Tosalela losambo na solo mpo na lobiko na biso
“Losambo na peto mpe lobongi epai na Nzambe Tata na biso ezali boye: . . . komibatela nzoto peto na makambo na mokili.”—YAKOBO 1:27.
1. Ndenge nini balimbolaki losambo, mpe nani mpenzampenza, azali na lotomo ya kokata likeseni oyo lizali kati na losambo ya solo mpe ya lokuta?
BASILAKI kolimbola losambo lokola “komonisama na endimeli ya limemya na moto epai na nguya moko monene oyo atalelami lokola Mozalisi mpe nkolo ye molongo.” Na ntina yango, nani mpenza azali na lotomo ya kokata soki likeseni nini lizali kati na losambo ya solo mpe losambo ya lokuta? Mpenzampenza, esengeli kozala Ye oyo atalelami na endimeli wana ya limemya, Mozalisi. Jéhovah amonisaki polele kati na Liloba na ye nini ye azali kotalela lokola losambo ya solo mpe ya lokuta.
Liloba “losambo” kati na Biblia
2. Ndenge nini badiksionɛrɛ ezali kolimbola liloba na greke oyo libongolami na “losambo” to “lingomba,” mpe lolenge nini na losambo liloba yango ekoki kolobela?
2 Liloba na greke oyo libongolami na “losambo” to “religion” ezali nde thréskeia. Diksionere moko (A Greek-English Lexicon of the New Testament) elimboli yango lokola “kosambela Nzambe, lingomba oyo ezali komonisama mingimingi na milulu ya lingomba to losambo.” Mokanda mosusu (Theological Dictionary of the New Testament) ebakisi bandimbola oyo mosusu. Tozali kotanga ete: “Etymologie to eutelo (ya liloba yango) etyameli ntembe; . . . bato na mayele ya ntango na biso oyo bazali koyekola lokota na greke na kala bazali kokanisa mpo na ekanganeli elongo na cherap (‘kosalela’). . . . Tokoki mpe komona likeseni mpo na oyo etali ndimbola. Ndimbola ya malamu ezali bongo ‘molende na makambo ya losambo’ . . . , ‘losambo na Nzambe,’ ‘lingomba.’ . . . Kasi ezali mpe na ndimbola ya kotyola: ‘kolekisa ndelo na makambo ya losambo,’ ‘losambo na lokuta.’” Tréskéia ekoki bongo kobongolama to na “lingomba” to na “losambo,” oyo etalelami na lolenge malamu to ya mabe.
3. Ndenge nini ntóma Paulo asalelaki liloba oyo libongolami na “losambo,” mpe tokoki koloba nini mpo na kobongolama ya liloba yango kati na Bakolose 2:18?
3 Liloba wana ezwami bobele mbala minei kati na Makomami na greke ya boklisto Ntóma Paulo asaleli yango mbala mibale mpo na kolobela losambo na lokuta. Na Misala 26:5, engebene maloba na ye moko, alobi ete liboso akoma moklisto azalaki “mofalisai na motindo na lingomba lileki (makasi) kati na kosambela (“lingomba,” TOB) na biso.” Kati na mokanda na ye epai na Bakolose, apesi likebisi oyo: “Tika moto te ete alongola libonza na bino mpo na mposa na ye na kosɔkema sɔkɔ mpo na kosambela baanzelu.” (Bakolose 2:18) Na eleko wana losambo na baanzelu epalanganaki mingi mpenza na mokili ya Phrygie, kasi ezalaki losambo na lokuta.a Atako na bisika mosusu bazali kobongola thréskéia na “lingomba,” mabongoli mingi mazali nde kobongola liloba oyo ya greke na “losambo” kati na Bakolose 2:18. Traduction du monde nouveau ezali kobongola thréskéia na “losambo” (culte) kati na ba versets nyonso esika yango ezali, koyebisaka mbala nyonso na note (kati na ebimeli ya lingelisi ya 1984) kobongolama ya liloba “lingomba” (religion) lokola yango ezali komonana kati na mabongoli ya latin.
“Peto mpe kozanga litono” liboso na Nzambe
4, 5. (a) Engebene Yakobo, likanisi ya nani likoló na losambo lizali na ntina mingi? (b) Nini ekoki kobebisa losambo ya moto moko, mpe liloba oyo libongolami na “mpamba” awa elimboli nini?
4 Mbala mibale mosusu tozali kokuta liloba thréskéia, bakisa mpe lolenge mosusu ya liloba yango, kati na mokanda mokomamaki na moyekoli Yakobo, mosangani na college central ya lisangá na boklisto na ekeke ya liboso. Akomaki: “Soko moto moko abanzi ete azali moto na kosambela (“amimoni moto na ‘lingomba,”’ TOB), nde akobangaka lolemo na ye te, kasi akozimbisaka motema na ye, losambo na moto yango (“‘lingomba’ na ye,” TOB) ezali mpamba. Losambo (“lingomba,” TOB) na pɛto mpe lobongi epai na Nzambe Tata na biso ezali boye: kotalaka bitike mpe basi—bakufeli—mibali kati na mpasi na bango mpe komibatela peto na makambo na mokili.”—Yakobo 1:26, 27.
5 Ee, soki tolingi kondimama epai na Jéhovah mpe kokota kati na mokili ya sika oyo alaki, tosengeli mpenza kobatela likanisi na ye na ntina na losambo. (2 Petelo 3:13) Yakobo amonisi ete moto akoki komimona ete azali mpenza mosambeli nzokande azali kopesa epai na Nzambe losambo moko ya mpamba. Liloba na greke oyo libongolami awa na “mpamba” elimboli lisusu “eloko ezali te, ezangi kobota mbuma, ntina ezali te, ezali na nguya te, lokuta.” Yango ekoki kozala lolenge na losambo ya moto oyo, wana ezali ye komikumisa ete azali moklisto, nzokande azali kopekisa lolemo na ye te mpe azali kosalela yango te mpo na kosanzola Nzambe mpe kolendisa baninga na ye baklisto. ‘Azali kokosa motema na ye,’ mpe azali kosalela “losambo na peto te liboso na Nzambe.” (TOB) Oyo ezali na ntina, ezali bongo likanisi na Nzambe.
6. (a) Motó na likambo ya mokanda na Yakobo ezali nini? (b) Lisengami nini litali losambo na peto Yakobo alobelaki, mpe na ntina yango college central ya eleko na biso elobaki nini?
6 Yakobo atangi makambo nyonso te oyo Jéhovah azali kosɛnga epai na baoyo balingi kosalela losambo na peto. Kolandaka motó na likambo monene ya mokanda na ye, oyo etaleli bongo kondima lokola yango emonisami na misala mpe na likambo ya koboya kozala moninga na mokili ya Satana, alobeli bobele masengisi mibale. Ya liboso etindi “kotalaka bitike mpe basi-bakufeli-mibali kati na mpasi na bango.” Mpo na yango, esengeli kotambwisama na bolingo ya solo ya boklisto. Jéhovah azali ntango nyonso komibanzabanza na bolingo mpenza mpo na bitike mpe basi-bakufeli—mibali. (Deteronome 10:17, 18; Malaki 3:5) Moko na bikateli ya liboso bikamatamaki na college central ya ekeke na liboso ezalaki bongo mpo na bolamu ya basi baklisto bakufeli-mibali. (Misala 6:1-6) Ntóma Paulo apesaki malako ya polele na ntina na lisalisi ya bolingo mingi oyo lisengelaki kopesama na mibange basi-bakufeli—mibali, bazangi bandeko na mosuni, baoyo bazalaki na bobola mpe bamimonisaki sembo na boumeli na bambula mingi (1 Timoté 5:3-16) Na eleko na biso, college central ya ba Témoins de Jéhovah ezali mpe kopesa malako ya sikisiki na ntina ya likambo yango. Na nse na motó ya likambo moke “Tosalisa babóla,” kati na mokanda Lisangá mpo na kokokisa mosala ya Nzambe, nkasa 123 mpe 124, tokoki kotanga boye: “Losambo ya solo etali kati na makambo mosusu kokokisa bosɛnga na bandeko na biso na sembo oyo mbala mosusu bazali kokelela mpo na oyo etali biloko na mosuni.” Bankulutu mpe baklisto nyonso oyo bazali kokokisa lisɛngami yango te bazali komonisa bongo bopoto na likambo oyo ezali moko na makambo ya ntina mingi na losambo oyo lozali peto mpe lobongi epai na Nzambe Tata na biso.
‘Komibatela peto na makambo na mokili’
7, 8. (a) Lisengami nini mosusu etali losambo na solo Yakobo alobelaki? (b) Bakonzi na mangomba ya mokili bazali kokokisa lisengami yango? (c) Tokoki koloba boni mpo na ba Témoins de Jéhovah?
7 Engebene maloba na Yakobo, likambo ya mibale lisɛngami epai na baoyo balingi kosalela losambo na solo ezali bongo ‘komibatela peto na makambo na mokili.’ Yesu alobaki ete: “Bokonzi na ngai ezali na mokili oyo te” ezali bongo likambo malamu ete bayekoli na ye ya solo “basanganaka na mokili te.” (Yoane 15:19; 18:36) Tokoki koloba bongo mpo na bakonzi ya mangomba nyonso ya mokili? Bakonzi na mangomba bazali kopesa lisungi na bango epai na Nations unies. Na octobre 1986, mingi kati na bango bandimaki libyangami ya pape mpo na kokende na mboka Assise, na ltalie, mpo na kosangisa mabondeli na bango mpo na “Mbula ya kimya kati na mokili mobimba” oyo ebongisamaki na O.N.U. Nzokande, soki totaleli bamilió na bato oyo bitumba ebomaki na mbula yango mpe na bambula oyo elandi nsima yango emonisi ete milende na bango milangi te. Mbala mingi ekomelaka bakonzi na mangomba ete basala boyokani elongo na parti politike oyo ezali koyangela, kolandaka mpe na nkuku kosala boyokani elongo na batemeli ya mokonzi oyo azali koyangela to opposition, mpo na kozala “baninga” ya bato oyo bazali na bokonzi ezala ata banani.—Yakobo 4:4:
8 Ba Témoin de Jéhovah basili kozwa lokumu ya kozala baklisto oyo bakokɔtaka na makambo ya politike te mpe na matata ya mokili te. Lokola ba rapports ya bakomi na nsango mpe mikanda ya lisolo ya bato na ntango na biso emonisi yango kati na mokili mobimba, bazali kobatela etelemelo wana na nguya kati na mikili nyonso batela peto na makambo na mokili.’ Lingomba na bango ezali “losambo na mpeto mpe lobongi epai na Nzambe.”—Yakobo 1:27, TOB.
Makambo mosusu makesenisi losambo na solo
9. Tanga lisengisi ya misato ya losambo na solo, mpe mpo na nini yango ezali motindo wana?
9 Soki losambo ezali “endimeli ya limemya na moto epai na nguya moko monene oyo atalelami lokola mozalisi mpe nkolo ya molongo,” esengeli bongo kokambama epai na Nzambe bobele moko ya solo, Jéhovah. Yango esengeli kotuka ye te na koteyaka bongo mateya na bapakano, na ndakisa endimeli na nzambe moko ya mitó misato, kati na yango Tata azali kokabola nguya monene na ye, nkembo na ye mpe boseko na ye elongo na bato mosusu mibale kati na libombami moko ya Bosato. (Deteronome 6:4; 1 Bakolinti 8:6) Esengeli mpe koyebisa nkombo monene na Nzambe, Jéhovah, mpe kokumisa nkombo yango, mingi mpenza na komema nkombo yango kati na libota moko libongisami. (Nzembo 83:18; Misala 15:14) Baoyo bazali kosalela losambo wana basengeli kolanda ndakisa na Klisto Yesu. (Yoane 17:6) Longola ba Témoins baklisto na Jéhovah, banani mosusu bazali lelo kokokisa lisɛngami oyo?
10. Mpo na kopesa elikya ya kokɔta kozanga kokufa kati na mokili ya sika elakami na Nzambe, lingomba esengeli kosala nini, mpe mpo na nini?
10 Ntóma Petelo alobaki ete: “Lobiko mpe ezali na moto mosusu te, mpo ete nkombo mosusu te (bobele oyo na Yesu Klisto nde) esili kopesama awa na nse kati na bato ete tokoka kobika mpo na yango. ”(Misala 4:8-12) Na yango, losambo na peto oyo ekopesa nzela epai na basambeli na yango ete bakota na bomoi kati na mokili ya sika elakami na Nzambe, yango esengeli kopesa kondima kati na Klisto mpe kati na motuya ya mbeka na lisiko. (Yoane 3:16, 36; 17:3; Baefese 1:7) Lisusu yango esengeli kosalisa bango ete bazala na botosi epai na Klisto, mpe kondima ye lokola Mokonzi oyo azali koyangela mpe Nganga-Monene epakolami na Jéhovah—Nzembo 2:6-8; Bafilipi 2:9-11; Baebele 4:14,15.”
11. Losambo na solo losengeli kotongama likoló na nini, mpe na likambo yango etelemelo ya ba Témoins de Jéhovah ezali nini?
11 Losambo na peto losengeli kotongama likoló na solo emonisami na ntina na Nzambe na solo bobele moko etongami te likoló na mateya na bato to likoló na bafilozofi euti na bato. Kozanga Biblia, eloko nini tokoyeba na ntina na Jéhovah mpe mikano kitoko na ye, na ntina Yesu mpe mbeka na lisiko? Ba Témoins de Jéhovah bazali koyebisa epai na bato elikya makasi kati na Biblia. Lisusu, bazali komonisa kati na bomoi na bango ya mokolo na mokolo ete bandimi bosolo ya maloba oyo ntoma Paulo alobaki: “Makomi nyonso mapemami na elimo na Nzambe, makoki kopesa litomba na mateya na mpamela, mpo na kosembola . . . ete moto na Nzambe azala mobongi, oyo aselingwi mpo na misala nyonso malamu.”—2 Timoté 3:16, 17.
Losambo ya solo ezali lolenge na bomoi
12. Longola kondima, likambo nini lizali na ntina mpo na losambo ya solo, mpe na makambo nini losambo ya solo ezali bongo lolenge na bomoi?
12 Na kotalela maloba na Yesu, “Nzambe azali elimo, mpe ekoki na basambeli na ye ete basambela ye na elimo mpe na solo.” (Yoane 4:24) Na yango, lingomba ya solo, to losambo ya solo, ezali molulu te, to bikelakela te mpo na komonisama na miso na bato. Losambo na peto ezali likambo na elimo, etongami likoló na kondima (Baebele 11:6), Nzokande, kondima yango esengeli kosimbama na misala. (Yakobo 2:17) Losambo ya solo elandaka bamposa ya bato te. Elandaka nde mitinda ya Biblia kati na likambo litali bizaleli mpe bopeto mpo na oyo etali kosalela lolemo. (1 Bakolinti 6:9, 10; Baefese 5:3-5) Baoyo bazali kosalela yango bazali mpenza kosala nyonso ete balona mbuma na elimo na Nzambe kati na bomoi na bango ya libota, na esika ya mosala, na eteyelo, mpe kino na bantango ya masano na bango. (Bagalatia 5:22, 23) Ba Témoins de Jéhovah bazali kosala nyonso ete bameka kobosana te toli oyo na ntoma Paulo; “Boye, soko bokoliaka soko bokomelaka, soko bokosalaka nini, bosala nyonso mpo na nkembo na Nzambe.” (1 Bakolinti 10:31) Losambo na bango ezali ya likolólikoló te; kasi ezali nde lolenge na bomoi.“
13. Misala nini mizwami kati na losambo na solo,mpe mpo na nini tokoki koloba ete ba Témoins de Jéhovah bazali mpenza basambeli?
13 Ya solo, losambo na solo ezali bongo kotalela makambo na elimo. Esangisi libondeli ya moto na moto ye moko mpe kati na libota, boyekoli ya mbula na mbala ya Liloba na Nzambe mpe ya mikanda mikolimbolaka Biblia, koyangana na makita ya lisangá na boklisto ya solo. Makita yango makobandaka mpe makolukaka na loyembo mpo na lokumu ya Jéhovah mpe na kosalaka libondeli. (Matai 26:30; Baefese 5:19) Badiskur mpe masolo ya mituna mpe biyano oyo etambwisami na nzela ya mikanda oyo mipesami epai na moto nyonso ezali kopesa nzela na kotalela masolo ya elimo mpe komilendisa. Makita yango mbala mingi makosalemaka kati na ba Salles du Royaume ya peto, kasi kozanga ete batya biloko mingi na kati, mpe ba salles yango ezali mpenza mpo na losambo: longola makita oyo mazali kosalema kuna mbala na mbala, bazali mpe kosala milulu ya libala, bakisa mpe ya bokundi. Ba Témoins de Jéhovah batalelaka mpenza na limemya ba Salles du Royaume na bango mpe ba Salles d’ assemblées na bango, lokola bisika bipesami mpo na losambo ya Jéhovah. Na kokesena na oyo ezali koleka kati na Bandakonzambe mingi ya boklisto na mokili oyo, ba Salles du Royaume ezali masangá ye bokutani te mpo na kobongisa makambo ya mosuni.
14. Mpo na Baebele, liloba losambo elimbolaki nini, mpe na mosala nini ba Témoins de Jéhovah bazali komikesenisa lelo?
14 Tosilaki komona liboso ete balimboli na Biblia bazali koyokanisa liloba na greke oyo libongolami na “losambo” to “lingomba” mpe verbe “kosalela.” Ezali komonana ete liloba na liebele oyo likokani na yango, ‘avodhah, ekoki kobongolama na “mosala” to “losambo.” (Tala ba notes ya ebimeli na lingelesi ya 1984, na Exode 3:12 mpe Ex 10:26.) Mpo na Baebele, losambo elimboli mosala. Elembo eleki monene ya losambo na solo ezali ete baoyo nyonso bazali kosalela yango bazali kosangana na mosala ya Nzambe oyo etali bongo kosakola “nsango malamu na bokonzi . . . na mabelé mobimba, lokola litatoli na mabota nyonso.” (Matai 24:14; Misala 1:8; 5:42) Lingomba nini liyebani na mokili mobimba mpo na litatoli ya polele oyo yango lizali kopesa mpo na Bokonzi ya Nzambe, komonisaka ete yango ezali elikya bobele moko ya bato?
Mosala moko ya nguya mpe ya kosangisa bato esika moko
15. Tanga likambo moko monene likesenisi mpenza losambo na solo?
15 Losambo na lokuta ekabolaka. Ebimisaki bobele koyina mpe koboma. Nzokande losambo na solo, yango esangisaka bato esika moko. Yesu alobaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Bolingo oyo bozali kosangisa ba Témoins de Jéhovah ekotalaka bikolo te, ekotalaka te soko oyo azali moto monene to moto mpamba ekotalaka mpe mposo ya nzoto te, ndenge tozali komona yango epai ya bato ya mokili mpe ezali kokabola bango. Batemwe bazali “kotelema na motema moko, mpe bazali kobunda esika moko mpo nakondima na nsango malamu.”—Bafilipi 1:27.
16. (a) Nsango nini malamu ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola? (b) Bisakweli nini bizali kokokana likoló na ba témoins de Jéhovah, mpe matomba nini mazali komonana?
16 Engebene“ nsango malamu” oyo batemwe bazali kosakola mokano ya Mozalisi oyo ekoki kobongwana te, mosika te ekokokana. Mokano na Nzambe ekosalema“ na nse pelamoko na likoló.” (Matai 6:10) Nkombo na lokumu ya Jéhovah ekobulisama, mpe mabelé makobongwana paradis, epai oyo basaleli na losambo ya solo bakokoka kofanda libela na libela. (Nzembo 37:29) Bamilió na bato, bauti na mabota nyonso, bazali kozwana na ba Témoins de Jéhovah mpe bazali koloba na boyokani na esakweli na Biblia ete: “Tokokenda na bino elongo, mpo toyoki ete Nzambe azali elongo na bino.” (Zakaria 8:23) Jéhovah azali kopambola libota na ye. “Oyo moke” akomi mpenza “libota na nguya,” lisangá ya mokili mobimba lizali na bomoko mpenza kati na makambo nyonso: na makanisi, kati na mosala oyo bazali kokokisa mpe kati na losambo na bango. (Yisaya 60:22) Wana ezali likambo oyo losambo na lokuta ezangaki nguya ya kokokisa yango.
Bolongi ya losambo na peto
17. Likambo nini lizali kozela Babilone Monene, mpe yango ekosalema ndenge nini?
17 Liloba na Nzambe lisakolaki kobomama na lisangá ya mokili mobimba ya losambo na lokuta, oyo libengami na elilingi ete “Babilone Monene.” Biblia ezali mpe komonisa “mikonzi,” elingi koloba bakonzi na politike ya mokili, lokola maseke ya elilingi ya nyama na yauli. Elobi na biso ete Nzambe akotya na motema na bango mokano ya kokweisa mpe ya koboma libela lisangá wana ya Satana oyo ekokisami na mwasi na pite.—Tala Emoniseli 17:1, 2, 5, 6, 12, 13, 15-18.b
18. Ntina nini monene Biblia epesi mpo na kobomama ya Babilone Monene, mpe ntango nini losambo na lokuta ebandaki kosopa makila?
18 Mpo na nini Babilone Monene ebongi ete ebomama? Biblia eyanoli ete: “Kati na ye makila na basakoli, na bapetwi mazwami, na makila na bango nyonso babomamaki na mokili.” (Emoniseli 18:24) Komonisaka ete lisumu ya losambo na lokuta ebandaki liboso mpenza ete Babilone etongama, Yesu akweisaki bakonzi na mangomba ya Bayuda, baoyo bakomaki basangani ya Babilone Monene, ntango alobaki ete: “Banyoka, bana na bitupa! Bokokima nde ekweli na Gɛɛna boni? . . . Ete makila nyonso na boyengebene makwela bino, yango esopamaki na mokili longwa na makila na Abɛlɛ oyo moyengebene.”(Matai 23:33-35) Ee, losambo na lokuta, oyo ebimaki na mokili na eleko ya botomboki na Edene, esengeli kozongisa monoko mpo na ebele na makila oyo esili kosopa.
19, 20. (a) Basambeli na solo ya Nzambe bakosala nini nsima wana ekateli oyo ekatamaki mpo na Babilone Monene ekosila kokokisama? (b) Na ntango yango, likambo nini likosalema, mpe elikya nini ekofungwama mpo na basambeli nyonso na solo ya Nzambe?
19 Nsima na kobomama ya Babilone Monene, basaleli na losambo ya solo oyo bakozala na mabelé bakosangisa mingongo na bango na bayembi ya likoló baoyo bakoyemba ete: “Kumisa Jah! . . . Mpo ete akweisi mwasi na pite . . . (mpe) abukanisi ye mpo na makila na baombo na ye. . . . , Molinga na mboka yango mokobutaka libela na libela.”—Emoniseli 19:1-3.
20 Ezali na ntango yango nde biteni mosusu ya lisangá na Satana awa na mabelé bikobomama. (Emoniseli 19:17-21) Nsima na yango, Satana, mobandisi ya losambo nyonso na lokuta, mpe bilimu mabe na ye bakobwakama na libulu mozindo. Bakozala lisusu na likoki te ya konyokola basambeli na solo ya Jéhovah. (Emoniseli 20:1-3) Losambo na solo ekolonga oyo na lokuta Mibali mpe basi na sembo oyo uta lelo, bazali kotosa likebisi na Nzambe oyo ya kokima Babilone Monene bakozala na likoki ya kokota kati na mokili ya sika elakami na Nzambe kozanga kokufa. Kuna, bakozala na likoki ya kosalela losambo na solo mpe kosambela Jéhovah seko na seko.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na bandimbola ya sikisiki na ntina na losambo ya baanzelu oyo eyebisami na Bakolose 2:18, tanga Mosenzeli ya 15 février 1986, nkasa 8, 9.
b Mpo na ndimbola molai ya esakweli yango, tala mokanda La Revelation: le grand dénouement est proche! oyo ebimisamaki na Société Watchtower, mikapo 33 kino 36.
Bozongeli
◻ Mpo na oyo etali losambo likanisi ya nani lizali na ntina mingi mpe mpo na nini?
◻ Yebisa masengami mibale ya losambo na solo oyo Yakobo alobelaki.
◻ Yebisa masɛngami mosusu ya losambo na peto.
◻ Nsango malamu” nini ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola?
◻ Na ndimbola nini losambo ya solo ekolonga oyo ya lokuta?