Tiká ete Pole na bino engɛnga!
NSUKA nsuka ntango esilaki mpenza kokóma mpo ete mobangé mobali yango amona Masiya oyo alakamaki! Na nzela ya emonaneli ya Nzambe Simeona ayebaki ete “akomona kufa te kino ekomona ye Klisto na [Yehova].” (Luka 2:26) Oyo nde esengo monene ntango Simeona akɔtaki na tempelo mpe Malia mpe Yosefe batyaki mwana moke Yesu na mabɔkɔ na ye! Asanzolaki Nzambe, ete: “Sasaipi, Nkolo, otika moombo na yo kokenda na kimya pelamɔkɔ elobaki yo; mpo ete miso na ngai mamoni kobikisa na yo . . . [pole] mpo na emoniseli na mabota, mpe nkembo na bato na yo Yisalaele.”—Luka 2:27-32; kokanisá na Yisaya 42:1-6.
Uta batisimo na ye wana azalaki na mibu 30 kino kufa na ye, Yesu amonisaki ete azalaki “pole” mpo na mokili. Na lolenge nini? Angɛngisaki pole ya elimo na kosakoláká na ntina na Bokonzi ya Nzambe mpe mikano na Ye. Atɔndɔlaki mpe mateya ya lokuta ya mangomba mpe amonisaki polele misala oyo mizalaki ya molili. (Matai 15:3-9; Bagalatia 5:19-21) Na yango, Yesu akokaki koloba na elónga nyonso ete: “Ngai nazali [pole] na mokili.”—Yoane 8:12.
Yesu akufaki na mobu 33 T.B. Pole ezimisamaki? Soko moke te! Ntango azalaki naino awa na mabelé, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Tiká ete [pole] na bino engɛnga liboso na bato.” (Matai 5:16) Na lolenge lobongi, nsima ya kufa ya Yesu bayekoli na ye batikaki te kongɛngisa pole yango.
Na ndakisa ya Yesu, na mikolo na biso oyo baklisto bazali kongɛngisa pole ya Yehova na komipesáká kati na mosala ya kosakola. Bazali “kotambolaka lokola bana na [pole],” komimonisáká bango moko bandakisa oyo ezali kongɛnga kati na lolenge ya bomoi ya boklisto.—Baefese 5:8.