Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Octobre nk. 15-17
  • Batata mibale​—⁠Napona oyo wapi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batata mibale​—⁠Napona oyo wapi?
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nakoli na mboka oyo bato bayinanaka mingi
  • Nabongoli makanisi na ngai
  • Mpasi mpo na kopona wana nazalaki bobele elenge ya mibu 17
  • Etɛlɛmɛlo ya ngwi
  • Tata abimisi mobulu
  • Nakimi na ekólo Grèce
  • Bokutani nsima ya mbula motoba
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nsukansuka boyokani na ngai ná tata ezongaki
    Biblia ebongolaka bato
  • Nzambe asalisaki ngai nalonga mikakatano
    Lamuká!—2009
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Lamuká!—1998
g98 Octobre nk. 15-17

Batata mibale​—Napona oyo wapi?

“Ozali lisusu mwana na ngai te! Bimá na ndako oyo sikasikawa, mpe kozonga awa te soki otiki lingomba wana te!”

NABIMAKI na ndako bobele na bilamba oyo naza12laki na yango na nzoto. Na mpokwa yango, masasi ezalaki kobetama na kartye, mpe nayebaki te epai wapi nakokenda. Mbula motoba esengelaki koleka liboso ete nazonga na ndako.

Mpo na nini tata moko asilikaki makasi kino kobengana mwana na ye? Tiká nayebisa bino ndenge makambo yango ebandaki.

Nakoli na mboka oyo bato bayinanaka mingi

Baboti na ngai bafandi na engumba Beyrouth, na ekólo Liban, mboka oyo kala ezalaki kobenda bapaya mingi. Kasi, banda 1975 kino 1990, engumba yango ekómaki esika ya bitumba makasi. Nabotamá na 1969, nazalaki mwana ya liboso kati na libota ya ba Arméniens oyo ezalaki na bana misato. Kasi, na bomwana na ngai, mboka ezalaki na kimya.

Baboti na ngai bazalaki bandimi ya Eglise apostolique arménienne, kasi mama azalaki kokenda na biso na ndakonzambe bobele mbala mibale na mbula​—na Pasika mpe na Mbotama. Na bongo, libota na biso emipesaki mpenza na makambo ya losambo te. Atako bongo, batindaki ngai na eteyelo moko ya basango, epai kuna nayekolaki makambo ya losambo. Kasi, na eleko wana, makambo ya lingomba ezalaki kosepelisa ngai te.

Likambo moko oyo bazalaki koteya bana ya ba Arméniens mingi ezalaki ete báyinaka ba Turcs. Na boumeli ya Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba, ba Turcs babomaki bankóto ya ba Arméniens mpe babotolaki eteni monene ya mabelé na bango. Na 1920, eteni ya ɛsti ya Arménie oyo etikalaki ekómaki etúká moko ya Union soviétique. Wana nazalaki elenge, nazalaki na mokano ya kosala nyonso oyo ekoki na ngai mpo ete bosembo ezala kati na mboka.

Nabongoli makanisi na ngai

Na bambula ya 1980, wana nazalaki elenge mpenza, makambo oyo nɔkɔ na ngai ayebisaki ngai ebandaki kobongola makanisi na ngai. Alobaki ete Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso akosilisa kozanga bosembo nyonso. Alimbwelaki ngai ete na nzela ya Bokonzi oyo Yesu Klisto ateyaki bayekoli na ye ete bábondelaka, ata baoyo babomamaki na ntango ya bitumba bakosekwa mpo na kofanda awa na mabelé.​—Matai 6:9, 10; Misala 24:15; Emoniseli 21:3, 4.

Nasepelaki mingi. Lokola nalingaki koyeba makambo mosusu mingi, nakobaki kotuna ye mituna. Nsukansuka, nabandaki koyekola Biblia na ndako ya Motatoli mosusu.

Lokola nabandaki koyeba makambo mingi na ntina na Tata na ngai ya likoló, Yehova, nakómaki mpe kolinga ye mingi. Kasi nabandaki kobanga mpamba te mokolo mosusu ekosengela ete nazwa ekateli moko monene​—kopona libota na ngai to Yehova Nzambe.​—Nzembo 83:18.

Mpasi mpo na kopona wana nazalaki bobele elenge ya mibu 17

Nsukansuka, mama na ngai ayokaki ete nakómaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Asilikaki makasi mpe alobaki na ngai ete nakata boyekoli yango. Ntango amonaki ete nakangamaki makasi na bindimeli na ngai, abangisaki ngai na kolobáká ete akoyebisa tata likambo yango. Yango ebangisaki ngai te mpamba te nakanisaki ete nakozala na likoki ya kolonga ye. Nzokande, nazalaki komikosa.

Ntango tata ayokaki ete nakómi kosangana na Batatoli ya Yehova, akómaki na nkanda makasi. Alobaki ete soki nakati boyekoli na ngai ya Biblia te, akobengana ngai na ndako. Nayebisaki ye ete nakokata boyekoli na ngai te mpamba te makambo oyo nazali koyekola ezali bosolo. Abandaki koganga, kotomboka mpe kokata ndai, na nsima abandaki kolela lokola mwana moke. Abondelaki ngai ete natika kosangana na Batatoli ya Yehova.

Yango epesaki ngai mpasi mpenza, motema na ngai ekabwanaki kati na batata mibale​—Yehova mpe ye. Nayebaki ete bango nyonso mibale bazali kolinga ngai mingi, mpe nalingaki kosepelisa bango nyonso, kasi yango ekoki kosalema te. Bopusi ekómaki makasi na boye ete nakokaki lisusu te. Nayebisaki tata ete nakosala oyo ye alingi, mpe nakanisaki ete nakozongela boyekoli na ngai mpe kokóma Motatoli ya Yehova ntango nakokóma mokóló. Ntango wana nazalaki bobele na mibu 17.

Na mikolo oyo elandaki, nayokaki nsɔni mpo na ekateli oyo nazwaki. Nayebaki ete Yehova asepelaki te mpe ete nazalaki na kondima te na maloba oyo Davidi mokomi na nzembo alobaki, ete: “Ata tata mpe mama bakotika ngai, nde [Yehova] akolɔkɔta ngai.” (Nzembo 27:10) Kasi nazalaki naino na eteyelo ya ntei mpe baboti na ngai bazalaki kofutela ngai mbongo ya kelasi.

Etɛlɛmɛlo ya ngwi

Na boumeli ya mbula koleka mibale, nakendaki kotala nɔkɔ na ngai te, nazalaki mpe kosolola na Batatoli ya Yehova te, mpamba te nayebaki mpenza ete baboti na ngai bazalaki kosɛnzɛla ngai ntango nyonso. Mokolo moko na 1989, wana nakómaki na mibu 20, nakutanaki na Motatoli moko oyo nayebaki. Asɛngaki ngai na boboto nyonso ete soki nakosepela nakenda kotala ye. Lokola alobaki likambo moko te etali boyekoli ya Biblia, na bongo, nakendaki kotala ye.

Nsima ya mwa ntango, nazongelaki koyekola Biblia mpe nabandaki koyangana na makita ya Batatoli ya Yehova na Ndako ya Bokonzi. Nazalaki koyekola na esika na ngai ya mosala epai kuna moto moko te akokaki kotungisa ngai. Na yango, nakómaki kososola malamumalamu bolingo ya Yehova mpe ntina ya kozala na boyokani malamu elongo na ye na makambo nyonso. Na Augústo ya mobu yango, nabandaki koyebisa basusu makambo oyo nazalaki koyekola.

Kino ntango wana, libota na ngai eyebaki naino eloko moko te. Nzokande, nsima ya mwa mikolo, ngai na tata na ngai tokómaki lisusu na matata, kasi mbala oyo namibongisaki malamu mpo na yango. Na boboto nyonso atunaki ngai ete: “Mwana na ngai, ezali ya solo ete ozali lisusu kosangana na Batatoli ya Yehova?” Mpisoli ezalaki kotanga na miso na ye wana azalaki kozela eyano na ngai. Mama na ngai mpe ndeko na ngai ya mwasi bazalaki kolela malembe.

Nayebisaki ye ete nabandi kosangana na bango eleki naino ntango mingi te mpe nazali na ekateli ya kokóma moko kati na bango. Na maloba wana, makambo makómaki ndongo mbala moko. Tata agangaki na maloba oyo namonisi na ebandeli ya lisolo. Na nsima akangaki ngai mpe alobaki ete akotika ngai nabima na ndako na ye na bomoi te. Nakimaki, mpe nakitaki mbangombango na esikalie ya ndako, mpe nayokaki lɛki na ngai ya mobali azali kobondela tata na nsima. Nabondelaki Yehova ete: “Banda sikawa ozali Tata na ngai. Naponi yo, na bongo kotika ngai te.”

Tata abimisi mobulu

Nsima ya mwa mikolo, tata akendaki epai ya nɔkɔ, akanisaki ete akokuta ngai kuna. Asalaki ye matata mpe alingaki koboma ye, kasi Batatoli ya Yehova oyo bazalaki wana bapekisaki ye. Tata akendaki mpe alakaki ete akozonga lisusu. Mwa moke na nsima, azongaki elongo na basoda basimbi mandoki. Atako nɔkɔ azalaki kobɛla makasi, bakangaki ye na Batatoli mosusu mpe bakendaki na bango kino na biro monene ya basoda.

Na nsima, babandaki koluka Batatoli mosusu ya etúká yango. Bakɔtelaki Motatoli moko na ndako na ye, babimisaki babuku mpe Babiblia na ye, basangisaki yango na balabala mpe batumbaki yango. Kasi esukaki bobele wana te. Bakangaki Batatoli motoba bakisa mpe bato oyo bazalaki bobele koyekola Biblia elongo na bango. Batyaki bango nyonso na mwa eteni ya ndako moko moke, batunaki bango mituna mpe na nsima babɛtaki bango. Bazalaki kozikisa basusu mɔ́tɔ ya likaya. Likambo yango epanzanaki kartye mobimba. Basoda bazalaki kolukaluka ngai bisika nyonso. Tata asɛngaki na bango ete bákanga ngai mpe básala nyonso mpo ete nabongola makanisi na ngai.

Nsima ya mwa mikolo, basoda bakɔtaki na Ndako ya Bokonzi esika lisangá moko eyanganaki na makita. Babimisaki bato nyonso​—mibali, basi mpe bana. Babotolaki Babiblia na bango mpe batambwisaki bango kino na biro monene na bango, epai kuna batunaki bango mituna.

Nakimi na ekólo Grèce

Na boumeli ya ntango wana nyonso, libota moko ya Batatoli ya Yehova babatelaki ngai, mosika na esika makambo wana ya mobulu ezalaki koleka. Nsima ya sanza moko, nakendaki na ekólo Grèce. Ntango nakómaki kuna, namipesaki na Yehova Nzambe mpe nazwaki batisimo.

Na Grèce, namonaki ndenge bandeko ya elimo ya bikólo ndenge na ndenge bazalaki komoniselana bolingo​—kati na bango ba Turcs mpe bazalaki. Namonaki bosolo ya maloba oyo Yesu alobaki: “Soko moto nani atiki ndako soko bandeko mibali soko bandeko basi soko mama soko tata soko bana soko bilanga mpo na ngai mpe mpo na Nsango Malamu, moto yango akozwa na ntango oyo ndako mpe bandeko mibali mpe bandeko basi mpe bamama mpe bana mpe bilanga mbala monkama na minyoko lokola, mpe na ekeke ekoya akozwa bomoi na seko.”​—Malako 10:29, 30.

Nafandaki na Grèce na boumeli ya mbula misato. Atako nazalaki kotindela tata na ngai mikanda mbala na mbala, azalaki kozongisela ngai eyano te. Nayokaki na nsima ete ntango nyonso oyo baninga na ngai bazalaki kokenda kotala ye, soki batuni ye nsango na ngai, azalaki koyanola ete: “Nazali na mwana te oyo azali na nkombo wana.”

Bokutani nsima ya mbula motoba

Na 1992, ntango bitumba esilaki, nazongaki kofanda na Beyrouth. Natindelaki tata maloba na moninga moko ya mobali ete nazali na mposa ya kozonga kofanda na ndako. Ayanolaki ete akoyamba ngai​—bobele soki natiki lingomba na ngai. Na yango, nafandaki na ndako moko ya kofutela na boumeli ya mbula misato oyo elandaki. Na nsima, na Novɛ́mbɛ 1995, tata ayaki koluka ngai na esika ya mosala. Lokola nazalaki te, atikaki maloba ete alingi nazonga na ndako. Na ebandeli, nandimaki te. Na kokakatana mpenza, nakendaki kotala ye na ndako. Bokutani na biso elamusaki mpenza mayoki. Ayebisaki ngai ete ekosala ye lisusu eloko te soki nazali Motatoli ya Yehova mpe alingaki ete nazonga kofanda na ndako!

Lelo, nazali nkulutu mpe nazali kosala mosala ya ntango nyonso kati na lisangá moko ya lokota ya Arménien. Mbala mingi nakutanaka na bato oyo bazali lokola tata na ngai, oyo batɛmɛlaka bato ya mabota na bango oyo balingi kosalela Yehova. Tata na ngai azalaki kokanisa ete azalaki kosala malamu lokola azalaki kotɛmɛla ngai. Kutu Biblia ebongisaka baklisto mpo báyebaka ete bakoki kokutana na botɛmɛli ya libota.​—Matai 10:34-​37; 2 Timote 3:12.

Nazali na elikya ete mokolo mosusu tata na ngai mpe bandeko na ngai mosusu bakondima elikya oyo Biblia ezali kopesa ya mokili moko kitoko oyo ezali koya. Kati na mokili yango bitumba ekozala lisusu te, kobomana ekozala te mpe bato bakobengana bango lisusu te na bikólo na bango to bakonyokola bango lisusu te mpo na boyengebene. (2 Petelo 3:13) Kati na mokili yango bato bakosengela lisusu te kopona kati na bato mibale oyo balingaka mingi.​—Euti na ndeko moko.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto