Ntina oyo bamoko bazali kokɔta na lingomba mosusu
Mpo na bato mingi, lingomba ezali se elembo mpamba. Ekoki komonisa esika oyo moto akendaka na mokolo ya lomingo soki libaku emonani, epai abalaki, mpe epai bakosala molulu ya kokunda ye soki akufi. Kasi ezali na bopusi moko te na bomoto na ye to na makambo oyo ayebi mpe oyo andimaka. Na ndakisa, ankɛtɛ moko emonisaki ete bato 50 likoló na monkama oyo balobaka ete bazali baklisto bayebaki te soki nani asalaki Lisolo likoló ya Ngomba. Nzokande, ata Mohandas Gandhi, mokambi moko ya ekólo Inde oyo ayebanaki mingi mpe azalaki moto ya Lingomba ya Bahindu, ye ayebaki!
TOSENGELI kokamwa te ete bato bazali kotika mangomba mpamba te mingi bayebi makambo ya lingomba na bango te. Nzokande, likoki ya kopɛngola likambo yango ezali. Mbala mingi baoyo bandimi koyekola Biblia bakamwaka na komona ete ezali komemela bango matomba mingi. Biblia yango moko elobi ete: “Ngai nazali [Yehova], Nzambe na yo, ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.”—Yisaya 48:17.
Baoyo bazali na nzala ya elimo basengeli kosala nini? Basengeli kotika kosalela Nzambe te! Kasi, basengeli nde koluka kati na Biblia mpo na koyeba makambo oyo Nzambe ye moko apesi bango.
Biyano na mituna ya makasi
Ntango Bernd azalaki na mbula nsambo, mama na ye akufaki na miso na ye.a Yango wana, na bomwana na ye mobimba, azalaki komituna ete, ‘Mama na ngai azali wapi? Mpo na nini nasengeli kokola kozanga mama?’ Ntango akómaki elenge, Bernd azalaki kosangana mingi na misala ya lingomba na ye. Lokola azalaki komibanzabanza na ntina na mpasi ya bato, azalaki na mposa ya kokende kosala na mboka mopaya mpo na kosunga bato. Azalaki na mituna mingi kasi lingomba na ye epesaki ye biyano ya malamu te.
Na nsima, Bernd asololaki na moninga na ye moko ya kelasi oyo azalaki Motatoli ya Yehova. Na lisalisi ya Biblia, elenge wana amonisaki Bernd ete mama na ye, oyo asilá kokufa, ayebi lisusu eloko te. Bernd atángaki mikapo mingi ya Biblia oyo milimbolaki likambo yango, lokola Mosakoli 9:5: “Nde bakufi bayebi likambo te.” Na yango, Bernd azalaki na ntina ya komitungisa te na komitunáká soki mama na ye azalaki konyokwama na epongelo—to na esika mosusu oyo eleki mpasi. Atako mangomba mingi eteyaka ete molimo ekufaka te, Bernd asosolaki na lisalisi ya Biblia ete molimo ya moto ezali moto ye moko. Ntango moto akufi, molimo ekufi. “Molimo oyo asali lisumu, ye akokufa.”—Ezekiele 18:4.
Bernd ayekolaki mpe elikya kitoko oyo ezali mpo na bakufi. Ye moko atángaki na Biblia na mokanda ya Misala ete: “Lisekwa ekozala na bato sembo mpe na bato sembo te.” (Misala 24:15) Azalaki mpenza na esengo ya koyeba ete lisekwa ekozala awa na mabelé oyo Nzambe akokómisa paladiso!—Nzembo 37:29; Emoniseli 21:3, 4.
Mosika te, bamposa ya elimo ya Bernd ekokisamaki na boyebi ya solosolo ya Biblia. Bernd aboyaki mangomba nyonso te. Kasi, atikaki lingomba oyo ekokaki kosilisa nzala na ye ya elimo te mpe andimaki losambo oyo etongami mpenza likoló ya mateya ya Biblia. Alobi ete: “Likambo yango esalemaki eleki sikawa mbula 14, mpe nayokaka mawa soko moke te na ndenge nalongwá na lingomba na ngai ya kala. Sikawa nayebi ete Mozalisi anyokolaka bato te. Satana nde azali nzambe ya ebongiseli oyo, mpe tosengeli nde kopamela ye mpo na mikakatano nyonso oyo tozali na yango. Kasi, mosika te, Nzambe akosilisa mabe nyonso oyo mokili ya Satana ememi. Mama na ngai mpe akozonga na bomoi na lisekwa. Ekozala mpenza likambo ya esengo!”
Lisusu, Bernd akokisaki mokano na ye ya kokende kosala na mboka mopaya mpo na kosunga bato mosusu. Asalaka na mboka mopaya mpo na kosalisa bato mosusu ete báyeba makambo ya Bokonzi ya Nzambe, bokonzi oyo ekosilisa mpenza bampasi na bango. Lokola Bernd, bamilio ya bato basili koyekola ete mosika te, Nzambe akosilisa bampasi ya bato. Bazali na esengo ya koyeba ete ezali na lingomba moko oyo ezali kokokisa bamposa na bango ya elimo.—Matai 5:3.
Ntina ya bomoi ezali nini?
Lokola na mikili ya Mpoto mpe ya Amerika ya Nɔrdi bato mingi bakómi kopesa makambo ya Nzambe mokɔngɔ, bato mingi bazali komituna ete, ‘Ntina ya bomoi ezali nini?’ Lokola Michael amonaki yango, eyano na motuna yango ezwami na Biblia. Na katikati ya bambula ya 1970, Michael alingaki kokɔta na etuluku moko ya banganga-mobulu. Azalaki bobele na mokano moko na bomoi na ye—kokanela bato oyo, na makanisi na ye, basimbi ebongiseli ya kapitaliste oyo ezali kotya bokesene. Alobi ete, “Nazalaki kobima na ndako te kozanga ete nazala na mondoki. Mokano na ngai ezalaki ya koboma bato mingi kati na bato minene ya politiki mpe ya mombongo. Nandimaki kokufa mpo na mokano wana.”
Michael azalaki kokende na ndakonzambe, kasi moto moko te kati na lingomba na ye akokaki kolimbolela ye ntina mpenza ya bomoi. Na yango, ntango Batatoli ya Yehova bakendaki na ndako na ye mpe balakisaki ye biyano ya Biblia na mituna na ye, Michael ayokaki bango na likebi nyonso. Abandaki koyangana na makita ya losambo na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova na mboka oyo afandaki.
Baninga ya Michael balukaki koyeba ntina oyo akómaki kosepela na Biblia. Michael abyangaki bango ete, “Boyá na makita na mokolo ya lomingo. Bófanda mwa moke. Soki bokosepela na makambo bokoyoka te, wana bózonga na bino.” Esalemaki mpe bongo, nsima ya koyoka lisukulu ya Biblia na boumeli ya miniti 45, baninga na ye mingi babimaki na Ndako ya Bokonzi. Kasi moko na bango—Susan—atikalaki. Elenge mwasi yango asepelaki mingi na makambo oyo ayokaki. Na nsima, Michael na Susan babalanaki mpe bazwaki batisimo lokola Batatoli ya Yehova. Michael alobi ete, “Sikawa nayebi mpo na nini tozali awa na mabelé. Yehova nde azalisaki biso. Ntina ya solosolo ya bomoi na biso ezali ya koyeba ye mpe kosala mokano na ye. Ezali yango nde esepelisaka mpenza!”
Bamilio ya bato bazali na endimeli lokola oyo ya Michael. Bazali kotya likebi na maloba ya Biblia oyo elobi ete: “Tóyoka nsuka na likambo mobimba: Tosá Nzambe mpe batelá mibeko na ye; yango ezali mosala na bato nyonso.”—Mosakoli 12:13.
Ndenge ya kolonga mikakatano ya bomoi
Biso nyonso tozali komona kokokisama ya esakweli ya 2 Timote 3:1 ete: ‘Na mikolo na nsuka, ntango na mpasi ekoya.’ Moto moko te akoki kokima mikakatano ya “ntango na mpasi” oyo. Kasi, Biblia ezali kosalisa biso na kolonga yango.
Tótalela ndakisa ya Steven na mwasi na ye Olive. Ntango babandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova, libala na bango ezalaki na mikakatano, lokola ezalaka mpo na babalani mingi. Steven alimboli ete, “Tozalaki koyokana lisusu te, moto na moto azalaki na mikano na ye mpe makambo oyo azalaki kosepela na yango.” Nini esalisaki bango ete bákabwana te? Steven abakisi ete, “Batatoli ya Yehova balakisaki biso lolenge oyo tokoki kosalela mitinda ya Biblia kati na bomoi na biso. Mpo na mbala ya liboso, toyekolaki ndimbola ya kozanga moimi mpe kotalela bamposa ya moninga. Kosalela mitinda ya Biblia eyokanisaki biso makasi. Sikawa libala na biso ezali na esengo mpe na kimya.”
Boyokani malamu elongo na Nzambe
Ankɛtɛ moko eutaki kosalema na mikolo mileki emonisi ete Baamerike 96 likoló na monkama bandimaka ete Nzambe azali, mpe mingi kati na bango babondelaka ye. Kasi, ankɛtɛ mosusu emonisaki ete sikawa, motángo ya bato oyo bakendaka na ndakonzambe mpe na biyanganelo ya Bayuda ekiti mingi mpenza na boumeli ya mbula 50 oyo eleki. Baamerike 58 likoló na monkama balobaka ete bakendaka na ndakonzambe mbala soko moko na sanza. Ya solo, mangomba mabɛlɛmisi bango na Nzambe te. Mpe mokakatano yango esuki se na États-Unis te.
Linda akolá na Bavière, na ekólo Allemagne. Azalaki Mokatolike oyo amesanaki kokende ndakonzambe mpe azalaki kobondela mingi. Kasi epai mosusu, azalaki kobanga mikolo mikoya. Ayebaki te soki mokano ya Nzambe ezali nini mpo na bato. Ntango azalaki na mbula 14, Linda akutanaki na Batatoli ya Yehova, mpe alobi boye: “Makambo balobaki na ngai esepelisaki ngai mingi, yango wana, nazwaki mikanda mibale mikolimbolaka Biblia mpe nokinoki natángaki yango.” Nsima ya mbula mibale, Linda abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Alobi ete, “Likambo nyonso oyo nayekolaki na Biblia na ntina na Nzambe elongobanaki mpenza na makanisi na ngai.” Ntango akómaki na mbula 18, Linda alongwaki na lingomba na ye mpe azwaki batisimo lokola Motatoli ya Yehova.
Eloko nini epusaki Linda ete akɔta na lingomba mosusu? Alimboli boye: “Lingomba na ngai esalisaki ngai na kososola ete Nzambe azali, mpe nayekolaki kondimela ye. Kasi, nazalaki kotalela ye lokola moto solo te mpe azalaki mosika na ngai. Boyekoli ya Biblia esalisaki ngai na kolendisa kondima na ngai kati na Nzambe mpe lisusu esalisaki ngai na koyeba mpe kolinga ye. Sikawa nazali na boyokani ya motuya mingi elongo na Nzambe, likambo oyo eleki makambo nyonso na motuya.”
Lingomba ya solo ezali na ntina!
Lingomba na yo epesaka yo litambwisi ya elimo mpe emonisaka yo lolenge oyo Biblia ekoki kosalisa yo mpo na kolonga mikakatano ya bomoi? Eteyaka yo elikya oyo Biblia ezali kopesa mpo na mikolo mizali koya? Esalisaka yo na kozala na boyokani makasi na Mozalisi, boyokani oyo etongami likoló na boyebi ya sikisiki ya Biblia? Soki te, kolɛmba te. Na esika ete oboya mangomba nyonso, luká losambo oyo moboko na yango ezali mpenza na Biblia. Boye, okozala lokola baoyo balobelami na esakweli ya Biblia kati na mokanda ya Yisaya ete: “Nkolo [Yehova] alobi ete, Talá, baombo na ngai bakolya . . . Talá, baombo na ngai bakomela . . . Talá, baombo na ngai bakosepela . . . Talá, baombo na ngai bakoyemba mpo na esengo na motema.”—Yisaya 65:13, 14.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
[Bililingi na lokasa 4, 5]
Biblia esalisaka biso ete tóyeba mpe tólinga Nzambe