“Lobiko ekómi pene” Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2006
1. Na ntango ya kala, ndenge nini basaleli ya Nzambe bamonisaki ete bazali kopesa motuya na losambo ya solo, mpe libaku nini biso mpe tozwi lelo oyo?
1 Hizikiya, mokonzi moko ya Yuda na ntango ya kala, atindaki bapoti mbangu bákabola mikanda oyo esɛngaki bato nyonso bákende koyangana na Yelusaleme. (2 Nta. 30:6, 13) Ndenge oyo bato bandimaki likambo yango emonisaki mpenza ndenge bazalaki kotalela losambo ya solo. (2 Nta. 30:10-12) Na basanza ezali koya, basaleli ya Yehova ya mikolo na biso bakozwa mpe libaku ya komonisa ete bazali na botɔndi mpenza mpo na libaku oyo bazwi ya koyangana elongo mpo na kosambela Yehova. Lisangá na bino ezwi mokanda moko oyo emonisi ete bobengisami mpo na koyangana na liyangani ya etúká “Lobiko ekómi pene.” Ndenge nini bokoyanola na libyangi yango?
2. Tokoki kosala nini banda sikoyo mpo na kolanda liyangani yango mobimba?
2 Bandá komibongisa sikoyo: Mpo na kozwa matomba na programɛ wana ya elimo, oyo ezali kobongisama sikoyo, tosengeli kolanda programɛ yango mobimba. Na mayele mpenza, kobanda sikoyo, bandá kozwa bibongiseli nyonso oyo esengeli mpo yo ná libota na yo bóyangana mikolo nyonso misato. (Mas. 21:5) Komibongisa yango ekoki kosɛnga ozwa konje na mosala, olobela likambo yango na mobali to mwasi na yo soki azali mondimi te, mpe osalisa bayekoli ya Biblia báyangana mikolo nyonso misato. Kozela te tii mikolo ekosila nde obanda kotalela makambo wana ya ntina mingi. Na esika ya kosala bongo, yebisá nde Yehova likambo yango mbala na mbala na libondeli, mpe zalá na kondima ete ‘akosalisa yo.’—Nz. 37:5.
3. Mpo na nini tosengeli kotosa malako oyo etaleli bisika ya kolala oyo bapesi biso?
3 Ebongiseli ya Yehova ezali kosala mosala monene mpo na kozwa bisika ya kolala mwa mingi na bingumba nyonso oyo liyangani ekosalema. Soki tozali na botɔndi mpo na mosala makasi oyo bandeko oyo balukaka bisika yango bazali kosala, soki toyebi komitya na esika ya bandeko mosusu oyo tozali koyangana elongo na bango, mpe soki tozali komemya ebongiseli ya Teokrasi, tokotosa mpenza malako nyonso oyo ezali na lisolo oyo.—1 Kol. 13:5; 1 Tes. 5:12, 13; Ebe. 13:17.
4-6. (a) Makambo nini tosengeli kobosana te soki tolingi bálukela biso esika ya kolala mpe mpo na nini? (b) Bibongiseli nini esengeli kozwa ntango bandeko basi mpe bandeko mibali basengeli kolala na Ndako ya Bokonzi? (c) Makambo nini tosengeli kotalela wana tozali kozela liyangani ya etúká? (Talá etanda ya lokasa 4.)
4 Bisika ya kolala: Mbala mingi, na engumba oyo liyangani ekosalema, bapaya balalaka na bandako ya bato (bandako ya bandeko), na Bandako ya Bokonzi to epai ya bandeko na bango ya libota. Nsima ya kotalela siplema oyo na Likita ya Mosala, bakotya na etanda ya mayebisi ya lisangá, liste ya bisika nyonso oyo liyangani ya etúká ekosalema. Tolendisi bino nyonso bókanisa malamu mpe bóbondela liboso ya kopona liyangani ya etúká oyo bokokende na mobu 2006.
5 Soki olingi bálukela yo esika ya kolala na ndako ya moto moko (ya ndeko moko), to na Ndako ya Bokonzi, tosɛngi mokomeli ya lisangá asala liboso mpenza liste ya basakoli nyonso oyo bakozala na mposa ya esika ya kolala mpe atinda liste yango na Departema ya boyambi bapaya, na engumba oyo liyangani ekosalema. Na liste yango, akokoma nkombo ya mosakoli, akomonisa soki azali mwasi to mobali (Mw. to Mob.), mbula na ye, mpe akomonisa baoyo bazali libota moko. Yango ekosalisa bandeko ya Departema ya boyambi bapaya bázwa ntango ya koluka bisika ya kolala mpo na basakoli nyonso wana. Liboso ya kotinda bankombo yango na Departema ya boyambi bapaya, Komite ya mosala ya lisangá esengeli kotala soki basakoli yango bazali kokokisa masɛngami. Soki bapesi biso esika ya kolala, ekozala malamu te tóluka lisusu kokende kofanda epai ya ndeko mosusu to moninga mosusu. Yango ekopesa mokakatano na bandeko ya Departema ya boyambi bapaya. Kasi, soki mosakoli moko asepeli kofanda epai ya ndeko na ye oyo azali Motatoli te, asengeli kotinda nkombo na ye te na Departema ya boyambi bapaya.
6 Bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi: Tolingi kopesa mwa malako mpo na bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi. Komite ya liyangani ya etúká ekopona nkulutu moko mpo na kotambwisa ebongiseli yango. Bakopesa ye ndeko moko mpo asalisaka ye, mingimingi nkulutu to mpe mosaleli na misala oyo akɔmeli na elimo. Esengeli kokabola Ndako ya Bokonzi na biteni mibale. Eteni moko mpo na bandeko basi ná bana na bango ya mike mpe bilenge basi. Eteni mosusu mpo na bandeko mibali mpe mibali mosusu. Ndako ya Bokonzi ekozala kaka mpo na kolala. Na moi, ntango bato nyonso bakei na liyangani, bandeko mosusu bakotikala, moto na moto na ngala na ye, mpo na kokɛngɛla biloko ya bandeko. Esengeli kopona bandeko oyo babongi kotyelama motema, baoyo bakomɛli na elimo, mpo na kokɛngɛla. Moto moko te asengeli kolamba na kati ya Ndako ya Bokonzi. Baoyo bakozwa bisika ya kolala na Ndako ya Bokonzi bakoki kobongisa mwa esika ya kolamba na kati ya lopango mpe kozipa yango malamu. Soki liyangani esili, basengeli kolongola esika yango. Esengeli ete Ndako ya Bokonzi ezalaka ntango nyonso pɛto mpe ebongisama malamu, ezala na kati to na libándá. Esengeli kokeba ete ata eloko moko ebeba te. Bandeko basengeli kosala nyonso mpo na komonisa bizaleli ya boklisto, ezala kati na bango to epai ya bato oyo bafandi pembeni ya Ndako ya Bokonzi.— 1 Kol. 10:31.
7. Ndenge nini tokoki kosalisa baoyo bazali na mposa ya lisalisi?
7 Baoyo bazali na mposa ya lisalisi: Masese 3:27 elobi ete: “Boyá kosalela bato malamu te baoyo bakoki kozua yango, wana lobɔkɔ na yo ezwi likoki ya kosala bongo.” Ndenge nini okoki kosalela basusu malamu na oyo etali liyangani ya etúká? Basakoli oyo bakómi mibange, bibɔsɔnɔ, bandeko oyo basalaka mosala ya ntango nyonso, mpe bamosusu, bakoki kozala na mposa ya lisalisi na oyo etali transport, to esika ya kolala. Mokumba yango ezali libosoliboso ya bandeko na bango ya libota. (1 Tim. 5:4) Kasi, soki bakoki kosala yango te, baninga na bango bandimi bakoki kosalisa bango. (Gal. 6:10) Bakɛngɛli ya boyekoli ya mokanda basengeli koluka koyeba soki bato nyonso ya bituluku na bango oyo bazali na bosɛnga, bazwi bibongiseli esengeli mpo na kozala na liyangani.
8. Mpo na nini osengeli kokende kaka na liyangani oyo lisangá na biso ekokende?
8 Kokende na liyangani mosusu: Mpo basakoli nyonso bázwa bisika ya kofanda, mikanda, bisika ya kolala, mpe bongo na bongo, olendisami na kokende na liyangani ya etúká oyo lisangá na bino ekokende. Nzokande, soki likambo moko ezali kopekisa yo okende na liyangani oyo lisangá na bino ekokende, kokakatana te mpo na kokende na liyangani mosusu.
9. Likambo nini ekoki kobakisa esengo na biso mpo na liyangani oyo tozali kozela?
9 Basali ya bolingo malamu: Na ntembe te, baoyo nyonso bakoyangana na liyangani bakozwa matomba na bilei ya elimo mpe bakolendisama na ndenge bakozala elongo na bandeko mosusu, bakozala na esengo mpenza. Nzokande, tokoki kutu kozala na esengo koleka soki tomipesi mpo na misala oyo ekosala ete liyangani esalema malamu. (Mis. 20:35) Etikali moke, Komite ya liyangani ya mboka na bino ekobenga bandeko mpo na kosala elongo na bango. Yo mpe okoki komipesa na mosala yango?—Nz. 110:3.
10. Makambo nini osepelaka na yango na liyangani ya etúká oyo tosalaka mbula na mbula, mpe tosengeli kozala na ekateli nini?
10 Mwana mobali moko ya mbula mitano, oyo akendaki na liyangani ya etúká, alobaki boye: “Na losambo ya Yehova, ngai nasepelaka mingi na liyangani ya etúká.” Maloba wana oyo euti mpenza na motema ezali kosalisa biso nyonso tómona ndenge tosepelaka na mayangani na biso ya etúká, oyo tosalaka mbula na mbula. Ezali mpenza ndenge mokomi ya nzembo ayembaki yango: “Zambi mokolo moko kati na lopango na yo eleki mikolo mosusu nkóto na malamu.” (Nz. 84:10) Davidi amonisaki na nzembo yango mposa oyo azalaki na yango ya ‘kofanda na ndako ya Yehova mikolo nyonso ya bomoi na ye, mpo atala boboto na [Yehova] mpe atuna makambo kati na tempelo na ye.’ (Nz. 27:4) Davidi azalaki kosepela mingi kozala elongo na basambeli mosusu ya Yehova. Tiká ete biso mpe tómekola Davidi ndenge azalaki na botɔndi mpo na losambo ya solo, mpe tóyangana mikolo nyonso misato ya liyangani ya etúká “Lobiko ekómi pene.”
[Box on page 3]
Manaka
Mwamitano mpe Mwapɔsɔ
9:30 na ntɔngɔ - 5:05 nsima ya midi
Mwalomingo
9:30 na ntɔngɔ - 4:10 nsima ya midi
[Box on page 4]
Mwa bibongiseli oyo osengeli kozwa mpo na kozala na liyangani ya etúká
1. Soki esika liyangani ekosalema ezali mosika, bandá kobomba mbongo mpo na transport na yo moko mpe ya libota na yo mobimba, mpe mpo na kolya na bino.
2. Kanisá mpe komema likabo na yo mpo na kosimba ebongiseli ya liyangani. ‘Obima liboso na Yehova mabɔkɔ mpamba te,’ kasi ‘kumisá Yehova na biloko na yo ya motuya.’—Det. 16:16, NW; Mas. 3:9, NW.
3. Tokokumisa nkombo ya Yehova soki tokozala na etamboli ya malamu na liyangani mpe soki tokozala na elateli ya malamu mpe ya pɛto.—1 Kol. 10:31.
4. Zwá ekateli ya kotosa malako ya bandeko oyo bayambaka bato mpe ya bandeko mosusu oyo bazwi mokumba ya kosala ete mobulu ezala te. Bókanga bisika mpambampamba te, bokoki kosala yango bobele mpo na libota na bino to mpo na bandeko oyo bozali koya na bango elongo.
5. Na ntango ya bopemi, lyá bilei ya pɛpɛlɛ, mpo olanda malamu programɛ ya nsima ya midi. Bilei ya kilo ekoki kopesa yo mpɔngi.—Luka 8:18.
6. Bopɛto ekumisaka Yehova. Na nsuka ya liyangani nyonso, mokomoko akosala makasi mpo na kotika esika ya liyangani pɛto na kolɔkɔtáká bapapye mpe biloko mosusu ya bosɔtɔ mpo na kobwaka yango na bisika oyo ebongisami mpo na kobwaka bosɔtɔ.—1 Pet. 1:15, 16.