Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/10 lok. 1
  • Salelá yango na mabaku nyonso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salelá yango na mabaku nyonso
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Salelá trakte ya sika oyo elobeli site jw.org
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Kobanda mokolo ya 20 Ɔkɔtɔbɛ tii 16 Novɛmbɛ, tokosala kampanye monene ya kokabola trakte!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2008
  • Tósalela batrakte mpo na kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 12/10 lok. 1

Salelá yango na mabaku nyonso

1. Trakte Koyeba solo esalisaka na likambo nini?

1 Trakte Okosepela koyeba solo? ebimisamaki mpo na kosalisa biso tóbanda koyekola na bato Biblia. Kasi trakte yango ezali mpe esaleli malamu mpo na kolona mboto ya solo. (Mos. 11:6) Makanisi oyo elandi ekosalisa biso tósalela yango malamu.

2. Ndenge nini tokoki kosalela trakte yango mpo na kobanda lisolo?

2 Mpo na kobanda lisolo: Okoki kopesa moto trakte yango na lobɔkɔ, kolakisa ye mituna motoba oyo ezali na lokasa ya liboso, mpe kotuna ye: “Na mituna oyo, wapi oyo yo omitunaka?” Nsima ya koyoka eyano na ye, salelá eyano ya Biblia oyo ezali na trakte yango mpo na koyanola moko ya mituna oyo moto yango atunaki mpe tángá vɛrsɛ moko to mibale oyo bapesi. Tángá to limbolá na mokuse makambo oyo ezali na lokasa ya nsuka, mpe lakisá ye buku Biblia eteyaka. Ata soki aboyi kozwa buku, asili kozwa trakte, oyo ekoki kosala ete solo ekɔta na motema na ye.​—Mat. 13:23.

3. Tokoki kosala nini soki moto azali na ntango te?

3 Soki moto azali na ntango te: Okoki koloba: “Lokola toyei na ngonga ya mabe, tiká natikela yo trakte oyo. Ezali na mituna motoba ya ntina, oyo mingi na biso tomitunaka mpe epesi eyano ya polele oyo euti na Biblia na motuna mokomoko. Ntango nakoya kotala yo mbala ya nsima, nakosepela oyebisa ngai likanisi na yo.”

4. Tokoki koloba nini mpo na kopesa moto trakte yango ntango tozali kosakola na balabala?

4 Ntango tozali kosakola na balabala: Okoki koloba boye: “Mbote. Osilá komituna moko ya mituna oyo? [Tiká ye apesa eyano.] Trakte oyo ezali na biyano ya polele mpe ya kotyela motema oyo Biblia epesi.” Soki moto azali na mwa ntango, okoki kotalela ná ye moko ya biyano oyo ezali na trakte yango mpe ata kolakisa ye buku Biblia eteyaka.

5. Ndenge nini tokoki na bantango mosusu kosalela trakte yango soki tokuti bato na ndako te?

5 Soki tokuti bato na ndako te: Na bateritware mosusu, mbala mingi basakoli batikaka mikanda na bandako oyo bakuti bato te, na esika oyo bato mosusu bakoki komona yango te. Soki lisangá na bino esalaka bongo, mpo na nini te na bantango mosusu kotika trakte Koyeba solo? Ntango bozongeli bato yango, bokoki koloba: “Ntango tolekaki awa mbala ya liboso, tokutaki bino te, yango wana totikelaki bino trakte oyo na porte. Na mituna oyo, okosepela kozwa eyano na oyo wapi?”

6. Nini esalaka ete trakte Koyeba solo ezala esaleli moko ya malamu na mosala ya kosakola?

6 Trakte Koyeba solo eteyaka solo na ndenge ya pɛtɛɛ mpe ya polele. Esepelisaka bato ya mangomba mpe ya bikólo nyonso. Ezali mpasi te mpo na kolakisa yango; ata bana mike mpe basakoli ya sika bakoki kolakisa yango. Osalelaka trakte yango na mabaku nyonso oyo okutanaka na yango?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto