“Pesá Nzambe nkembo”
Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2003
1 Yehova apesaki etinda oyo na nzela ya mosakoli na ye ya sembo Yisaya: “Bóyokamela ngai, bato na ngai, bópesa litoi epai na ngai, libota na ngai.” (Yis. 51:4) Na mikolo ya nsuka oyo ya mpasi mingi, tomoni te ete kotya likebi na bakomandema ya Yehova ezali na ntina koleka? Moko ya banzela oyo ‘topesaka litoi’ epai ya Yehova ezali kotosa etinda oyo apesaki ya koyangana mpo na losambo. Tozali mpenza kozela na motema likoló libaku ya malamu mingi oyo mayangani ya etúká ya mbula na mbula ekopesa! Lisangani ya Mikóló-Bakambi ekamati lisusu bibongiseli mpo ete mayangani ekoka kosalema mwa mingi na teritware ya filiale na biso na mobu 2003.
2 Ndenge balobelaki yango na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 2002, mayangani oyo ekosangisa bato oyo bakouta na mikili mingi ekosalema na bingumba mosusu oyo eponami, mpe ekozala na bandeko oyo bakoponama na bisika ndenge na ndenge mpo na kokende kuna. Lokola liyangani oyo ekosangisa bandeko ya mikili mingi ekosalema na bingumba mingi te, kaka masangá oyo etindami na mayangani yango nde ekokende. Kasi elimo oyo ezalaka na mayangani oyo esangisaka bandeko ya mikili mingi ekozala mpe na mayangani mosusu nyonso. Bamisionɛrɛ bakozala na mayangani na bisika mingi, mpe likoki ya koyoka makambo oyo bakutanaki na yango ekozala. Nini tokoki kosala mpo tózwa matomba mingi mpenza na bibongiseli oyo ezali kosalema sikoyo mpo na mayangani na biso?
3 Yanganá mikolo nyonso: Mpo na kozwa matomba mingi koleka na mateya oyo moombo ya sembo mpe ya mayele apesi, tosengeli kosala nyonso mpo tózala wana mpo na kolanda programɛ mobimba. (Mat. 24:45) Osengeli kosɛnga patrɔ na yo konje mpo ozala mikolo nyonso na liyangani? Liboso ete Nehemia asɛnga Mokonzi Alatazelezese nzela mpo na kokende na Yelusaleme kotonga bifelo na yango, “abondelaki epai ya Nzambe ya lola.” (Neh. 2:4) Yo mpe lokola, osengeli kobondela Yehova apesa yo mpiko mpo na kosɛnga patrɔ na yo konje mpo oyangana mikolo nyonso misato ya liyangani. Okosala boni soki patrɔ na yo alingi mpenza te kopesa yo nzela? Ntango mosusu akoki kondima soki olimboleli ye ete mateya oyo tozwaka na mayangani na biso nde esalaka ete tózala basali ya sembo, oyo basalaka mosala na bango malamu, mpe tózala bato oyo bakoki kotyelama motema. Lisusu, soki tozali esika moko na bato ya libota oyo bazali bandimi te, tokomonisela bango bolingo soki toyebisi bango nokinoki bibongiseli tozwi mpo na liyangani na biso.
4 Bisika ya kolala: Bibongiseli esalemi mpo ete bapaya báyambamaka na bandako ya bandeko. Tosengeli komonisa botɔndi epai na bandeko oyo bandimi koyamba biso na bandako na bango. Lisusu, ekozala malamu te mpo na baoyo bayambami ete báfanda mikolo mingi epai ya bandeko oyo bayambi bango, ezala liboso to nsima ya liyangani. Esika ya kolala epesamaka kaka na boumeli ya mikolo ya liyangani. Baoyo bazali koyambama epai ya bandeko, basengeli komonisa limemya mpo na biloko ya bandeko oyo bayambi bango, basengeli kobebisa eloko moko te, bakokende te na bisika oyo bapesi bango ndingisa te, mpe basengeli kokeba ete bana na bango mpe básala bobele bongo. Soki bandeko oyo bayambi bapaya bazwi mokakatano moko na likambo yango, basengeli nokinoki koyebisa yango na Departema ya boyambi bapaya, yango ekoluka ndenge ya kopesa lisungi. Mpo Departema ya boyambi bapaya esala mosala na yango na molɔngɔ mpe malamu, esengeli bandeko nyonso básala na bomoko. (Ebe. 13:17) Toyokaka ete bandeko mosusu bazali kotika bango moko esika ya kolala oyo bapesaki bango mpo na kokende na esika mosusu epai oyo moninga moko to moto moko oyo bayebani na ye azali. Yango epesaka mokakatano na bandeko oyo bazali kosala na Departema ya boyambi bapaya. Tozali kosɛnga na bino nyonso ete bólanda malako oyo bandeko ya Departema yango bakopesa bino.
5 Ntembe ezali te ete Yehova asungaka biso na misala oyo esalemaka mpo na mayangani ya mbula na mbula. Lokola bandeko mingi oyo balongwaka na bamboka na bango mpo na kokende na liyangani ya etúká bazalaka na mposa ya kozwa bisika ya kolala, tokoki kotya motema ete Yehova akokokisa bamposa na bango na ndenge ebongi. Lokola makambo yango ezali na boyokani na losambo ya solo, tosengeli kolanda na esengo nyonso mitinda oyo mipesami. Tómonisa ete tozali sembo na oyo ezali moke mpenza, boye tokozwa matomba mingi oyo ezali kozela baoyo Yehova alingaka.—Luka 16:10.
6 Talá na lisangá na bino: Soki toyebi ete ezali na ndeko moko na kati ya lisangá oyo azali nzoto kolɔngɔnɔ te to azali na mbongo te mpe yango ekoki kosala ete akende na liyangani te, tokoki nde ‘kofungwama’ na bolingo na biso te mpo na kosalisa ye? (2 Kol. 6:12, 13; Det. 15:7) Na 2 Bakolinti 8:14, Paulo alendisi biso tómonisa ezaleli yango. Mpo na nini te kosɛnga bato motindo yango ete básala mobembo elongo na yo mpo na kokende na liyangani? Soki bazali babongisi-nzela, na ntembe te bazali na makambo mingi ya malamu oyo bakutaná na yango oyo bakoki koyebisa yo na nzela ntango bozali kokende na liyangani. Soki bazali mibange na kati ya lisangá, ntango mosusu bazali na makambo ebele ya kokamwa oyo bakutaná na yango na mosala ya Teokrasi, oyo bayebisá yo naino te. Kozala elongo na bandeko motindo wana ekozala mpenza malamu mpo na yo mpe mpo na libota na yo, boye te? Bakozala mpenza na botɔndi mpo na ezaleli na yo ya kokaba mpe Yehova akopambola yo.—Mas. 28:27; Mat. 10:42.
7 Ata soki bandeko oyo bazali na bosɛnga bazwaka lisungi libosoliboso epai ya bandeko na bango oyo bazali baklisto, bankulutu mpe bandeko mosusu na kati ya lisangá oyo bayebi bamposa yango bakoki mpe kozwa bibongiseli mpo na kosunga bandeko yango na bolingo nyonso. (1 Tim. 5:4) Soki bandeko oyo bazali na bamposa yango bakomeli Komite ya mosala ya lisangá mpo na kosɛnga esika ya kolala, liboso ete komite yango etinda mikanda yango na Departema ya boyambi bapaya, esengeli naino kotalela bandeko yango mpo na koyeba soki bakokisi masɛngami.
8 Tóndima kozala basali ya bolingo malamu: Na liyangani ya etúká, bandeko mingi bapesaka mabɔkɔ mpo misala ya badepartema ndenge na ndenge etambola malamu. Bandeko oyo basalaka na kati ya esika ya liyangani mpe baoyo basalaka libándá, na bisika ya kotɛlɛmisa mituka, bango nde balakisaka bayangani bisika ya kofanda mpe babatelaka mituka mpe bavelo na biso wana tozali kolanda liyangani. Bandeko oyo basalaka na Departema ya kotya bopɛto, bango nde bazalaka na mokumba ya kobatela lokumu na biso lokola bato ya bopɛto, basalaka nyonso mpo ete esika oyo tosalelaki na boumeli ya mwa mikolo lokola esika na biso ya losambo etikala pɛto koleka ndenge tokutaki yango. Tokoki kopesa lisungi na biso na badepartema yango to na badepartema mosusu oyo ekoki kozala na mposa na biso? Okondima komipesa na motema moko mpo na “kosala elongo” na bandeko na yo?—Sef. 3:9, NW.
9 Lokola “makambo ya mokili oyo ezali kobongwana,” tozali na mposa makasi ya mayangani na biso ya etúká mpo tókanisaka ntango nyonso makambo ya elimo. (1 Kol. 7:31) Komibongisa mpo na koyangana mikolo nyonso ekosɛnga kosala milende mpo na yango, kasi ezali mpo na bolamu na biso. Liyangani ya etúká ya mbula oyo, na motó ya likambo “Pesá Nzambe nkembo” ebongisami mpo na kosalisa biso tózala ntango nyonso makasi awa tozali kozela Yehova apesa mokili mabe ya Satana etumbu. Tiká ete eloko moko te epekisa biso kozwa mateya oyo Yehova abongiseli biso.—Yis. 51:4, 5.
[Etanda na lokasa 3]
Manaka
Mwamitano mpe Mwapɔsɔ
9:30 na ntɔngɔ—5:00 na nsima ya nzanga
Mwalomingo
9:30 na ntɔngɔ—4:05 na nsima ya nzanga
[Etanda na lokasa 4]
Mwa bibongiseli oyo osengeli kozwa mpo na liyangani “Pesá Nzambe nkembo”
1. Soki ekosɛnga ete osala mobembo molai mpo na kokóma na esika ya liyangani, bandá kobomba mbongo mpo na transport ya yo moko mpe ya libota na yo mobimba, mpe mpo na kolya na bino.
2. Kanisá mpe komema likabo na yo mpo na kosimba ebongiseli ya liyangani. ‘Obima liboso na Yehova mabɔkɔ mpamba te,’ kasi ‘kumisá ye na biloko na yo ya motuya.’—Det. 16:16, NW; Mas. 3:9, NW.
3. Tokokumisa nkombo ya Yehova soki tokozala na etamboli malamu na liyangani mpe soki tokozala na elateli malamu mpe ya pɛto.—1 Kol. 10:31.
4. Bótosa makambo oyo bandeko oyo bayambaka bato bakosɛnga bino. Bókanga bisika mpambampamba te, bokoki kosala yango bobele mpo na libota na bino to mpo na bandeko oyo bozali koya na bango elongo.
5. Na ntango ya bopemi, luká kolya bilei ya pɛpɛlɛ, mpo okoka kolanda malamu manaka ya nsima ya nzanga. Bilei ya kilo epesaka mpɔngi.—Luka 8:18.
6. Bopɛto ekumisaka Yehova. Na nsuka ya liyangani nyonso, mokomoko akosala makasi mpo na kotika esika ya liyangani pɛto na kolɔkɔtáká biteni ya papye mpe biloko mosusu ya bosɔtɔ mpo na kobwaka yango na bisika oyo bibongisami mpo na kobwaka biloko ya bosɔtɔ.—1 Pet. 1:15, 16.