Elikya nini ezali mpo na mabelé?
Buku World Military and Social Expenditures 1996 elobi ete: “Ekeke moko te ekokani na ekeke ya 20 mpo na mobulu, bitumba, motuya ya bato bakimá mboka, kobomama ya bamilio ya bato na bitumba, mpe kobimisama ya mosolo mingi mpo na komibatela na banguna.” Ezaleli oyo ekobongwana mokolo mosusu?
Ntoma Petelo akundwelaki baklisto elaka moko Nzambe apesaki bikeke mingi liboso ete: “Nde tozali kotalela Likoló na sika mpe [mabelé, NW] na sika pelamoko elakaki ye [Nzambe], boyengebene ekofanda kati na yango.” (2 Petelo 3:13) Maloba oyo malobamaki libosoliboso na esakweli ya Yisaya. (Yisaya 65:17; 66:22) Yisalaele ya kala emonaki kokokisama ya liboso ya esakweli yango wana libota yango ezongaki na Mokili ya Ndaka nsima ya kolekisa mbula 70 ya boombo na Babilone. Na kozongeláká elaka ya “makoló ya sika mpe mabelé ya sika,” Petelo amonisaki ete esakweli yango ekokokisama lisusu na monene koleka—elingi koloba na mokili mobimba!
Mokano ya Nzambe ezali ya kotya boyengebene na mokili mobimba, mpe akokokisa yango na nzela ya Bokonzi na ye ya likoló oyo Yesu azali mokonzi na yango. “Libota moko ekotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.” (Yisaya 2:4) Kimya yango mpe kobatelama ya mokili mobimba ezali yango nde Yesu ateyaki bayekoli na ye bálikyaka mpe bábondelaka kati na libondeli oyo babéngaka lelo Tata na biso, to Libondeli ya Nkolo, kolobáká ete: “Tiká Bokonzi na yo eya, tiká mokano na yo esalama na nse pelamoko na Likoló.”—Matai 6:9, 10.
Okosepela kofanda na mokili oyo ezali na boyengebene lokola boyengebene ya likoló? Yango ezali elikya Biblia ezali kopesa na moto nyonso oyo azali koluka koyeba Nzambe na motema mobimba mpe kozala na bomoi engebene banzela na ye ya boyengebene.