Makambo mazali koleka na mokili
Bisabola ya pápa
Zulunalo L’Osservatore Romano elobi ete mpo na kokumisa mibu nkóto ya sika, Pápa Jean Paul II alobi ete mobu 2000 ezali mobu mosantu mpe akopesa esabola (kolimbisa masumu) na bato nyonso oyo bakosala mobembo na Rome. Esabola ezali nzela mpo na kosikola Bakatolike na etumbu ya masumu. Zulunalo ya Vatican elobi ete: “Misala nyonso ya malamu oyo moto asali na ngrasya ya Nzambe esengeli kozwa lifuti.” Nzokande, zulunalo yango elobi ete yango ezali kobimisa mituna mosusu ya ntina lokola, “Soki bolimbisi oyo euti na ngrasya ya Nzambe ezali mpo na bato nyonso, mpo na nini Lingomba ezali lisusu kopesa bisabola?” mpe “Soki Lingomba ekoki kopesa bisabola na masumu nyonso, mpo na nini ezali komitungisa na kopesa bisabola ndambondambo?”
Maladi moko ya kobombana
Zulunalo Toronto Star elobi ete ostéoporose ezali maladi ya kobombana oyo ezali “kotya bato koleka milio 28 na likama na États-Unis mpe bato soko milio 1,4 na Canada.” Maladi yango ezwaka mibali mpe basi, bilenge mpe mikóló, mpe “ezwaka moto soki basɛlilɛ ya mikuwa na ye ezali kokufa mbangu koleka ndenge ezali kobotama.” Mbala mosusu, moto oyo azali na maladi yango, akoyeba kaka soki abukani. Minganga balobi ete momeseno ya koponapona biloko ya kolya (regime) oyo bilenge mingi mpe banakelasi mingi oyo basalaka ngalasisi bazalaka na yango, “elyaka mokuwa oyo esengelaki komitonga mpo na ntango bakokóma mikóló. Mbala mingi, bana yango baboyaka kolya bilei ya ntina oyo esengeli koyeisa mikuwa na bango makasi.” Lapolo yango elobi ete ntango moto akómi “na mbula 18, mikuwa mingi ya nzoto na ye mobimba (90%) esili kotongama, mpe mikuwa nyonso ya nzoto mobimba esilaka kotongama ntango moto akómi na mbula 30.” Lapolo esɛngi ete mpo na kokolisa mikuwa malamumalamu, moto nyonso asengeli ‘kolya biloko oyo epesaka calsium mpe vitamini D mingi, kosala ngalasisi mbala na mbala, komela likaya te mpe komela masanga mingi koleka te.’
Mobulu na kati ya mpɛpɔ
Zulunalo Business Traveler International elobi ete: “Motango ya bato ya nkanda makasi na kati ya mpɛpɔ—emati mingi mpenza (400%) na boumeli ya mbula mitano oyo eleki.” Mpo na nini motango yango emati boye? Ntina ya liboso: bato bazali komitungisa mingi. Mpɛpɔ ezali kokóma mpe kokende na ngonga oyo etyamaki te to mobembo ezali kosalema te na mokolo oyo etyamaki, mpe kobanga komata mpɛpɔ, makambo nyonso wana etungisaka bato mpe ekoki kokómisa bango nkandankanda. Stuart Howard, moto ya Fédération des personnels du transport international alobi ete: “Bakompanyi ya mpɛpɔ bamonisaka ete kosala mobembo na mpɛpɔ ezali kosala mobembo noki mpe mobembo ya kimya, kasi makambo ezali bongo te.” Mokonzi ya kompanyi moko ya mpɛpɔ alobi ete mobeko oyo epekisi komela likaya na kati ya mpɛpɔ ezali ntina mosusu oyo bato bazalaka na nkanda. Ankɛtɛ moko emonisi ete na kompanyi moko, na 1997, “koleka katikati ya bato oyo babimisaki mobulu ezalaki bato oyo bamelaka likaya kasi bapekisaki bango komela likaya na kati ya mpɛpɔ.” Ntina mosusu ya mobulu ezali soki moto ameli masanga mpe amati na mpɛpɔ, kuna na likoló molangwa eyaka makasi. Lapolo yango epesi toli nini soki moto oyo azali pembeni na yo na mpɛpɔ azali kolobaloba mingi? “Kobenga hôtesse te. Tɛlɛmá mpe kendá koyebisa hôtesse likambo yango na mayele.” Epesi lisusu toli oyo: “Okoki komema mikanda ya kotánga to koyoka mwa miziki na mongongo ya nse” na radio ya moke oyo ezalaka na nsinga ya kotya na matoi “mpo makɛlɛlɛ ebima te.”
Kotumba bibembe
Bato mingi bakómi kotumba bibembe mpo kokunda ebembe ezali kosɛnga mbongo mingi. Lisangá moko oyo etalelaka likambo yango (National Funeral Directors Association) elobi ete na États-Unis, na mobu 1996, mpo na kokunda ebembe ndenge bato bameseni kosala yango, esɛngelaki kozala na mbongo dolare 4 600. Nzokande, zulunalo Chicago Sun-Times elobi ete “kotumba ebembe esɛngaka dolare 500 tii 2 000, na kotalela sanduku oyo baponi ete bátumba na yango ebembe mpe oyo bakobomba na yango mputulu ya ebembe yango.” Lisusu, kotumba ebembe esɛngaka te kosomba mabele mpe libanga ya lilita; mbongo oyo ekosɛnga kobakisa (40 %) na mbongo oyo ekobima mpo na kokunda na ndenge ya momeseno. Zulunalo yango elobaki ete na États-Unis, na 1997, batumbaki bibembe 23,6 likoló ya 100, mpe bakanisi ete motango yango ekomata (na 42 %) na boumeli ya mbula zomi oyo ezali koya.
Ba fossiles ezali na likama
Zulunalo New Scientist elobi ete bisika oyo bitika ya nyama to ya nzete (fossiles) ezali, oyo ebatelami banda bankóto ya bambula ezali na likama mpo na miyibi, bato ya mobulu, mpe baturiste oyo baleki molende. Zulunalo yango elobi ete “bato ya géologie mosusu balingi kutu kolongola bitika mosusu oyo ezali na ntina mingi mpe bákende kobatela yango na bamizɛ to mpe bápekisa ete bato báyaka kotala bisika yango.” Nzokande, basusu balobi ete bato basengeli kotala bitika yango na esika na yango mpenza. Na milende oyo bazali kosala mpo na kosilisa mokakatano yango, Association internationale de paléontologie ebandi kosala liste ya bisika oyo bitika ezali na likama monene na mokili mobimba. Kasi, kino sikoyo, kaka bisika 50 nde ekomami na liste yango.
Bosɔtɔ ya misala ya niklɛɛrɛ
Zulunalo New Scientist elobi ete uta bambula ya 1960, masini oyo esalelaka biloko ya niklɛɛrɛ mpo na kopesa mɔ́tɔ ya lotiliki ebimisi batɔni koleka 200 000 ya bosɔtɔ. Mpe mbula na mbula, tɔni 10 000 ezali kobakisama. Bosɔtɔ wana oyo ebomaka bakobwaka yango wapi? Zulunalo yango elobi ete: “Mingi na yango etyami bobele na bisika bamasini ya lotiliki ezali. Nzokande, bisika wana esengelaki kofandisa bosɔtɔ ya niklɛɛrɛ kaka mpo na mwa bambula. Na mikolo ya nsima, esengeli kolekisa bosɔtɔ yango ya niklɛɛrɛ na bisika oyo ekofanda libela. Kasi, mokakatano ezali ete ekólo moko ebongisi naino esika moko te na kati ya mabele mpo na kobwaka bosɔtɔ na bango. Yango wana, zulunalo New Scientist elobi ete “bakompanyi oyo ezali kosalela bamasini ya niklɛɛrɛ ekangami na motambo oyo yango moko etyaki.”
Makama na mosala
Zulunalo Le Monde emonisi ete na mokili mobimba, mokolo na mokolo bato 3 000 bakufaka na makama na mosala. Bureau international du travail emonisi ete mbula na mbula bato ya mosala milio 250 bazokaka, mpe kati na bango milio moko bakufaka. Zulunalo yango elobi ete “bato oyo bazali kokufa na likama na esika ya mosala bazali mingi koleka bato oyo bazali kokufa na makama ya motuka (990 000), na bitumba (502 000), na mobulu (563 000), na sida (312 000).
Bajɛstɛ epesaka likoki ya kozwa liloba oyo esengeli
Zulunalo Newsweek elobi ete: “Baankɛtɛ oyo euti kosalema emonisi ete mbala mingi bajɛstɛ esalisaka moto oyo azali koloba azwa maloba na esika abombaka maloba na kati ya bɔɔngɔ na ye.” Atako mbala mingi bajɛstɛ ya kolakisa esalisaka mpo na komonisa bonene to lolenge ya eloko, nzokande bajɛstɛ mosusu, lokola “bajɛstɛ ya mabɔkɔ ntango moto azali koloba likambo moko,” ezalaka na ntina mosusu. Robert Krauss, profɛsɛrɛ ya psikoloji na Columbia University alobi ete bajɛstɛ ya ndenge wana “esalisaka moto oyo azali koloba abimisa maloba oyo ebombami na bɔɔngɔ na ye” mpe afungola eloko oyo abengaka “esika ya kobomba maloba.” Balukiluki bakokanisaka ebombelo yango na boyokani oyo esalemaka ntango nsolo moko, elɛngi moko, to lolaka moko ezali kokundola likambo moko. Na ndakisa, monganga Brian Butterworth alobi ete lokola nsolo ya malasi moko ekoki kosala ete okanisa nkɔkɔ na yo ya mwasi, bajɛstɛ ekoki kofungolela yo “nzela” mpo ozwa liloba.
Kanser ya monɔkɔ ekómi mingi
Zulunalo The Indian Express elobi ete na Delhi, na Inde, kanser ya monɔkɔ ezali kozwa bato mbala minei koleka na Los Angeles, Californie. Sikawa mibali (18,1 %) oyo bazali kozwa kanser na Delhi bazali na kanser ya monɔkɔ—nzokande na 1995 bazalaki mingi te (10 %). Kanser yango ezali kouta mingi mpenza na makaya ya kotafuna, bidis (likaya ya Inde), mpe pan masala (kosangisama ya likaya, mbuma ya betel oyo batuti, mpe biloko mosusu), oyo bazingaka na lokasa liboso ya kotafuna yango. Zulunalo yango elobi ete ezali mpenza mawa ndenge banakelasi mingi bayebi likama ya pan masala te kasi bazali kotafuna yango. Monganga moko amilelaki ete Inde mobimba ezali kokenda na “likama ya kanser ya monɔkɔ.”
Kosalisa mino kozanga koyoka mpasi?
Bato mingi oyo babɛlaka mino balingaka te ete monganga asalela ebende na ye ntango azali kosalisa bango. Zulunalo Consumer elobi ete mposa na bango ekoki kokokisama mwa moke. Eleki mikolo mingi te, ebongiseli babengi Food and Drug Administration endimaki kosalela mayele babengi laser erbium-YAG mpo na kosalisa mpasi ya mino. Na esika ya kosalela ebende moke ya monganga mpo na kosalisa lino oyo epɔlá, minganga bakoki sikawa kosalisa yango na laser. Laser ezali na matomba mingi koleka ebende wana. Na ndakisa, kosalisa na laser esalaka mpasi te. Yango wana, monganga oyo azali na laser akotuba moto ya mpasi ya mino anestezi te. Lisusu, lokola monganga akozela te ete monɔkɔ ya moto ya maladi ekufa na anestezi, akoki kobanda kosalisa ye mbala moko. Lisusu, moto ya maladi akobanga lisusu te makɛlɛlɛ ya bibende ya monganga. Nzokande, mabe ya lolenge yango ya kosalela, ezali ete bakoki kosalela laser te na mino oyo batyá mabende.