Mpo na nini bazali kolongwa na mangomba?
NA KATIKATI ya ekeke ya 19, ezalaki mpasi mpo na koyoka moto ya ekólo Prussie (sikawa nɔrdi ya Allemagne) koloba ete azali na lingomba te. Kutu, bapolisi bakokaki kolandela makambo ya moto bobele mpo ete alongwi na lingomba ya monene mpo na kokɔta na mwa lingomba moke. Sikawa makambo mabongwani mpenza!
Lelo oyo, na ekólo Allemagne, bato mingi bazali bango moko kolongwa na mangomba. Eyebisami ete moto moko kati na bato minei azali koloba ete azali na lingomba te. Likambo yango ezali mpe komonana na ekólo Australie mpe na ekólo Suisse. Soki basangani nde makila oyo epesaka lingomba bomoi, boye, Reimer Gronemeyer, mokomi moko na Allemagne alobi solo ete, “makila ya mangomba ya Mpoto ezali kotanga kino liwa.”
Ntina oyo bazali koboya mangomba
Mpo na nini bato mingi bazali koboya mangomba oyo eyebani? Mbala mingi ezali mpo na mbongo, mingimingi na mikili oyo basɛngaka na basangani ya mangomba ete báfutaka mpako ya lingomba. Bato mingi bazali komituna ete, ‘Mpo na nini mbongo na ngai oyo nazwi na mpasi nasengeli kopesa yango na lingomba?’ Basusu bazali kobulunganisama na kotalela ebele ya bozwi mpe nguya oyo lingomba ezali na yango. Mbala mosusu bazali kokanisa lokola Joachim Meisner kardinale ya engumba Cologne, na Allemagne, oyo alobaki ete ekoki kozala ete bozwi ya lingomba ememi yango na kotya likebi mingi na biloko ya mosuni mpe “kopesa motuya moke na kondima kati na Klisto.”
Bato mosusu bazali kolongwa na lingomba na bango mpamba te bazali komona ete elɛmbisi bango, ezali kosepelisa bango te, ezali kosilisa nzala na bango ya elimo te. Bazali na nzala oyo eyebisamaki na mosakoli Amosa, ‘nzala na kwanga te, kozanga na mai mpe te; nzala na koyoka maloba na Yehova.’ (Amosa 8:11) Lokola mangomba na bango ezali kopesa bango bilei moke, bazali kotika yango.
Atako bazali solo mpenza kokutana na mikakatano, koboya mangomba nyonso ezali nde lolenge malamu ya kosilisa mikakatano yango? Kanisá soki moto moko azali na nzala mpe amoni eloko moko lokola limpa. Kasi, ntango ameki kolya yango amoni ete esalemi na mputulu ya mabaya. Akotika nde likanisi ya kolya mpe kosilisa nzala oyo azali na yango? Te, akoluka bilei ya solo. Bobele bongo, soki lingomba moko ezali kosilisa nzala ya elimo ya basangani na yango te, basengeli nde koboya mangomba nyonso? To ekozala nde likambo ya mayele mpenza soki bakoluka lolenge ya kosilisa nzala na bango ya elimo, boye te? Bato mingi basili kosala bongo, lokola emonisami na lisolo oyo elandi.