Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 4/09 nk. 10-11
  • Bampasi na yo ezali etumbu ya Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bampasi na yo ezali etumbu ya Nzambe?
  • Lamuká!—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Basembwi bakutanaki mpe na mikakatano
  • Ntina ya bampasi na biso
  • Mosika te bampasi nyonso ekosila
  • Kobá kotalela bampasi na ndenge ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Bampasi ezali etumbu ya Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Yobo ayikaki mpiko mpe atikalaki sembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Liteya mpo na lolenge ya kosala liboso ya mikakatano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Lamuká!—2009
g 4/09 nk. 10-11

Biblia elobi nini?

Bampasi na yo ezali etumbu ya Nzambe?

Ntango minganga bayebisaki mwasi moko ya mbula soki 55 ete azali na kanser, alobaki boye: “Namoni ezali etumbu ya Nzambe.” Ntango akanisaki mabe oyo asalaki na bambula eleki alobaki boye: “Nzambe amonisi ngai ete nasalaki lisumu.”

NTANGO bakutani na mpasi, bato mingi bakanisaka ete Nzambe nde apesi bango etumbu mpo na mabe oyo basalaki. Ntango bakutani na ebele ya bampasi na mbalakaka, mbala mingi balobaka: “Mpo na nini kaka ngai? Nasali nini mpo nazwa etumbu ya boye?” Tosengeli kokanisa ete bampasi na biso ezali etumbu ya Nzambe? Bampasi oyo tokutanaka na yango ezali mpenza etumbu ya Nzambe?

Basembwi bakutanaki mpe na mikakatano

Tótalela oyo Biblia elobi mpo na moto moko nkombo na ye Yobo. Mobali yango abungisaki bozwi na ye nyonso na mbala moko. Na nsima, mopɛpɛ makasi ebomaki bana na ye zomi. Mwa moke na nsima, abɛlaki maladi moko ya nsɔmɔ mpe ya mabe. (Yobo 1:13-19; 2:7, 8) Bampasi yango nyonso etindaki Yobo aloba boye: “Loboko la Nzambe lobeti ngai.” (Yobo 19:21, Biblia Liloba lya Nzambe) Ndenge moko na bato mingi lelo oyo, Yobo mpe akanisaki ete Nzambe nde apesi ye etumbu.

Nzokande, Biblia emonisi ete liboso ete bampasi wana nyonso eyela Yobo, Nzambe ye moko alobaki ete Yobo azali “moto malamu bɛ mpe ya sembo, oyo akotosaka Nzambe mpe akoboyaka mabe.” (Yobo 1:8) Maloba yango emonisi polele ete bampasi ya Yobo ezalaki etumbu ya Nzambe te.

Likambo ya solo ezali ete Biblia ezali na masolo mingi ya basembwi oyo bakutanaki mpe na mikakatano. Atako azalaki mosaleli ya sembo ya Nzambe, Yozefe anyokwamaki bambula ebele na bolɔkɔ, nzokande asalaki mabe moko te. (Genese 39:10-20; 40:15) Timote, Moklisto moko ya sembo azalaki ‘kobɛlabɛla.’ (1 Timote 5:23) Ata Yesu Klisto, oyo asalaki ata mabe moko te, anyokwamaki makasi liboso ya kokufa liwa moko ya nsɔmɔ. (1 Petelo 2:21-24) Yango wana, koloba ete bampasi ezali etumbu ya Nzambe ezali mpenza libunga. Kasi, soki bampasi eutaka epai ya Nzambe te, eutaka wapi?

Ntina ya bampasi na biso

Biblia emonisi ete Satana Zabolo nde atindelaki Yobo bampasi wana nyonso. (Yobo 1:7-12; 2:3-8) Lisusu, emonisi ete bampasi ya bato eutaka libosoliboso epai ya Satana; elobi boye: “Mawa na mabelé mpe na mbu, mpamba te Zabolo akiteli bino, azali na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na eleko moko ya ntango mokuse.” (Emoniseli 12:12) Lokola azali “moyangeli ya mokili oyo,” Satana azali kotinda bato mingi básala makambo ya mabe oyo ezali kobimisa ebele ya bampasi na mokili.​—Yoane 12:31; Nzembo 37:12, 14.a

Nzokande, tosengeli te koloba ete bampasi nyonso oyo tokutanaka na yango eutaka kaka epai ya Zabolo. Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tozwaka bikateli ya mabe oyo ebimiselaka biso mpasi. (Nzembo 51:5; Baloma 5:12) Tózwa ndakisa ya moto moko oyo azwi ekateli ya kolya malamu te mpe kopema mingi te. Soki abɛli, akoloba ete Zabolo nde abɛlisi ye? Te, moto yango abuki kaka mbuma ya ekateli na ye oyo azwaki. (Bagalatia 6:7) Ezali kaka ndenge lisese moko ya Biblia elobi ete, “[bozoba, NW] ya moto ekobebisa nzela na ye.”​—Masese 19:3.

Lisusu, tosengeli mpe koyeba ete bampasi mingi oyo tokutanaka na yango ezali mpo na “ntango ná makambo oyo ekanami te.” (Mosakoli 9:11) Tózwa ndakisa ya moto moko oyo mbula ekangi ye na nzela. Soki akopola mwa moke to akopola mpenza mobimba, yango etaleli kaka esika oyo mbula yango ekuti ye ntango ebandi. Ndenge moko mpe, na “bantango oyo ya ndenge mosusu,” mikakatano ekoki kokómela biso na mbalakaka. (2 Timote 3:1-5) Ezala bampasi yango ezwi biso kaka moke to mingi na mbala moko, yango ekotalela kaka esika oyo tozali ntango likambo moko esalemi mpe tokosala eloko moko te mpo na kokima yango. Yango elingi nde koloba ete bampasi na biso ekosila te?

Mosika te bampasi nyonso ekosila

Mosika te, Yehova Nzambe akotya nsuka na bampasi nyonso. (Yisaya 25:8; Emoniseli 1:3; 21:3, 4) Kasi, liboso asala yango, azali komibanzabanza mpo na biso na ndenge azali koteya biso mpe kobɔndisa biso na nzela ya Makomami, mpo tóyika mpiko na minyoko wana tozali kozela mokili ya sika oyo ezali koya. (Baloma 15:4; 1 Petelo 5:7) Na ntango yango, baoyo bazali sembo na miso ya Nzambe, bakozala na bomoi ya seko na mokili ya sika epai bampasi ekozala te.​—Nzembo 37:29, 37.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá lisolo “Engebene Biblia: Satana azali nani? Azalaka mpenza?” na Lamuká! ya Yuli-Sɛtɛmbɛ 2007.

OSILÁ KOMITUNA?

◼ Kaka bato mabe nde bakutanaka na bampasi?​—Yobo 1:8.

◼ Bampasi na biso nyonso eutaka epai ya Zabolo?​—Bagalatia 6:7.

◼ Bampasi ekosila te?​—Emoniseli 21:3, 4.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 11]

“Ntango ná makambo oyo ekanami te ekwelaka bango nyonso.”​—Mosakoli 9:11, NW.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto