22-28/06/2026
LOYEMBO 90 Tólendisanaka
Mekolá “Nzambe ya kobɔndisama nyonso”
“Na libɔndisi oyo tozwi epai ya Nzambe . . . [tóbɔndisa] basusu.”—2 KO. 1:4.
NA MOKUSE
Ndenge ya kobɔndisa basusu na kolanda ndakisa ya Yehova mpe ya baoyo bamekolaka ye.
1. Mpo na nini tosengeli kobɔndisa basusu?
BISO nyonso ‘toyokaka mawa mpo na komekama ndenge na ndenge,’ yango wana na bantango mosusu tozalaka na mposa bábɔndisa biso mpe bálendisa biso. (1 Pe. 1:6) Kaka ndenge tosepelaka ntango basusu babɔndisi biso, biso mpe tosengeli kozala pene ya kobɔndisa baoyo bazali kokutana na bampasi. (Mat. 7:12) Yehova, “Nzambe ya kobɔndisama nyonso,” alakisi biso ndenge ya “kobɔndisa basusu na komekama oyo bazali kokutana na yango.” Tokoki kolanda ndakisa na ye soki tozali “kobɔndisana.” (2 Ko. 1:3, 4; 1 Tes. 4:18) Tosalaka bongo, kaka te mpo tosengeli kosala yango, kasi nde mpo tolingaka bandeko na biso. Na lisolo oyo, tokolobela (1) ndimbola ya libɔndisi ndenge esalelami na Biblia, (2) ndenge oyo tokoki kobɔndisa basusu, mpe (3) oyo tokoki kosala ntango tozali na mposa ya libɔndisi.
OYO BIBLIA ELOBI MPO NA LIBƆNDISI
2. Na Biblia, liloba oyo ebongolami “kobɔndisa” ekoki kolimbola nini?
2 Na Biblia, liloba ya Grɛki oyo ebongolami “kobɔndisa” ekoki kozala na bandimbola ebele, na kotalela ndenge lisolo ezali. Ekoki kolimbola “kolendisa,” “kosɛnga to koyebisa moto asala likambo oyo ekosalisa ye.” (Rom. 12:8) Liloba yango elimboli “kobenga moto pembeni mpo na kosalisa ye.” Na yango tokoki komona na makanisi moto moko azali koya mbangu epai ya moninga na ye oyo azali konyokwama, mpo na kopesa ye lisalisi to lisungi oyo azali na yango mposa. Ezala lolenge ya lisalisi nini moto akoki kopesa, libɔndisi ya solosolo ebimisaka kaka mbuma moko, elingi koloba, elendisaka mpe epesaka makasi na moto oyo azali na mpasi.
3. Ndakisa nini Barnabasi atiká na oyo etali kobɔndisa basusu? (Talá mpe elilingi.)
3 Tótalela ndakisa moko na Biblia. Mokristo moko na nkombo Yozefe amonisaki mpenza likoki ya kolendisa mpe kobɔndisa basusu na boye ete bantoma babengaki ye Barnabasi, oyo elakisi “Mwana ya Libɔndisi.” (Mis. 4:36) Nkombo yango ebongaki na ye mpenza na boye ete Biblia ebengaki ye lisusu Yozefe te. Na mabaku mingi, Barnabasi azalaki kosala na boyokani na nkombo na ye, elingi koloba, kosalisa bandeko na ye bakristo ntango bazalaki na mposa ya lisalisi. Na ndakisa, mwa moke nsima ya kobongwana mpe kokóma mokristo, Saulo akendaki na Yerusaleme mpe alingaki kokutana na bayekoli kuna. Kasi, bazalaki kobanga ye mpo ayebanaki lokola moto oyo azalaki konyokola bakristo. Kasi Barnabasi atyelaki Saulo motema mpe alakisaki ye epai ya bantoma.—Mis. 9:26-28.
Barnabasi azalaki kosala na boyokani na ndimbola ya nkombo na ye (Talá paragrafe 3)
NDENGE YA KOBƆNDISA BASUSU
4. Wapi moko ya balolenge oyo eleki malamu ya kobɔndisa basusu? (Baroma 1:11, 12)
4 Kende kotala bango soki likoki ezali. Yehova asalelaka basaleli na ye mpo na kobɔndisa basusu. Na ndakisa, ntango mosakoli Eliya azalaki komitungisa, Yehova asalelaki anzelu moko mpo na kolendisa ye. (1 Bak. 19:4-7) Ntoma Paulo mpe ayebaki nguya ya kokende kotala bandeko mpo na kolendisa bango. (Tángá Baroma 1:11, 12.) Ntango okei kotala ndeko moko mpo na kobɔndisa ye, fandá na ye mpo bólekisa ntango elongo na esika ya koleka kaka. (1 Ko. 16:7) Kasi, soki ozali na likoki te ya kokende kotala ndeko moko oyo azali na bosɛnga, yebá ete okoki ata kobenga ye na telefone, kotindela ye mokanda, karte, to mesaje mpo na kolendisa ye. Okondima ete Yehova asalela yo na ndenge wana mpo na kobɔndisa basusu?
5. Mokakatano nini tokoki komizela kokutana na yango?
5 Lokola mpasi ezali se kokóma mingi na mikolo oyo ya nsuka, tóyeba ete mikakatano ekozanga te ntango tozali koluka kokutana na bandeko mpo na kobɔndisa bango. Ntango Paulo azalaki mokangami na Roma, Onezifore, oyo autaki na Efese, alukaki Paulo atako bakokaki mpe kokanga ye to kutu koboma ye. (2 Tim. 1:16-18) Batatoli ya Yehova na Russie bamonisaka mpe elimo yango ntango bandeko na bango bakutani na minyoko mpo na kondima na bango. Ntango bamemi Batatoli mosusu na tribinale, bandeko basi mpe mibali bakendaka kuna mpo na komonisa ete bazali elongo na bango, ata soki kosala bongo ekoki kosala ete bákanga mpe bango. Okoki komibongisa mpo na kolanda ndakisa na bango ya mpiko soki ozali koyekola ndenge oyo basaleli ya Nzambe na ntango ya kala mpe ya mikolo na biso balendisanaki mpe bazwaki esengo atako minyoko.
6. Ndenge nini tokoki komekola Yehova ntango tozali kobɔndisa basusu? (Talá mpe elilingi.)
6 Yoká bango. Ntango mosakoli Eliya amonaki ete bomoi na ye ekómi na likama, afungolelaki Yehova motema na ye. Nzambe na biso ya bolingo ayokaki Eliya na likebi atako asilaki koyeba makambo oyo ezalaki kotungisa ye. Na motema molai nyonso, Yehova ayokaki Eliya ata ntango oyo Eliya azalaki kozongela kaka likambo moko! (1 Bak. 19:9, 10, 14) Ndenge moko mpe, Yehova atikaki mosakoli Habakuku aloba makambo mpe bantembe oyo azalaki na yango, atako ekokaki komonana lokola azangi limemya na bokonzi oyo Nzambe azali na yango. (Hab. 1:2, 3) Lelo oyo mpe, Yehova ayokaka na likebi mabondeli na biso atako ayebaka makambo oyo tozali na yango mposa. Tokoki komekola Yehova soki tozali koyoka na likebi mpe na limemya nyonso ntango ndeko na biso azali koloba. Ntango bandeko bazali koloba, tosengeli “koyokaka noki,” mpe koboya kokata bango maloba to kosilika, ata soki emonani ete bazali koloba mabe to soki bazali kozongela kaka likambo moko.—Yak. 1:19; Mos. 7:9.
Tokomekola Yehova soki tozali koyokaka na likebi ntango bandeko na biso bakristo bazali koloba (Talá paragrafe 6)
7. Ndenge nini tokoki kososola mposa ya moto oyo azali na mpasi?
7 Sosolá oyo moto asengeli na yango. Tozali te na likoki ya kotánga mitema ya bato ndenge Yehova asalaka; na yango tokoki kososola libɔndisi oyo tokoki kopesa moto kaka soki toyoki ye na likebi. Kokanisa te ete oyebi oyo moto asengeli na yango mpo oyebi oyo yo moko olingaki kozala na yango mposa soki okutanaki na likambo yango. Moto na moto azali na ndenge na ye. Na yango zwá ntango ya koyoka moto na likebi, mpe tuná ye mituna ya mayele oyo ekosalisa ye abimisa mayoki na ye.—Mas. 20:5.
8. Ndenge nini Yesu abɔndisaki Marta ná Maria ntango Lazare akufaki? (Talá mpe bililingi.)
8 Tótalela ndenge Yesu abɔndisaki Marta ná Maria nsima ya liwa ya ndeko na bango, Lazare. Basi yango mibale bazalaki na mpasi ndenge babungisaki ndeko na bango; kasi, Yesu abɔndisaki bango ndenge moko te. Nsima ya koyoka makambo oyo Marta alobaki, Yesu ayebisaki ye solo na oyo etali lisekwa mpe asalisaki ye akómisa kondima na ye makasi na ebongiseli wana ya bolingo. Nzokande ntango Maria ayaki epai na ye na kolela, emonani ete Yesu alobelaki lisekwa te. Kasi alelaki elongo na Maria mpe atunaki ye esika oyo balalisaki Lazare. (Yoa. 11:20-35) Liteya ezali nini? Ntango tozali kobɔndisa baoyo bazali na mpasi, tosengeli kososola oyo basengeli na yango na esika ya koluka kosalela lolenge kaka moko mpo na kobɔndisa moto nyonso.
Ntango ozali kobɔndisa basusu, meká kososola oyo basengeli na yango (Talá paragrafe 8)a
9. Ndenge nini tokoki kosalela Biblia mpo na kobɔndisa basusu? (Baroma 15:4, 5)
9 Salelá Biblia. Soki opesi moto “libɔndisi oyo euti na Makomami,” ekoki kosalisa ye azwa elikya. (Tángá Baroma 15:4, 5.) Elikya yango ebɔndisaka mpe elendisaka mingi koleka. (Yis. 40:31) Ndenge nini okoki kozwa vɛrsɛ moko mpo na kolendisa moto? Basusu basalaka liste ya bavɛrsɛ oyo bakoki kosalela na ntango oyo esengeli, na ndakisa oyo ezali na eteni “Libɔndisi” na buku Batoli ya Biblia mpo na bomoi ya bakristo. Sɛngá Yehova asalisa yo osalela Liloba na ye na lolenge oyo eleki malamu mpo na kolendisa moto. Elimo na ye ekoki kosalisa yo omikundwela bavɛrsɛ oyo ebongi na ntango oyo ozali na mposa na yango.—Yoa. 14:26.
10. Mpo na nini tosengeli kolobaka na boboto ntango tozali koluka kolendisa?
10 Lobá na boboto. Ndenge tolobaki yango, liloba oyo ebongolami “kobɔndisa” ekoki mpe kolimbola “kosɛnga to koyebisa moto asala likambo oyo ekosalisa ye.” Na yango na bantango mosusu, ekoki kozala malamu osɛnga to oyebisa moto oyo ozali kobɔndisa ete abongisa makanisi na ye. Ntango esɛngi kosala bongo, kanisá malamu liboso ya koloba mpo maloba na yo ebikisa kasi ezokisa te. (Mas. 12:18) Yehova apesaki ndakisa malamu ntango asololaki na Eliya, oyo azalaki komitungisa mpo amonaki ete asali mosala ya mpunda mpe ete lipɛngwi ezalaki makasi na Yisraele. Na boboto nyonso, Yehova asalisaki Eliya asembola makanisi na ye kozanga kolobela mbala moko mabunga ya Eliya. (1 Bak. 19:15-18) Yo mpe okomekola Yehova soki ozali na boboto mpe ozali kokanisa liboso ya koloba. Ntango ozali kosala diskur to kopesa eyano na makita, lobáká ntango nyonso na boboto mpe na ndenge ya malamu mpo na kolendisa mpe kopesa bandeko na yo makasi.
11. Mbala mingi baoyo bazali na mpasi bazalaka na mposa ya nini? (1 Yoane 3:18)
11 Pesá bango lisungi oyo esengeli. Mbala mingi baoyo bazali na mpasi bazalaka kaka te na mposa ya maloba ya kobɔndisa, kasi mpe ya lisungi. (Tángá 1 Yoane 3:18.) Barnabasi apesaki ndakisa malamu ntango atɛkaki eteni ya mabele na ye mpe apesaki mbongo nyonso mpo na kosunga bandeko oyo bazwaki batisimo sika oyo bazalaki na bosɛnga. (Mis. 4:36, 37) Lelo mpe, mingi ya bandeko na biso bakristo balandaka ndakisa na ye ya malamu ndenge basalisaka baoyo bazali na bosɛnga. Gabriela, oyo afandaka na Pologne, ayokaki mpenza mawa ntango mpela moko makasi ebebisaki ndako na ye. Alobi boye: “Nabangaki mpe namitungisaki mingi, ezalaki mpe bongo mpo na baboti na ngai, oyo bazalaki kofanda elongo na ngai. Nayebaki te nabanda wapi. Kasi bandeko ya masangá ya pembeni bayaki mpe babongiselaki ngai ndako kaka na mokolo moko. Likambo yango ekómisaki kondima na ngai makasi ete Yehova azali kosalela basaleli na ye mpo na kobɔndisa baoyo bazali na mpasi.”
12. Na ndenge nini ezaleli na yo ya koyika mpiko ekoki kosalisa bandeko na yo bakristo?
12 Yikelá mikakatano na yo mpiko. Paulo ayebisaki Batesaloniki ete azwaki lisusu makasi mpe libɔndisi ntango ayokaki nsango ya ezaleli na bango ya koyika mpiko na bosembo nyonso. Ayebaki ete mosala na ye epai na bango ezalaki mosala ya mpunda te. (1 Tes. 3:5-8) Paulo, na ngala na ye mpe, alikyaki kobɔndisa bandeko na ye bakristo, ata baoyo bakutaná na ye te, na nzela ya etumba oyo azalaki kobunda mpo na bango. (Kol. 2:1, 2) Ndenge moko mpe, ntango bandeko na biso bamoni ndenge Yehova azali kosalisa biso tóyikela mikakatano na biso mpiko, elendisaka bango mingi.
13. Tosengeli mpe kosala nini ntango tozali kobɔndisa basusu?
13 Zalá na motema molai. Mbala mosusu bandeko mibali mpe bandeko basi oyo balɛmbi nzoto bakozwa mbala moko te makasi na milende na biso ya kobɔndisa bango. Kasi Biblia elendisi biso ete ‘tókoba kobɔndisana.’ Maloba ‘tókoba kobɔndisana’ emonisi ete ezali likambo ya kosala ntango nyonso. (1 Tes. 5:11) Na yango zalá na motema molai ntango ozali kokoba kobɔndisa mpe kolendisa baoyo bazali na mposa ya lisalisi. (1 Tes. 5:14) Ya solo, na bantango mosusu, mokomoko na biso akozala na mposa ete bábɔndisa ye. Tokoki kosala nini na ntango yango?
NTANGO OZALI NA MPOSA YA LIBƆNDISI
14-15. Tosengeli kosala nini ntango tozali na mitungisi to mpasi?
14 Bondelá Yehova. Sɛngá ye abɔndisa yo ntango otungisami to ozali na mpasi. (Nz. 94:19) Sɛngá makambo ya sikisiki, mpe sopelá ye motema na yo. (Nz. 62:8) Ya solo, Yehova ayebi ndenge oyo ozali komiyoka liboso kutu obondela. Kasi koyebisa ye makanisi oyo ezali mpenza na kati ya motema na yo na libondeli ekomonisa ete ozali na kondima. Mpe Yehova azangaka ata moke te koyanola na mabondeli oyo esalemi na kondima, na ndenge oyo ye amoni malamu. (Mrk. 11:24) Bafilipi 4:6, 7 elendisi biso: “Bósɛngaka Nzambe lisalisi; soki bosali bongo, kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi na biso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino.”
15 Sɛngá basusu básalisa yo. Yebisá mayoki na yo epai ya moninga moko oyo akɔmɛli, to epai ya nkulutu moko. Bandeko na yo bakristo bakoki kosalisa yo ozwa libɔndisi, kasi mbala mosusu bakoyeba te ndenge oyo ozali komiyoka to oyo osengeli na yango soki oyebisi bango te. (Mas. 14:10) Okoki kosɛnga bango bámitya na esika na yo ntango bazali koyoka yo to batángela yo vɛrsɛ moko to lisolo moko oyo bamoni ete ekobɔndisa yo.
16. Nini ekoki kosalema ntango basusu bazali koluka kolendisa yo, kasi likambo nini osengeli kobosana te?
16 Zalá na motema molai mpe limbisáká. Bandeko na yo bakristo bakoki kosala mabunga ntango bazali koluka kolendisa yo. Na ndakisa, bakoki koloba to kosala likambo moko oyo epesi yo mpasi koleka, na esika esalisa yo. Soki esalemi bongo, moniselá bango motema molai. (1 Ko. 13:4, 7) Mpe kobosana te maloba oyo ezali na Yakobo 3:2 ete: “Soki moto abɛtaka libaku na maloba te, azali moto ya kokoka.” Tyá likebi na mposa oyo bandeko na yo bakristo bazali na yango ya kosalisa yo. Kobosana te ete “elimo ezali na molende, kasi nzoto ezali na bolɛmbu.”—Mat. 26:41.
17. Ekateli nini tosengeli kozala na yango?
17 Biso nyonso tozalaka na mposa bábɔndisa mpe bálendisa biso, mpe mposa yango ekokóma lisusu mingi lokola mpasi ezali se kobakisama na mikolo oyo ya nsuka mpe lokola banguna ya Nzambe bazali kotɛmɛla biso makasi mpenza. Na yango, tiká ete tózala na ekateli ya kosala nyonso mpo na kobɔndisana.
LOYEMBO 130 Tólimbisaka
a NDIMBOLA YA ELILINGI: Nkulutu moko azali koyoka ndeko mobali moko oyo auti kobungisa mwasi na ye na liwa mpe amitye na esika na ye. Na nsima, nkulutu yango akei kotala ndeko mobali moko oyo mwasi na ye akufá eleki mwa ntango, mpe bazali kotala bafɔtɔ na ye mpe kolobela makambo na ye ya malamu.