Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/3 nk. 29-31
  • Bolóngi ya kampanye oyo esalelaki Nsango ya Bokonzi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bolóngi ya kampanye oyo esalelaki Nsango ya Bokonzi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kampanye esimbami na mɔ́tɔ nyonso
  • Biyano ya nokinoki
  • Lisalisi ya bato mosusu kati na bokaboli
  • Babosanaki moto moko te
  • Kobanda mokolo ya 20 Ɔkɔtɔbɛ tii 16 Novɛmbɛ, tokosala kampanye monene ya kokabola trakte!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Tókabola trakte Nsango ya Bokonzi No. 35 mingi
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Salelá yango na mabaku nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Nsango ya Bokonzi No. 38 ekokabolama na sanza ya zomi na moko!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/3 nk. 29-31

Bolóngi ya kampanye oyo esalelaki Nsango ya Bokonzi

“MPO na nini bomoi etondi na mikakatano?​—Tokofanda mokolo mosusu na Paladiso kozanga mpasi?” Wana ezalaki motó na likambo ya Nsango ya Bokonzi No. 34, trakte moko ya nkasa minei oyo ekabolamaki na mokili mobimba na nkótá 139 na boumeli ya sanza ya Apríli mpe Máí ya mobu moleki. Batatoli ya Jamaïque balobelaki mosala ya kosakola ya kampanye wana lokola “moko na makambo ya ntina ya mobu.” Batatoli ya Belgique babéngaki yango “ntina ya esengo monene mpo na bandeko.” Na République Tchèque ezalaki mbala ya liboso Batatoli ya Yehova bázwa libaku ya kosangana na bokaboli Nsango ya Bokonzi. Filiale elobi ete: “Kampanye yango ememaki elimo ya molende mpe ya mɔ́tɔ.” Mayoki motindo yango mamonisamaki mpe na bamboka mosusu.

Nsango ya Bokonzi No. 34 ezalaki koyebisa likambo moko ya ntina epai na baoyo bazali kokimela mpe konguluma na ntina na misala ya mbindo oyo misalemi na nkombo ya mangomba. (Ezekiele 9:4) Ezalaki na libɔndisi mpo na baoyo bomoi na bango ebulungani na ntina na “ntango ya mpasi” oyo bazali na nguya moko te ya kobongola yango. (2 Timoté 3:1) Kobendáká likebi likoló na Biblia, trakte yango emonisaki ete mosika te mikakatano ya bomoi mikosila. Paladiso oyo ezangi mpasi ezali likambo ya solo. (Luka 23:43) Bato mingi oyo batángaki Nsango ya Bokonzi yango bandimisamaki na makambo mazali kati na yango. Na Togo mobali moko alobaki na Motatoli moko ete: “Makambo oyo bolobi makoki kotyamela ntembe te.”

Na ntembe te, bokaboli ya Nsango ya Bokonzi yango ebendaki likebi mingi mpenza. Na Danemark nkolo ndako moko ayanolaki Motatoli oyo apesaki ye trakte ete: “Nauti sikawa na États-Unis. Liboso ete nalongwa, moto moko apesaki ngai trakte na bino. Sikawa nauti bobele kokóma, mpe nokinoki trakte yango epesameli ngai na lokótá Danois!”

Kampanye esimbami na mɔ́tɔ nyonso

Batatoli ya Yehova na mokili mobimba basanganaki na mɔ́tɔ nyonso na mosala ya kokabola trakte wana. Autriche, El Salvador, Haïti, Hongrie, Italie, Nouvelle Calédonie, ezalaki bobele mwa ndambo ya bamboka mingi oyo izwaki motángo monene ya sika ya basakoli na basanza oyo Nsango ya Bokonzi ekabolamaki.

Na Zambie, mokɛngɛli ya zongazonga moko ateyaki mwana na ye ya mwasi ya mibu misato, Deborah, lolenge ya kolakisa mikanda ndako na ndako. Na boumeli ya kampanye na Nsango ya Bokonzi No. 34, Deborah akabolaki batrakte koleka 45. Mama na ye abandaki koyekola Biblia na bato mosusu oyo bazwaki Nsango ya Bokonzi epai na Deborah.

Na Afrika ya Súdi elenge moko apesaki trakte epai na moninga na ye ya kelasi na nkombo Cashia. Cashia atángaki trakte mpe alobaki ete: “Oyo ezali kitoko mingi​—kozala na bomoi ya seko na paladiso na mabelé! Mpo na nini bayebisaki ngai yango liboso te?” Boyekoli ya Biblia ebandaki. Kati na pɔ́sɔ yango Cashia azwaki trakte mosusu. Oyo ya mibale eutaki na mokomani na ye oyo azalaki Mokatolike ya Loma, na mboka Chypres. Mokomani yango alimbolaki Cashia mpo na nini mateya ya Lingomba ya Katolike ya Loma mazali ya lokuta mpe ayebisaki ete alingaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Ya solo, yango elendisaki mingi ekateli ya Cashia ya kokóba na boyekoli na ye.

Na Suisse elenge mobali moko ya mibu zomi asanganaki na bokaboli trakte elongo na mama na ye. Apesaki trakte moko na elenge mwasi moko mpe alendisaki ye ete atánga yango na likebi mingi. Elenge mwasi atunaki mwana mobali yango soki azalaki mpenza kondima makambo mamonisami na bililingi ya ezipeli​—bomoi ezangi nsuka na mabelé. Mwana mobali ayanolaki nini? “Ee, nandimisami mpenzampenza.” Mwasi yango amonisaki bongo ete azalaki koluka lingomba ya solo mpamba te bongolabongola ezali mingi kati na lingomba na ye. Na bozongeli ya sika, boyekoli ya Biblia ebandaki.

Biyano ya nokinoki

Na bantango mosusu Nsango ya Bokonzi ebimisaki eyano ya nokinoki epai na baoyo batángaki yango. Nsima ya kotánga trakte yango, elenge mwasi moko ya mibu 11 na Belgique ayebisaki na Motatoli ya Yehova moko ete azalaki na momeseno ya koyiba biloko na bamagazini. Mama ya elenge mwasi yango alingaki kobomba likambo yango, kasi lisosoli ya elenge mwasi yango etungisamaki na makambo oyo ye atángaki, mpe alobaki ete asengelaki bobele kokenda kokutana na mokambi ya magazini yango. Na nsuka mama na ye andimaki kotika mwana na ye ya mwasi kozonga na magazini elongo na Motatoli. Mokambi akamwaki mingi na ntubela na ye. Ntango ayokaki ete ezalaki Nsango ya Bokonzi nde epusaki ye na kosala bongo, azwaki moko na yango mpo na komona nini oyo kati na yango ezalaki na nguya motindo wana. Elenge mwasi yango azali sikawa kokóla malamu kati na boyekoli ya Biblia.

Motatoli moko na Cameroun atikelaki mobali moko Nsango ya Bokonzi moko mpe alobi ete: “Ntango tozongaki, tokutaki ete asilaki kotyela yango mikoloto mpe azalaki na mituna ya kotuna. Nsima ya kozwa biyano bibongi, alobaki ete: ‘Ezali mpenza solo ete mangomba masili kosangana na mpasi ya bato. Trakte na bino esalisaki ngai na kososola makambo mingi, kasi nalingi koyeba lisusu makambo mingi koleka oyo.’” Azali sikawa koyekola Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ.

Motatoli moko oyo azalaki kokenda ndako na ndako na Uruguay atikelaki mobali moko trakte. Motatoli alandaki mosala na ye ya kosakola ndako na ndako mpe asakolaki zingazinga ya etuluku moko ya bandako kino na ekuke ya nsima ya ndako ya mobali yango. Akamwaki komona ete mobali yango azalaki kozela, na trakte na mabɔkɔ na ye. Asilaki kotánga yango mpe alingaki koyeba makambo mingi. Boyekoli ebandaki mbala moko.

Lisalisi ya bato mosusu kati na bokaboli

Na Japon elenge Motatoli moko abɛlɛmaki epai na mobali moko ya mibu soko 50 mpe alakisaki ye trakte. Mobali yango atunaki ye ete: “Okosala nini na makomi yango soki okutani na bato oyo bamonaka te?” Motatoli alobaki ete ayebi te. Mobali yango alobaki na ye ete azela moke mpe akɔtaki na ndako na ye. Abimaki na kopi moko ya Nsango ya Bokonzi mpe alobaki ete: “Nasilaki kozwa makomi yango. Nakanisi ete yango ezali na makambo kitoko mpe ya ntina mingi, yango wana nakomaki yango na Braille. Soki olingi salelá oyo mpo na bato oyo bazali bakufeli miso.” Mobali yango alekisaki bangonga mingi mpo na kokoma Nsango ya Bokonzi na Braille mpo ete bakufeli miso bázanga te makambo oyo mazali kati na yango.

Na Slovaquie mobali moko alingaki trakte yango mingi na boye ete asalaki fɔtɔ́kopi na yango 20, mpe akabolaki yango ye moko. Mosakoli moko na Suisse atikelaki libota moko Nsango ya Bokonzi mpe alandaki kosakola na bandako likoló ya ndako ya libota yango. Ntango akitaki, akutanaki na elenge mobali moko ya libota yango, oyo asɛngaki ye trakte 19. Na eteyelo ya elenge mobali yango, banakelasi bapesamaki mokumba ya kokoma makambo matali mikakatano mpe koluka lolenge nini yango ekosila. Alingaki ete mokomoko ya baninga na ye ya kelasi azwa Nsango ya Bokonzi moko.

Babosanaki moto moko te

Baoyo basanganaki na kampanye wana bamekaki na makasi komindimisa ete babosanaki moto moko te. Na Nouvelle Calédonie Batatoli mibale bazalaki kokenda mpo ete bákabola Nsango ya Bokonzi na teritware mosika efandami na bato ya ekólo moko boye. Na nzela, bamonaki nzela moko oyo emonanaki lokola ete ezalaki kosalelama te, atako bongo bazwaki ekateli ya kokenda komona soki moto moko azalaki kofanda na nsuka na yango. Wana batikaki motuka na bango, balandaki nzela yango, kokatisáká milúká na makolo kino na nsuka bamonaki ndako moko. Babalani mibale oyo bayokaki naino nsango ya Batatoli ya Yehova soko moke te bazalaki kofanda kuna, mpe bazwaki Nsango ya Bokonzi moko. Na nsima basakoli yango basalaki bozongeli ya sika mpe bakamwaki na komona ete babalani yango basilaki kobongisa nzela mpe gbagba mingi mpo ete Batatoli bákoka kokóma na motuka na bango kino kuna. Boyekoli ya Biblia ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ ebandaki.

Na Pologne Motatoli moko asengelaki kokatisa esika moko ya botongi mpo na kokenda kotikela nkolo ndako moko Nsango ya Bokonzi. Basáli bamonaki ye wana azalaki kozonga mpe koleka na esika ya botongi. Na nsuka, moko na basáli abéngaki ye, asɛngaki na ye ete abosana bango te. Ntango ayaki epai na bango, bakataki mosala mwa moke mpe bayokaki na likebi nyonso wana azalaki kolakisa bango trakte. Bazwaki Nsango ya Bokonzi mpe bazulunalo mpe na nsima, bazwaki babúku ntango azongelaki bango.

Bankámá ya bamilió ya Nsango ya Bokonzi No. 34 esili kokabolama na nkótá mingi. Nsango na yango esili kosala bopusi monene. Bato mingi basili koyoka ete paladiso oyo ezangi mpasi ekoki kosalema. Tozali kobondela ete bato ya motema sembo bálanda koyanola mpe na nsuka bázala kati na “basɔkɛmi” oyo “bakosangola mokili . . . bakosepela mpe na kimya na solo.”​—Nzembo 37:11.

[Etanda na lokasa 31]

Tólanda kokabola bazulunalo!

Na Apríli mpe Máí 1995 ezalaki na kampanye moko monene ya bokaboli Nsango ya Bokonzi No. 34. Na boumeli ya basanza wana mibale, bokaboli monene ya bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! esalemaki mpe. Na ndakisa, ndeko moko na République Tchèque, ayebisi ete na Apríli ye akabolaki bakopi ya Nsango ya Bokonzi 250 mpe bazulunalo 750. Na Guadeloupe, Mwapɔ́sɔ 15 Apríli eponamaki lokola mokolo ya sipesiale mpo na kokabola bazulunalo. Basakoli pene na nyonso ya mboka yango basanganaki na mosala ya kosakola na mokolo wana! Na Apríli, Slovaquie ezwaki motuya ya sika ya bokaboli bazulunalo. Lapólo lolenge moko eutaki na bamboka mosusu mingi.

Bongo mpo na nini te kosala ete Apríli mpe Máí 1996 ezala basanza ya ntina mpo na kokabola bazulunalo? Masangá makoki kobongisa mikolo ya sipesiale mpo na bokaboli bazulunalo. Bandeko bakoki kosangana mingi kati na mosala ya mobongisi-nzela mosungi. Na myango wana mpe na myango misusu, bokaboli ya bazulunalo bokoki kolendisama, mpe nsango ya ntina mingi oyo esakolamaki kati na Nsango ya Bokonzi No. 34 ekolanda kopalanganisama. Bongo, lokola esalemaki na mobu moleki, na ntembe te Yehova azali kopambola elimo ya molende oyo tozali komonisa.​—2 Timoté 4:22.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto