Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g00 Avril lok. 31
  • Kondima na ye elendisi ngai

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kondima na ye elendisi ngai
  • Lamuká!—2000
  • Masolo mosusu
  • Batata mibale​—⁠Napona oyo wapi?
    Lamuká!—1998
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nazwaka makasi na bolɛmbu na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Botondi mpo na lisungi ya sembo ya Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Lamuká!—2000
g00 Avril lok. 31

Kondima na ye elendisi ngai

Elenge mwasi moko ya mbula 17 akomelaki biro ya la Société Watch Tower na ékolo Moldavie (ex-Union soviétique), mpo na komonisa ndenge asepelaki na lisolo moko oyo ebimaki na Lamuká! ya Ɔkɔtɔbɛ-Desɛmbɛ 1998. Lisolo yango ezalaki na motó ya likambo: “Batata mibale​—Napona oyo wapi?” mpe ezalaki kolobela bomoi ya elenge mobali moko na ékolo Arménie.

Elenge mwasi yango alobaki ete: “Ntango nazalaki kotánga lisolo yango, nalelaki mpamba te makambo oyo mwana mobali wana akutanaki na yango ekokani na oyo ngai nakutanaki na yango.” Alobaki lisusu boye: “Ntango nazalaki na mbula 15, nabandaki koyekola Biblia mpe na ebandeli baboti na ngai bapekisaki ngai te. Kasi ntango nabandaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova, basepelaki ata moke te. Na nsima, na 1997, ntango nabandaki koyebisa bato mosusu makambo oyo nazalaki koyekola, balobaki na ngai ete: ‘Kendá epai ya baninga na yo Batatoli, báleisa yo, bálatisa yo mpe bápesa yo mosala. Yo ozali mpenza mwana mabe!’ Baboti na ngai babɛtaki kutu ngai, bazalaki kotutisa ngai motó na efelo ya ndako.

“Ezalaki komekama moko monene mpo na ngai. Mbala mingi nazalaki na makanisi ndenge moko na elenge wana ya Arménie, oyo alobaki ete na bantango mosusu azalaki komituna soki Yehova azalaki mpenza kosepela na ye. Namitunaki: ‘Nazali mpenza na ntina te? Yehova akolimbisa masumu na ngai ya kala? Yehova alingaka ngai lisusu te?’

“Ezalaki mpenza mpasi, mingimingi ntango nakanisaki ete Yehova alingaki ngai lisusu te. Mbala mingi nabondelaki Yehova, na mai na miso, ete asalisa ngai, apesa ngai makasi mpo natika ye te. Mpe ya solo, namonaki ete Yehova ayokaki mabondeli na ngai mpe malɔmbɔ na ngai. Apesaki ngai makasi mpo natɛlɛma ngwi, nalɛmba te mpe nazala na molende. Asalisaki ngai mingimingi na nzela ya Liloba na ye, esika mokomi na nzembo alobaki na elikya nyonso ete: “Ata tata mpe mama bakotika ngai, nde [Yehova] akolɔkɔta ngai.”​—Nzembo 27:10.

“Na mokolo ya 27 Sɛtɛmbɛ 1997, nazwaki batisimo mpo na komonisa ete namipesi na Yehova, na liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova oyo esalamaki na Kagul. Namoni polele ete Yehova, Tata na biso ya bolingo oyo azali na likoló, akokisaka elaka na ye oyo ezali na Nzembo 84:11 ete: “[Yehova] Nzambe azali moi mpe nguba, [Yehova] akopesa ngɔlu mpe nkembo; akoboya kopesa eloko malamu soko moke te na baoyo bazali kotambola alima.”

“Nazali mpenza kotɔnda elenge wana ya Arménie oyo ayebisaki lisolo na ye ya kolendisa na zulunalo Lamuká! Nazali na elikya ete, mokolo mosusu, baboti na ngai na baboti na ye bakosepela na mateya ya Biblia.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto