Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w26 Mai nk. 20-25
  • Tikalá makasi na elimo ntango ozali kobakisa bakelasi mosusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tikalá makasi na elimo ntango ozali kobakisa bakelasi mosusu
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • BATELÁ MALAMU MIMESENO YA ELIMO
  • ‘BATELÁ MAKOKI NA YO YA KOKANISA’
  • SALELÁ NTANGO NA YO MALAMU MPENZA
  • KOBÁ ‘KOTAMBOLA NA BATO YA BWANYA’
  • OMIBONGISA
  • Zwá bikateli ya bwanya na oyo etali kobakisa bakelasi mosusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Luká biyano na mituna oyo
    Programɛ ya Liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova 2025-2026—Elongo na mokɛngɛli ya zongazonga
  • Ndimá ete okoki koyeba makambo mosusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • ‘Kobá kolanda’ Yesu nsima ya batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
w26 Mai nk. 20-25

27/07–02/08/2026

LOYEMBO 56 Monisá solo

Tikalá makasi na elimo ntango ozali kobakisa bakelasi mosusu

“Ata soki tokei liboso tii wapi, tókoba kaka kotambola na molɔngɔ na nzela moko wana.”—FLP. 3:16.

NA MOKUSE

Tokomona mitinda ya Biblia minei oyo ekosalisa yo otikala makasi na elimo ntango ozwi ekateli ya kobakisa bakelasi mosusu.

1-2. (a) Soki ozwi ekateli ya kobakisa bakelasi mosusu, osengeli kokoba kosala nini? (b) Maloba ‘kokoba kotambola na molɔngɔ na nzela moko wana’ elimboli nini? (Bafilipi 3:16)

BATATOLI ya Yehova mosusu bazwá ekateli ya kobakisa bakelasi mosusu nsima ya kosilisa kelasi oyo esɛngisami na mboka. Mbala mosusu bamoni ete bakelasi yango ekoki kosalisa bango bázwa mosala oyo ekosunga bango na mosala ya Yehova. Soki ozwi ekateli ya kobakisa bakelasi mosusu, ndenge nini okoki komindimisa ete okotikala kaka penepene na Yehova? (Yak. 4:8a) Na ntembe te, okutanaki na makambo oyo emekaki kondima na yo na eteyelo bambula oyo eleki mpe olongaki yango. Sikoyo osengeli ‘kokoba kaka kotambola na molɔngɔ na nzela moko wana,’ elingi koloba, kokoba kosalela Yehova na bosembo nyonso, ndenge kaka osalaki liboso.—Tángá Bafilipi 3:16.

2 Maloba ya Grɛki oyo esalelami na vɛrsɛ yango, oyo ebongolami “kotambola na molɔngɔ na nzela moko wana” ezalaki kosalelama mbala mingi mpo na kolobela basoda oyo bazali kotambola elongo mpe kokende liboso. Soki ozwi ekateli ya kobakisa bakelasi mosusu, ekosɛnga okoba “kokende liboso” na mosala ya Yehova, kotɛlɛma esika moko te mpe kozonga nsima te. Lisolo oyo ekolobela mitinda ya Biblia minei oyo ekosalisa yo. Mitinda yango ezali likambo ya sika te mpo na yo. Osalelaki yango na kala, mpe ekosɛnga okoba kosalela yango ntango ozali kobakisa bakelasi mosusu mpe nsima ya kosilisa kelasi.

BATELÁ MALAMU MIMESENO YA ELIMO

3. Kobakisa bakelasi mosusu ekoki kosala nini na mimeseno na yo ya elimo?

3 Mokakatano. Kobakisa bakelasi mosusu ekoki kosɛnga yo makambo mosusu oyo ekobebisa mimeseno na yo ya elimo. Lokola olingaka kolonga na kelasi, okoki kobanda kozwa mosala ya Yehova na ntina mingi te. Okoki kobanda ata kokóma na bolɛmbu mpo na makita, mosala ya kosakola, boyekoli na yo moko ya Biblia mpe libondeli.—Em. 2:4.

4. Nini ekoki kosalisa yo ozala “ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo”? (1 Bakorinti 15:58)

4 Tángá 1 Bakorinti 15:58. Kaka ndenge velo ekweaka te ntango ezali kotambola, ndenge moko mpe, okokoba kozala makasi na elimo soki okobi kokende liboso, elingi koloba, ozali “ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.” Yango elakisi te kolekisa kaka mwa ntango na makambo ya elimo. Kasi nde kotya yango na esika ya liboso. Omimona libosoliboso lokola mosaleli ya Yehova mpe mwana-kelasi na nsima. (Mat. 22:37) Ndeko mwasi moko ya elenge na nkombo Samantha alobi boye: “Ngai moko namilobaki ete soki kaka kelasi na ngai ekómi kopekisa ngai kosala mosala ya Yehova, nakokata kelasi yango.”

5. Nini okoki kosala mpo ozala kaka makasi na mosala ya Yehova?

5 Oyo okoki kosala liboso ya kobakisa bakelasi mosusu. Yebá malamu makambo ya kotya na esika ya liboso. Omituna boye: ‘Nakobanda kosala ndenge nini mpo nazangisaka makita te, nabimaka mosala ya kosakola mpe nasalaka boyekoli na ngai moko?’ (Yos. 1:8; Mat. 28:​19, 20; Ebr. 10:25) Lisusu, okoki mpe komituna boye: Ndenge nini nakobaki kotya makambo yango na esika ya liboso bambula oyo eleki ntango nazalaki kotánga? Soki omoni ete ezalaki na makambo ya kobongisa, nini okoki kosala banda sikoyo mpo na kobongisa yango? Zalá na ekateli ya kozala makasi na mosala ya Yehova ntango ozali kobakisa bakelasi mosusu. Landelá kelasi na ndenge oyo esengeli, kasi ezangisa yo te ntango ya kosala makambo ya elimo.a—Mat. 6:24.

6. Makambo nini osengeli kotyelaka likebi ntango ozali komitalela? (Talá mpe elilingi.)

6 Ntango ozali kobakisa bakelasi mosusu, omitalelaka mbala na mbala, ata mbala moko na sanza. Omituna boye: ‘Makambo oyo natyaka na esika ya liboso ebongwani te?’ Tyá likebi na bambongwana oyo ezali komonana, na ndakisa, momeseno ya kozangisa makita mosusu to kokóma nsima ya ngonga, kokanisaka makambo ya kelasi ntango ozali na makita, to koyanganaka na makita kaka na nzela ya Internet. Taláká mpe soki ozali lisusu kobondela te mpe kotánga Biblia ndenge ozalaki kosala yango liboso, to soki mosala na yo ya kosakola ekómi kaka ya likolólikoló—ntango ozali kosakola, ozalaka na mposa ya kosilisa nokinoki. Soki omoni makambo ya ndenge wana, luká kobongisa yango noki. Kotika te ete kelasi epekisa yo kotya mosala ya Yehova na esika ya liboso.

Ndeko mobali moko azali kotánga bavɛrsɛ ntango azali koyekola na likebi nyonso lisolo moko ya “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.”

Kotika te ete kelasi epekisa yo kotya mosala ya Yehova na esika ya liboso (Talá paragrafe 6)


‘BATELÁ MAKOKI NA YO YA KOKANISA’

7. Kobakisa bakelasi mosusu ekoki kosala nini na lolenge na yo ya kokanisa?

7 Mokakatano. Na kotalela makambo oyo ozali kotángela, kobakisa bakelasi mosusu ekoki komema yo na “filozofi mpe na bokosi ya mpambampamba” ya mokili oyo, oyo esangisi mateya oyo elobaka ete Nzambe azalaka te mpe ya evolisyo. (Kol. 2:8) Yango ekoki mpe kolendisa moto amityela motema mingi koleka. Ndeko mobali moko ya elenge alobi boye: “Bazalaki koteya biso kaka te mayele moko ya mosala, kasi mpe lolenge moko ya kokanisa, oyo mbala mingi ezalaki koyokana te na makanisi ya Yehova. Na ndakisa, bateyaki biso ete kolonga na bomoi etaleli biso moko kaka. Makanisi ya ndenge wana emonisi ete tozali na mposa ya Yehova te mpo tólonga na bomoi. Ekómaki mpasi mpo na ngai kotyela Yehova motema.”

8. Mpo na nini ezali na ntina “obatela makoki na yo ya kokanisa”? (Masese 5:​1, 2)

8 Tángá Masese 5:​1, 2. Biblia elendisi biso ‘tóbatela makoki na biso ya kokanisa.’ Kobatela eloko moko esɛngaka kotya yango mosika na likama. Osengeli mpe kosala bongo mpo na makoki na yo ya kokanisa. (1 Pe. 5:8) Elimo ya mokili ekoki kobongola bindimeli na yo na oyo etali mabe ná malamu, ndenge oyo bomoi ebandá, to ata kondima ete Nzambe azali. Bato bakoki komonisa ete makanisi na bango nde “eleki mpenza,” nzokande ezali na nse mpenza. Kutu, ezali nde “bozoba na miso ya Nzambe.”—1 Ko. 3:​18-20.

9. Okoki kosala nini mpo obatela makoki na yo ya kokanisa?

9 Oyo okoki kosala liboso ya kobakisa bakelasi mosusu. Mpo na kobatela makoki na yo ya kokanisa, osengeli naino komindimisa makasi ete makambo oyo Biblia eteyaka ezali solo liboso obakisa bakelasi mosusu. Omituna mituna lokola oyo: ‘Mpo na nini nandimelaka Nzambe? Ndenge nini nayebi ete Biblia ezali Liloba na ye? Nini endimisaka ngai ete mibeko ya Biblia na oyo etali mabe ná malamu eleki mosika oyo ya mokili?’ Lisusu, kanisá likambo oyo: Na ntembe te bambula oyo eleki na eteyelo, okutanaki na makambo oyo emonisi makanisi ya mokili. Komona ete basusu bazali kondimela liteya ya evolisyo elɛmbisaki kondima na yo? Ezalaki pɛtɛɛ mpo na yo kolanda bomoi ya mbindo ya baninga na yo ya kelasi? Soki omoni ete ezalaki na makambo ya kobongisa, nini okoki kosala banda sikoyo mpo omindimisa lisusu makasi na mateya ya Biblia? Zalá na ekateli ya kobatela makoki na yo ya kokanisa ntango ozali kobakisa bakelasi mosusu.—2 Tim. 2:​16-18.b

10. Ndenge nini okoki kokoba kobatela makoki na yo ya kokanisa?

10 Ntango ozali kobakisa bakelasi mosusu, kobá komitalelaka mbala na mbala. Omituna boye: ‘Nakómi kolanda lolenge mabe ya bomoi ya bato oyo nazali na bango? Nazalaka na likoki ya koyeba soki likambo boye to boye ezali filozofi ya mpambampamba ya mokili? Nandimaka mpenza ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mikakatano nyonso ya bato?’ Mpo obatela makoki na yo ya kokanisa, osengeli kokoba kozala moyekoli malamu ya Liloba ya Nzambe. Koyekola Biblia mpe komanyola ekosalisa yo omindimisa makasi ete ozali na solo.—1 Tim. 4:15.

SALELÁ NTANGO NA YO MALAMU MPENZA

11. Ntango ozali kobakisa bakelasi mosusu, mokakatano nini okoki kokutana na yango na oyo etali kosalela ntango na yo?

11 Mokakatano. Kobakisa bakelasi mosusu ekoki kolya ntango mingi, mingimingi ntango ozali komibongisa mpo na baekzamɛ to ntango ozali na likambo moko oyo osengeli kosilisa na ntango mokuse. Soki osaleli ntango na yo malamu te, okoki kokóma na mitungisi oyo ezangi ntina mpe ata kosila makasi nyonso. Na yango, ezali na ntina mingi kobatela kolɔngɔnɔ ya nzoto mpe ya makanisi.

12. ‘Kosalela ntango na yo malamu mpenza’ esangisi mpe kosala makambo nini? (Baefese 5:​15, 16)

12 Tángá Baefese 5:​15, 16. Ekoki kozala mpasi ‘osalela ntango na yo malamu mpenza.’ Osengeli kozala na bokatikati. Na ndakisa, atako ekosɛnga otyaka likebi mingi na makambo na yo ya kelasi, osengeli mpe kolekisaka ntango elongo na bandeko na yo bakristo mpe na bandeko ya libota. (Nz. 133:1; Mas. 18:1) Bamposa na yo ya elimo esengeli kozala na esika ya liboso mpenza. (Mat. 6:33) Mbala mosusu ozali na mosala to na mikumba ya libota oyo osengeli kokokisa. Lisusu, osengeli mpe kozwaka ntango ya kopema mpe kosalaka ngalasisi mpo na kobatela kolɔngɔnɔ ya nzoto na yo. (Mos. 4:6; 1 Tim. 4:8) Makambo wana nyonso ezali kosɛnga osalela ntango na yo malamu.

13. Okoki kosala nini mpo osalela ntango na yo malamu mpenza?

13 Oyo okoki kosala liboso ya kobakisa bakelasi mosusu. Biblia emonisi ete kobongisa makambo liboso epesaka litomba. (Mas. 21:5) Mpo na yango, zalá na programɛ oyo ebongi liboso ya kobakisa bakelasi mosusu. Mpo na kosalisa yo osala yango, kanisá: Ndenge nini osalelaki ntango na yo malamu bambula oyo eleki na eteyelo? Soki omoni ete okokaki kosala malamu koleka, mbongwana nini okoki kosala sikoyo? Zalá na ekateli ya kosalela ntango na yo malamu na esika ete ntango nde esalela yo.c

14. Mituna nini ekoki kosalisa yo ntango ozali komitalela?

14 Ntango ozali kobakisa bakelasi mosusu, omitalelaka mbala na mbala. Omituna boye: ‘Programɛ na ngai esalisaka ngai nazwa ntango oyo esengeli mpo na kopema mpe kosala ngalasisi? Nalekisaka kaka ntango na bandeko na ngai bakristo? Nakokaka kosala badevuare na ntango oyo esengeli? Soki bongo te, ezali mpo nazali na makambo mingi ya kosala to mpo nazongisaka makambo nsima? Bato mosusu, ata mpe bato ya libota na ngai, basepelaka ndenge nakokisaka mikumba na ngai?’ Soki omoni ete osengeli kobongola programɛ na yo to kaka kolanda malamu programɛ na yo, luká kosala yango noki. Okoki ata kotuna basusu oyo basalaka makambo malamu na ngonga.—Mas. 11:14.

KOBÁ ‘KOTAMBOLA NA BATO YA BWANYA’

15. Ntango ozali kobakisa bakelasi mosusu, mikakatano nini okoki kokutana na yango?

15 Mokakatano. Ntango ozali kobakisa bakelasi mosusu, mbala mosusu baninga na yo ya kelasi bakosɛnga yo olekisaka na bango ntango na makambo mosusu ya bomoi. Okoki komekama mpo na kolekisa ntango na bango. Tókende tózonga, ezali na makambo mingi oyo bosalaka elongo, mingimingi soki olekisaka ntango mingi elongo na bango na kelasi. Okoki ata komona ete na makambo mingi ozali lokola baninga na yo ya kelasi koleka bandeko na yo mosusu bakristo. Nzokande, osengeli kokeba. Atako otángaka na bango kelasi moko, bozali na bindimeli moko te. Lisusu, wana ozali kolekisa ntango mingi na bango, okobanda mpe kokanisa lokola bango. (1 Ko. 15:33) Michael, oyo asalaki mbula minei ya formasyo ya mosala ya kura, amonaki bosolo ya likambo yango. Alobi boye: “Nazalaki kolekisa bangonga koleka 40 na pɔsɔ elongo na baninga ya mosala oyo bazalaki komemya basi te, koyoka miziki oyo ebongi te, mpe koloba maloba mabe, na yango nakómaki kokanisa ete makambo yango ezali mabe te.”

16. ‘Kotambola na bato ya bwanya’ elimboli nini? (Masese 13:20)

16 Tángá Masese 13:20. Biblia ekebisi biso na makama ya kozala na baninga mabe. Kasi elobi ete: “Moto oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya.” Liteya ezali polele: Tomekolaka bato oyo tolekisaka na bango ntango, ezala na makambo ya mabe to ya malamu. Batelá boninga elongo na baoyo bazali na mokano moko na yo—kosalela Yehova na motema mobimba.—Nz. 101:​6, 7; 119:63.

17. Okoki kosala nini mpo na koboya baninga mabe?

17 Oyo okoki kosala liboso ya kobakisa bakelasi mosusu. Tyá bandelo na oyo etali boyokani na yo na baninga na yo ya kelasi. Ndeko moko na nkombo Trenton alobi boye: “Nasololaka malamu na baninga na ngai ya kelasi, kasi nalekisaka ntango te elongo na bango nsima ya kelasi. Nazwaka bango lokola baninga na ngai ya kelasi, kasi te lokola baninga na ngai ya motema.” Bandelo nini okomityela? Mpo na kozwa eyano na motuna yango, kanisá boye: Bandelo nini omityelaki na boumeli ya bambula oyo olekisaki na eteyelo? Soki omoni ete okokaki kosala malamu koleka, mbongwana nini okoki kosala sikoyo? Zalá na ekateli ya kokoba ‘kotambola na bato ya bwanya’ mpe koboya kozala moninga ya baoyo balingaka Yehova te.d

18. Mituna nini osengeli komituna mpo na komitalela? (Talá mpe elilingi.)

18 Omitalelaka nsima ya mwa ntango. Omituna boye: ‘Nazali kokóma na boninga makasi na baninga na ngai ya kelasi? Mimeseno, maloba mpe makanisi na bango ekómi kobongola ndenge na ngai ya koloba mpe ya kokanisa? Yehova asepelaka na boninga oyo nasali na bango?’ (Nz. 1:1) Soki omoni makambo oyo osengeli kobongisa, salá yango noki. Omindimisa ete baninga na yo ya malamu ezali baoyo balingaka Yehova lokola yo. Lisusu, kokakatanaka te kopesa baninga na yo ya kelasi litatoli. Yo nde ozali na libaku ya kosalisa bango báyeba solo.

Ndeko mwasi moko azali kolakisa moninga na ye ya kelasi trakte “Nzambe andimaka mangomba nyonso?” nsima ya kelasi na bango ya makambo ya nsuki.

Kokakatanaka te kopesa baninga na yo ya kelasi litatoli (Talá paragrafe 18)e


OMIBONGISA

19. Ndenge nini okoki komibongisa mpo na kolonga mikakatano ya elimo ntango ozali kobakisa bakelasi mosusu? Pesá ndakisa.

19 Moto oyo alingi kotambola na esobe to na bangomba asengeli komibongisa liboso ya kokende. Atako azali te na likoki ya koyeba mokakatano mokomoko oyo akokutana na yango, asengeli kozala nzoto makasi, kolata ndenge oyo esengeli, mpe kozala na mokano, elingi koloba, koyeba esika oyo azali kokende. Okoki mpe kosala bongo ntango ozali kobakisa bakelasi mosusu. Batelá kondima na yo makasi, latá “molato mobimba ya etumba oyo euti na Nzambe,” mpe zalá na mokano—ezala te ya koluka kozwa oyo mokili ebengaka “kolonga,” kasi nde ya kopesa Yehova nkembo na makambo nyonso.—Ef. 6:​11-13; 1 Ko. 9:​26, 27; 10:31.

20. Ndenge nini okoki ‘kokoba komimeka mpo na komona soki ozali na kati ya kondima’?

20 Biblia elobi ete: “Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima; bókoba kotala soki bozali ndenge nini.” (2 Ko. 13:5) Okoki kosala yango ntango ozali kobakisa bakelasi mosusu. Omitalelaka mbala na mbala na kolanda makambo oyo tolobeli na lisolo oyo. Ozali kobatela malamu mimeseno ya elimo? Ozali kobatela makanisi na yo mpo bwanya ya mokili oyo ebebisa yango te? Ozali kosalela ntango na yo malamu? Ozali kosala boninga na bandeko na yo bakristo mpe koboya baninga mabe? Yango ezali mituna oyo osengeli komituna soki ozali na kelasi, na mosala, to na esika mosusu. Zalá na ekateli ya kobatela kondima na yo makasi ata ntango okutani na likambo nini. Okoki kotya motema ete Yehova akopambola milende na yo mpo na kosala yango.—Mas. 3:​5, 6.

LIBOSO YA KOBAKISA BAKELASI MOSUSU, OKOKI KOSALA NINI MPO NA . . .

  • kobatela malamu mimeseno ya elimo?

  • ‘kobatela makoki na yo ya kokanisa’?

  • kosalela malamu ntango na yo mpe koboya baninga mabe?

LOYEMBO 87 Yaká kozwa makasi!

a Mpo na komona ndenge oyo okoki kozala kaka makasi na mosala ya Yehova, talá lisolo oyo elobi “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Nasengeli kosala nini nsima ya batisimo?—Eteni 1: Kolɛmbisa mabɔkɔ te.”

b Mpo na komona ndenge oyo okoki kobatela makanisi na yo, talá lisolo “‘Bwanya ya mokili oyo’ ebungisa yo nzela te” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 05/2019.

c Mpo na komona ndenge oyo okoki kobongisa makambo ya kosala na mokolo, talá na jw.org lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Ndenge nini nakoki kosalela ntango na ngai malamu?”

d Mpo na komona ndenge oyo okoki kopona malamu baninga, talá liteya 48, “Poná malamu baninga na yo,” na buku Sepelá na bomoi libela na libela!

e NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko mwasi moko azali kopesa moninga na ye ya kelasi litatoli na esika oyo bayekolaka kosala bato nsuki.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto