Masoló ya Basakoli ya Bokonzi
Baoyo bazalaki kala banguna basangani lelo kati na mosala ya Yehova
“MBALA ya liboso oyo nayokaki nsango ya Batatoli ya Yehova ezalaki na ntango nazalaki na limpinga ya basodá bakɛngɛli na Bosnie,” elobaki Branko.a
Branko azalaki na mokumba ya kosɛnzɛla lopitalo epai batyaki bato oyo bazokaki mpe bazalaki kozwa lisalisi ya minganga. Moko na minganga azalaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova, mpe wana bazalaki kosala na butu, alimbolaki na Branko makambo mingi oyo ayekolaki na ntina na Biblia.
Makambo oyo Branko ayokaki na butu wana makamwisaki ye mingi na boye ete atikaki bibundeli na ye. Akutanaki na Batatoli ya Yehova, na mokano ya koyeba makambo mingi. Mwa ntango moke na nsima, wana akendaki na mboka mosusu ya Mpótó, Branko alukaki Ndako ya Bokonzi mpe abandaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova na lisangá epai balobaka lokótá ya Yougoslavie. Ezalaki kuna nde Branko akutanaki na Slobodan.
Slobodan mpe autaki na Bosnie mpe asalaki lokola volontɛrɛ kati na etumba moko oyo Branko abundaki—kasi na ngámbo ya banguna. Slobodan asungaki kati na limpinga ya ba Serbes mpo na kobundisa ba Croates. Ntango bango mibale bakutanaki, Slobodan asilaki kokóma Motatoli oyo azwi batisimo. Amipesaki mpo na koyekola Biblia elongo na Branko, monguna na ye ya kala. Wana boyekoli yango ezalaki kokenda liboso, Branko asosolaki makambo mingi na ntina na Yehova, mpe bolingo na ye mpo na Nzambe ekólaki. Yango etindaki Branko na kopesa bomoi na ye mpo na Mozalisi. Na Ɔkɔtɔ́bɛ 1993 amonisaki komipesa yango na nzela ya batisimo ya mai.
Lolenge nini Slobodan akómaki Motatoli ya Yehova? Esilaki koleka mwa ntango uta alongwaki na Bosnie, oyo ezali mboka ya etumba. Asilaki kotánga mikanda misusu ya Batatoli, kasi ezalaki bobele ntango Batatoli mibale bayaki na ndako na ye na ebandeli ya 1992 nde bosepeli na ye mpo na Liloba ya Nzambe ekólaki mingi. Nani oyo akendaki epai na Slobodan, mpe amipesaki mpo na koyekola Biblia elongo na ye? Ezalaki Mujo, oyo autaki mpe na Bosnie kasi akólaki na lingomba ya Mizilmá. Wana boyekoli ya Biblia ezalaki kokenda liboso, Mujo mpe Slobodan, oyo kala bazalaki banguna, balekisaki ntango elongo mikolo nyonso mpo na kolendisana kondima moko na mosusu.
Etumba na ex-Yougoslavie esili koboma ebele ya bankóto ya bato. Kasi Branko, Slobodan, mpe Mujo bazali sikawa basakoli ya ntango nyonso ya nsango malamu kati na lisangá ya Batatoli ya Yehova. Basili kolónga bokabwani oyo eutaka na bokabwani ya ekólo, mpe sikawa bazali koluka kimya na kotosáká Mozalisi, Yehova.
Nini ememaki mbongwana lolenge yango? Ezalaki bolingo na bango mpo na Yehova, limemya na bango mpo na Biblia, mpe mposa makasi ya kosalela solo ya Biblia kati na bomoi na bango. Lokola Makomami Mosantu malobi yango, “Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, . . . mpe ezali komeka makanisi mpe mikano na motema.”—Baebele 4:12.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bankombo epesami awa ezali bankombo ebongolami.