Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w26 Mai nk. 8-13
  • Salelá mitinda ya Biblia mpo na koteya lisosoli na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salelá mitinda ya Biblia mpo na koteya lisosoli na yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • LISOSOLI EZALI NINI?
  • NDENGE YA KOTEYA LISOSOLI NA BISO
  • NDENGE YA KOMONA MITINDA YA BIBLIA NA LIKAMBO TOZALI NA YANGO
  • MONISÁ ETE OZALI NA LISOSOLI OYO ETEYAMI MALAMU
  • Zalá na lisosoli ya malamu na miso ya Nzambe
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • Otyelaka lisosoli na yo motema?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Ndenge nini okoki kobatela lisosoli ya malamu?
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Oyo okoki kosala mpo na kozwa bikateli ya malamu
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
w26 Mai nk. 8-13

13-19/07/2026

LOYEMBO 127 Lolenge ya moto oyo nasengeli kozala

Salelá mitinda ya Biblia mpo na koteya lisosoli na yo

“Moto na moto akomema mokumba na ye moko.”—GAL. 6:5.

NA MOKUSE

Lisolo oyo ekomonisa ndenge oyo mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso tóteya lisosoli na biso mpo ezala motambwisi ya malamu.

1-2. (a) Likabo nini Yehova apesaki Adama ná Eva? (b) Basengelaki kosala nini mpo na komonisa botɔndi mpo na likabo yango?

NYAMA etambwisamaka na mayele ya lɔɔmbi (instinct). Bamasini mingi esalaka makambo oyo moto atyelá yango esalaka. Kasi bato bazali ndenge wana te. Yehova akelá biso na likabo moko ya ntina mingi, mpe biso bakristo ya solo tozwaka yango na motuya. Likabo yango ezali bonsomi ya kopona, elingi koloba, likoki ya kozwa bikateli mpe kopona oyo tolingi. Biblia eyebisi biso ete Adama, mobali ya liboso, akelamaki na elilingi ya Nzambe, azalaki lokola ye. (Eba. 1:​26, 27) Adama ná mwasi na ye Eva bazalaki bikelamu ya mayele mpe Yehova apesaki bango likoki ya kozwa bikateli bango moko.

2 Yehova apesaki Adama ná Eva mibeko ebeleebele te. Ayebisaki bango kaka bábatela mabele, bátondisa yango na bana na bango, mpe bátosa lotomo na ye ya kokatela bango oyo basengelaki kosala. (Eba. 1:28; 2:​16, 17) Adama ná Eva basengelaki kosala nini mpo na komonisa botɔndi epai ya Moto oyo apesaki bango likabo ya bonsomi ya kopona? Na kotalela nyonso oyo Yehova apesaki bango, basengelaki kozala na mposa makasi ya kotosa mibeko yango ya pɛtɛɛ mpo na komonisa ete balingaka ye mpe bazali na mposa ya kosepelisa ye.—Mas. 23:15.

3. Ndenge nini Adama ná Eva basalelaki likabo na bango ya bonsomi ya kopona?

3 Ndenge Biblia emonisi yango, Adama ná Eva basalelaki malamu te bonsomi na bango ya kopona. Bazwaki ekateli ya koboya kotosa Yehova. Ekateli na bango emonisaki ete bazalaki na ezaleli ya moimi, balingaki Yehova te mpe bazangaki botɔndi. (Eba. 3:​1-7) Tii lelo tozali komona mpasi mpo na ekateli wana ya mabe.—Rom. 5:12.

4. (a) Na kotalela Bagalatia 6:​5, biso nyonso tosengeli kosala nini? (b) Likabo nini mosusu tokolobela na lisolo oyo?

4 Lelo oyo bomoi ezali mpasi mpenza. Mokolo na mokolo, esɛngaka tózwa bikateli na makambo ndenge na ndenge. (Tángá Bagalatia 6:5.) Bikateli mosusu ezalaka pɛtɛɛ mpo na kozwa, kasi mosusu ezalaka mpasi mpenza. Ndenge nini tokoki kozwa bikateli oyo ekosepelisa Yehova? Tosengeli liboso kondima ete tozali na mposa ya lisalisi ya Yehova. (Mas. 16:3; Yir. 10:23) Ata Yesu, moto ya kokoka, ayebaki ete asengeli na lisalisi ya Nzambe. (Ebr. 5:7) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, tozali na mposa ya litambwisi ya Yehova mingi koleka Yesu. Tólobela sikoyo likabo mosusu oyo Nzambe apesá biso mpo na kosalisa biso tózwaka bikateli ya malamu: lisosoli.

LISOSOLI EZALI NINI?

5. (a) Lisosoli ezali nini? (b) Ndenge nini lisosoli esalisaka biso? (Baroma 2:​14, 15)

5 Lisosoli ezali mongongo moko na kati na biso oyo eyebisaka biso soki likambo boye ezali malamu to mabe. Moto nyonso azalaka na lisosoli, ata soki ayebi mibeko ya Nzambe te. (2 Ko. 4:2) Lisosoli ezali lokola mosambisi moko na kati na biso oyo akoki kofunda biso to kolongisa biso mpo na makambo oyo tozali kokanisa to kosala. (Tángá Baroma 2:​14, 15.) Lisosoli ekoki kokebisa biso ntango tolingi kosala likambo oyo toyebi ete ezali mabe. (1 Sa. 26:​8-11) To ekoki kotinda biso tósala oyo toyebi ete ezali malamu. Kozala na bonsomi ya kopona elakisi te ete ekateli nyonso oyo tozwi ekosepelisa Yehova. Lisosoli na biso esengeli kosalisa biso tóyeba kokesenisa ekateli ya malamu na oyo ya mabe.

6. Lisosoli na biso ezali na mokakatano nini?

6 Kasi ezali na mokakatano moko. Kaka ndenge tozali bato ya kozanga kokoka, lisosoli na biso mpe ezali ya kozanga kokoka. Ndenge oyo tobɔkwamá, mimeseno na biso, mpe bamposa na biso ya bato ya masumu ekoki kobebisa yango. Biblia elobi ete lisosoli ya bato mosusu ekoki ‘kozala makasi te,’ ‘kokóma mbindo,’ ‘kotyama elembo lokola na ebende ya mɔtɔ makasi,’ to ata kokóma “mabe.” (1 Ko. 8:12; Tito 1:15; 1 Tim. 4:2; Ebr. 10:22) Ntango lisosoli ekómi ndenge wana, ezalaka lisusu motambwisi ya malamu te. Ezali lokola emekeli-kilo ebebá oyo esɛngi kobongisa yango. Na yango lisosoli na biso esengeli koteyama malamu mpo ekoba kosala malamu. (1 Pe. 3:16) Ndenge nini tokoki kosala yango?

NDENGE YA KOTEYA LISOSOLI NA BISO

7-8. (a) Nini ekosalisa biso tóteya lisosoli na biso? (b) Ndenge nini mitinda ya Biblia etambwisaka biso? Pesá ndakisa. (Talá mpe elilingi.)

7 Ndenge nini tokoki koteya lisosoli na biso? Tosengeli kotángaka Biblia mbala na mbala mpe koyekola koyeba makambo oyo ezali malamu to mabe na miso ya Yehova. Koyekola mibeko ya Nzambe ekosalisa biso tóyeba malamu makanisi na ye. Kasi, ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, mibeko ya sikisiki ekoki kotalela kaka likambo moko. Yango wana tosengeli kolukaka mpe mitinda, mpo ekosalisa biso tóyeba ndenge oyo Yehova akanisaka mpe ayokaka mpo na makambo mingi.—Yis. 55:9.

8 Bomoi na biso ezali lokola kotambola na kati ya esobe. Kanisá ete ozali na esobe oyo bakatá banzela ya polele te, bisika ya koleka te, to bilembo ya nzela ezali te. Moi mpe minzoto ekoki komonisa nzela oyo tosengeli kolanda mpo na kokóma esika tozali kokende. Kasi karte oyo ezali kolakisa mwa biloko oyo tokoki komona na nzela ekosalisa biso mingi koleka. Karte ya ndenge wana ekondimisa biso ete tozali kokende na nzela ya malamu mpe ekosalisa biso tóyeba soki tokei na nzela ya mabe. Na bomoi na biso, kosepelisa Yehova nde ezali esika oyo tozali kokende. Biblia ezali lokola karte oyo elakisaka biso nzela oyo mpenza tosengeli kolanda. Mpe mitinda ya Biblia ezali lokola biloko oyo tokomona na nzela yango. Kosalela mitinda yango ekosalisa biso tókóma esika oyo tozali kokende, elingi koloba tósepelisa Yehova.

Moto moko azali kotambola na kati ya esobe mpe azali kotala karte oyo emonisi biloko oyo ezali na nzela mpo na komindimisa ete azali na nzela oyo ezali komema esika oyo azali kokende.

Mitinda ya Biblia ezali lokola biloko oyo tokoki komona na nzela oyo ekondimisa biso ete tozali kotambola na nzela ya malamu (Talá paragrafe 8)


9. Na kotalela Baroma 9:​1, nini mosusu ekosalisa biso tóteya lisosoli na biso?

9 Mpo na koteya lisosoli na biso malamu, tozali na mposa ya lisalisi ya elimo santu ya Nzambe. (Tángá Baroma 9:1.) Elimo santu ekosalisa biso tóyeba malamu likanisi ya Yehova mpo na makambo ndenge na ndenge. Ekoki mpe kolendisa biso mpe kopesa biso makasi ya kosala makambo oyo eyokani na mokano ya Yehova. (Flp. 2:13) Kasi ndenge nini tokoki kozwa lisalisi ya elimo santu ya Yehova?

10. Ndenge nini tokoki kozwa lisalisi ya elimo santu? (Luka 11:​10, 13)

10 Sɛngá elimo santu na libondeli. (Tángá Luka 11:​10, 13.) Tokoki kotya motema ete Yehova azalaka lobɔkɔ pɛtɛɛ mpo na kopesa biso elimo santu. (Yoa. 3:34) Apesaka yango mingi epai ya baoyo balandaka litambwisi na ye. (Mas. 1:23; Yak. 1:5) Kasi nini lisusu ekosalisa biso tóteya lisosoli na biso?

11. (a) Mokano na biso ya libosoliboso na bomoi esengeli kozala nini? (b) Mpo na nini tosengeli komindimisa ete lisosoli na biso eteyami mpe ezali kosala malamu?

11 Lukáká ntango nyonso kondimama na Yehova. (Mas. 8:​34, 35) Yango nde esengeli kozala mokano na biso ya libosoliboso na bomoi. Soki tobateli mokano yango na makanisi na biso na makambo nyonso oyo tokoki kokutana na yango na bomoi, yango ekoki kosalisa biso tóteya lisosoli na biso. Kozala na lisosoli oyo eteyami malamu elimboli kozala na makanisi oyo eyokani na ndenge oyo Yehova akanisaka mpe motema oyo etyaka likebi na ndenge oyo amiyokaka. Ntango tokanisaka ndenge bomoi ya lelo ekómi mindɔndɔ, tomonaka ete ezali na ntina mpenza ya kozala na lisosoli oyo eteyami malamu. Tokutanaka mbala mingi na makambo oyo Biblia elobeli polele te. Makambo yango ekoki kotalela kominanola, mosala, kelasi, to boyokani na biso na basusu. Na yango, ndenge nini tokoki koyeba soki Yehova andimaka mpenza bikateli oyo tozwaka na makambo yango?—2 Ko. 1:12.

12. Nini ekosalisa biso tóyeba soki lisosoli na biso ezali kotambwisa biso na nzela ya malamu? (Baefese 5:10)

12 Manyoláká makambo oyo ozali kotánga na Liloba ya Nzambe. (Nz. 49:3) Ntango ozali kotánga Biblia, lukáká makambo oyo ekosalisa yo oyeba likanisi ya Yehova. (Tángá Baefese 5:10.) Ntango tozali kobundana na mikakatano ya bomoi, tosengeli koluka mitinda na Biblia oyo ekosalisa biso tóyeba soki lisosoli na biso ezali kosalisa biso mpo tózwa bikateli ya malamu. (Mas. 2:​4-9, 11-13) Mitinda yango ekoki kosalisa biso tóbongisa lisusu to tósembola lisosoli na biso na ndenge oyo esengeli mpo tómindimisa ete tozali kaka na nzela ya bomoi.—Ebr. 5:14.

13. Nini tosengeli koboya kosala? Pesá ndakisa.

13 Kozwa naino ekateli te bongo na nsima oluka mitinda ya Biblia oyo ekolongisa yango. Tolingi te kozala lokola Bayisraele oyo batikalaki na mokili ya Yuda nsima ya kobebisama ya Yerusaleme na 607 L.T.B. Bayebisaki Yirimia boye: “Yehova Nzambe na yo ayebisa biso nzela oyo tosengeli kotambola mpe likambo oyo tosengeli kosala.” (Yir. 42:​3-6) Nzokande basilaki kozwa ekateli mpo na oyo bakosala. Ntango malako ya Yehova esepelisaki bango te, bakangamaki na ekateli oyo basilaki kozwa. Yango ememelaki bango mpasi mingi. (Yir. 42:​19-22; 43:​1, 2, 4) Na yango liboso ya kozwa ekateli moko, tosengeli koluka liboso mitinda ya Biblia oyo emonisi likanisi ya Yehova mpe na nsima kosala na boyokani na yango.

14. Mpo na nini tosengeli kozwaka bikateli oyo eyokani na mitinda ya Biblia?

14 Zwáká bikateli oyo eyokani na mitinda ya Biblia. (Mat. 7:​24-29; Yak. 1:​23-25) Soki tozali kozwa bikateli oyo eyokani na mitinda ya Biblia, tokomonisa ete tozali kosala na boyokani na elimo santu. Mpe yango ekosala ete Yehova akoba kopesa biso elimo na ye. (Mis. 5:32) Kasi, soki tozali kotika te ete elimo ya Yehova etambwisa biso, tokoki ‘koyokisa elimo santu mawa’ to kotɛmɛla yango. (Ef. 4:30; Yis. 63:10; Mis. 7:51) Yehova akoki ata kolongola elimo na ye epai na biso. (Nz. 51:11; 1 Tes. 5:19) Yango ekozala mabe mpenza mpo tozalaka na mposa ya nguya mpe ya makasi oyo eutaka na elimo santu.—Ef. 3:16.

NDENGE YA KOMONA MITINDA YA BIBLIA NA LIKAMBO TOZALI NA YANGO

15-16. (a) Ndenge nini tokoki komona mitinda ya Biblia oyo tokoki kosalela? (b) Mitinda nini ya Biblia ekoki kosalisa moyekoli ya Biblia azwa makasi ya kotika komɛla likaya?

15 Saleláká bisaleli ya bolukiluki. Mpo tózwa mitinda ya Biblia oyo tokoki kosalela, tosengeli liboso kozala na likoki ya komona yango na kati ya Biblia. Na ndakisa, kanisá ete moyekoli na yo ya Biblia azali kokakatana mpo na kotika komɛla likaya! Mbala mosusu alobi: ‘Biblia elobeli te komɛla likaya. Ndenge nini toyebi ete yango ezali mabe?’ Ndenge nini okoki kosalisa ye amona mitinda ya Biblia mpo na likambo yango mpe akanisa likoló na yango? Moko ya bisaleli oyo tokoki kosalela ezali Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova. Okoki kolakisa moyekoli motó ya likambo “Likaya mpe komɛla likaya.” Na nse ya motó ya likambo yango, akomona lisolo oyo elobi: “Ndenge nini Nzambe atalelaka komɛla makaya?” (Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/06/2014.) Ntango akotánga lisolo yango, bavɛrsɛ nini mpe mitinda nini akomona?

16 Tótalela mitinda mitano oyo ezali na lisolo yango. (1) Tosengeli te kokóma baombo ya eloko oyo ememaka na liwa. (Rom. 6:16) (2) Tosengeli koboya eloko nyonso oyo ekobebisa nzoto na biso. (2 Ko. 7:1) (3) Yehova alingi tósalela ye na molimo na biso mobimba. (Mat. 22:37) (4) Tosengeli te komemela basusu mpasi na misala na biso. (Mat. 22:39; 1 Ko. 10:24) (5) Yehova akoki kopesa biso makasi ya kosala oyo ezali malamu. (Flp. 4:13) Na yango ata soki Biblia elobeli polele te likambo ya komɛla likaya, mitinda oyo ezali na kati ekoki kosalisa moyekoli asosola likanisi ya Yehova.

17. Ndenge nini bakristo oyo bazali kobongisa fɛti ya libala na bango bakoki komona mitinda ya Biblia oyo ekosalisa bango?

17 Ndenge nini bakristo oyo bazali kobongisa fɛti ya libala bakoki komona mitinda ya Biblia oyo ekosalisa bango bázwa bikateli ya malamu? Awa mpe, Buku ya bolukiluki ekoki kosalisa bango. Na motó ya likambo “Mabala mpe bafɛti,” ezali na masolo ebele oyo ezali na mitinda ya Biblia. Tólobela mitinda 6 oyo bakristo yango bakoki kotalela. (1) Makambo nyonso oyo ekosalema esengeli kopesa Yehova nkembo. (1 Ko. 10:​31, 32) (2) Molato na biso esengeli kozala oyo ebongi, elekisa ndelo te, mpe ebɛtisa basusu libaku te. (1 Tim. 2:9; 1 Pe. 3:​3, 4) (3) Tosengeli koboya kolakisa na lolendo biloko oyo tozali na yango ndenge bato ya mokili ya Satana basalaka. (Yoa. 17:14; Yak. 1:27; 1 Yoa. 2:​15, 16) (4) Makambo nyonso esengeli kosalema na molɔngɔ. (1 Ko. 14:40) (5) Bafɛti esengeli te kozala bafɛti ya lokoso epai bato bakolangwa masanga. (Gal. 5:21) (6) Esengeli kopesa moto moko mokumba ya kokamba makambo nyonso na molulu yango.—Yoa. 2:​8, 9.

18-19. (a) Esaleli nini mosusu ekoki kosalisa biso? (b) Mitinda nini okoki komona na esaleli yango oyo ekosalisa yo ozwa ekateli na oyo etali bafɛti mpe milulu? (Talá etanda “Okoki koyeba malamu mitinda?”)

18 Esaleli mosusu oyo esalisi bato mingi ezali buku Batoli ya Biblia mpo na bomoi ya bakristo. Mokanda yango ezali na liste ya bavɛrsɛ mpo na makambo ndenge na ndenge. Ntango oponi likambo oyo ozali koluka, okomona liste ya mituna mpe bavɛrsɛ oyo ekoki kosalisa yo oyeba malamu mitinda ya Biblia. Na ndakisa, mokristo akoki komituna soki asengeli kokende na molulu moko boye. Soki atali na motó ya likambo “Bafɛti mpe milulu,” akomona motó ya likambo ya moke “Milulu oyo bakristo baboyaka.”

19 Talá mwa makambo oyo ezali na eteni yango: “Mpo na nini ezali mabe kosala milulu oyo ezali na boyokani na mangomba ya lokuta? (1Ko 10:21; 2Ko 6:​14-18; Ef 5:​10, 11).” Na nsima, batye bandakisa ya mwa milulu oyo ezali mabe. Na nse ya motó ya likambo ya moke “Milulu ya ekólo,” ezali na mitinda ya Biblia oyo ekosalisa mokristo azwa ekateli ya malamu ntango basɛngi ye asangana na molulu oyo ezali kokumisa makambo oyo ekólo esalá, molulu ya kokanisa bitumba oyo ekólo ebundá, to oyo ezali kopesa bato lokumu oyo esengeli kokende kaka epai ya Yehova. Tozali mpenza na botɔndi ndenge ebongiseli ya Yehova epesi biso bisaleli ya boye mpo na kosalisa biso tóteya lisosoli na biso!

Okoki koyeba malamu mitinda?

Buku Batoli ya Biblia mpo na bomoi ya bakristo ezali na mitinda ya Biblia mpo na makambo ndenge na ndenge. Bokoki kotalela masolo mosusu oyo elandi na Losambo na kati ya libota mpo bómona ndenge oyo bokoki koyeba malamu mitinda ya Biblia.

  • Komɛla masanga

  • Kolimbisa

  • Kozala moninga ya mokili

  • Bosembo

  • Losambo ya bikeko

  • Kosangisa losambo

  • Kobuka lokuta

  • Mbongo

  • Koboya kokɔta na makambo ya politiki

  • Pornografi

  • Kominanola

  • Kosilisa matata

  • Misala ya mabe

MONISÁ ETE OZALI NA LISOSOLI OYO ETEYAMI MALAMU

20. Ndenge nini tokoki komonisa ete toteyi malamu lisosoli na biso?

20 Tozwaka na motuya likabo ya bonsomi ya kopona. Kasi toyebi mpe ete tosengeli koteya lisosoli na biso mpo tóyeba kosalela bonsomi ya kopona na ndenge ya malamu. Lisosoli oyo eteyami malamu ekosalisa biso tózwa bikateli oyo ekopesa Yehova lokumu mpe oyo ekoyokana na mokano na ye. Mpo na kosala yango, tozali na mposa ya lisalisi ya elimo santu ya Yehova. Na yango tosengeli kokoba kosɛnga elimo santu mpe na nsima kolanda litambwisi na yango. Mitinda ya Biblia ekosalisa biso mpe tóteya lisosoli na biso. Tiká ete tósalela malamu likabo ya bonsomi ya kopona mpe ya lisosoli, mpe na bongo tómona nguya ya Liloba ya Nzambe na bomoi na biso.—2 Tim. 3:​16, 17; Ebr. 4:12.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Lisosoli ezali nini?

  • Ndenge nini tokoki koteya lisosoli na biso?

  • Ndenge nini mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso ntango tozali kozwa bikateli?

LOYEMBO 135 Yehova alobi: ‘Zalá mayele, mwana na ngai’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto