“Botosi oyo esepelisaka Nzambe” Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2005
1 Lokola Yehova Nzambe azali Molakisi na biso monene, asangisaka biso mpo na koteya biso banzela na ye. (Yis. 30:20, 21; 54:13) Asalelaka moombo ya sembo mpe ya mayele, oyo abongisaka makita lokola mayangani na biso ya etúká ya mbula na mbula. (Mat. 24:45-47) Tomiyokaka lokola Davidi, mokomi na Nzembo, oyo ayembaki boye: ‘Nakosanzola Yehova kati na koyangana monene.’ (Nz. 26:12) Davidi ayebaki mpenza ntina ya koteyama na Yehova mpe azwaki ekateli ya kozala elongo na basaleli na Ye, ntango nyonso oyo bayangani esika moko.
2 Okozala kati na ‘ebele ya bato’ oyo bakokende na liyangani ya etúká “Botosi oyo esepelisaka Nzambe,” na mbula oyo? Soki Ɛɛ, malako oyo elandi ekosalisa yo omibongisa mpo na kozala na liyangani yango.
3 Bandá komibongisa sikoyo mpo oyangana mikolo nyonso misato: “Myango ya moto ya mayele ememaka na litomba.” (Mas. 21:5, NW) Maloba oyo ezali komonisa mpenza ntina ya komibongisa banda sikoyo mpo na kozala na liyangani, boye te? Mpo ozanga ata eteni moko te ya programɛ wana ya kolendisa na elimo, banda komibongisa na mayele nyonso mpo ozala na liyangani mikolo nyonso misato. Soki osengeli kosɛnga patrɔ na yo konje, bandá kosɛnga yango sikoyo. Soki osengeli kosolola likambo yango na molongani na yo oyo azali mondimi te, kozela te tii ntango mikolo ekotikala ya kotánga. Ata soki ozali na mokakatano nini, yebisá yango Yehova na libondeli, zalá na elikya ete na lisalisi na ye, “myango na yo ekopikama.” (Mas. 16:3, NW) Lisusu, ekozala malamu osalisa bato oyo oyekolaka na bango Biblia ntango bazali komibongisa mpo na kozala na liyangani mikolo nyonso misato.
4 Bisika ya kolala: Mbala mingi, na engumba oyo liyangani ekosalema, bapaya balalaka na bandako ya bato (bandako ya bandeko), na Bandako ya Bokonzi to epai ya bandeko na bango moko. Nsima ya kotalela siplema oyo na Likita ya Mosala, bakotya na etanda ya mayebisi, liste ya bisika nyonso oyo liyangani ya etúká ekosalema. Tolendisi bino bókanisa malamu mpe bóbondela liboso ya kopona liyangani ya etúká oyo bokokende na mobu 2005. Mpo na basakoli oyo bakosɛnga esika ya kolala na ndako ya ndeko moko to na Ndako ya Bokonzi, tosɛngi mokomeli ya lisangá asala liboso mpenza liste ya basakoli nyonso wana mpe atinda yango na Departema ya boyambi bapaya ya engumba oyo bango bakokende na liyangani. Na liste yango, akokoma nkombo ya mosakoli, akomonisa soki azali mwasi to mobali (Mw to Mob), mbula na ye, mpe akomonisa baoyo bazali libota moko. Yango ekosalisa bandeko ya Departema ya boyambi bapaya bázwa ntango ya koluka bisika ya kolala mpo na basakoli nyonso wana. Liboso ya kotinda bankombo yango na Departema ya boyambi bapaya, Komite ya mosala ya lisangá esengeli kotala soki bandeko yango bakokisi masɛngami. Soki bapesi biso esika ya kolala, ekozala malamu te tóluka lisusu kokende kofanda epai ya ndeko mosusu to moninga mosusu. Yango ekopesa mokakatano na bandeko ya Departema ya boyambi bapaya. Kasi, soki mosakoli moko asepeli kofanda epai ya ndeko na ye oyo azali Motatoli te, asengeli kotinda nkombo na ye te na Departema ya boyambi bapaya.
5 Bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi: Tolingi kopesa mwa malako mpo na bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi. Komite ya liyangani ya etúká ekopona nkulutu moko mpo na kotambwisa ebongiseli yango. Bakopesa ye ndeko moko mpo asalisaka ye, mingimingi nkulutu to mpe mosaleli na misala oyo akɔmeli na elimo. Esengeli kokabola Ndako ya Bokonzi na biteni mibale. Eteni moko mpo na bandeko basi ná bana na bango ya mike mpe bilenge basi. Eteni mosusu mpo na bandeko mibali mpe mibali mosusu. Ndako ya Bokonzi ekozala kaka mpo na kolala. Na moi, ntango bato nyonso bakei na liyangani, bandeko mosusu bakotikala, moto na moto na ngala na ye, mpo na kokɛngɛla biloko ya bandeko. Esengeli kopona bandeko oyo babongi kotyelama motema, baoyo bakomɛli na elimo, mpo na kokɛngɛla. Moto moko te asengeli kolamba na kati ya Ndako ya Bokonzi. Baoyo bakozwa bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi bakoki kobongisa mwa esika ya kolamba na kati ya lopango mpe kozipa yango malamu. Soki liyangani esili, basengeli kolongola esika yango. Ezali na ntina ete Ndako ya Bokonzi ezalaka ntango nyonso pɛto mpe ebongisama malamu, ezala na kati to na libándá. Esengeli kokeba ete ata eloko moko ebeba te. Bandeko basengeli kosala nyonso mpo na komonisa bizaleli ya boklisto, ezala kati na bango to epai ya bato oyo bafandi pembeni ya Ndako ya Bokonzi.— 1 Kol. 10:31.
6 Baoyo bazali na mposa ya lisalisi: Ntoma Paulo alobaki ete bandeko mosusu bazalaki ‘lisalisi oyo ezalaki kopesa ye makasi.’ (Kols. 4:7-11) Ndenge mosusu oyo bandeko yango basalisaki Paulo, ezalaki ya kosalela ye mwa misala. Na oyo etali liyangani ya etúká, ndenge nini okoki kozala “lisalisi oyo ezali kopesa makasi” mpo na basusu? Basakoli oyo bakómi mibange, bibɔsɔnɔ, bandeko oyo basalaka mosala ya ntango nyonso, mpe bamosusu, bakoki kozala na mposa na makambo etali transport, to esika ya kolala. Mokumba yango ezali libosoliboso ya bandeko na bango ya libota. (1 Tim. 5:4) Kasi, soki bakoki kosala yango te, baninga na bango bandimi bakoki kosalisa bango. (Yak. 1:27) Bakɛngɛli ya boyekoli ya mokanda basengeli koluka koyeba soki bato nyonso ya bituluku na bango oyo bazali na bosɛnga, bazwi bibongiseli esengeli mpo na kozala na liyangani.
7 Kokende na liyangani mosusu: Mpo basakoli nyonso bázwa bisika ya kofanda, mikanda, bisika ya kolala, mpe bongo na bongo, balendisi bango ete bákende na liyangani ya etúká oyo lisangá na bango ekokende. Soki osengeli kokende na liyangani mosusu, tosɛngi yo osolola na mokomeli ya lisangá na bino.
8 Mposa ya basali ya bolingo malamu: Yesu apesaki ndakisa ya kokoka na oyo etali kotya likebi na komikitisa nyonso na bamposa ya basusu. (Luka 9:12-17; Yoa. 13:5, 14-16) Baoyo bamipesaka mpo na kosala na mayangani, bamonisaka mpe elimo yango. Mpo badepartema ya liyangani esala mosala na yango malamu, etikali moke Komite ya liyangani ya mboka na bino ekobenga bandeko mpo na kosala elongo na bango. Bazali na mposa makasi mingimingi ya bankulutu oyo bakondima kosala. Elimo na bango ya komipesa ezali ndakisa ya malamu mpo na bandeko nyonso na lisangá.—1 Pet. 5:2, 3.
9 Oyo bato mosusu bamonaka: Nkolo otɛlɛ moko alobaki boye: “Tolingaka bino mingi. Bozalaka na etamboli ya malamu koleka bato mosusu. Bato nyonso oyo basalaka awa balobelaka boboto oyo bomoniselaka bango mpe toli oyo bopesaka bango. Yango wana, moto nyonso alingaka kosala na wikende oyo bino bozalaka awa.” Nkolo otɛlɛ mosusu alobaki boye: “Ezalaka mpasi te kosala elongo na Batatoli ya Yehova.” Ntango mosusu etamboli na yo ya malamu nde etindaki bato yango báloba bongo. Kanisá esengo oyo Yehova ayokaka ntango amonaka biso tozali kosala makambo oyo ekotinda bato bákumisa ye ndenge wana!—1 Pet. 2:12.
10 Na nzela ya “kapita ya sembo,” Yehova Nzambe azwi bibongiseli ete basaleli na ye báyangana mpo na koteyama na elimo na mbula oyo. (Luka 12:42) Komibongisa mpo na koyangana mikolo nyonso misato ekosɛnga kosala milende, kasi milende yango ekozala ya mpamba te. Na ntembe te, liyangani ya etúká ya mbula oyo “Botosi oyo esepelisaka Nzambe” ekolendisa biso tózwa ekateli ya kosalela Yehova lelo oyo mpe libela na libela. Tiká tózwa ekateli ya kolanda toli oyo ya mokomi na Nzembo ete: “Bókumisa Nzambe Nkolo kati na koyangana.”—Nz. 68:26.
[Etanda na lokasa 3]
Manaka
Mwamitano mpe Mwapɔsɔ
9:30 na ntɔngɔ—5:05 nsima ya midi
Mwalomingo
9:30 na ntɔngɔ—4:10 nsima ya zanga
[Etanda na lokasa 4]
Mwa bibongiseli oyo osengeli kozwa mpo na kozala na liyangani ya etúká
◼ Soki esika liyangani ekosalema ezali mosika, bandá kobomba mbongo mpo na transport ya yo moko mpe ya libota na yo mobimba, mpe mpo na kolya na bino.
◼ Kanisá mpe komema likabo na yo mpo na kosimba ebongiseli ya liyangani. ‘Obima liboso na Yehova mabɔkɔ mpamba te,’ kasi ‘kumisá Yehova na biloko na yo ya motuya.’—Det. 16:16, NW; Mas. 3:9, NW.
◼ Tokokumisa nkombo ya Yehova soki tokozala na etamboli ya malamu na liyangani mpe soki tokozala na elateli ya malamu mpe ya pɛto.—1 Kol. 10:31.
◼ Bótosa makambo oyo bandeko oyo bayambaka bato bakosɛnga bino. Bókanga bisika mpambampamba te, bokoki kosala yango bobele mpo na libota na bino to mpo na bandeko oyo bozali koya na bango elongo.
5. Na ntango ya bopemi, lyá bilei ya pɛpɛlɛ, mpo okoka kolanda malamu manaka ya nsima ya nzanga. Bilei ya kilo epesaka mpɔngi.—Luka 8:18.
◼ Bopɛto ekumisaka Yehova. Na nsuka ya liyangani nyonso, mokomoko akosala makasi mpo na kotika esika ya liyangani pɛto na kolɔkɔtáká bapapye mpe biloko mosusu ya bosɔtɔ mpo na kobwaka yango na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ.—1 Pet. 1:15, 16.