Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g00 Avril nk. 18-19
  • Savoka​—Mbuma kitoko oyo basalelaka na misala mingi!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Savoka​—Mbuma kitoko oyo basalelaka na misala mingi!
  • Lamuká!—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kolona savoka
  • Ezali kotonga nzoto mpe ezali na ntina mingi
  • Kosomba mpe kolya savoka
  • Nzete ya mbila—Nzete ya misala ndenge na ndenge
    Lamuká!—1999
  • ‘Bókoba kobota mbuma mingi’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Lamuká!—2000
g00 Avril nk. 18-19

Savoka​—Mbuma kitoko oyo basalelaka na misala mingi!

Euti na mokomani na biso na Colombie

BATO ya Espagne oyo bakendaki komona mikili ya Amerika na ebandeli ya ekeke ya 16, bamonaki naino eloko ya ndenge wana te. Mbuma yango ezalaki molai mpe monene lokola mbuma oyo babengi poire ya monene, kasi ata soki eteli, ezalaki kaka na langi ya mai ya pondu. Mosuni na yango ezalaki pɛtɛpɛtɛ lokola manteka mpe elɛngi lokola mbuma babengi noix. Na nsuka, bapesaki yango nkombo savoka, oyo euti na liloba ahuacatl na lokota ya ba Aztèques.

Martín Fernández de Enciso nde amemaki savoka na Mpoto mpo na mbala ya liboso na mobu 1519. Enciso amonaki mbuma yango pene na mboka oyo babengaka lelo oyo Santa Marta, na Colombie, ntango bato ya Espagne bazalaki kokenda na sudi ya Amerika mpo na mbala ya liboso. Na boumeli ya bambula oyo bazalaki kokenda kotalatala mikili wana, bato ya Mpoto bazalaki kolya mpo na mbala ya liboso bilei mingi ya sika lokola chocolat, masangu mpe mbálá (pomme de terre), longola savoka.

Ezali solo ete bilei wana nyonso ezalaki mpenza ya sika te. Bato oyo bazalaki kofanda na mikili ya mpiɔ ya Amerika bayebaki bilei wana mpe bazalaki kolya yango uta bikeke mingi. Na bikólo mosusu kuna, bazalaki kosepela mingi mpenza na savoka, yango wana bazalaki kopesa yango lokola likabo na ntango ya libala to mpo na koyamba bapaya.

Kolona savoka

Lelo oyo, balonaka savoka na mikili ya molunge mpe ya mpiɔ lokola Australie, Israël, Kenya, Nouvelle Zélande, Amerika ya Nɔrdi mpe ya Sudi, mpe na Philippines. Savoka ezali kati na mbuma soko 20 ya mikili ya molunge oyo bazali kotɛka mingi na mokili mobimba.

Savoka ebotaka mingi na mikili ya molunge ya Amerika, kasi ezali mitindo ndenge na ndenge kobanda ya moke oyo ezali lokola likei ya nsoso kino ya monene oyo ezali lokola pastɛkɛ ya mwa monene mpe ekoki kokóma na kilo 2. Langi na yango mpe ekeseni, mosusu ya langi ya mai ya pondu mpe mosusu ya langi ya violɛ esangani na moindo; mposo ya savoka mosusu ezalaka mbumambuma mpe ekoki kokatana na bolɛmbu mpenza, kasi savoka mosusu mpe ezalaka na mposo sɛlisɛli mpe moke. Nzokande, okoki kolona banzete oyo ekobota savoka ya motindo moko mpe ya langi moko.

Na eleko oyo ebimisaka fololo, nzete ya savoka etondaka na bankóto ya bafololo ya langi ya mai ya mosaka esangani na mpɛmbɛ. Nzokande kaka fololo moko kati na fololo 5 000 nde ekokóma savoka. Bafololo wana ekeseni mpenza na nzete mingi mosusu mpamba te mokomoko na yango ezali na étamine, fololo ya mobali oyo ebimisaka mputulu (pollen), kasi ezali mpe na pistil, fololo ya mwasi oyo ezali na ovaire. Yango esalaka ete fololo yango moko ebota mbuma, kasi ekosalema bongo kaka soki ebongiseli oyo esalaka ete mputulu ya fololo ekwea likoló ya fololo ya mwasi to pistil mpo ebimisa mbuma esalami na ntango ebongi.

Yango wana, banzete mosusu efungolaka bafololo na yango na ntɔngɔ mpo ezwa mputulu mpe ekangaka yango na midi. Na mpokwa, bafololo wana efungwamaka lisusu mpo na kobimisa mputulu. Banzete mosusu oyo ezali pene wana ekozwa mputulu na mpokwa mpe ekobimisa yango na ntɔngɔ. Mbuma ebotamaka ntango nzete oyo ezali kobimisa mputulu ezali pene na oyo efungoli fololo mpo na kozwa mputulu. Lisusu, nzoi mpe banyama nkeke mosusu oyo epumbwaka ezali na ntina mpo na komema mputulu yango na bafololo mosusu. Na yango, moi, molunge, banyama nkeke, mopɛpɛ mpe esika nzete ezali nde esalaka ete nzete ya savoka ebota mbuma.

Ezali kotonga nzoto mpe ezali na ntina mingi

Savoka etongaka mpenza nzoto mpo ezali na proteine mpe ezali na vitamini mingi oyo babengi riboflavine, niacine potassium mpe vitamini C. Balobaka ete savoka ezali na vitamini soko 11 mpe minéraux 14. Na bisika mosusu ya Amerika ya Ntei, bato bamesani kolya savoka na limpa babengi tortillas. Savoka ezalaka mpe na mafuta mingi. Mafuta na yango ezali lokola mafuta ya olive oyo babengi mono-insaturée. Basalaka na yango basabuni mpe mafuta ya kopakola.

Biteni nyonso ya nzete ya savoka ezali na ntina mingi. Basalelaka nzete na yango lokola nkoni. Na Amerika ya Sudi, basalelaka mai ya mbuma na yango lokola langi ya kotya na bilamba mpo langi yango elongwaka te. Na bisika mosusu na Philippines, basalaka tii na nkasa na yango. Basalelaka loposo ya nzete yango mpo na kobongisa mposo ya banyama oyo basalaka na yango sapato to biloko mosusu.

Kosomba mpe kolya savoka

Soki okei kosomba savoka na wenze, okoyeba ete ekɔmeli kaka na loposo te, mpo savoka na savoka ezalaka na langi na yango. Meká nde kofina yango malɛmbɛmalɛmbɛ. Soki ezali mwa pɛtɛpɛtɛ, wana ekɔmeli. Esengeli kobomba savoka na esika ya molunge, esika mopɛpɛ mpe ezali koleka mpe soki ozingi yango na lokasa ya zulunalo, ekolɛmba noki. Okoki mpe kobomba yango na kati ya frigo ata soki opasolaki yango. Mpo mosuni na yango ekóma moindo te, okoki kosopa mwa mai ya lilala ya ngai likoló na esika oyo okataki yango.

Bato mingi balingaka kolya savoka na mbuma mosusu to na tomati. Ekozala elɛngi mingi soki olei yango na supu oyo ezali na pilipili. Savoka ezalaka malamu soki olei yango na nsanya (kosakosa) to na lingato (crabe), mpe okoki kosangisa yango na ndunda mobesu (salade) ndenge na ndenge. Bato mosusu basangisaka yango na mbuma mosusu mpo na kosala jus ya kitoko.

Soki oniki savoka na biloko ya nsolo mpe bikelakela mosusu, ekokóma pɔtɔpɔtɔ moko kitoko oyo okoki kolya na bisikiti ya mungwa. Kobosana te guacamole, supu oyo eyebani mingi mpe basalaka yango na savoka, tomati, matungulu, pilipili oyo etumbaka te mpe biloko mosusu ya nsolo. Okoki mpe kolya savoka na bilei oyo olambi. Na ntango wana, esengeli kolya yango na nsuka, okolamba yango te.

Ntango mosusu olyaka savoka mingi. Kasi na bisika mosusu, savoka ezali mbuma oyo ekokani na mbuma mosusu te mpe emonanaka mpenza te. Soki olyá naino savoka te, mpo na nini te komeka yango mbala ya nsima oyo okomona yango? Okomona ete savoka, mbuma oyo basalaka na yango misala mingi, ezalaka mpenza elɛngi!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto