Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w26 Avril nk. 8-13
  • “Nzambe oyo alobaka solo” akokisaka ntango nyonso mokano na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nzambe oyo alobaka solo” akokisaka ntango nyonso mokano na ye
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NTINA OYO TOKOKI KOTYELA NZAMBE OYO ALOBAKA SOLO MOTEMA
  • NZAMBE OYO ALOBAKA SOLO AKOKISI MOKANO NA YE
  • NZAMBE OYO ALOBAKA SOLO AZALI KOYANGANISA BAOYO BALINGAKA SOLO
  • ZELÁ MIKOLO EZALI KOYA NA ELIKYA
  • Luká biyano na mituna oyo
    Programɛ ya Liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova 2025-2026—Elongo na momonisi ya Betele
  • Ndimá ete okoki koyeba makambo mosusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Luká biyano na mituna oyo
    Programɛ ya Liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova 2025-2026—Elongo na mokɛngɛli ya zongazonga
  • Tyelá Nkolo Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
w26 Avril nk. 8-13

08-14/06/2026

LOYEMBO 8 Yehova azali ekimelo na biso

“Nzambe oyo alobaka solo” akokisaka ntango nyonso mokano na ye

“Osikoli ngai, Ee Yehova, Nzambe oyo alobaka solo.”—NZ. 31:5.

NA MOKUSE

Lisolo oyo ekosalisa biso tótyela lisusu Yehova motema mingi ete akokokisa bilaka na ye nyonso mpe ete mosika te Bokonzi na ye ekosilisa lokuta mpe bokosi nyonso.

1. Mpo na nini tokoki kondima ete tobatelami na lokuta ya Satana? (Nzembo 31:​2-5)

TOZALI kobika na mokili oyo eyangelami na Satana. Lokuta, bokosi, mpe kozanga bosembo epai ya basusu ezali mingi. Ekoki kozala mpasi koyeba nani okotyela motema. Bato ya mombongo babubaka baninga na bango. Bato oyo basalaka piblisite balobaka lokuta mpo na biloko oyo balakisaka bato. Mpe bato mosusu bamoni ete bakoki ata te komizela ete baninga na bango ya motema bakokokisa maloba na bango. Kasi, ezali esengo koyeba ete tokoki ntango nyonso kotyela Yehova motema! Azali “Nzambe oyo alobaka solo.” (Tángá Nzembo 31:​2-5.) Solo ezali na kati ya bomoto na ye; akoki koloba lokuta ata moke te. Nyonso oyo Yehova alobaka mpe asalaka ezalaka solo mpe abongi kotyelama motema.

2. Tokolobela nini na lisolo oyo?

2 Na lisolo oyo, tokolobela liboso mwa bantina oyo tokoki kotyela Yehova motema na biso mobimba. Na nsima tokomona ndenge oyo Nzambe oyo alobaka solo akotya nsuka na mokili mabe ya Satana mpe oyo Nzambe azali kosala banda sikoyo mpo na kokokisa mokano na Ye. Koyekola makambo yango ekosalisa biso tózala Batatoli ya Yehova ya mpiko mpe oyo babangaka te.

NTINA OYO TOKOKI KOTYELA NZAMBE OYO ALOBAKA SOLO MOTEMA

3. Mpo na nini tokoki kotyela Yehova motema na biso mobimba?

3 Tokoki kotyela Yehova motema mpo azali Mozalisi. Ye nde asalá likoló ná mabele mpe azali Liziba ya bomoi nyonso. (Eba. 1:1; Nz. 36:9; Em. 4:11) Azali mpe Mobateli ya bomoi. Akelá biloko oyo esalaka ete bomoi ezala na mabele. Azali mpe akozala ntango nyonso na bokonzi na molɔ́ngɔ́ mobimba. Na yango na elikya nyonso, tokoki kotika bomoi na biso ya lelo mpe ya mikolo ezali koya na mabɔkɔ ya Mozalisi na biso oyo aleki na bwanya mpe na nguya.

4. Ndenge nini toyebi ete Yehova alingaka biso?

4 Tokoki kotyela Yehova motema mpo alingaka biso. Yehova akelá bato mpo alingaki kokabola na bango likabo kitoko ya kozala na bomoi. Yehova ayebisaki mokano na ye na maloba oyo: “Tósala moto na elilingi na biso, azala lokola biso.” (Eba. 1:26) Apesá biso bonsomi ya kopona. Asalá mpe mabele, esika kitoko ya kofanda kaka mpo na biso. (Nz. 115:16) Mpe apesaki baboti na biso ya liboso mokumba kitoko ya kokómisa mabele paradiso. (Eba. 1:28; 2:15) Atyelaki bango ebele ya biloko kitoko mpe makambo ya malamu na mabele mpo básepela na bomoi. Ya solo, nyonso wana emonisi ete “bolingo ya sembo ya Yehova ezali mpo na seko.”—Nz. 103:17.

5. (a) Ntango Adama ná Eva batombokaki, Yehova asundolaki mokano na ye mpo na mabele? (b) Wapi mwa bilaka oyo Nzambe asili kokokisa? (Talá etanda “Nzambe alobaka ntango nyonso solo.”)

5 Tokoki kotyela Yehova motema mpo asalaka ntango nyonso oyo alobi. Yehova akelaki mabele “kaka mpamba te, kasi asalaki yango nde mpo bato báfanda.” (Yis. 45:​18, 19) Ntango Adama ná Eva batombokelaki Yehova, basengelaki kozwa etumbu ya liwa. Na yango emonanaki lokola ete mokano ya Nzambe ekokokisama lisusu te. Kasi Yehova azali Mokokisi ya bilaka na ye nyonso. (Yis. 46:​10, 11) Mokano na ye ya kotondisa mabele na mibali mpe basi ya sembo ezalaki kaka. Yango wana atikaki Adama ná Eva bábota bana. Lisusu, atindaki Mwana na Ye se moko oyo abotamaki apesa bomoi na ye lisiko mpo na kobikisa bana ya Adama mpe kopesa bango elikya kitoko ya kozala na bomoi libela na libela.—Yoa. 3:16.

Nzambe alobaka ntango nyonso solo

Tótala kaka mwa ndambo ya bilaka oyo Yehova asili kokokisa:

  • Alakaki Moize ete Bayisraele bakofanda na mokili na bango moko, oyo etondi na miliki mpe mafuta ya nzoi.—Kob. 3:​6-8; Mib. 27:3.

  • Alakaki ete Masiya akoya mpe akolongola bato na elakeli mabe ya lisumu mpe liwa.—Yis. 53:​11, 12.

  • Alakaki ete mosala ya kosakola ekosalema na mokili mobimba mpo na kosalisa bato báyeba ye liboso ete nsuka eya.—Mat. 24:14.

Okoki kokanisa bilaka mosusu oyo Yehova asili kokokisa?

NZAMBE OYO ALOBAKA SOLO AKOKISI MOKANO NA YE

6. Yehova alobaki nini nsima ya botomboki na elanga ya Edene?

6 Anzelu oyo atindaki Adama ná Eva bátombokela Nzambe ezalaki “nyoka ya ebandeli, oyo babengi Zabolo mpe Satana.”a (Em. 12:9; Eba. 3:​4, 5; Yoa. 8:44) Yehova akatelaki ye etumbu, alobaki ete nsukansuka akobomama. (Eba. 3:15) Liboso ete likambo yango esalema, mingi bakolanda Satana mpe bakosala makambo lokola ye. Kasi, basusu bakotikala sembo epai ya Yehova.

7. Banani balandaka Zabolo, mpe nini ekokómela bango?

7 Baoyo bazali kolanda Satana Zabolo ezali baanzelu oyo batombokelá Nzambe mpe bato oyo bazangi botosi. Lokola baboyi, to batɛmɛlaka mokano ya Nzambe, bamikómisi bana to momboto ya Satana. Kasi na ntango oyo Nzambe atyá, Satana ná baoyo balandaka ye bakobomama.—Dan. 2:44; Rom. 16:20.

8. Likambo nini Yesu asalaki na 1914? (Talá mpe bililingi.)

8 Nini endimisaka biso ete mokano ya Nzambe ya koboma Satana mpe baoyo balandaka ye ekokokisama? Na 1914, Yesu abandaki kobunda na Satana Zabolo ná bademo na ye mpe abwakaki bango na nse, na mabele. (Em. 12:​7-9) Atako etumba yango ezalaki na likoló, na ntembe te awa na mabele mpe bato bamonaki makambo oyo etumba yango ebimisaki. Biblia elobi: “Mawa na mabele mpe na mbu, mpo Zabolo akiteli bino na nkanda makasi, mpo ayebi ete atikali na ntango mokuse.” (Em. 12:12) Kobanda 1914, Satana atye likebi nyonso na mabele, yango wana makambo ezali kobeba se kobeba na mokili. Ya solo mpenza, “mawa na mabele”! Kasi, mosika te, Yesu ‘akolonga tii na nsuka’ mpe Satana ná baoyo nyonso bapesaka ye mabɔkɔ bakobomama. (Em. 6:2) Yesu akolongisa nkombo ya Yehova mbala moko mpo na libela. (Nz. 45:​4-6) Moto nyonso akoyeba ete Yehova azali Nzambe oyo alobaka solo!—Ezk. 38:23.

Bililingi: Makambo oyo ezali kosalema na mabele banda 1914. 1. Satana oyo azali lokola dragɔ ya mitó nsambo abwakami na mabele. 2. Basoda na etumba, balali na mabele pene ya libulu mpo na kobɛta masasi. 3. Babɛti bɔmbi mpe ebimisi milinga makasi. 4. Mama moko oyo azali na esika ya kolala te afandi na balabala mpe amemi mwana na ye oyo azali kolela. 5. Soda moko asimbi mandoki mpe azali kobɛta masasi. 6. Mobali moko azali kotambola likoló ya biloko ya engumba oyo babebisi. 7. Bamasini ya kompanyi moko ezali kobimisa milinga oyo ezali kobebisa mopɛpɛ. 8. Bato balati bamaskɛ mpe bazali kotambola na engumba moko. 9. Bato oyo batomboki bazali kobunda na bapolisi.

Etumba ya liboso ya mokili mobimba: U.S. National Archives photo; bɔmbi: USAF photo; maladi mabe: blvdone/stock.adobe.com; mobulu: inhauscreative/E+ via Getty Images

Kobanda 1914, makambo ebebi nde kobeba na mokili (Talá paragrafe 8)


NZAMBE OYO ALOBAKA SOLO AZALI KOYANGANISA BAOYO BALINGAKA SOLO

9. Yehova azali koyanganisa banani lelo oyo?

9 Sikoyo, Yehova azali koyanganisa “biloko nyonso esika moko na nse ya bokonzi ya Kristo, biloko oyo ezali na likoló mpe biloko oyo ezali na mabele.” (Ef. 1:10) “Biloko oyo ezali na likoló” ezali bakristo oyo batyami mafuta na elimo, baoyo Yehova aponi mpo báyangela elongo na Kristo na likoló. “Biloko oyo ezali na mabele” ezali baoyo bakozala na bomoi libela na libela na Paradiso awa na mabele. Bato yango nyonso oyo basambelaka Yehova bazali komipesa mpenza na komonisa polele lokuta ya Satana mpe na kosalisa bato ya mitema sembo bázwa boyebi ya solo.

10. Ndenge nini Yehova azali kosalisa bato bábima na mangomba ya lokuta? (Emoniseli 14:​6, 7)

10 Yehova azali koyanganisa bato oyo balingaka solo na nzela ya mosala monene ya kopesa litatoli oyo esalemá naino te na mokili. (Tángá Emoniseli 14:​6, 7.) Atako Yehova azali kosalela bato mpo na koyebisa basusu nsango malamu, baanzelu mpe bapesaka mabɔkɔ na koyanganisa bato ya mitema sembo na lisangá ya bokristo. Mosala ya kopesa litatoli ebimisaka polele mateya ya lokuta ya Babilone Monene, lisangá ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, oyo Zabolo azali kosalela banda basiɛklɛ mingi mpo na kopanza lokuta na oyo etali Yehova. (Em. 18:​2, 4) Mosika te, mangomba nyonso ya lokuta ekobomama, mpe baoyo nyonso balingaka Nzambe oyo alobaka solo bakopesa ye nkembo oyo abongi na yango mpenza.—Em. 17:16.

11. Ndenge nini tokoki koyeba basambeli ya solo ya Yehova?

11 Baoyo balingaka solo bauti na bisika, mimeseno, mpe bikólo nyonso mpe basusu bazali bazwi, basusu babola. (Em. 7:​9, 10) Ntango bayokaki “nsango malamu,” bandimaki ete bamoni solo mpe na esengo nyonso bakɔtaki na molɔngɔ ya basaleli ya Yehova. (Mrk. 13:10) Lelo, ekómi komonana polelepolele banani bazali kosambela Nzambe na ndenge oyo andimaka mpe banani bazali kosala yango te. Mosakoli Malaki asakolaki ete: “Bokomona lisusu bokeseni kati na moto ya sembo mpe moto mabe, kati na moto oyo asalelaka Nzambe mpe moto oyo asalelaka ye te.” (Mal. 3:18) Na nzela ya bizaleli na bango mpe mosala ya kosakola, basaleli ya Yehova bamonisi ete basambelaka Nzambe oyo alobaka solo.

12. Ndenge nini mosala ya kosakola esalisaka na kokokisama ya mokano ya Yehova?

12 Ntango tosakolaka “nsango malamu oyo ya Bokonzi,” totosaka etinda ya Yesu, mpe tokokisaka bisakweli. (Mat. 24:14; 28:​18-20) Mpe mosala yango ezali kobota mbuma, mpo bato na bisika nyonso na mokili bazali kokóma bayekoli ya Kristo mpe bazwi elikya ya kosalela Nzambe oyo alobaka solo libela na libela. Ezali mpenza lokumu monene ndenge tozali kopesa mabɔkɔ na kokokisama ya mokano ya Yehova!

ZELÁ MIKOLO EZALI KOYA NA ELIKYA

13. Satana abundisaka mingimingi banani, mpe mpo na nini?

13 Satana Zabolo azali na nkanda makasi mpo ayebi ete “atikali na ntango mokuse” liboso ete mokili na ye ebomama. (Em. 12:​12, 13) Satana abundisaka mingimingi bamonisi ya Bokonzi ya Nzambe oyo bazali naino awa na mabele, “[baoyo] batosaka mitindo ya Nzambe mpe bazali na mosala ya kotatola mpo na Yesu.” (Em. 12:17; 14:12) Abundisaka mpe moto nyonso oyo apesaka mabɔkɔ na bamonisi yango mpe na mosala oyo bazali kosala.

14. Nini ekosalema ntango Satana akobundisa basaleli ya Yehova? (Talá mpe elilingi.)

14 Nsima ya kobebisama ya Babilone Monene, baoyo bapesaka Satana mabɔkɔ bakobundisa basaleli ya Yehova mpo na koluka kosilisa bango nyonso. Likambo yango ekomema na etumba ya Armagedone. (Em. 16:​13, 14, 16) Yesu ná mampinga ya likoló bakobikisa basaleli ya Yehova mpe bakosilisa nyɛɛ eloko nyonso ya mokili ya Satana oyo ekozala na ntango wana. (Em. 19:​19-21) Bato nyonso oyo bakosaka, bato mabe, mpe baoyo babubaka basusu bakozala lisusu te. (Em. 21:8) Nzambe oyo alobaka solo mpe oyo azali sembo akolongisama mpenza.

Yesu ná limpinga na ye ya likoló na bampunda ya mpɛmbɛ, bazali kobundisa mampinga ya basoda na mabele. Yesu asimbi litimbo, mpe baanzelu mosusu basimbi mipanga.

Yesu ná limpinga na ye ya likoló bayei na bampunda na etumba ya Armagedone mpo na koboma banguna ya Nzambe (Talá paragrafe 14)


15. Mpo na nini tokoki kozela mikolo ezali koya na elikya? (Yisaya 65:​16, 17) (Talá mpe elilingi.)

15 Lelo oyo bokabwani ezali mingi mpenza na mokili. Kasi na lisalisi ya Yehova, basaleli na ye bazali kaka na bomoko. Mosala ya koyanganisa baoyo balingaka solo ezali kokoba. Eloko moko te ekoki kopekisa Yehova apambola basaleli na ye mpe mosala oyo bazali kosala. (Tángá Yisaya 65:​16, 17.) Tozali kozela mikolo ezali koya na elikya. Maloba ya ntoma Paulo oyo ezali na Baroma 8:​38, 39 ezali mpenza solo ete: “Ezala liwa, to bomoi, to baanzelu, to baguvɛrnema, to makambo ya lelo, to makambo oyo ekoya, to banguya, to bosanda, to bozindo, to ekelamu nini mosusu ekokoka te kokabola biso na bolingo ya Nzambe oyo emonisami na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.”

Mobali moko ná mwasi na ye bafandi na esengo elongo na mwana na bango ya mobali mpe ya mwasi na veranda oyo etali lobwaku moko oyo etondi na nzete mpe fololo. Nyama ya zamba ezali kolya matiti pembeni.

Na mokili ya sika, tokokanisa lisusu te mikakatano oyo tozali na yango lelo (Talá paragrafe 15)


16. Mpo na nini otyelaka Yehova motema na yo mobimba?

16 Tozali na bantina nyonso ya kotya motema epai ya Yehova, Nzambe oyo alobaka solo. Azali Mozalisi na biso. Alingaka biso mingi. Mpe etuluku ya ebele mpenza ya bato ezali se kokóma monene nokinoki, wana bato ya bikólo nyonso bazali koya mpo na kosambela Yehova. (Yis. 60:22; Zek. 8:23) Toyebi ete akokisaka ntango nyonso mokano na ye mpe ete mosika te akolongola bokosi mpe lokuta nyonso ya Satana na mokili. Lokola Davidi, tobondelaka boye: “Yehova Nzambe . . . asanzolama, ye moko nde asalaka makambo ya kokamwa. Nkombo na ye ya nkembo esanzolama mpo na libela, mpe nkembo na ye etondisa mabele mobimba.”—Nz. 72:​18, 19.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Mpo na nini tokoki kotyela “Nzambe oyo alobaka solo” motema?

  • Ndenge nini Yehova akosukisa mokili ya Satana, mpe azali kosala nini sikoyo mpo na kokokisa mokano na Ye?

  • Mpo na nini tokoki kozela mikolo ezali koya na elikya?

LOYEMBO 2 Yehova nde nkombo na yo

a Biblia epesi nkombo mpenza te ya anzelu yango. Mpo na kolobela ye, esaleli kaka maloba lokola “Zabolo” [Mokoseli-bato makambo] mpe “Satana” [Motɛmɛli].

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto