Manaka mpo na Likita ya Mosala
Pɔsɔ ebandi na 13 Desɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lendisá bayangani nyonso bátala kasɛti-video Pas de sang: la médecine relève le défi, mpo na kobongisa Likita ya mosala ya pɔsɔ oyo ekolanda. Soki kasɛti-video ezali te, bósalela mwa buku Comment le sang peut-il vous sauver la vie?, nkasa 8-12, 14-15, 17, 19, 29. Lobelá mosala ya kosakola mpo na mokolo ya 25 Desɛmbɛ mpe ya 1 Yanuali. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (Soki ebongi na teritware na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ mpe Lamuká! ya 22 Desɛmbɛ. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu oyo emonani malamu ya kolakisa bazulunalo yango. Na elakiseli mokomoko, monisá ndenge ya kopesa eyano soki moto alobi ete “Nayebi malamu mosala na bino.”—Talá buku Comment raisonner, lok. 20, to mwa buku Lolenge nini kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia, lokasa 12.
Min. 15: “Bazali na mposa ya lisalisi na yo.”a Sololá na mokuse na nkulutu moko. Sɛngá ye alobela makambo oyo etindaki ye aluka kozwa mikumba mpe oyo esalisaki ye akokisa masɛngami.
Min. 20: “Ndenge nini kopesa litatoli epai ya bandeko na biso?”b Salelá mituna oyo ezali na lisolo. Sɛngá bayangani bálobela na mokuse ndenge balamusaki mposa ya bandeko na bango mpe bapesaki bango litatoli.
Loyembo 17 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 20 Desɛmbɛ
Min. 5: Mayebisi ya lisangá.
Min. 15: “Ndenge oyo tozwaka matomba na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.” Lisukulu ekosalema na mokɛngɛli na Eteyelo. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Ɔkɔtɔbɛ 2004. Bongisá liboso elongo na mosakoli moko to basakoli mibale, mpo bálobela matomba oyo bazali kozwa na eteyelo yango.
Min. 25: “Kasɛti-video Pas de sang: la médecine relève le défi ekosalisa yo.” Lisolo elongo na bayangani na lisolo Kasɛti-video Pas de sang, Salelá mituna oyo ezali na lokasa 6. Na nsima, tángá paragrafe ya nsuka. Soki kasɛti-video ezali te, bokoki kosalela mwa buku Comment le sang peut-il vous sauver la vie?, nkasa 8-12, 14-15, 17, 19, 29. Lendisá bayangani nyonso bázanga na makita te na pɔsɔ oyo ekolanda mpo na kolanda lisolo oyo ekolobela bibongiseli oyo esalisaka biso tóboya makila.
Loyembo 50 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 27 Desɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Desɛmbɛ. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 (Soki ebongi na teritware na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali mpe Lamuká! ya 8 Yanuali.
Min. 25: Ndenge ya kobunda na motema mpiɔ na mikakatano oyo etali lisalisi ya monganga. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko ya makoki, akosalela plan oyo ekouta na biro. Lobelá mpe makanisi ya ntina ya etanda: “Bibongiseli oyo ezali kosalisa biso tóboya makila.”
Min. 10: Ntina ya lisosoli na yo. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni, 2004, nkasa 23-24, paragrafe 16-19. Monisá polele ete bikateli oyo tozwaka na lisosoli na biso ezali ya lisɛki te mpo etaleli boyokani na biso na Yehova.
Loyembo 8 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 3 Yanuali
Liyebisi: Masangá esengeli te kosala Likita ya Mosala oyo ebongisami mpo na pɔsɔ ya 3 Yanuali liboso ya dati yango, longola kaka masangá oyo bakɛngɛli ya zongazonga bakotala yango. Masangá nyonso esengeli kotalela siplema oyo ezali kolobela liyangani ya etúká kaka na pɔsɔ oyo ezali na programɛ. Soki lisangá moko ekozala na liyangani ya zongazonga na pɔsɔ wana, bakɛngɛli ya boyekoli ya mokanda basengeli koyebisa bandeko ya etuluku na bango esika mpe dati oyo liyangani ya etúká ekosalema.
Min. 5: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Yanuali.
Min. 15: “Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola—Eteni 4.” Nsima ya maloba ya ebandeli oyo esengeli koleka miniti moko te, oyo ezwami na paragrafe 1, salá elakiseli moko ya miniti mitano na makambo oyo ezali na paragrafe 2-3; na elakiseli yango, mosakoli azali komonisa moyekoli ndenge ya kobongisa boyekoli. Salelá paragrafe moko ya buku Boyebi to ya mwa buku Azali kosɛnga na elakiseli yango. Na nsima, salá lisolo ya mituna mpe biyano na paragrafe 2-5, lobelá polele makanisi ya ntina ya elakiseli yango.
Min. 25: “‘Botosi oyo esepelisaka Nzambe’—Liyangani ya etúká ya Batatoli ya Yehova na mobu 2005.”c Ekosalema na mokomeli ya lisangá. Nsima ya kotalela paragrafe 2, tángá mokanda ya biro ya 15 Desɛmbɛ 2004, oyo eyebisi liyangani ya etúká oyo bino bokokende. Ntango bokotalela paragrafe 4, bótalela mpe makanisi nyonso oyo ezali na bitanda ya lokasa 4. Lendisá bayangani nyonso bámibongisa libelalibela mpo na liyangani.
Loyembo 79 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.