladi oyo eumeli to mikakatano ya bobange? Okutani na likambo moko ya mpasi, mbala mosusu liwa ya moto oyo olingaki? Ndenge moko na basaleli mingi ya Yehova oyo bazali mpe na motuya, mbala mosusu bomoi na yo “etondi na mawa mpe na mpasi.”—Nz. 90:10.
2 Mpo na koyika mpiko na bampasi, tosengeli kotalela yango na ndenge oyo ebongi. Yango elimboli nini? Tokoki kolimbola na nzela ya ndakisa oyo: Bampasi oyo ozali kokutana na yango ezali lokola makama oyo okoki komona na nzela ntango ozali kotambwisa motuka. Na kotalela esika oyo likama ezali, okoki komema motuka na lobɔkɔ ya mwasi to lobɔkɔ ya mobali, okoki kokitisa vitɛsi, to mpe kotɛlɛmisa motuka mwa moke. Nzokande, mpo osala likambo oyo ebongi, osengeli komona likama yango polele. Okoki te komona yango soki vitre ya motuka etondi na nɛjɛ to na pɔtɔpɔtɔ. Ndenge moko mpe, mpo na koyikela mikakatano mpiko, tosengeli komona yango ndenge Yehova azali komona yango. Na lisolo oyo, tokomona (1) ndenge malamu ya kotalela bampasi, (2) ntina oyo kotalela bampasi na ndenge ya mabe ekoki konyokola biso, mpe (3) oyo tokoki kosala mpo na kobatela makanisi malamu ntango mpasi ekómeli biso.
Tosengeli kotalela bampasi na biso na ndenge oyo ebongi mpo tókoka koyikela yango mpiko (Talá paragrafe 2)
NDENGE MALAMU YA KOTALELA BAMPASI
3. Tosengeli kondima likambo nini na oyo etali bomoi na mokili mabe oyo?
3 Bampasi ekoki kozanga te na mokili mabe oyo. Lokola tozali naino bato ya kozanga kokoka mpe Satana nde azali koyangela mokili oyo, bampasi ekokómela biso. Lisusu, lokola nsuka ya mokili oyo ekómi pene, tokokutana lisusu na mikakatano mingi, ezala oyo euti na makama oyo ebimaka yango moko to oyo bato babimisaka, to oyo esalemi na bato mabe. (Mat. 24:8; 2 Tim. 3:13) Soki Yehova azali kobongisa makambo nyonso wana sikoyo, ekoki komonana lokola nde azali kosalisa Satana mpo na koyangela mokili oyo. Na yango na mokili oyo, tokozanga te kokutana na “mpasi.”—Mos. 9:12.
4. Wapi ntina mosusu oyo biso tokutanaka na bampasi?
4 Kozala mokristo ebakisaka mpe mpasi. Yesu ayebisaki bayekoli na ye mbala na mbala ete bakokutana na monyoko mpo na kondima na bango. (Mat. 24:9; Yoa.16:2) Koyeba yango ekosalisa biso tóbatela kondima na biso mpo eningana te ntango tokutani na komekama. (1 Tes. 3:3, 4) Ntango tozali koyikela bampasi mpiko mpo tozali na kondima makasi, tóyeba ete tozali kaka na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko. Lisusu, tokomonisa ete na ntembe monene oyo etali nani azali na lotomo ya koyangela, tozali na ngámbo ya Yehova, kasi te na ngámbo ya Satana. Mpo na kobebisa lokumu ya nkombo ya Nzambe, Satana alobaki ete bato basalelaka Nzambe kaka mpo na matomba na bango moko. Mpo na komeka komonisa ete alobaki solo, abundisaka makasi basaleli ya Yehova. (Yobo 1:9-11) Ntango tozali koyika mpiko mpo tolingaka Yehova, tosepelisaka Ye.—Mas. 27:11.
5. Mosakoli 7:13, 14 ekoki koteya biso nini? (Talá mpe bililingi.)
5 Yehova atikaka nzela na bampasi. Yehova asalaka ata moke te makambo na motema mabe; amekaka mpe biso na makambo ya mabe te. (Yak. 1:13) Kasi, Mokonzi Salomo alobaki ete “mokolo ya mpasi . . . Nzambe [nde] asalá yango.” (Tángá Mosakoli 7:13, 14.) Ndenge ezalaka mbala mingi na Biblia, vɛrsɛ yango emonisi Yehova lokola nde asali likambo, nzokande atiki kaka nzela ete esalema. Salomo apesaki toli ya malamu oyo ekoki kosalisa biso tótalela mikakatano na biso na ndenge oyo ebongi. Ya liboso, tosengeli kondima ete tokoki kozala na bomoi ya kokoka te na mokili oyo ya Satana: tokozala na mikolo mosusu ya malamu, mpe mikolo mosusu ya mabe. Soki mokolo moko ezali ya malamu, tómonisa botɔndi mpo na bolamu ya Nzambe mpe tómona ete mokolo yango ezali likabo oyo euti epai na ye. Ya mibale, Salomo akundwelaki biso ete ‘tokoki koyeba mpenza te nini ekokómela biso,’ soki mokolo moko ekoya na makambo ya malamu to ya mpasi. Makambo oyo ekanami te ekómelaka ata bato ya sembo mpe bato oyo bazangi bosembo.
Tosengeli kondima ete na mokili oyo ya Satana, tokozala na mikolo ya malamu mpe mikolo ya mabe (Talá paragrafe 5)
6. Mpo na nini Yehova akoki kotika nzela ete tókutana na mikakatano? (Baebre 12:7, 11)
6 Soki tozali kotalela mikakatano na biso na ndenge oyo ebongi, tokomona ete Yehova azali koteya biso ete tómityela motema te, kasi tótyela nde ye motema. Yehova akozanga soki moke te komona mikakatano oyo tozali na yango to kotya likebi na bampasi na biso. Ata ntango atiki nzela ete tótambola na “lobwaku ya molili makasi,” akokoba kokamba biso, komonisa biso ete alingaka biso, mpe kopesa biso makasi oyo esengeli mpo na koyika mpiko. (Nz. 23:4) Bampasi ekoki mpe kosalisa biso tómona bolɛmbu na biso, mpe na lisalisi ya Nzambe, tóbongisa lisusu bomoto na biso. (Tángá Baebre 12:7, 11.) Na ndakisa, ntango Yobo akutanaki na bampasi, ayekolaki komikitisa. Yehova te nde abimiselaki Yobo komekama; kasi atikelaki yango nzela mpe asalelaki yango mpo na kosalisa Yobo ayekola mateya ya ntina mingi. (Yobo 42:1-6) Nzokande, ata soki likambo nini ekómeli biso, toyebi ete nyonso oyo Yehova atiki nzela ete esalema ekosala biso mabe mpo na libela te. Ntango tozali koyikela mikakatano na biso mpiko na bosembo, “tozali mpenza kolonga.”—Rom. 8:35-39.
7. Mpo na nini okoki kozala na esengo ata ntango ozali konyokwama mpo na kondima na yo?
7 Tokoki kozala na esengo na kati ya minyoko. Soki ozali kokutana na monyoko mpo na kondima na yo, kokanisa te ete Yehova atiki kopambola yo. Kasi, botɛmɛli yango emonisi ete Yehova azali kondima yo. (Mat. 5:10-12) Soki otaleli makambo malamu ndenge wana, okoki koyoka esengo mpe okomona te ete basambwisi yo ntango bazali konyokola yo mpo ozali mokristo, kaka ndenge ezalaki mpo na bantoma. (Mis. 5:40-42) Longola yango, ndakisa na yo ekoki kosalisa bato oyo bazali Batatoli te báyekola solo mpe “bápesa Nzambe nkembo.” (1 Pe. 2:12) Lokola Yozefe, okoki kolonga na kati ya bampasi, kaka te ntango yango esili.—Eba. 39:3, 23.
8. Nini mpe ekoki kotinda biso tóyikela mikakatano na biso mpiko?
8 Mikakatano na biso ekosila mokolo mosusu. Lisolo ya Yobo esalisaka biso tóbosana te ete bampasi ekosila. Kutu, “Yehova apambolaki nsuka ya bomoi ya Yobo koleka ebandeli na ye.” (Yobo 42:12) Ndenge moko mpe, Yehova alaki ete akopambola “nsuka” ya bomoi na yo, oyo ekokoba libela na libela, koleka ebandeli mokuse ya bomoi oyo etondi na mikakatano lelo. Koyeba yango ezali mpenza kolendisa mokomoko na biso ayika mpiko tii na nsuka!—Mat. 24:13.
KOTALELA BAMPASI NA NDENGE YA MABE EKOKI KONYOKOLA BISO
9. Ndenge nini kotalela bampasi na biso na ndenge ya mabe ekoki konyokola biso?
9 Ata soki bampasi na biso ezali ya ndenge nini, tosengeli kotalela yango na ndenge oyo ebongi mpo tómilukela makambo mosusu te. Na ndakisa, tokoki komona lokola Yehova nde abimiseli biso mpasi. Na ntango moko boye, Yobo mpe akómaki komona lokola Yehova nde abimiselaki ye mikakatano, mpe lokola atalelaki makambo na ndenge wana ya mabe, alukaki “komimonisa sembo na esika ya Nzambe.” (Yobo 32:2) Na ebandeli, Naomi mpe apesaki Yehova foti mpo na bampasi oyo ekómelaki ye. (Ruta 1:13, 20, 21) Soki Yobo ná Naomi bákobaka kotalela makambo na ndenge wana ya mabe, balingaki kobebisa boyokani na bango na Yehova. (Mas. 19:3) Kasi, Yehova asalisaki bango bátalela mikakatano na bango na ndenge ya malamu, mpe apambolaki bango mpo na bosembo na bango.
10. Ntango tozali na mikakatano, tokoki kobanda komituna nini?
10 Ata soki tondimi ete Yehova te nde abimiseli biso mikakatano, tokoki kobanda komituna soki azali kaka kotyela biso likebi. Kokanisa bongo ekoki kosilisa biso makasi ya koyika mpiko. (Mas. 24:10) Mokonzi Davidi ná mosakoli Habakuku bakutanaki na bampasi, mpe na ntango moko boye bamitunaki soki Yehova azalaki kaka koyoka kolela na bango mpo na kosɛnga lisalisi. (Nz. 10:1; Hab. 1:2) Kasi, batikaki kobondela te. Yehova akitisaki mibali yango ya sembo motema na ndenge akobaki kosalisa bango; akosala mpe bongo mpo na yo.—Nz. 10:17.
11. Nini ekoki kosalema soki totalelaka mikakatano na ndenge ya malamu te?
11 Soki totalelaka mikakatano na ndenge ya malamu te, tokoki kokamwa yango, mpo mbala mosusu tokanisaka ete makambo ya ndenge wana esengeli te kokómela biso. (1 Pe. 4:12) Bayekoli ya Yesu bazalaki kokanga ntina te ete Yesu akokutana na minyoko ya makasi. (Luka 18:33, 34) Atako Yesu ayebisaki bango polele makambo oyo ezalaki kozela ye, ntoma Petro akanisaki ete Nzambe akopesa nzela te ete Yesu anyokwama bongo. Yesu ayebaki ete makanisi ya Petro ekokaki kopekisa ye kosala mokano ya Yehova, yango wana apamelaki Petro. (Mrk. 8:31-33) Mpe ata nsima ya liwa ya Yesu, bayekoli na ye bazalaki kaka kokanga mpenza te ntina ya makambo yango. Atako bongo, Yesu alɛmbaki bango te. Ntango asololaki na bango nsima ya lisekwa na ye, asalisaki bango báyeba kotalela bampasi na ye na ndenge ya malamu, “azalaki kolimbolela [bango] Makomami polelepolele.” (Luka 24:25-27, 32, 44-48) Komanyola makambo oyo Yesu ateyaki bango elingaki kosalisa bango bámibongisa mpo na botɛmɛli oyo balingaki kokutana na yango mpo bazali bayekoli na ye. Ndenge moko mpe, kotalela mateya ya Biblia ekoki kosalisa biso tómibongisa mpo na makambo ya mpasi oyo ekoki koya.
12. Nini ekoki kosalema soki totaleli te likambo na biso na ndenge ya malamu?
12 Soki totaleli te likambo na biso na ndenge ya malamu, tokoki kokanisa ete oyo ekómeli biso nde eleki mabe, ata soki ezali bongo te. Yesu amonisaki yango na ndakisa ya basali na elanga ya vinyo. Basali mosusu bakómaki na mawa mpo bakanisaki ete lifuti oyo bapesaki bango ezalaki sembo te, kasi nkolo-elanga ayebisaki moko na bango: “Moninga, nasali yo mabe te.” (Mat. 20:10-13) Soki basali wana bamilelaki, ezalaki te mpo basalaki bango likambo ya kozanga bosembo, kasi nde mpo bamizelaki ete báfuta bango mbongo mingi koleka. Lelo oyo, bandeko mosusu mpe babundisaki mayoki ya ndenge wana, na ndakisa ntango bazwaki te mokumba moko boye to ntango esɛngaki bátika mokumba moko na mosala ya Yehova. Tokoki kosala nini mpo tótalela na ndenge ya malamu likambo ya mpasi oyo ekómeli biso?
OYO TOKOKI KOSALA NTANGO MPASI EKÓMELI BISO
13. Nini ekoki kosalema ntango mpasi ekómeli nde biso?
13 Na ntembe te oyebi makambo oyo Biblia elobi mpo na mpasi. Mbala mosusu kutu oyebisaka yango basusu mpo na kosalisa bango báyika mpiko na mikakatano oyo bakutani na yango. Kasi, ntango mpasi ekómeli nde yo, mbala mosusu ezali mpasi mpo obatela makanisi malamu mpo na yango. Na ndakisa, okoki komona lokola nde Yehova azali kopesa yo etumbu, to ete azali koyoka mabondeli na yo te. Okoki kosala nini mpo obatela makanisi ya malamu?
14. Okoki kosɛnga nini na libondeli ntango ozali na mpasi? (Bafilipi 4:13)
14 Sɛngá Yehova asalisa yo. Yebisá Yehova mpasi na yo, mpe ndenge oyo ozali komiyoka mpo na yango. Okoki koyebisa Yehova makambo ya sikisiki oyo olingi asala mpo na kosalisa yo. Okoki kosɛnga ye elimo santu mpo epesa yo makasi mpe bwanya oyo osengeli na yango mpo na koyika mpiko. Kasi, kobosana te ete Yehova akoki koyanola yo na ndenge oyo ozalaki kokanisa te. (Ef. 3:20) Akoki mpe kosalela baanzelu to bandeko ya lisangá mpo na kosunga yo. (Nz. 34:7) Na yango, ndimá lisalisi oyo Yehova apesi yo ata na nzela nini. Apesaka elimo na ye mingi, mpe yango ekoki kosalisa yo okoka kolonga ata mokakatano ya ndenge nini.—Tángá Bafilipi 4:13.
15. Nini ekosalisa yo oyika mpiko na makambo ya mpasi? (Talá mpe elilingi.)
15 Kobá kosala makambo ya elimo. Salá makambo ya elimo oyo okoki ata soki ezali mpasi obatela mimeseno oyo ozalaki na yango liboso. Osengeli kosepela lisusu mingi na makanisi ya Nzambe na ntango ya “mpasi mpe mokakatano.” (Nz. 119:143) Kobá kotánga Biblia mbala na mbala, mpe manyoláká yango. Bimáká na mosala ya kosakola na ndenge oyo okoki, yanganáká na makita mpe pesáká biyano. Kangamá ntango nyonso na bandeko na yo bakristo. Bundisá mposa nyonso ya koluka kozala kaka yo moko.—Mas. 18:1.
Salá nyonso oyo okoki mpo okoba kosala makambo ya elimo (Talá paragrafe 15)
16. Bantembe nini ekoki koyela yo ntango mpasi ekómeli yo, mpe ndenge nini okoki kosilisa yango? (2 Bakorinti 10:4, 5)
16 Silisá bantembe oyo ozali na yango. Ntango mpasi ekómeli yo, ekoki kosɛnga okweisa makanisi “oyo epikamá makasi,” ata mpe bantembe oyo okoki kozala na yango mpo na yo moko to mpo na Yehova. (Tángá 2 Bakorinti 10:4, 5.) Okoki kosilisa bantembe yango soki osaleli ‘boyebi ya Nzambe’ oyo ezali na Biblia mpe na mikanda ya ebongiseli na ye. Na ndakisa, ozali na ntembe ete Nzambe azali kaka kondima yo? Boye, yekolá lisolo ya ntoma Paulo. Na mosala na ye, akutanaki na makambo ya mpasi makasi; kasi yango endimisaki ye kutu lisusu mingi ete azali moyekoli ya Kristo oyo andimami. (2 Ko. 11:23-27) Ozali komituna soki Yehova alimbisá mpenza mabunga oyo osalá na kala? Soki bongo, salá liste ya bavɛrsɛ oyo emonisi ete Yehova alimbisaka masumu. (Yis. 43:25) Na nsima, tángáká bavɛrsɛ yango mpe manyoláká yango. (Nz. 119:97) Likambo moko ya nsɔmɔ oyo esalemi etindi yo omituna soki elaka ya Nzambe ya kobatela basaleli na ye ya sembo ezali solo? Soki bongo, salá bolukiluki mpo na ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala mpe ndenge oyo abatelaka biso na elimo ata soki mpasi ya ndenge nini ekómeli biso. (Nz. 91:9-12) Lisusu, tángáká masolo ya bandeko oyo bayikaki mpiko atako bakutanaki na makambo ya nsɔmɔ.a
17. Tosengeli kosala nini ntango likambo ya mpasi ekómi?
17 Ozali sikoyo na mokolo ya malamu, elingi koloba ozali na mikakatano ya minene te? Boye, pesá Yehova matɔndi mpe salelá malamu libaku yango mpo na komonisa bolamu na ye. (Mos. 7:14) Kasi, ntango likambo ya mpasi ekómi, talelá yango na ndenge ya malamu mpe kobá kotyela Yehova motema mobimba. Soki osali bongo, Yehova ‘akobongisela yo nzela ya kobima mpo ozala na likoki ya koyikela yango mpiko.’ (1 Ko. 10:13) Bongo ntango bandeko na biso ya lisangá bakutani na makambo ya mpasi? Ndenge nini tokoki kosalisa bango? Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.
LOYEMBO 150 Bóluka Nzambe mpo bóbika
a Na ndakisa, okoki kotánga na jw.org lisolo ya bomoi “Une famille heureuse frappée par un drame réussit à se reconstruire” oyo elobeli ndenge Ndeko David Maza ná libota na ye bayikaki mpiko ntango mwana na bango akufaki na likama.