Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/11 nk. 15-21
  • Ntina ya kelasi mpe kolakisama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntina ya kelasi mpe kolakisama
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makoki masengeli mpo na kozala basaleli malamu
  • Matomba ya kotánga kelasi malamu
  • Koyekola oyo ebongi
  • Totalela kelasi na bokatikati
  • Totánga motuya
  • Libota ya bomoko, oyo lilakisami
  • Zwá bikateli ya bwanya na oyo etali kobakisa bakelasi mosusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Biblia epekisi kotánga kelasi?
    Lamuká!—1998
  • Kelasi​—⁠Salelá yango mpo na kosanzola Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Kotya kelasi na esika na yango
    Lamuká!—1994
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/11 nk. 15-21

Ntina ya kelasi mpe kolakisama

“Teya moyengebeni mpe akobakisa boyebi.”​—MASESE 9:9.

1. Na ntina etali boyebi, Jéhovah ezali kosɛnga nini epai na basaleli na ye?

JEHOVAH azali “Nzambe ya boyebi.” (1 Samwele 2:3) Akoteyaka basaleli na ye. Moize asakolaki ete bato ya eleko na ye bakoloba na ntina na Yisraele, ete: “Solo libota oyo ezali libota na mayele mpe na kososola.” (Deteronome 4:6) Bobele bongo, baklisto ya solo basengeli kozala na boyebi. Basengeli kozala bayekoli malamu ya Liloba na Nzambe. Komonisáká ntina ya koyekola, ntomá Paulo akomaki ete: “Tozali kobondela ntango nyonso mpo na bino mpe tokolɔmbaka ete botonda na boyebi ya solo mpo na mokano na ye, na mayele nyonso mpe na bososoli ya elimo, mpo na kotambola na motindo mobongi na Jéhovah, mpo na kosepelisa [ye] mpenza, wana ezali bino kobota mbuma kati na misala nyonso malamu mpe na kokóla kati na boyebi ya solo na Nzambe.”​—Bakolose 1:9, 10, MN.

2. (a) Nini esengeli mpo na kozwa boyebi ya solo na Nzambe? (b) Collège central ya ba Témoins de Jéhovah esalaki ebongiseli nini kati na likambo yango?

2 Esengeli kotánga kelasi mpo na kokoka koyekola na ntina na kozwa boyebi ya solo likoló na Nzambe mpe mikano na ye. Nzokande, bato mingi basili koyekola solo ya Liloba na Nzambe na mikili epai kuna bazwaki bobele likoki moke to mpe bazwaki yango te mpo na kotánga kelasi na motindo mobongi. Na yango, bazwaki litomba te. Mpo na kolónga nkaka wana, collège central ya ba Témoins de Jéhovah esɛngaki, eleki bambula mingi, ete bakelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma esalema na masangá nyonso epai mposa yango ezali. Eleki mibu 30, Diário de Mogi, zulunalo moko ya Brezile, ebimisaki lisoló moko na motó na likambo ete: “Ba Témoins de Jéhovah bazali kosilisa ntembe na likambo litali koyeba kotánga mpe kokoma.” Elobaki ete: “Molakisi moko ya makoki azali komipesa . . . mpo na koteya bato mosusu na motema molai ete bayeba kotánga mpe kokoma. . . . Na ntina na mabaku mingi oyo bazali kosalela yango lokola ba ministres ya Nzambe, banakelasi basengeli kokólisa makoki na bango ya koloba malamu mpo na kosala masoló kitoko.” Na bongo, bankóto na bato mingi na mokili mobimba bazwaki likoki ya kokóma bayekoli malamu ya Liloba na Nzambe. Bamipesaki na boyekoli yango wana ezalaki bango na mokano moko kitoko.

Makoki masengeli mpo na kozala basaleli malamu

3, 4. (a) Mpo na nini baklisto ya solo basepeli na koyekola? (b) Lolenge nini yango emonanaki na Yisraele, mpe boyebi nini ya moboko oyo ezali lelo na ntina kati na masangá na biso?

3 Baklisto ya solo basepeli na kotanga kelasi bobele mpo na koyeba makambo mingi te, kasi mpo na kokóma basaleli malamu ya Jéhovah. Klisto asili kopesa mosala epai na baklisto nyonso ete ‘bazalisa bayekoli na mabota nyonso, . . . kolakisa mpe bango ete batosa nyonso esili ye kolaka.’ (Matai 28:19, 20) Mpo na koteya bato mosusu, bango moko basengeli koyekola liboso, mpe yango esengi kozala na mwango malamu ya koyekola. Basengeli mpenza kozala na makoki ya kotalela Makomami na mozindo. (Misala 17:11) Mpo na kokokisa mosala na bango malamu, basengeli kozala lisusu na makoki ya kotánga kozanga kokakatana.​—Tala Habakuku 2:2; 1 Timoté 4:13.

4 Lokola tomonaki yango na lisoló ya liboso, tozali na bantina malamu ya kokanisa ete, na Yisraele ya kala, ata bilenge bayebaki kotánga mpe kokoma. (Basambisi 8:14; Yisaya 10:19) Ba ministres baklisto ya lelo basengeli kozwa ba notes malamu wana ezali bango kopesa litatoli na ndako na ndako. Bakomaka mikanda, bakozwaka ba notes na makita mpe bakomaka mwa makanisi ya ntina na mikanda na bango ya boyekoli. Nyonso wana esengi ete bayeba kokoma na motindo oyo moto akoki kotánga yango. Mpo na kosimba mikanda ya lisangá na boklisto, esengeli kozala na mwa boyebi ya moboko na ntina etali kosalela mituya.

Matomba ya kotánga kelasi malamu

5. (a) Liloba “eteyelo” liuti na liloba nini? (b) Libaku nini bilenge basengeli kosimba yango?

5 Emonani mpenza ete, liloba “eteyelo” liuti na liloba ya Greke skho·leʹ, oyo ndimbola na yango ya liboso ezali ete “bopemi,” to kosalela ntango ya bopemi na mosala moko ya ntina mingi, lokola koyekola. Na nsima liloba, yango lisalelamamki mpo na kobenga esika oyo bazalaki koyekola. Yango emonisi ete na eleko moko, na Grèce mpe na mikili misusu, bobele bazwi nde bazalaki na likoki ya koyekola. Basáli bazalaki mingimingi bato bazangi boyebi. Kasi na mikili mingi lelo, bana mike mpe bilenge bazali na ntango ya koyekola. Bilenge Batemwe basengeli kosomba ntango wana malamu mpo na kozwa boyebi mingi mpe kokóma basaleli ya Jéhovah oyo bazali na makoki.​—Baefese 5:15, 16.

6, 7. (a) Tangá mwa matomba mazwami na kotánga kelasi malamu. (b) Koyekola lokɔtá mosusu ekoki kozala na litomba kati na likambo nini? (c) Nini ezali lelo komonana epai na bilenge mingi nsima na kosilisa kelasi?

6 Mwa boyebi ya Histoire, ya Géographie, ya Sciences mpe bongo na bongo, ekosalisa bilenge Batemwe ete bakóma ba ministres oyo bakoki. Ezali bango kotánga kelasi, bakozwa te bobele boyebi na makambo mingi, kasi bakoyeba lisusu myango ya koyekola malamu. Baklisto ya solo bakotikaka koyekola te wana esilisi bangi kelasi. Kasi litomba ya boyekoli na bango etaleli mpenza lolenge na bango ya koyekola. Oyo bazali koyekola na kelasi mpe na lisangá ekoki kosalisa bango na kokólisa makoki na bango ya kokanisa. (Masese 5:1, 2) Wana bakobanda kotánga, bakozala na makoki ya kososola makambo ya ntina, oyo ebongi na kosimba mpe na kokanga yango.

7 Na ndakisa, koyekola lokotá mosusu ekokolisa te bobele makoki ya kokanisa ya bilenge, kasi ekoyeisa bango lisusu bato oyo lisangá ya Jéhovah lizali na mposa na bango. Na ba filiales mosusu ya la Société Watch Tower, bilenge bazali kozwa litomba na koyeba koloba mpe kotánga Lingelesi kozanga kokakatana. Epai mosusu, baklisto nyonso basengeli kosala molende mpo na koyeba malamu koloba lokotá na bango mpenza. Nsango malamu ya Bokonzi ebongi koteyama na lolenge ya polele, na kolandáká mibeko ya lokotá to grammaire. Ezali lelo komonana kati na mokili mobimba ete, wana bilenge bazali kosilisa kelasi, mingi na bango bazali naino na nkaka mpo na kotánga mpe kokoma malamu, mpe mpo na koyeba mwa moke mituya; mpe bazali na boyebi mingi te na Histoire mpe na Géographie.

Koyekola oyo ebongi

8. Mikapo nini ya Biblia oyo misalelami na likambo ya kotánga kelasi mpe oyo etali moto na moto mpo na kokokisa bamposa na ye?

8 Emonani ete oyo ezali ntango ebongi mpo na kolobela lolenge oyo baklisto bazali kotalela likambo ya kotánga kelasi. Mitinda nini ya Biblia oyo misalelami mpo na likambo oyo? Ya liboso, na mikili mingi, botosi epai na “Kaisala” esengi ete baboti baklisto bakɔtisa bana na bango kelasi. (Malako 12:17; Tito 3:1) Ekosalaka bango misala na eteyelo, bilenge Batemwe basengeli komikundola Bakolose 3:23 (MN), oyo elobi ete: “Soko bokosala nini, bosala yango na molimo na bino mobimba lokola mpo na Jéhovah, kasi mpo na bato te.” Ya mibale, baklisto basengeli kokokisa bamposa na bango mpenza, ata soki bazali basakoli ya ntango nyonso, lokola ba pionniers. (2 Batesaloniki 3:10-12) Mobali asengeli kokokisa bamposa ya mwasi na ye mpe ya bana na ye; asengeli mpe kobomba mwa mosolo mpo na baoyo bazali na bosengá mpe mpo na kosunga mosala ya kosakola na mboka na bango mpe na mokili mobimba.​—Baefese 4:28; 1 Timoté 5:8.

9, 10. (a) Likambo nini lizali komonana na mikili mingi? (b) Lifúta libongi elimboli nini mpo na pionnier?

9 Elenge moklisto asengeli kolekisa mbula boni na kelasi mpo na kotósa mitinda wana mizwami na Biblia ete akokisa mikumba na ye ya boklisto? Yango etali mboka na mboka. Nzokande, na mikili mingi, emonani ete bambula oyo esengeli kolekisa na kelasi mpo na kozwa mosala malamu, esili kobakisama. Ba rapports mingi euti na ba filiales ya la Société Watch Tower emonisi ete, na bamboka mingi na mokili, ezali mpasi mpo ete moto azwa mosala ya lifúta libongi soki asalaki kelasi mingi te engebene mibeko ya mboka, mpe na mikili misusu, ezali mpasi ata soki moto asilisi kelasi ya secondaire.

10 “Lifúta libongi” elimboli nini? Yango elimboli te lifúta oyo ya mbongo mingi. Awa, liloba “libongi” lilimbolami lokola “oyo ezali kokokisa mposa.” Na ndakisa, nini “ebongi” mpo na baoyo balingi kokóma ba pionniers? Basengeli mpenza kosala mosala oyo ezali kozwa mokolo mobimba te mpo ete bazala “bozito mingi” te epai na bandeko na bango to na libota na bango. (1 Batesaloniki 2:9) Lifuti na bango ekoki kobengama ete “oyo ebongi” to “oyo ezali kokokisa mposa” soki ezali kosalisa bango ete bazala malamu, wana yango ezali kopesa bango ntango mingi mpe makasi mpo na kokokisa mosala na bango ya boklisto.

11. Mpo na nini bilenge mosusu basili kotika mosala ya pionnier, mpe motuna nini motunami?

11 Nini ezali komonana lelo? Eyebisami ete, na mikili misusu, bilenge mingi bapusami na makanisi malamu oyo bazalaki na mposa ya kokóma ba pionniers, batikaki kelasi nsima na kolekisa mwa bambula esengami na mibeko ya mboka. Nzokande, bayekolaki mosala moko ya sikisiki te. Esengelaki na bango, to kozwa lisalisi epai ya baboti na bango to koluka mosala oyo ezalaki kozwa bango mokolo mobimba te. Basusu bandimaki misala oyo mizalaki kozwa bango ngonga mingi mpo ete bazwa lifúta likoki mpo na sanza mobimba. Balɛmbaki, mpe batikaki mosala ya pionnier. Bakoki kosala nini mpo na kokokisa bamposa na bango mpe kozongela mosala ya pionnier?

Totalela kelasi na bokatikati

12. (a) Na ntina etali kotánga kelasi, wapi ngámbo mibale oyo moklisto asengeli komibatela na yango? (b) Mpo na basaleli ya Jéhovah mpe bana na bango, kotánga kelasi esengeli kozala na mokano nini?

12 Kotalela kelasi na bokatikati ekoki kosalisa. Mpo na bilenge mingi na mokili, kotánga kelasi ezali elembo ya lokumu, ezali mwango mpo na kokóma moto monene mpe ezali nzela mpo na kokóma na bozwi mingi. Mpo na bilenge mosusu, kelasi ezali mosala makasi oyo basengeli kotika yango nokinoki. Kati na makanisi oyo mibale, moko te ezali malamu mpo na baklisto ya solo. Bongo, “bokatikati” elimboli nini kati na likambo oyo? Baklisto basengeli kotalela kelasi lokola mwango moko malamu. Na mikolo oyo ya nsuka, mokano na bango ezali ya kosala nyonso ekoki na bango mpo na kosalela Jéhovah. Soki, na mboka oyo bafandi, mosala mozali kokokisa bamposa na bango te lokola ba pionniers, mpo ete basalaki kelasi moke to basalaki bobele secondaire, bakolinga mbala mosusu kokota kelasi mosusu mpo na kobakisa formation na bango. Kasi, basengeli kozala na mokano ya kosala mosala ya pionnier.

13. (a) Lolenge nini ndeko mwasi moko ya mboka Philippines akokaki kozala ntango nyonso pionnier wana ezalaki ye kokokisa mikumba na ye na libota? (b) Likebisi nini libongi kopesama awa?

13 Basusu bayekolaki misala oyo epesaki bango nzela na kokoma ba pionniers to mpe kozongela mosala yango. Ndeko mwasi moko ya mboka Philippines azalaki na bana ya kobokola, kasi azalaki na mposa ya kokóma pionnier. Filiale ya mboka wana ekomi ete: “Asalaki yango mpo ete alandaki formation mpo na kokóma expert-comptable.” Filiale yango eyebisi lisusu ete: “Tozali na mwa bandeko mingi oyo, mpo na lolenge malamu oyo bazali kosalela ntango na bango, bazali kotánga kelasi wana ezali bango ba pionniers. Mingi mpenza, soki bamipesi te na lokoso mpe na mikano ya mokili, bazali kokóma basakoli malamu mpo ete bazali bato oyo batángi mingi.” Osengeli kobosana te ntina mpo na yango ozali kolanda kotánga kelasi mosusu, soki yango esengeli; ekobonga te ete mokano na yo ebongwana mpo na kolanda mikano ya mosuni.

14, 15. (a) Mpo na nini esengeli te kotya mibeko na ntina etali kotánga kelasi? (b) Bandeko mosusu oyo bazali lelo na mikumba basalaki kelasi nini na ebandeli, mpe lolenge nini bazwaki mbano?

14 Na mikili mingi, ezali na biteyelo ya secondaire oyo bizali koyekolisa misala ya maboko oyo bilenge baklisto bakoki kolanda kosala yango nsima na kosilisa kelasi. Atako ezali bongo te na mikili misusu, bilenge ya molende oyo batánga mingi te, bazali kosala misala oyo mizali kozwa bango mokolo mobimba te; yango ezali kopesa bango nzela ya kokóma ba pionniers. Na yango, tosengeli te kotya mibeko mpo na oyo etali kolanda kotánga kelasi molai to te.

15 Mingi na baoyo bazali sikawa na mikumba lokola bakengeli ya zongazonga, to na biro monene ya la Société to mpe na moko na ba filiales na yango, bakotaki kelasi molai te. Bazalaki ba pionniers ya sembo oyo bazali ntango nyonso koyekola, kozwa formation mpe basili kozwa mikumba misusu minene. Bazali na mawa te. Nzokande, basusu oyo bakolaki na bango eleko moko wana, baponaki kotánga na université mpe batikaki nzela ya sembo, bapɛngwisamaki na filozofi mpe na “mayele ya mokili oyo” ekobebisaka kondima.​—1 Bakolinti 1:19-21; 3:19, 20; Bakolose 2:8.

Totánga motuya

16. (a) Nani akoki kokata soki bana basengeli kosala bakelasi milai, mpe nini esengeli kotyama na esika ya liboso? (b) Likambo nini lisengeli kotalelama?

16 Nani akoki kokata soki elenge moklisto asengeli kolekisa bambula mingi mpo na koyekola to te? Esengeli kotalela motinda ya Biblia na ntina na bokonzi. (1 Bakolinti 11:3; Baefese 6:1) Na boyokani na motinda yango, baboti bakolinga mpenza kosalisa bana na bango mpo na kopona mosala oyo bakosala nsima na kosilisa kelasi mpe koyeba bambula boni basengeli kolekisa na eteyelo mpo na koyekola mosala yango. Na mikili mingi, bakoponaka mosala esengeli kolanda na ebandeli ya secondaire. Wana ezali ntango oyo baboti baklisto mpe bana basengeli koluka litambwisi ya Jéhovah mpo na kozwa ekateli malamu, kotyáká matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. Bilenge bazali na bamposa mpe makoki makeseni oyo baboti ya mayele basengeli kotalela yango. Mosala nyonso mosalemi na bosembo mobongi na lokumu, ezala mosala ya mabɔkɔ to mosala ya biro. Atako mokili mozali kotombola basali na biro nde mozali kotyola bato na misala ya mabɔkɔ, kasi Biblia ezali kosala bongo te. (Misala 18:3) Na yango, soki baboti mpe bilenge baklisto bazwi ekateli nsima na kotalela yango kati na libondeli, mpo na koboya to kondima kosala bakelasi milai, basangani mosusu kati na lisangá basengeli kotonga bango te.

17. Liponi nini Batemwe mosusu bazali kosala mpo na bana na bango?

17 Soki baboti baklisto bazwi ekateli ete bana na bango basala bakelasi milai, wana ezali lotómo na bango. Mbula oyo moto akolekisa na kelasi etali lolenge ya mosala oyo asengeli koyekola. Mpo na bantina etali mosolo mpe mpo na kosalisa bana na bango ete babanda nokinoki mosala ya pionnier, baboti mingi baklisto basili kopona ete bana na bango bayekola mosala oyo mokozwa mbula mingi te, kati na kelasi oyo ebengami ete cycle technique. Mbala mosusu bilenge basengeli koyekola mosala, kasi bazali ntango nyonso na mokano ya kolekisa bomoi na bango mobimba kati na mosala ya Jéhovah.

18. Soki moto alandi kosala bakelasi milai, likambo nini asengeli kobosana te?

18 Soki moto asepeli kosala bakelasi milai, asengeli te kosala yango mpo na kotalisa boyebi na ye to komipesa na yango ete azwa ebongá monene na mokili. Esengeli kosala liponi malamu mpo na lolenge ya makambo masengeli koyekola. Mbala mingi Mosenzeli elobelaki makama ya kosala bakelasi milai, mpe yango ezali solo mpo ete, makambo mingi oyo malakisami kuna mazali kotɛmɛla “mateya ya sembo” ya Biblia. (Tito 2:1; 1 Timoté 6:20, 21) Epai mosusu, uta eleko ya 1960, mobulu mpe pite ezali mpenza kosalema na ebele na biteyelo minene. “Moombo na sembo mpe na mayele” asili kokebisa biso makasi ete tokenda te na bisika motindo wana. (Matai 24:12, 45) Atako bongo, esengeli koyeba ete bilenge bazali lelo kokutana lisusu na makámá wana ata na secondaire mpe na biteyelo epai bazali koyekola mosala, ata mpe na bisika ya mosala.​—1 Yoane 5:19.a

19. (a) Baoyo bazwi ekateli ya kolanda lisusu kotánga kelasi, basengeli kozwa meko nini liboso? (b) Lolenge nini malamu bato mosusu basalelaki boyebi oyo bango bazwaki na kelasi?

19 Soki elenge Temwe azwi ekateli ya kolanda kelasi molai, ekozala malamu mingi ete afandaka na ndako ya baboti na ye. Yango ekosalisa ye na kobatela bizaleli malamu ya boklisto mpo na oyo etali koyekola Makomami, koyangana na makita mpe kosangana na mosala ya kosakola. Lisusu, asengeli komonisa uta na ebandeli ete asili kondima mitinda ya Biblia. Tozali komikundola ete Danyele mpe Baebele misato oyo bazalaki baninga na ye, bazalaki na boombo na Babilone mpe basɛngisamaki mpo na koyekola na biteyelo minene ya mboka wana, kasi babatelaki bosembo na bango. (Danyele, mokapo 1) Kotyáká matomba ya elimo na esika ya liboso, kati na mikili mingi, bilenge Batemwe basalaki bakelasi oyo epesaki bango nzela na kosala misala oyo mizali kozwa bango mokolo mobimba te, lokola comptabilité, kotɛka, kotángisa, kobongola mikanda, kolimbola nkotá ya balobi to misala misusu oyo mizali kosalisa bango na kokokisa bamposa na bango ete bamipesa mingi kati mosala na bango ya ntina mingi, mosala ya pionnier. (Matai 6:33) Na nsima, mingi kati na bilenge yango bakómaki bakengeli ya zongazonga to basangani na libota ya Béthel.

Libota ya bomoko, oyo lilakisami

20. Kokesena nini emonani na mokili oyo esengeli te kozala kati na basaleli ya Jéhovah?

20 Ata mosala nini bazali kosala​—na izini, na biro, na atelier, na bilanga—​basaleli nyonso ya Jéhovah basengeli kozala bayekoli malamu ya Biblia mpe bateyi malamu. Makoki oyo bango bazali kozwa na nzela ya kotánga, ya koyekola mpe ya koteya, ezali kolongola kokesena oyo bato ya mokili bamonisaka kati na basali na biro. Yango epesi nzela na bomoko mpe na limemya kati na bango; lokola yango emonani mingi mpenza kati na basali na Béthel mpe kati na baoyo bazali kosala na ebongiseli esalemi na la Societé Watch Tower mpo na botongi bandako, epai bizaleli ya elimo bizali na ntina mingi mpe bisengami na bato nyonso. Kati na ebongiseli yango, basali na biro na mayele mingi, bazali kosalana na esengo mpenza elongo na baoyo bazali na mayele mingi na misala ya mabɔkɔ; bango nyonso bazali komonisana bolingo mpe limemya ​—Yoane 13:34, 35; Bafilipi 2:1-4.

21. Mokano ya bilenge baklisto esengeli kozala nini?

21 Baboti, bosalisa bana na bino ete balanda mokano ya kokóma basangani oyo libota ya mokili ya sika lizali na mposa na bango! Bilenge baklisto, bosalela malamu ntango oyo bozali na yango mpo na kotánga lokola mwango ya komibongisa mpo na kokoka komema malamu mikumba oyo bozali na yango kati na mosala ya Jéhovah! Tika ete bino nyonso oyo bolakisami, bokóma basangani ya makoki mpenza ya la société théocratique uta sikawa kino libela kati na “mabelé ya sika” oyo malakami na Nzambe.​—2 Petelo 3:13; Yisaya 50:4; 54:13; 1 Bakolinti 2:13.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tala mpe La Tour de Garde ya 1975, nkasa 763 kino 765.

Bozongeli

◻ Mpo na nini baklisto ya solo basengeli kolalela malamu likambo ya kotánga kelasi?

◻ Makanisi nini mazangi bokatikati oyo baklisto basengeli kozala na yango te na ntina etali kotánga kelasi?

◻ Makámá nini mauti na kosala bakelasi milai tosengeli kotalela yango, mpe meko nini tosengeli kokamata?

◻ Kokesena nini emonani na mokili oyo esengeli te kozala kati na basaleli ya Jéhovah?

[Elilingi na lokasa 16]

Soki bakoyekola malamu na kelasi, bilenge baklisto bakoki kokóma basangani ya makoki mpenza ya la société du monde nouveau

[Elilingi na lokasa 19]

Soki toponi kotánga bakelasi milai, yango esengeli kozala mpo na kosalela Jéhovah malamu koleka

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto