Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 27 Desɛmbɛ 2004. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 1 Novɛmbɛ tii na pɔsɔ ya 27 Desɛmbɛ 2004. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.—Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]
TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU
1. Wapi lolenge oyo eleki malamu ya kolamusa mposa ya bato mpo na lisolo moko? [be lok. 218 par. 4]
2. Tángá makambo mitano oyo esalaka ete maloba ya nsuka ezala oyo ebongi. [be lok. 221 par. 1–5]
3. Ndenge nini tokoki komindimisa ete makambo oyo tozali koloba ezali solo mpenza? [be lok. 224 etanda]
4. Ndenge nini tokoki kosala mpo ete masolo na biso na makita emonisa ete tozali mpenza kotalela lisangá lokola “likonzí mpe eloko oyo esimbi solo”? (1 Tim. 3:15) [be lok. 224 par. 1-4]
5. Ndenge nini tokoki kosalela Masese 14:15 soki tosengeli kolobela makambo oyo ezali koleka na mokili, makambo oyo bato mosusu balobi mpe makambo oyo bato bakutaná na yango? [be lok. 225 par. 1]
LISOLO NO. 1
6. Ndenge nini tokoki koyeba motángo ya bambula oyo elekaki kobanda na Mpela tii na kozalisama ya Adama? [si lok. 286 par. 12]
7. Ndenge nini tokoki koyeba mbula oyo Yesu abandaki mosala na ye mpe nini ekoki kondimisa biso ete mosala na ye eumelaki kaka mbula misato na ndambo? [si lok. 291 par. 16]
8. (a) ‘Liloba ya kotɛlɛmisa mpe kotonga lisusu Yelusaleme’ ebimaki ntango nini? (b) Mbula boni esengelaki koleka kobanda ntango liloba wana ebimaki tii ntango Yesu akómaki Masiya? (Dan. 9:24-27) [si lok. 291 par. 18-19]
9. Wapi mwa makambo oyo emonisaka ete tozali sembo ntango tozali kosɛnga bolimbisi oyo esalaka ete ‘tóyokana ná ndeko na biso’? (Mat. 5:23, 24) [w02 1/11 lok. 6 par. 1, 5]
10. Liteya nini tozwi na 2 Mikonzi 13:18, 19 na oyo etali kokokisa mikumba oyo Nzambe apesi biso? [w02 1/12 lok. 31 par. 1-2]
BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ
11. Mpo na nini Bayisalaele bakokaki kopesa mopaya oyo afandi na mboka na bango to kotɛkela mopaya oyo azali koleka na mboka na bango nyama oyo ebimisami makila te, oyo bango moko bakokaki kolya te? (Det. 14:21)
12. Liteya nini tozwi na Deteronome 20:5-7?
13. Mpo na nini kokamata “enikelo ya mabɔkɔ to libanga na yango ya likoló lokola ndanga” ekokanaki na kokamata “bomoi ya moto”? (Det. 24:6, NW)
14. Lokola bapekisaki Bayisalaele kolya mafuta nyonso, kolya “mafuta ya mpate mobali” ezalaki na ndimbola nini? (Det. 32:13, 14, NW)
15. Na mikolo na biso, eloko nini ekokani na lisumu ya Akana? (Yos. 7:1-26) [w86-F 15/12 lok. 20 par. 20]