Botondi mpo na lisungi ya sembo ya Jéhovah
LISOLÓ YA SHARON GASKINS
PARADIS na mabelé! Nazalaki komimona kokimakima kati na matiti kolanda mapekipeki, kosakana elongo na bana ya nkosi. Ezalaki mpenza likambo malamu! Kasi nazalaki—na ntembe monene. Mbala na mbala elikya na ngai esilaki kobongwana na kozanga elikya!
Soki nakoki komikundola kino bomwana na ngai, nazali koyeba ete nkiti ya baandikape ezalaki ntango nyonso moninga na ngai. Uta kobotama na ngai, manséle epekisaki ngai esengo nyonso ya bomwana. Bana mosusu bakokaki kosakana na patin to na vélo, kasi ngai, nafandaki ngai moko, nazangi makoki ya kotambola. Yango wana, ntango mama na ngai atambolisaki ngai epai na banganga mingi, tozalaki kolikya ete bakosala ekamwiseli. Nzokande, mbala nyonso azalaki kozongisa ngai likoló na nkiti na ngai. Nalembaki, mpe ezalaki mpenza mpo na ye likambo ya kookisa mpasi!
Lokola azalaki koluka elikya ya solo, mama na ngai abandaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah na ebandeli ya mobu 1964. Na eleko yango nazalaki na mibu soko motoba. Totalelaki Makomami na lisalisi ya mokanda Paradizo ebunga mpe Paradizo ezwami.
Nazalaki na esengo monene na koyeba ete Paradis moko kitoko ezalaki na mabelé. Na mawa, moto ya liboso, Adam, atyaki motema na yango te; kasi nalingaki kotikala penepene na Jéhovah, lokola Adam azalaki liboso. Boyokani ya malamu elongo na Nzambe esengelaki kolimbola nini, to kozala na bomoi ntango Mwana na ye azalaki na bomoi awa na mabelé? Bandoto na ngai ezalaki komema ngai kino na Paradis oyo ezali koya. Atako nazalaki naino mwana moke, nasosolaki polele ete tosili kozwa solo.
Mama abandaki komema libota mobimba na Salle du Royaume ya ba Témoins de Jéhovah. Makita na bango makesenaki na oyo tomonaki na mangomba mosusu. Bato mpe ezaleli na bango ezalaki kosimba motema na ngai.
Ezalaki mpasi mingi mpo na mama na ngai komema biso na Salle du Royaume. Nsima na ngai, ezalaki na bana misato, mpe tozalaki na motuka te. Wana mama azalaki na makoki ya kofuta yango, tozalaki kokota na taxi. Nazali naino kokanisa lolenge amitungisaki mokolo ya Dimanche moko. Tozalaki komona taxi moko te. Na nsima mobali moko oyo toyebaki te epai wapi autaki akomaki na motuka na ye mpe amemaki biso. Tokomaki wana makita masili kobanda, kasi tozalaki kuna. Tozalaki na botondi mpo na Jéhovah!
Mwa moke nsima, bandeko na biso oyo bazalaki na mituka babandaki komema biso na kokitanaka. Bilendiseli oyo mama na ngai azalaki kopesa biso ya kozangisa makita mpamba te, bobele mpo na maladi, ekotisaki na elimo na ngai ntina ya ˈkotika te koyangana esika moko.ˈ (Baebele 10:24, 25) Mama na ngai apusamaki na makambo oyo azalaki koyekola, apesaki bomoto na ye epai na Jéhovah mpe azwaki batisimo na 1965.
Na eleko wana, nakómaki mwa mokóló mpo na kosepela mpenza na makita. Na lisanga ya Cypress Hills, na Brooklyn (New York), ezalaki na bato bauti Mpoto, Baindo, ba Espagnols mpe bandeko mibali mpe basi oyo bauti bipai mosusu, baoyo bazali kopesa Jéhovah losambo na bomoko. Ebongaki solo ete bato na kobanga Nzambe bazala na bondeko—Nzembo 133:1.
Mama ayekolisaki ngai kobongisa makita. Na makanisi, ezalaki likambo ya mpasi te, kasi mikakatano ezalaki ya kosalela nzoto na ngai. Manséle ekomisi misala mikemike makambo ya mpasi mingi. Ezalaki, mpe ezali naino, mpo na ngai nkaka kotya mokoloto ya semba mpo na komonisa biyano kati na mikanda na biso oyo mikolimbolaka Biblia. Nzokande, nsima na mwa komesena, nalongaki kobongisa lolenge na ngai ya kotya mokoloto.
Elimo na ngai etondaki na makanisi ya komonisa. Kasi, wana nazalaki kofungola monoko na ngai, maloba mazalaki kosangana na mobulungano. Esengelaki ete nazala na esengo mpe mintungá na ngai mikangama te. Esengelaki lisusu ete natya likebi mingi mpo na kobimisa liloba nyonso na motindo ya polele. Nazalaki kooka mawa wana komantere ebimaki ndenge nakanisaki te, to soki nayebi ete bandeko bakangi ntina na maloba na ngai te. Nzokande, wana bayebaki ngai malamu, bandeko mibali mpe basi ya lisanga bakomaki koyoka malamu makambo oyo nazalaki koloba. Nzokande, ezali na mikolo misusu oyo mokakatano wana mozali kookisa ngai mpasi.
Sanza motoba ya mpasi
Ntango nazalaki na mibu mwambe, nalekisaki sanza motoba oyo bopusi na yango ezali naino kosimba ngai kino lelo. Atako bazalaki kopesa ngai nkisi, kopesa ngai mosala mpe mateya ya koloba, minganga batindaki ngai na centre ya koyekolisa nzoto misala na West Haverstraw (New York). Ngai na mama totungisamaki mingi. Mibu mingi na liboso, ntango minganga batalaki ngai, mpe na libunga, balobaki ete bakoli ya mayele na ngai etikali nsima, alobaki na bango ete akotika te ete balongola ngai na ndako. Na motindo boye ete, ata bokabwani ya ntango mokuse ezalaki mpo na ye komekama monene. Kasi, asosolaki ete, mpo na ngai, kozala na bomoi oyo ekoki kopesa mbano kozanga lisalisi na ye mpe tata na ngai elimbolaki ete nzoto na ngai ezala mpenza na bonsomi.
Bandako ezalaki kitoko, kasi nazalaki kooka ete natikami. Kolela mpe nkanda ezalaki komonisa polele maoki na ngai mpo na esika yango. Baboti na ngai bakokaki bobele mbala moko moko kosala mobembo ya ngonga misato na bus mpo na koya kotala ngai, mingi mpenza mpo ete mama azalaki na zemi ya mwana na ye ya mitano. Nabulunganaki mingi mpenza ntango baboti na ngai basengelaki kotika ngai mpe wana monganga alobaki na bango bayaka kotala ngai mbala mingi te. Nazwaki ndingisa ya kokende na ndako bobele mbala mibale.
Minganga bayekolisaki ngai kotambola na lisalisi ya masini mpe nzete oyo bayeisi yango bozito mingi na plomb. Nazalaki kooka lokola ete ezalaki na bazito ya tonne moko. Nzokande, bozito wana ezalaki kobatela ngai mpe kopekisa ngai ete nakwea te. Wana ezalaki litambe ya liboso kati na molongo ya matambe oyo esengelaki komema ngai na kotambola kozanga masini.
Ezalaki mpasi, to nakokaki te kokata bilei, kokanga babuto (misala oyo mizali kosenga nasalela misapi). Kasi nayekolaki, mwa moke, kolya mpe kolata bilamba ngai moko. Esalisaki ngai na nsima kati na mosala na ngai mpo na Nzambe.
Nalandaki komimekisa ntango nazongaki na ndako. Mama asungaki ngai na kosalela makoki na ngai ya sika. Ezalaki etumba ya maoki, mpamba te, atako nazalaki na mposa ya kosala makambo mosusu ngai moko, ezalaki mpasi mingi kokokisa yango; ezalaki kozwela ngai ntango mingi. Kanisa naino ete, esengelaki nazwa ngonga mibale mpo namibongisa mpo na makita!
Ntango tokomaki kofanda na ndako moko liboso na Salle du Royaume, nabandaki kokende ngai moko na makolo. Ezalaki likambo moke te!
Mokolo oyo eleki kitoko na bomoi na ngai
Mama azalaki kosenzela ete libota mobimba ezala na bilei malamu ya elimo. Azalaki koyekola Biblia elongo na ngai mpe azalaki komizela ete natanga nimero nyonso ya bazulunalo na biso, Mosenzeli mpe Lamuka! Tosengelaki kobongisa makita mpe koyangana na yango. Atako elimo mpe motema na ngai ezalaki kolya na mposa mingi boyebi wana, nazalaki mpenza kokanisa mingi te na kopesa bomoto na ngai epai na Jéhovah to komonisa komipesa wana na batisimo; ezalaki mpo na ngai likambo ya ntina mingi te. Mama asalisaki ngai na kososola ete ata nazali andikape, Nzambe ayebi ete mokumba mpo na elimo na ngai etalaki ngai. Nakokaki te kolikya kokota na mokili ya sika mpo na misala malamu na mama na ngai, mpo nakangami na ye.
Nazalaki kolinga Nzambe, kasi ezalela na ngai ya andikape ekabolaki ngai, mpo ete nakesenaki na basusu, likambo moko ya nsomo mpo na elenge mwasi. Nazalaki na mpasi mpo na kondima bandelo na ngai. Nazalaki mbala mingi kosilika, mpe esengelaki ete nalonga ezaleli wana liboso ya batisimo na ngai. (Bagalatia 5:19, 20) Bongo soki nakokoka te komitambolisa engebene ndai na ngai ya komipesa epai na Jéhovah?
Na lisengi ya mama na ngai, nkulutu moko ya lisanga ayaki kosolola na ngai. Atangelaki ngai motuna na Eliya epai na Bayisraele ete: “Kino ntango nini bino bokotambolatambola na nzela mibale ekeseni?” (1 Mikonzi 18:21) Na ntembe te, Jéhovah azali kosepela te na ezaleli ya kokakatana.
Nalamukaki na elimo; nabondelaki Jéhovah na molende mpo na kosenga lisalisi na ye mpe mpo na koyebisa ye ekateli na ngai ya komipesa epai na ye. Ndeko mwasi moko ya lisanga ayekolaki elongo na ngai. Nazalaki mokóló na ye mpe mama na ye asilaki kokufa ntango azalaki naino mwana moke. Atako bongo, amipesaki epai na Nzambe wana azalaki naino elenge.
Nazwaki ekateli ntango nakokisaki mibu 17. Nalingaki kosalela Jéhovah na makoki nyonso oyo nazalaki na yango. Nazwaki batisimo na le 9 Aout 1974; ezalaki mokolo oyo eleki kitoko kati na bomoi na ngai.
Esengo na ngai kati na mosala
Kosangana na ngai na mosala ya kosakola ebimisaki mikakatano minene lokola ngomba. Oyo eleki mpasi ezalaki oyo ya kosala ete bayoka ngai malamu. Namekaki koloba mpenza polele. Na nsima, soki esengeli, ndeko oyo tozalaki na ye azalaki kozongela bandimbola mosusu ya maloba na ngai epai na molobani na ngai. Bato mosusu baokaki yango mabe, bazalaki komona ngai lokola moto oyo Batemwe bazali konyokola. Kasi kosakola ezali lotomo na ngai mpe ezali mposa ya motema na ngai.
Kotambola ndako na ndako, ata zongazonga ya etuluku moko ya bandako ekoki mpenza kolembisa mingi. Bandako mingi ya teritware na biso ezali na bimatelo, oyo ezali kolongola ngai makoki ya kokoma kuna. Na eleko ya malili makasi, mbula mpembe oyo ezipaka balabala ezali mpenza kopekisa ngai mosala ya ndako na ndako. (Misala 20:20) Nzokande, bandeko basalisaki ngai mingi, mpe na lisaliai ya Jéhovah nazali sikawa na tukutuku ya baandikape, oyo ekomisi mosala na ngai mpenza petee.
Na nsima nabandaki kopesa litatoli na mikanda. Nakoki te kokoma na maboko, mpo ete kotanga ekomeli na ngai ezali mpasi mpo na bato mingi. Yango wana masini ya kokoma ya lotiliki nde ezali mokomi na ngai. Nazali kobeta malembe mpo ete misapi na ngai ezali na makasi mingi te. Mbala mingi nakokanela kobeta buto moko, nde nakobeta mosusu. Esengeli ngonga mobimba mpo na kokoma bobele lokasa moko.
Ata nazali na nguya mingi te, mbala na mbala nasalaka mosala ya pionnier auxilliaire, kokokisaka ngonga 60 to koleka na mosala ya kosakola sanza nyonso. Ezali kosenga ebongiseli ya malamu, milende mingi mpe lisungi ya bandeko baklisto. Elimo na bango ya pionnier ezali kolendisa ngai. Mama na ngai azali mpe kopesa ndakisa malamu: azalaki pionnier permanent to auxilliaire, mpe asalaki bongo kati na komekama, kolongono mabe ya nzoto mpe mikakatano ya kobokola bana nsambo kati na libota likabwani mpo na mangomba.
Nakomi kofanda ngai moko
Wana nazalaki na mibu 24, nazwaki ekateli ya kokende kofanda ngai moko. Epai nafandaki na quartier ya Bensonhurst, na Brooklyn ezalaki solo lipamboli. Lisanga ya Marlboro ekokanaki mpenza na libota moko oyo ezali na bomoko. Kondima na ngai elendisamaki mingi mpo na bango. Bandeko bazalaki koya kokamata ngai mpo na makita nyonso atako na lisanga ezalaki bobele na mituka mibale to misato. Kasi naumelaki na esika yango ntango molai te.
Naokaki lokola maoki ya kozanga kolonga monene, nazongaki na libota na ngai mpe nabelaki mpasi makasi ya makanisi oyo eumelaki mbula misato. Maoki ya nkanda ezongaki lisusu. Bongo nazwaki makanisi ya komiboma mpe mbala mingi namekaki komiboma. Likanisi ya kufa ezalaki mosika te. Natyaki makanisi na ngai epai na Nzambe mpe nalakaki komonisa ye botondi mpo na likabo oyo apesaki ngai: bomoi. Bankulutu balendisaki ngai mpe bapesaki ngai toli. likoló na libondeli, boyekoli na ngai moko, lisungi ya libota na ngai mpe lisalisi ya minganga, lisalisi nyonso wana ebongisaki makanisi na ngai.
Na nzela ya Mosenzeli, Jéhovah azali na bolingo nyonso komonisa biso oyo ezali mpasi makasi ya makanisi. Ya solo, azali kobatela biso mpe ayebi maoki na biso. (1 Petelo 5:6, 7) Moke na moke mpasi wana ya makanisi ekitaki. Lelo oyo, mibu mingi na nsima, Jéhovah azali ntango nyonso kosalisa ngai na kolonga mawa mpe mpasi ya makanisi. Mbala mosusu, maoki ya kozanga ntina ezali koyela ngai. Nzokande, libondeli, boyekoli ya Biblia mpe libota na ngai ya elimo ezali solo lisungi monene.
Nsima wana nalukaki ndako kozanga ete nazwa yango, nakanaki, atako nalingaki yango te, kofanda elongo na libota na ngai mpo na bomoi na ngai mobimba. Jéhovah ayokaki mabondeli na ngai. Eteni moko ya ndako ezalaki na bato te na quartier Bedford-Stuyvesant na Brooklyn. Na nsuka ya eleko ya molunge ya mobu 1984, nakotaki kuna, mpe kino lelo nazali naino wana.
Basangani ya lisanga ya boboto Lafayette bazalaki komonisa bolingo ya komema ngai na makita. Nazali naino kokanisa boyekoli ya mokanda ya liboso oyo nasanganaki na yango, lokola nde elekaki lobi. Ezalaki kosalema na étage ya misato, ezalaki na etombola te. Ezalaki bobele mpo na lisalisi ya Jéhovah nde nakokaki kobuta mpe kokita ebutelo wana. Na nsima, batindaki ngai na boyekoli ya mokanda moko oyo ebongaki na ngai. Jéhovah apambolaki ngai, mpo ete sikawa nazali na libaku malamu ya koyamba boyekoli moko ya mokanda epai na ngai.
Elimo kitoko ya pionnier ezali kati na lisangá wana. Ntango nakomaki ba pionniers bazalaki soko ntuku misato, mpe basusu bapesaki ngai likebi mingi. Ezaleli yango epusaki ngai na kosala mbala mingi lokola pionnier auxilliaire.
Na Avril 1990, masanga ya Lafayette mpe ya Pratt batongaki Salle du Royaume moko na balabala na biso. Yango ekómaki solo na ntango malamu, mpo ete, lokola kolongona na ngai ezali kobeba mingi kotambola ekomi mokakatano. Kasi, na tukutuku na ngai ya motɛlɛ scooter mpe mpo na lisalisi ya bandeko mibali mpe basi, nazali na esengo ya kokende na makita mpe kozonga. Ya solo, nazali na botondi monene mpo na lisalisi nyonso oyo etondi na bolingo!
Botondi na ngai mpo na lisungi ya Nzambe
Atako makolo na ngai mazali kolengalenga, motema na ngai mozali ngwi. Ya solo, boyebi mingi ekoyeisa bomoi mwa moke na esengo, kasi ezali mingimingi Nzambe nde asungaki ngai. Nazalaki mpenza koyeba te soki bilei na ngai ekouta wapi, kasi Jéhovah asalisaki ngai mpe amonisaki ete azali Ye oyo azangaka te kokokisa bamposa. Maloba oyo ya Davidi mazali kosimba ngai na motema: “Nazalaki elenge mpe nakomi mobange, nde naino namoni moyengebeni te oyo atikami, to mwana na ye akolombaka kwanga.”—Nzembo 37:23-25.
Jéhovah apesaki ngai makoki, mbala na mbala, ya kobatela etelemelo ya Makomami wana asalisaki ngai na koboya esaleli mabe ya makila ntango ya lipaso. (Misala 15:28, 29) Kala mingi te tata na ngai akufaki. Kufa ya moto oyo nalingaki mingi esalaki ngai mpasi mingi. Bobele nguya oyo euti na Jéhovah esalisaki ngai na kolonga komekama wana.
Kolongono na ngai ekolanda kobeba, kasi elikya na ngai epai na Nzambe mpe boyokani oyo nazali na yango elongo na ye azali “etetoiseli” na ngai. Nazali na esengo ya kozala mosangani ya libota na Jéhovah mpe ya kozwa lisungi na ye ya sembo!