20-26/07/2026
LOYEMBO 133 Tósalela Yehova na bolenge na biso
Zwá bikateli ya bwanya na oyo etali kobakisa bakelasi mosusu
“Moto ya ekɛngɛ akanisaka liboso ya kosala likambo.”—MAS. 14:15.
NA MOKUSE
Tokomona mitinda ya Biblia mpe makambo oyo esengeli kotalela ntango tolingi kozwa ekateli ya kobakisa bakelasi mosusu.
1-2. (a) Ekateli nini bilenge basengeli kozwa? (b) Maloba “kobakisa bakelasi mosusu” elimboli nini? (Talá “Ndimbola ya maloba.”)
“OKOLINGA kosala mosala nini ntango okokóma mokóló?” Soki ozali elenge, ekoki kozala ete batunaka yo motuna yango mingi. Mosala oyo eleki misala nyonso oyo okoki kopona ezali ya kosalela Yehova na mosala ya ntango nyonso. Kasi, ekosɛnga ozala mpe na mosala oyo ekopesa yo mbongo mpo na kokokisa bamposa na yo. (2 Tes. 3:10) Na ntembe te, okanisaka mosala ya mosuni oyo okoki kosala ntango okokóma mokóló.
2 Mpo lobi bázwa mosala, mbala mingi na kolanda toli ya baboti na bango, bilenge mosusu bamonaka malamu bábakisa bakelasi mosusu nsima ya kosilisa kelasi oyo esɛngisami na mboka na bango.a Mbala mosusu omitunaka soki osengeli kobakisa bakelasi mosusu. Soki ezali bongo, kelasi nini osengeli kopona? Lisolo oyo ekolobela mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo okanisa malamu ntango olingi kobakisa bakelasi mosusu. Kokanisa malamu ekosalisa yo ozwa bikateli ya malamu. Lisolo oyo elobeli libosoliboso bilenge; kasi ekoki kosalisa mokristo nyonso oyo azali kokanisa kobakisa bakelasi mosusu. Mitinda yango ekoki mpe kosalisa baboti básalisa bana na bango bázwa bikateli ya malamu.
OSENGELI KOBAKISA BAKELASI MOSUSU?
3. Ekoki kozala mpo na nini bakristo mosusu bazwaka ekateli ya kobakisa bakelasi mosusu?
3 Na bamboka mosusu, moto akoki kozwa mosala oyo bafutaka malamu ata soki abakisá bakelasi mosusu te. Nzokande, na bisika mosusu, soki moto abakisi bakelasi mosusu ekoki kosalisa ye azwa mosala oyo bafutaka malamu mpenza to ya bangonga mingi te. Soki mokristo azwi mosala ya ndenge wana, ekoki kosalisa yeb alekisaka ntango mingi na mosala ya kosakola to na lolenge mosusu ya mosala ya Yehova. Kasi, kobakisa bakelasi mosusu esɛngaka komipimela makambo mingi mpe ekoki kobimisela mokristo mikakatano ya minene.
4. Nani asengeli kozwa ekateli soki mokristo moko asengeli kobakisa bakelasi mosusu to te? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
4 Biblia elobi ete moto na moto asengeli ‘komema mokumba na ye moko.’ (Gal. 6:5) Na yango, mokristo nyonso oyo akómi mokóló asengeli ye moko kozwa ekateli soki akobakisa bakelasi mosusu to te.c Baboti mpe bazali na mokumba ya kozwa bikateli na oyo etali kelasi ya bana na bango ya mike. (Ef. 6:1) Mpe toli ya baboti ekoki kosalisa bana bázwa bikateli ya malamu ntango bakokóma mikóló.—Mas. 22:6.
5. Ntango nini moto asengeli kokanisa kobakisa bakelasi mosusu, mpe mpo na nini? (Talá mpe elilingi.)
5 Mbala mingi, esɛngaka bilenge bázwa ekateli soki bakobakisa bakelasi mosusu liboso kutu básilisa kelasi oyo esɛngisami na mboka na bango. Nzokande, ezali likambo ya bwanya ete elenge asolola naino likambo yango na baboti na ye liboso ete azwa ekateli. Yango ekopesa bango ntango ya kotalela makambo malamumalamu elongo, mpe kopona oyo esengeli. Yango ekoki kosalisa bango bápona mateya ya kelasi (option) oyo ekobongisa ye mpo na kelasi oyo akobakisa to mpo na kozwa mosala. Kasi basengeli kaka kozwa ekateli yango liboso ete elenge asilisa kelasi oyo esɛngisami? Mpenza te. (Mas. 21:5) Bilenge mosusu baponaka naino kosilisa kelasi, kozwa mosala, mpe kokóma babongisi-nzela wana bazali kokanisa soki bakobakisa bakelasi mosusu to te. Ata moto oyo azali mokóló, akoki kotalela ekateli ya ndenge wana.
Baboti bakristo bazali kosalisa mwana na bango azwa ekateli ya malamu na oyo etali kobakisa bakelasi mosusu (Talá paragrafe 5)
6. Nini ekoki kosalisa moto azwa ekateli ya malamu na oyo etali kobakisa bakelasi mosusu?
6 Nini ekoki kosalisa yo ozwa ekateli ya malamu na oyo etali kobakisa bakelasi mosusu? Kobosana te kobondela Yehova mpo na yango. (Yak. 1:5) Lisusu, salá makambo mibale oyo elandi. Ya liboso, omituna na bosembo soki nini ezali kotinda yo oluka kobakisa bakelasi mosusu. (Nz. 26:2) Ya mibale, talelá malamumalamu kelasi oyo ozali kokanisa kotánga. (Mas. 14:15) Tólobela likambo mokomoko.
NINI NDE EZALI KOTINDA YO?
7. Motuna nini mokristo asengeli komituna ntango azali kokanisa kobakisa bakelasi mosusu?
7 Soki ozali kokanisa kobakisa bakelasi mosusu, motuna ya ntina oyo osengeli komituna yango oyo: ‘Mpo na nini nalingi kobakisa kelasi yango?’ Bato mingi babakisaka bakelasi mosusu mpo na nsima bázwa mosala oyo bakosepela na yango to oyo ekofuta malamu. Yango ezali makanisi ya mabe? Mpenza te. (1 Tim. 5:8) Kasi, Biblia ekebisi biso na motambo ya kolinga biloko ya mokili mpe ya koluka libateli na mokili oyo. (Mas. 23:4, 5; 1 Tim. 6:8-10; 1 Yoa. 2:17) Soki koluka kokóma na bozwi to lokumu nde ezali kotinda yo, okoki kobungisa esengo na yo mpe okoki kobebisa boyokani na yo na Yehova.
8-9. (a) Ndenge nini bakristo basengeli kotalela kelasi? (Matai 6:33) (b) Mateya nini ozwi na maloba ya Josefina, Morine, mpe Iris?
8 Sikoyo, ndenge nini osengeli kotalela bakelasi? Eloko moko te esengeli kozala na ntina mingi mpo na biso koleka kosalela Yehova. (Mat. 22:37, 38; Flp. 3:8) Na yango, talelá bakelasi lokola eloko oyo ekosalisa yo okokisa bamposa na yo wana ozali kosalela Yehova na motema na yo mobimba.—Tángá Matai 6:33.
9 Talá makambo oyo esalisaki bakristo mosusu bátalela na ndenge oyo ebongi likambo etali kobakisa bakelasi mosusu. Josefina, oyo afandaka na Chili, alobi boye: “Nabakisaki bakelasi mpo nazwa mosala oyo ekosalisa ngai nasalela Yehova mingi koleka. Mateya ya kelasi yango ezwaki te esika ya mikano na ngai ya elimo; boyokani na ngai na Yehova nde eloko oyo elekaki ntina.” Ndeko mwasi moko na nkombo Morine aponaki kosala formasyo ya mbula moko mpo na koyekola kosala bato nsuki. Mpo na nini? Alobi boye: “Mokano na ngai ezalaki ya kosala esika oyo mposa ezali mingi. Yango wana nalukaki formasyo oyo ekosalisa ngai nakokisa mokano yango. Nsima ya kosilisa formasyo yango, nakómaki kosala bato nsuki mpe nabombaki mbongo mpo na kokende esika oyo mposa ya basakoli ezalaki mingi. Mpe ntango nakómaki kuna, formasyo ya kosala bato nsuki esalisaki ngai nazwa mosala.” Iris, oyo atángaki kelasi ntango molai mpo na kokóma monganga ya mino, alobi boye: “Kobakisa bakelasi mosusu ezali na mwa matomba na yango, kasi ekosalisa yo ata moke te olonga mpenza na bomoi mpe ozwa esengo ya solosolo. Likambo ya solo yango oyo: Mpo olonga mpe ozala na esengo ya solosolo, osengeli kotya Yehova na esika ya liboso na bomoi na yo.” Ya solo, soki boninga na biso na Yehova nde likambo oyo eleki ntina na bomoi na biso, tokozwa bikateli oyo ekomemela biso esengo libela na libela.
TALELÁ MALAMUMALAMU KELASI YANGO
10. Ndenge nini okoki kosalela etinda oyo ezali na Kolimbola Mibeko 32:29 ntango olingi kozwa ekateli ya kobakisa bakelasi mosusu?
10 Mbala mosusu oyebi kelasi oyo olingi kotánga to formasyo oyo olingi kosala. Kasi, ezali mpe malamu otalela lolenge mosusu ya kelasi to ya formasyo, oyo eyokani na mosala oyo olingi kosala to mosala mosusu. (Talá mpe Masese 18:17.) Lelo oyo, ezali na lolenge mosusu ya kotánga oyo na kala ezalaki te, na ndakisa na nzela ya Internet. Mpe kobosana te kotala soki okokoka kokokisa bamposa na yo ata soki obakisi bakelasi mosusu te. Na ndakisa, Johanna, oyo afandaka na Finlande, abakisaki bakelasi mosusu te. Alobi boye: “Nsima ya kosilisa kelasi, nazwaki mosala ya bangonga mingi te mpe nabandaki mosala ya mobongisi-nzela. Nazwaki misala ya ndenge na ndenge, mpe namonaki ndenge Yehova akokisaka ntango nyonso elaka na ye ya kopesa biso oyo tozali na yango mposa.” Kobosana te ete ekateli nyonso oyo etali kobakisa bakelasi mosusu, to lolenge ya kelasi oyo okoki kopona, ezali na matomba mpe na mabe na yango. Na yango, omituna boye: ‘Matomba na yango eleki mabe na ebele?’ (Tángá Kolimbola Mibeko 32:29; 1 Ko. 10:23) Tótalela mwa makambo oyo ekosalisa yo oyanola na motuna yango.
11. Mpo na nini ezali na ntina kotalela programɛ ya kelasi to ya formasyo oyo okobakisa? (Talá mpe bililingi.)
11 Programɛ. Talelá soki okobanda kolekisa bangonga boni pɔsɔ na pɔsɔ mpo na kokende kelasi, kozwa formasyo mpo na koyekola mosala, mpe kosala badevuare. Okozala kaka na ntango mpo na kosala makambo ya elimo mpe kokokisa mikumba na yo na libota? (Flp. 1:10) Kelasi yango ekobanda kolɛmbisa yo makasi na boye ete okozala te na makasi ya kobongisa makita to ya kosala boyekoli na yo moko? Yango nde ekómelaki Jeroz, oyo afandaka na Inde. Alobi boye: “Ezalaki mpasi mpo na ngai komipesa na makambo ya elimo. Na bantango mosusu, nazalaki kozanga makita. Lelo oyo, namonaka ete kelasi yango elyaki ngai ntango mpe makasi kaka mpamba.” Ya solo, bakelasi mosusu elyaka ntango bongo te; mosusu esɛngaka mwa bangonga moke na pɔsɔ, mpe mosusu esɛngaka badevuare mingi te. Na ndakisa, Rabeca, na Mozambique, azalaka na esengo mpo na kelasi oyo aponaki kotánga. Alobi boye: “Kelasi yango ezalaki koumela kaka bangonga mibale na mokolo. Yango epesaki ngai nzela ya kokoba mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza.”
Soki ozali kokanisa kobakisa bakelasi mosusu, omindimisa ete okozala na ntango ya kokokisa mikumba na yo nyonso ya ntina (Talá paragrafe 11)
12. Mituna nini ekoki kosalisa mokristo asalela ntango na ye malamu mpenza na oyo etali kelasi? (Mosakoli 12:1)
12 Molai na yango. Talelá soki ekosɛnga basanza to bambula boni mpo osilisa kelasi yango. Omituna boye: Kotánga kelasi yango ekomonisa ete nazali kosalela ntango na ngai malamu mpenza? (Ef. 5:15-17) Soki ozali elenge, kelasi yango ekotikela yo ntango ya kopesa Yehova oyo eleki malamu, mbala mosusu na mosala ya ntango nyonso na bolenge na yo? (Tángá Mosakoli 12:1.) Ezali na formasyo mosusu ya mokuse oyo nakoki kosala mpo na koyekola mosala oyo nalingi kosala? Na ndakisa, okoki koyekola mosala-mabɔkɔ mpe kosala mombongo na ntango moke mpe na mbongo moke na esika mosusu koleka na bainiversite. Mario, na ekólo Chili, alobi boye: “Naponaki kosala formasyo ya tekiniki ya mbula mibale oyo esɛngaki mbongo mingi te na kotalela kokende iniversite. Nazalaki kokende kaka mikolo minei na pɔsɔ, yango esalisaki ngai nazala mobongisi-nzela atako nazalaki kotánga.”
13. Nini ekoki kosalema soki moto azali kotánga mosika ya esika oyo afandi?
13 Esika. Mbala mosusu okoki komona kelasi pene na esika oyo ofandi. Bongo soki ezali na engumba mosusu? To soki ezali kosɛnga ete okende kofanda na iniversite? Yebá ete kokende kofanda mosika na libota na yo ememaka likama monene ya elimo, mingimingi soki okofanda na bato oyo bazali Batatoli ya Yehova te. (Mas. 22:3; 1 Ko. 15:33) Matias, na Mozambique, asalaki formasyo ya mbula moko mpe esɛngaki mbongo mingi te. Kasi ayokaka mawa mpo na ekateli oyo azwaki. Mpo na nini? Alobi boye: “Nasengelaki kofanda kuna na eteyelo yango oyo ezalaki mosika na ndako na biso. Mokolo na mokolo nazalaki komekama mpo na kosala makambo ya mabe. Namoni ete ezali malamu te kotánga kelasi oyo ekosala ete ozala mosika ya libota na yo.” Ndeko mwasi moko na Russie alobi: “Mpo na kokima makama mpe komekama, nafandaki kaka na ndako elongo na baboti na ngai na esika ya kokende kofanda na iniversite to na ndako mosusu elongo na baninga.” Kutu, okoki ata kotánga na nzela ya Internet.
14. Ndenge nini mitinda oyo ezali na Luka 14:28 ekoki kosalisa yo ntango olingi kobakisa bakelasi mosusu?
14 Mbongo oyo yango ekosɛnga. Bakelasi mosusu ezalaka ntalo te, to guvɛrnema nde efutaka yango. Na bongo, kobakisa bakelasi mosusu ekoki kozala lolenge ya pɛtɛɛ ya kozwa boyebi mpe koyekola makambo oyo ekosalisa yo ozwa mosala. Kasi na bisika mosusu, kobakisa bakelasi ezalaka ntalo mingi. Ekoki mpe kozala na makambo mosusu oyo ekosɛnga mbongo, na ndakisa kotánga yo moko to kozwa molakisi oyo akosalisa yo olonga. Bakelasi mosusu ekɔtisaka bana-kelasi banyongo oyo esɛngaka bambula mingi mpo na kofuta yango. Adilson, na Mozambique, ayokaka mawa mpo na ekateli oyo azwaki na oyo etali kelasi. Alobi boye: “Libota na ngai ezalaki komipimela bilei mpe biloko mosusu ya ntina mpo na kofutela ngai kelasi bambula minei.” Ntango ozali kokanisa kotánga kelasi to kosala formasyo moko, omituna boye: ‘Ekosɛnga mbongo boni? Libota na ngai to ngai moko tokokoka kofuta kelasi yango? Ezali na kelasi to formasyo mosusu oyo ezali ntalo te?’ (Tángá Luka 14:28.) ‘Soki nakɔti banyongo, ekosɛnga ngai ntango boni mpo na kofuta yango? Mosala oyo nakozwa ekokoka mpo na kokokisa bamposa na ngai mpe kosalisa ngai nasilisa banyongo yango?’—Mas. 22:7.
15. Mpo na nini osengeli kotalela mosala oyo okoki kozwa liboso ete opona kelasi to formasyo ya kosala?
15 Okozwa mpenza mosala? Kanisá lolenge ya misala oyo emonanaka mingi na esika ofandi to esika oyo ozali kokanisa kokende kofanda. Kelasi oyo olingi kotánga ekosalisa yo mpenza ozwa mosala? Bakelasi mosusu elakisaka mpenza moto mosala te. Mingi epesaka kaka bato boyebi ebeleebele, mayele ebele na motó, to bafilozofi kilikili. (Kol. 2:8) Ndeko mwasi moko na Inde alobi boye: “Kelasi oyo natángaki esalisaki ngai te nakóma na makoki oyo bapatrɔ balukaka. Na yango, nalongaki te kozwa mosala na makambo oyo natángelaki.” Bakelasi mosusu, misala na yango emonanaka mpenza te. Sublime, na République centrafricaine, asalaki formasyo ya kobongisa baaparɛyi oyo etyaka malili na ndako. Kasi, alobi boye: “Esika nafandi, bato mingi babongisaka biloko bango moko, na yango ezali mpasi kozwa mosala.”
16. Mpo na nini ebongi kotalela lolenge ya mosala oyo kelasi oyo tokotánga ekoki kosala ete tózwa?
16 Talelá mpe lolenge ya mosala oyo mbala mosusu okozwa. Okosepela na yango? (Mos. 3:12, 13) Esika ya mosala yango ekozala ndenge nini? Esika ya mosala yango eyebani lokola esika ya makama, bato bawelanaka, to mitungisi ezalaka mingi? Mbala mingi misala ya bongo efutaka mbongo boni? Ekokoka mpo na kokokisa bamposa na yo? Ekosɛnga yo okoba ntango nyonso kobakisa bakelasi mpo obatela mosala yango? Mpe oyo eleki ntina, ekosalisa yo otya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso? (Mos. 12:13) Ya solo, ntango misala ezali komonana mpenza te, ekoki kozala mpasi tózwa kaka mosala oyo biso tolingaka. Kasi kelasi oyo okopona kotánga ekoki kosalisa yo ozala to te na mabaku mingi ya kozwa mosala na mikolo ezali koya. Tabitha, na Inde, aponaki kosala formasyo ya kotonga bilamba ya sanza 6. Alobi boye: “Naponaki yango mpo namonaki ete mosala ya kotonga bilamba ekosalisa ngai nazala mobongisi-nzela. Ezali mosala oyo ezangaka bakiliya te, ngai moko nabongisaka ndenge nakosalela ntango na ngai mpe esɛngaka te nabimisa mbongo mingi.” Formasyo yango esalisaki Tabitha azwa mosala oyo esungaka ye na mosala ya mobongisi-nzela.
17. (a) Ndenge nini mokristo akoki koyeba makambo oyo esengeli mpo azwa ekateli ya malamu na oyo etali kelasi? (b) Mitinda nini ya Biblia ekosalisa yo ozwa ekateli ya malamu? (Talá etanda “Mitinda ya Biblia ya kotalela.”)
17 Tolobeli makambo ndenge na ndenge ya kotalela na oyo etali kobakisa bakelasi mosusu. Ndenge nini okoki koyeba makambo oyo ekosalisa yo mpo ozwa ekateli ya malamu? Mpo oyeba makambo mosusu oyo etali kelasi oyo olingi kobakisa, kende na esika oyo batángisaka yango to kɔtá na site Internet na yango. Talá mpe soki misala emonanaka mingi na likambo yango. Okoki mpe kosolola na bato oyo basalaki formasyo ya ndenge wana to oyo basalaka mosala yango. (Mas. 13:10) Tuná bango: “Matomba mpe mabe ya kelasi to mosala yango ezali nini?” Sololá na bandeko oyo bazali na esengo na mosala ya Yehova. (Mas. 15:22) Kelasi to mosala nini bakanisi ete okoki kosala? Mbala mosusu kutu bakolobela mosala oyo okanisaki te.
18. Likambo nini tosengeli kobosana te?
18 Ndenge tomoni yango, kobakisa bakelasi mosusu ezali na matomba mpe na mabe na yango. Na yango, bondelá mpe kanisá mpo na yango. Kobosana te: kotánga lisusu kelasi ekoki kosalisa yo ozala malamu na mosuni, kasi lolenge kaka moko ya kozala na esengo ya solosolo ezali ya kozala na boninga makasi na Yehova. (Nz. 16:9, 11) Yehova akokokisa ntango nyonso bamposa ya basaleli na ye, ezala batángi mingi to te. (Ebr. 13:5) Sikoyo, okosala nini soki ozwi ekateli ya kobakisa bakelasi mosusu? Nini ekoki kosalisa yo otikala penepene na Yehova ntango ozali kotánga? Tokolobela yango na lisolo oyo elandi.
LOYEMBO 45 Komanyola ya motema na ngai
a NDIMBOLA YA MALOBA: Na lisolo oyo mpe oyo elandi, maloba “kobakisa bakelasi mosusu” elimboli kelasi to formasyo nyonso oyo moto akoki kosala longola kelasi oyo esɛngisami na mboka; yango esangisi iniversite, koyekola mosala, formasyo ya makambo ya mombongo, biteyelo ya makambo ya tekiniki, formasyo ya mikuse, mpe bakelasi mosusu ya milai.
b Yango etaleli bandeko mibali mpe bandeko basi.
c Kala, mikanda na biso ezalaki kolendisa te bakristo bábakisa lolenge mosusu ya bakelasi. Na ndakisa, lisolo “Baboti—Bokolinga bana na bino bákóma bato ya ndenge nini?” oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/10/2005, elobelaki makama ya bakelasi ya milaimilai. Makama yango ezali kaka, kasi kobakisa bakelasi mosusu to te ezali ekateli ya moto ye moko. Mokristo mokomoko—mpe mpo na bana mike, mokonzi mokomoko ya libota—asengeli kobondela mpe kotalela mitinda ya Biblia ná makambo oyo kelasi yango ezali kosɛnga liboso ya kozwa ekateli. Mokristo mosusu te—ata mpe bankulutu—basengeli kosambisa ndeko mpo na ekateli oyo ye moko azwi na likambo yango.—Yak. 4:12.