Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Août nk. 2-7
  • Ndenge oyo Yehova asalisaka biso tóyika mpiko

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge oyo Yehova asalisaka biso tóyika mpiko
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • LIBONDELI
  • LILOBA YA NZAMBE
  • BANDEKO NA BISO BAKRISTO
  • ELIKYA NA BISO
  • Kobosanaka te ete Yehova azali “Nzambe ya bomoi”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Mokanda oyo ekoki kosalisa biso tóyika mpiko tii na nsuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Ndimá ete okoki koyeba makambo mosusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Yehova “abikisaka baoyo bazoki na motema”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Août nk. 2-7

LISOLO YA BOYEKOLI 32

LOYEMBO 38 Akokómisa yo makasi

Ndenge oyo Yehova asalisaka biso tóyika mpiko

“Nzambe ya boboto monene nyonso . . . akotɛlɛmisa bino ngwi, akokómisa bino makasi, akopika bino makasi.”—1 PE. 5:10.

NA MOKUSE

Tokolobela bibongiseli oyo Yehova atye mpo na kosalisa biso tóyika mpiko mpe oyo tokoki kosala mpo na kozwa matomba na bibongiseli yango mokomoko.

1. Mpo na nini tosengeli na ezaleli ya koyika mpiko, mpe nani akoki kosalisa biso? (1 Petro 5:10)

NA MIKOLO oyo ya nsuka mpe ya mikakatano, basaleli ya Yehova basengeli na ezaleli ya koyika mpiko. Bandeko mosusu bazali na maladi oyo eumeli. Basusu bazali kolela liwa ya moto oyo balingaki. Basusu mpe bazali kokutana na botɛmɛli, oyo euti na libota to epai ya bakonzi ya baguvɛrnema. (Mat. 10:​18, 36, 37) Yebá ete ata soki mokakatano na yo ezali nini, Yehova akoki kosalisa yo oyikela yango mpiko.—Tángá 1 Petro 5:10.

2. Nini esalisaka biso bakristo tóyika mpiko?

2 Ezaleli ya koyika mpiko ezali likoki ya kokoba kokende liboso mpe kobatela elikya na ntango ya mikakatano, minyoko to komekama. Biso bakristo toyikaka mpiko na makasi na biso moko te, kasi na “nguya oyo eleki makasi,” oyo Yehova akoki kopesa biso. (2 Ko. 4:7) Na lisolo oyo, tokolobela bibongiseli minei oyo Yehova atye mpo na kosalisa biso tóyika mpiko. Tokomona mpe oyo tokoki kosala mpo na kozwa matomba na bibongiseli yango mokomoko.

LIBONDELI

3. Mpo na nini tokoki koloba ete libondeli ezali likamwisi?

3 Yehova atye ebongiseli moko ya kokamwa oyo ekoki kosalisa biso tóyika mpiko. Apesi biso likoki ya kosolola na ye atako tozali bato ya masumu. (Ebr. 4:16) Kanisá naino: Tokoki kobondela Yehova na ntango nyonso oyo tolingi mpe ata mpo na likambo nini. Akoki koyoka biso ata na monɔkɔ nini mpe na esika nini, ezala ntango tozali kaka biso moko to na bolɔkɔ. (Yona 2:​1, 2; Mis. 16:​25, 26) Ata ntango totungisami mingi mpe tozali kozwa maloba te mpo na kobimisa makanisi na biso, Yehova ayebaka malamu likambo oyo tolingi koloba. (Rom. 8:​26, 27) Ya solo, libondeli ezali likamwisi oyo esalisaka biso tósolola na Yehova!

4. Mpo na nini tokoki koloba ete kosɛnga Yehova asalisa biso tóyika mpiko eyokani na mokano na ye?

4 Yehova ayebisi biso na Liloba na ye ete “ezala eloko nini oyo tozali kosɛnga na boyokani na mokano na ye, ayokaka biso.” (1 Yoa. 5:14) Tokoki mpe kosɛnga Yehova asalisa biso tóyika mpiko? Ɛɛ! Yango eyokani na mokano na ye. Mpo na nini tokoki koloba bongo? Ntango tozali koyika mpiko na komekama, Yehova azwaka eyano ya kopesa na moto oyo atumolaka ye, Satana Zabolo. (Mas. 27:11) Longola yango, Biblia elobi ete Yehova alingaka mpenza “[komonisa] makasi na ye mpo na bolamu ya baoyo motema na bango ezali mobimba epai na ye.” (2 Nt. 16:9) Na yango tokoki kondima ete Yehova azali na nguya mpe na mposa ya kosalisa biso tóyika mpiko.—Yis. 30:18; 41:10; Luka 11:13.

5. Ndenge nini libondeli ekoki kopesa biso kimya ya makanisi? (Yisaya 26:3)

5 Biblia elobi ete ntango tozali kobondela Yehova na etingya mpo na mitungisi na biso, ‘kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi na biso ekobatela mitema na biso mpe makanisi na biso.’ (Flp. 4:7) Ezali lipamboli mpenza! Ntango bato oyo basalelaka Yehova te bakutanaka na mikakatano, mbala mingi bamekaka mayele ndenge na ndenge mpo bázwa kimya ya makanisi. Na ndakisa, basusu basalaka lolenge moko ya komanyola oyo esɛngaka kolongola makanisi nyonso na motó, ata mpe mitungisi. Nzokande, kolongola makanisi nyonso na motó ekoki kozala likama na elimo. (Talá mpe Matai 12:​43-45.) Longola yango, kimya oyo Yehova apesaka ntango tobondeli ye eleki mosika mpenza kimya nyonso oyo moto akoki kozwa na nzela ya komanyola ya ndenge wana. Ntango tobondelaka Yehova, tomonisaka ete totyeli ye motema mobimba mpe ye apesaka biso “kimya ntango nyonso.” (Tángá Yisaya 26:3.) Lolenge moko oyo Yehova apesaka biso kimya ezali ndenge asalisaka biso tómikundwela mateya oyo ebɔndisaka, oyo toyekolá na Liloba na ye. Mateya yango epemisaka makanisi mpe motema na biso mpo toyebi ete Yehova atyelaka biso likebi mpe alingi ete tózwa kimya.—Nz. 62:​1, 2.

6. Mabondeli ya ndenge nini okoki kosala? (Talá mpe elilingi.)

6 Oyo okoki kosala. Ntango kondima na yo emekami, “bwakelá Yehova mokumba na yo ya kilo” na libondeli mpe sɛngá ye apesa yo kimya. (Nz. 55:22) Sɛngá ye mpe bwanya mpo oyeba ndenge ya kosala mpo na mokakatano na yo. (Mas. 2:​10, 11) Ata soki ozali kosala malɔmbɔ mpo asalisa yo oyika mpiko, kobosana te kobondelaka mpo na kopesa ye matɔndi. (Flp. 4:6) Luká komona ndenge oyo Yehova azali kosalisa yo na mikakatano oyo ozali na yango, mpe pesá ye matɔndi mpo na yango. Kotika te ete mikakatano na yo ezipa yo miso na mapamboli oyo osili kozwa.—Nz. 16:​5, 6.

Ndeko mobali moko ya mobange afandi na ndako na ye azali kobondela na eleko ya malili. Biblia ezali na makolo na ye, mpe molangi ya bankisi ezali na mesa pembeni na ye.

Ntango ozali kobondela, ozali koloba na Yehova. Ntango ozali kotánga Biblia, Yehova azali koloba na yo (Talá paragrafe 6)b


LILOBA YA NZAMBE

7. Ndenge nini koyekola Biblia ekoki kosalisa biso tóyika mpiko?

7 Yehova apesi biso Liloba na ye Biblia mpo esalisa biso tóyika mpiko. Bavɛrsɛ mingi na Biblia endimisaka biso ete Yehova alingaka kosalisa biso. Tótalela kaka ndakisa moko. Matai 6:8 elobi boye: “Tata na bino ayebi biloko oyo bosengeli na yango liboso kutu bósɛnga ye.” Yesu nde alobaki maloba yango, mpe ye ayebi Yehova malamu koleka moto mosusu nyonso. Na yango, tozali ata na ntina te ya kotya ntembe ete ntango tokutani na makambo ya mpasi, Yehova ayebaka bosɛnga na biso mpe akosalisa biso. Biblia ezali na makanisi mingi ya ndenge wana oyo ekoki kopesa biso makasi ya kokoba koyika mpiko.—Nz. 94:19.

8. (a) Pesá ndakisa ya etinda moko ya Biblia oyo ekoki kosalisa biso tóyika mpiko. (b) Nini ekoki kosalisa biso tómikundwelaka mitinda ya Biblia ntango tosengeli na yango?

8 Mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso tóyika mpiko. Mpo na nini? Mpo etondi na batoli ya bwanya oyo ekoki kosalisa biso tózwaka bikateli ya malamu. (Mas. 2:​6, 7) Na ndakisa, Biblia elendisi biso tókipe makambo ya lelo na esika ya komitungisa mingi mpo na makambo oyo ekoki kosalema lobi to te. (Mat. 6:34) Soki tozali na momeseno ya kotánga Biblia mpe komanyola yango, ekozala mpasi te tómikundwela mitinda ya Biblia oyo ekosalisa biso, na ntango oyo tozali na mposa na yango.

9. Ndenge nini masolo ya bato oyo Biblia elobeli endimisaka biso ete Yehova akosalisa biso?

9 Biblia etondi mpe na masolo ya bomoi ya bato oyo bazalaki kaka lokola biso, oyo batyelaki Yehova motema mpe ye asalisaki bango. (Ebr. 11:​32-34; Yak. 5:17) Ntango tozali kokanisa masolo ya ndenge wana, tomindimisaka ete Yehova azali “ekimelo mpe makasi na biso, lisalisi oyo ezwamaka noki na ntango ya mpasi.” (Nz. 46:1) Mpe ntango tozali kotya likebi na bosembo ya basaleli ya Yehova ya ntango ya kala, etindaka biso tómekola kondima na bango mpe ezaleli na bango ya koyika mpiko.—Yak. 5:​10, 11.

10. Okoki kosala nini mpo Liloba ya Nzambe esalisa yo mpenza?

10 Oyo okoki kosala. Tángáká Biblia mokolo na mokolo, mpe komáká bavɛrsɛ oyo omoni ete ekosalisa yo mpenza. Bandeko mingi bamoni mpe ete kotánga mokapo ya mokolo na ntɔngɔ esalisaka bango bázwa likanisi ya Biblia oyo ekoki kolendisa bango mokolo mobimba. Ndeko mwasi moko na nkombo Mariea amonaki bosolo ya likambo yango ntango azalaki kosalisa tata na ye ná mama na ye oyo babɛlaki maladi ya kansɛr. Nini esalisaki ye ayika mpiko tii ntango baboti na ye bakufaki? Alobi boye: “Ntɔngɔ nyonso nazalaki kotánga mokapo ya mokolo na mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo mpe nazalaki komanyola yango. Momeseno yango esalaki ete nakanisaka likambo moko oyo euti na Biblia mpe natya makanisi na likambo oyo eleki ntina na esika natya makanisi epai na ngai moko mpe na mokakatano oyo nazalaki na yango.”—Nz. 61:2.

BANDEKO NA BISO BAKRISTO

11. Mpo na nini koyeba ete bandeko mosusu mpe bakutanaka na makambo ya mpasi elendisaka biso?

11 Yehova apesi biso lisangá ya bandeko na mokili mobimba mpo na kosalisa biso tóyika mpiko. Koyeba kaka ete “bampasi ya ndenge wana ezali mpe kokómela lisangá mobimba ya bandeko na [biso] na mokili,” endimisaka biso ete tozali biso moko te. (1 Pe. 5:9) Ya solo, tokoki kondima mpenza ete ata soki tokutani na likambo nini, basusu mpe basilá kokutana na likambo ya ndenge wana, mpe bayikelá yango mpiko. Yango emonisi ete biso mpe tokoki koyika mpiko!—Mis. 14:22.

12. Ndenge nini bandeko na biso bakristo bakoki kosalisa biso, mpe ndenge nini biso mpe tokoki kosalisa bango? (2 Bakorinti 1:​3, 4)

12 Bandeko na biso bakristo bakoki kolendisa biso na maloba mpe na misala mpo tóyika mpiko. Ntoma Paulo amonaki bosolo ya likambo yango. Atángaki bankombo ya bandeko oyo basalisaki ye ntango azalaki mokangami, mpe apesaki bango matɔndi. Bandeko yango babɔndisaki Paulo, balendisaki ye, mpe bapesaki ye lisungi. (Flp. 2:​25, 29, 30; Kol. 4:​10, 11) Lelo oyo mpe bandeko bakoki kosalisa biso na ndenge wana. Ntango tozali na mposa ya lisalisi mpo na koyika mpiko, bandeko na biso bakristo bazalaka wana mpo na kosalisa biso; ntango bango mpe bazali na mposa ya lisungi, biso mpe tozalaka wana mpo na kosalisa bango.—Tángá 2 Bakorinti 1:​3, 4.

13. Nini esalisaki ndeko mwasi moko na nkombo Maya ayika mpiko?

13 Ndeko mwasi moko ya Russie na nkombo Maya azwaki malendisi mingi na nzela ya bandeko. Na 2020, bapolisi bayelaki ye na ndako mpe babandaki kopanzapanza biloko; na nsima basambisaki ye mpo ayebisaki basusu bindimeli na ye. Maya alobi boye: “Na ntango oyo nakómaki mawamawa mpe nalɛmbaki mpenza, bandeko bazalaki kobenga mpe kokomela ngai mikanda mpo na koyebisa ngai ete balingaka ngai. Banda kala nayebaki ete libota na biso ya bandeko ezali monene mpe etondi na bolingo. Kasi makambo oyo basalelaki ngai, endimisá ngai likambo yango makasi koleka.”

14. Tokoki kosala nini mpo bandeko na biso básalisa biso? (Talá mpe elilingi.)

14 Oyo okoki kosala. Ntango ozali koyika mpiko na mikakatano, zalá ntango nyonso pene ya bandeko na yo bakristo. Lisusu, kokakatana te kosɛnga lisalisi epai ya bankulutu. Bakoki kozala “esika ya libateli mpo na kokima mopɛpɛ, esika ya kobombana mpo na kokima mbula ya mopɛpɛ makasi.” (Yis. 32:​2, msl.) Kobosana mpe te ete bandeko na yo bakristo bazali mpe koyika mpiko na mikakatano. Soki osali likambo ya boboto epai ya moto oyo azali na bosɛnga ekosalisa yo obatela makanisi malamu mpe esengo ntango ozali koyika mpiko na mikakatano na yo moko.—Mis. 20:35.

Ndeko yango ya mobange, afandi na ndako na ye na eleko ya nkasa ya sika mpe azali kosolola na esengo na ndeko moko ná mwasi na ye mpe bana na bango mibale ya basi. Nzete ya mibange ná milangi ya bankisi ezali pembeni na ye. Mwana moko alakisi ye liyemi ya Paradiso oyo ye moko asali.

Zalá ntango nyonso pene ya bandeko na yo bakristo (Talá paragrafe 14)c


ELIKYA NA BISO

15. Ndenge nini elikya oyo Yesu azalaki na yango esalisaki ye, mpe ndenge nini elikya na biso esalisaka biso? (Baebre 12:2)

15 Yehova apesi biso elikya oyo ekozanga te kokokisama mpe yango esalisaka biso tóyika mpiko. (Rom. 15:13) Kanisá lisusu ndenge elikya esalisaki Yesu ayika mpiko na mokolo ya nsuka ya mpasi mpenza ya bomoi na ye awa na mabele. (Tángá Baebre 12:2.) Yesu ayebaki ete bosembo na ye ekopesa mabɔkɔ mpo na kolongisa nkombo ya Yehova. Yesu azalaki kokanisa mpe ndenge akozonga na likoló epai ya Tata na ye, mpe na ntango oyo akoyangela elongo na bandeko na ye na Bokonzi ya likoló. Ndenge moko mpe, elikya na biso ya kozala na bomoi libela na libela na mokili ya sika ya Nzambe esalisaka biso tóyika mpiko ata na mokakatano nini oyo mokili ya Satana ebimiseli biso.

16. Ndenge nini elikya esalisaki ndeko mwasi moko, mpe liteya nini ozwi na maloba na ye?

16 Tótala ndenge oyo elikya ya kozala na bomoi na mokili ya sika esalisaki ndeko mwasi moko ya Russie na nkombo Alla. Bakangaki mobali na ye mpe batyaki ye na bolɔkɔ tii ntango bakosambisa ye. Na ntango yango, Alla alobaki boye: “Kobondela mpo na elikya oyo tozali na yango mpo na mikolo ezali koya mpe komanyola likoló na yango ebatelaka ngai mpo nalɛmba nzoto te koleka ndelo. Nayebi ete mikakatano yango ekoleka kaka. Yehova akolonga banguna na ye, mpe akopesa biso mbano.”

17. Ndenge nini tokoki komonisa ete tosepelaka na elikya oyo Biblia epesi biso? (Talá mpe elilingi.)

17 Oyo okoki kosala. Zwáká ntango ya kokanisa elikya kitoko oyo Yehova apesi biso mpo na mikolo ezali koya. Omimonaka na mokili ya sika oyo Nzambe alaki mpe okanisaka mapamboli oyo tokozala na yango. Mpe yebá ete mokakatano nyonso oyo tokoki kokutana na yango sikoyo “ezali ya ntango mokuse mpe ya pɛpɛlɛ” na kotalela bomoi ya seko na paradiso. (2 Ko. 4:17) Lisusu, salá oyo okoki mpo na koyebisa basusu bindimeli na yo. Kanisá naino mpasi oyo bazali na yango: bazali kokutana na makambo mingi ya mpasi na mokili oyo ya Satana, kasi bayebi te mokano ya Nzambe mpo na mikolo ezali koya. Okoki kopesa bango mposa ya koyeba makambo mingi oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala soki osololi na bango ata moke kaka.

Ndeko yango ya mobange mobali afandi na ndako na ye na eleko ya nkasa ekweaka mpe azali kokanisa Paradiso oyo amoni na elilingi na tablɛti na ye. Pusupusu mpo na kosalisa ye na kotambola mpe milangi ebele ya bankisi ezali pembeni na ye.

Zwáká ntango ya kokanisa makambo kitoko oyo Yehova alaki biso mpo na mikolo ezali koya (Talá paragrafe 17)d


18. Mpo na nini tokoki kotyela bilaka ya Yehova motema?

18 Nsima ya koyika mpiko na mikakatano ebele oyo akutanaki na yango, Yobo alobaki na Yehova boye: “Sikoyo nayebi ete okoki kosala makambo nyonso, mpe ete likambo moko te oyo ozali na mposa ya kosala ekozanga kokokisama.” (Yobo 42:2) Ndenge kaka Yobo ayaki koyeba yango, eloko moko te ekoki kopekisa makambo oyo Yehova akani ekokisama. Kondima likambo yango ekoki kopesa biso makasi ya koyika mpiko. Tózwa ndakisa oyo: Kanisá ete mwasi moko azali kobɛla mpe alɛmbi nzoto mpo minganga ebele balongi te kobikisa ye. Kasi na nsima akutani na monganga moko ya mayele mpenza mpe oyo akoki kotyelama motema, oyo ayebisi ye maladi oyo ezali kotungisa ye mpe nkisi oyo akopesa ye mpo ayoka malamu. Yango ekitisi mwasi yango motema, atako ekozwa mwa ntango liboso abika. Akómi sikoyo komonisa ezaleli ya koyika mpiko mpo azwi elikya moko kitoko, ete akobika. Ndenge moko mpe, kondima na biso na elikya ya Paradiso oyo ezali koya esalisaka biso tóyika mpiko.

19. Tosengeli kosala nini mpo tóyika mpiko?

19 Ndenge tomoni yango, Yehova asalisaka biso tóyikela mikakatano na biso mpiko na nzela ya libondeli, ya Liloba na ye, ya bandeko na biso bakristo mpe ya elikya oyo apesi biso. Soki tosaleli malamu mpenza bibongiseli yango, Yehova akosalisa biso tóyika mpiko na mokakatano nyonso oyo tokoki kokutana na yango lelo oyo wana tozali kozela mokolo oyo bampasi nyonso oyo mokili ya Satana ebimisi ekosila.—Flp. 4:13.

NDENGE NINI YEHOVA ASALISAKA BISO TÓYIKA MPIKO NA NZELA YA . . .

  • libondeli mpe Liloba na ye?

  • bandeko na biso bakristo?

  • elikya na biso?

LOYEMBO 33 Bwakelá Yehova mokumba na yo

a Na lisolo oyo, topesi bango bankombo mosusu.

b NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mobali moko ya mobange azali koyika mpiko na bosembo nyonso, ata na eleko nini.

c NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mobali moko ya mobange azali koyika mpiko na bosembo nyonso, ata na eleko nini.

d NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mobali moko ya mobange azali koyika mpiko na bosembo nyonso, ata na eleko nini.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto