Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w26 Mars nk. 26-31
  • Ntina oyo okoki kozala na esengo ntango bazali koyina yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ntina oyo okoki kozala na esengo ntango bazali koyina yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NTINA OYO BATO BAYINAKA BISO
  • NTINA OYO TOKOKI KOZALA NA ESENGO NTANGO BAZALI KOYINA BISO
  • Bolingo esalisaka biso tóyika mpiko ata soki bato bazali koyina biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Mokanda oyo ekoki kosalisa biso tóyika mpiko tii na nsuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Ndenge oyo Yehova asalisaka biso tóyika mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • “Bópona bino moko . . . nani bokosalela”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
w26 Mars nk. 26-31

01-07/06/2026

LOYEMBO 111 Ntina ya esengo na biso

Ntina oyo okoki kozala na esengo ntango bazali koyina yo

“Esengo na bino ntango bato bazali koyina bino.”—LUKA 6:22.

NA MOKUSE

Ntina oyo tokoki kozala na esengo ntango bato bazali koyina biso mpo tosalelaka Yehova.

1. Likambo nini ya kokamwisa Yesu alobaki na oyo etali koyina?

NA LISOLO likoló ya ngomba, Yesu alobaki: “Esengo na bino ntango bato bazali koyina bino.” (Luka 6:22) Boye bato bakamwaki ntango bayokaki maloba yango. Mpo moto moko te asepelaka soki bazali koyina ye. Kasi mpo na nini Yesu alobaki bongo? Tosengeli kotalela motuna yango mpo lelo mpe bato mingi bayinaka bayekoli ya Yesu. Tokomona ntina oyo bato bayinaka biso mpe ntina oyo tokoki kozala na esengo ntango bazali koyina biso.

NTINA OYO BATO BAYINAKA BISO

2-3. Wapi ntina moko oyo bakristo ya solo bakutanaka na minyoko, mpe ndenge nini yango ekoki kobongola ndenge na biso ya kotalela baoyo batɛmɛlaka biso? (Yoane 16:​2, 3)

2 Bato bayinaka biso mpo tosambelaka Yehova. Yesu alobaki mpo na baoyo bakonyokola to ata bakoboma bayekoli na ye mosusu ete: “Bayekoli koyeba Tata te, ngai mpe te.” (Tángá Yoane 16:​2, 3.) Nani mpenza nde abimiselaka basaleli ya Nzambe botɛmɛli? Ezali Satana. Ye nde “nzambe ya mokili oyo.” (2 Ko. 4:​3, 4) Azipi bato miso mpo báyeba solo etali Yehova te mpe asalaka ete bato bátɛmɛla baoyo bayebi Nzambe mpe balingaka ye. (Yoa. 8:​42-44) Ndenge nini koyeba likambo yango ekoki kobongola ndenge na biso ya kotalela baoyo batɛmɛlaka biso? Ya liboso, koyeba ete Satana nde azali kokosa bato ekosalisa biso tóyina bango te mpo bazali koyina biso.

3 Tótalela ndakisa ya ndeko Pavel,a oyo afandaka na ekólo oyo mosala na biso epekisami. Lokola akobaki kosambela Yehova na bosembo, bakangaki ye, babɛtaki ye makasi, mpe batyaki ye kaka ye moko na bolɔkɔ basanza ebele. Lelo oyo Pavel alobi boye: “Namoni polele ete tokutanaka na minyoko mpo Satana ná bademo balingaka losambo ya pɛto te. Emonani ete bato mingi oyo basalaka na babolɔkɔ bayinaka biso te. Basalaka kaka mosala oyo bapesá bango.” Ndeko mobali moko na Croatie, oyo ayikaki mpiko na minyoko oyo eutaki epai ya baboti na ye oyo bazalaki bandimi te, alobi boye: “Nayei komona ete monguna na ngai ya solo ezali nde Satana, kasi baboti na ngai te.”—Ef. 6:12.

4. Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya Yesu mpe ya moyekoli Stefano? (Talá mpe elilingi.)

4 Toyinaka te baoyo batɛmɛlaka biso. Kutu, mbala mosusu ekómaka ete tóbondela mpo na bango. (Mat. 5:44) Na likambo yango, tokoki kozwa mateya na ndakisa ya Yesu mpe ya moyekoli Stefano. Ntango basoda ya Roma babakaki Yesu na bansɛtɛ na nzete ya mpasi, Yesu abondelaki Yehova ete: “Tata, limbisá bango.” (Luka 23:34) Yesu asɛngaki Yehova alimbisa basoda yango oyo bazwaki mokumba ya koboma ye. Mbala mosusu azalaki mpe kokanisa ebele ya bato oyo banguna na ye bakonzi ya mangomba batindaki básɛnga ete abomama. Yesu amonaki ete bato yango bayebaki mpenza te likambo oyo bazalaki kosala. Ndenge moko mpe, moyekoli Stefano asɛngaki Nzambe alimbisa bato oyo bazalaki koboma ye. (Mis. 7:​58-60) Yehova ayokaki libondeli ya Yesu mpe oyo ya Stefano? Ɛɛ. Bato mingi oyo bapɛsaki mabɔkɔ mpo Yesu anyokwama mpe abomama, babongolaki motema na nsima, bandimelaki Yesu, mpe bazwaki batisimo. (Mis. 2:​36-41) Mpe Saulo moto ya Tarse, oyo andimaki mpe kobomama ya Stefano, akómaki mokristo na nsima mpe ayokaki mawa mingi mpo na makambo oyo azalaki kosala mpo na kozanga koyeba.—1 Tim. 1:13.

Ndeko mobali moko na bampota na elongi, azali kobondela na bolɔkɔ mpe soda moko atɛlɛmi na mopanzi.

Ndenge moko na Yesu mpe moyekoli Stefano, biso mpe tokoki kobondela mpo na baoyo bazali konyokola biso (Talá paragrafe 4)


5. Lisolo ya César eteyi yo nini?

5 Tii lelo Yehova ayanolaka na mabondeli oyo basaleli na ye basalaka mpo na batɛmɛli na bango. Tótalela ndakisa ya ndeko César, oyo afandaka na Vénézuéla. Tata na ye azalaki kotɛmɛla solo makasi mpenza. César alobi boye: “Mama na ngai azalaki mwasi mpe mama moko malamu. Atako azalaki kotya ntango nyonso Bokonzi na esika ya liboso, azangaki ata mokolo moko te kokipe tata na biso. Ateyaki ngai ná bandeko na ngai ete tópesaka tata na biso limemya. Ateyaki biso mpe tótosaka ye longola kaka soki asɛngi biso tósala likambo oyo eyokani te na mokano ya Nzambe.” Nsima ya bambula, tata ya César abongolaki makanisi na ye. César alobi boye: “Mokolo moko nabondelaki na motema mobimba, na nsima natunaki tata soki nakoki kobanda koyekola na ye Biblia. Nakokoka te kolimbola esengo oyo nayokaki ntango andimaki.” Kendekende, tata ya César azwaki batisimo. Ya solo, bato nyonso te oyo batɛmɛlaka biso nde bakosala bambongwana ya ndenge wana, kasi basusu babongolaka makanisi na bango nsima ya komona limemya mpe bizaleli na biso ya malamu. Toyokaka mpenza esengo ntango esalemi bongo! Tozelaka komona oyo Yehova, “Mosambisi ya mabele mobimba,” akoki lisusu kosala mpo na kobenda bato ya ndenge wana.—Eba. 18:25.

6. Na kotalela Marko 13:​13, ntina mosusu nini bato bayinaka biso?

6 Bato bayinaka biso mpo tomemyaka Yesu. Yesu alobaki ete bato bakoyina bakristo ya solo “mpo na nkombo na [ye].” (Tángá Marko 13:13.) “Nkombo” ya Yesu emonisaka nini? Emonisaka lokumu na ye mpe bokonzi oyo azali na yango lokola Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe. Bato bayinaka biso mpo batyelaka nde bakonzi ya mokili oyo motema na esika ya kotya motema epai ya mokonzi oyo Yehova aponi mpo na koyangela molɔ́ngɔ́ mobimba, Yesu Kristo. Yesu azali koyangela lokola Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe banda 1914. Mosika te, akolongola baguvɛrnema nyonso oyo baboyi kondima bokonzi na ye.

7-8. Mpo na nini bato batyolaka mingi basaleli mosusu ya Yehova? (Yoane 15:​18-20) (Talá mpe bililingi.)

7 Bato bayinaka biso mpo toboyaka makambo ya mokili ya Satana. Yesu alobaki ete bato bakoyina bayekoli na ye mpo ‘bazali bato ya mokili te.’ (Tángá Yoane 15:​18-20.) Ndenge moko na bakristo ya liboso, toboyaka kolanda makanisi, bizaleli, mpe elobeli mabe ya bato ya mokili. Mpo na yango, bato batyolaka bandeko na biso mingi na mosala to na eteyelo. (1 Pe. 4:​3, 4) Kasi, tosepelaka mpo nsukansuka batɛmɛli yango mosusu babongwanaka mpe bakómaka kopesa biso limemya.

8 Tótalela lisolo ya Ignacio, ndeko moko na Amérique centrale. Na eteyelo, molakisi moko azalaki kotyola ye bambula ebele mpo azalaki kotosa mibeko ya Nzambe. Kasi, liboso ete Ignacio azwa diplome, molakisi yango atunaki ye soki azalaki kosala ndenge nini mpo akoba kotosa mitinda ya Biblia atako bato mingi bazalaki kotyola ye. Ignacio alobaki ete azalaki komona ete mibeko ya Nzambe ezali libateli mpo na ye. Na nsima, abengisaki molakisi yango na makita. Ignacio akamwaki ndenge molakisi yango ayaki na makita! Molakisi yango asepelaki mingi ndenge bandeko bayambaki ye mpe akobaki koyangana na makita. Na nsima, lokola molakisi yango akómaki koyekola Biblia, ye moko mpe akutanaki na botɛmɛli. Kasi, akobaki kokola na elimo, mpe nsukansuka azwaki batisimo.

Bililingi: Bililingi oyo ezali kolakisa Ignacio na eteyelo. 1. Afandi kimya mpe azali komonisa limemya na kelasi ntango molakisi azali kotyola ye na miso ya bana-kelasi mosusu. 2. Na nsima, molakisi yango azali koyoka na likebi nyonso ndenge Ignacio azali koloba na ye.

Tózala bilenge to mikóló, tokoki kokɔtela kondima na biso na mpiko nyonso (Talá paragrafe 8)b


9-10. (a) Mpo na ntina nini mosusu bakristo bakeseni na bato ya mokili ya Satana? (b) Liteya nini tokoki kozwa na ndakisa ya ntoma Paulo?

9 Tokeseni mpe na bato ya mokili ya Satana mpo tokɔtaka na makambo ya politiki te mpe ya bitumba te. (Yoa. 18:36) Na boyokani na toli oyo ezali na Baroma 13:​1, tosalaka makasi tótosa mibeko ya mboka oyo tofandi. Kasi, biso bakristo tokɔtaka te na matata ya bato ya politiki, yango wana topesaka nkombo te mpo na kozwa esika moko boye na politiki mpe toponaka moto moko te lokola mokonzi na ntango ya maponami. Mpo na nini? Mpo tozali sembo epai ya Yehova mpe na Bokonzi na ye oyo Kristo azali koyangela. Batatoli ya Yehova mingi bazali na babolɔkɔ mpo na kondima na bango. Atako bongo, bandeko mibali mpe bandeko basi yango bazali kokoba kosakola. Na ndenge yango, bamekolaka ntoma Paulo, oyo alekisaki bambula mingi na ndako ya bokangami mpe na bolɔkɔ. (Mis. 24:27; 28:​16, 30) Paulo akobaki kosakola nsango malamu epai ya moto nyonso oyo alingaki koyoka, ezala bakɛngɛli ya bolɔkɔ, bato oyo basalaka na ndako ya mokonzi, baguvɛrnɛrɛ, bakonzi, mpe mbala mosusu ata basali ya Nero, ampɛrɛ ya Roma.—Mis. 9:15.

10 Lelo oyo mpe, bandeko na biso na babolɔkɔ basakwelaka bato nyonso oyo bakolinga koyoka bango, ezala bazuzi, bakonzi ya guvɛrnema, mpe bakɛngɛli. Ndeko moko oyo asalaki mbula koleka 6 na bolɔkɔ mpo aboyaki kokɔta na makambo ya politiki alobaki ete azalaki kotalela ntango oyo azali na bolɔkɔ lokola etumbu te, kasi lokola mokumba oyo Yehova apesaki ye mpo na koluka bato oyo bazali lokola bampate. Toyokaka esengo mpenza ntango Yehova asaleli biso mpo tókómisa nsango malamu tii epai ya bato ya ndenge wana! (Kol. 4:3) Tótalela sikoyo ntina mosusu oyo tozalaka na esengo ata ntango bato bazali koyina biso mpo tosalelaka Yehova.

NTINA OYO TOKOKI KOZALA NA ESENGO NTANGO BAZALI KOYINA BISO

11. Ndenge nini kokutana na monyoko ekoki kokómisa kondima na biso makasi? Pesá ndakisa.

11 Toyebi ete ndenge mokili ezali koyina biso ekokisaka bisakweli ya Biblia. Na esakweli ya liboso ya Biblia, Yehova alobaki ete Satana ná bana na ye, elingi koloba baoyo balandaka ye, bakoyina baoyo balingaka mpe basalelaka Yehova. (Eba. 3:15) Yesu azongelaki mbala na mbala ete esakweli yango ekokokisama, ndenge Baevanzile nyonso minei emonisi yango. (Mat. 10:22; Mrk. 13:​9-12; Luka 6:​22, 23; Yoa. 15:20) Bakristo mosusu mpe bamonisaki yango na mikanda ya Biblia oyo bakomaki. (2 Tim. 3:12; Yak. 1:2; 1 Pe. 4:​12-14; Yuda 3, 17-19) Na yango ntango monyoko ebimi, tobulunganaka te. Kasi, tozalaka na esengo mpo bisakweli ya Biblia ezali kokokisama. Yango endimisaka biso ete tosalelaka Nzambe ya solo. Ndeko mwasi moko oyo afandaka na ekólo oyo batyelá mosala na biso bipekiseli alobi boye: “Ntango namipesaki na Yehova, nayebaki ete ata ndɛlɛ, nakokutana na monyoko. Na yango, komekama ebangisaka ngai te, ekamwisaka ngai mpe te.” Mobali na ye mpe azalaki moko ya bato oyo bazalaki kotɛmɛla ye. Mobali yango anyokolaki ye, mpe atumbaki Biblia na ye ná mikanda na biso. Kasi na esika ndeko mwasi yango atika ete kobanga ezongisa ye nsima, kondima na ye ekómaki nde makasi. (Ebr. 10:39) Alobi boye: “Monyoko esakolamaki, yango wana nayebaki ete likambo yango ekokóma. Monyoko yango endimisaki ngai ete tozali na lingomba ya solo.”

12. Nini esalisaki ndeko mobali moko ayikela monyoko mpiko?

12 Atako toyebaka ete tokoki kokutana na monyoko, ekoki kaka kozala mpasi mpo na koyikela yango mpiko ntango eyei. Ndeko mobali moko akomaki boye mpo na ntango oyo alekisaki na bolɔkɔ: “Na bantango mosusu, nazalaki konyokwama na makanisi to komitungisa, mpe nazalaki kaka kolela.” Nini esalisaki ndeko yango ayika mpiko? Alobaki boye: “Nazalaki kobondela ntango nyonso. Nazalaki kobanda ntɔngɔ nyonso na libondeli. Na kati ya mokolo, soki makambo eyei ndongo, nazalaki kobondela. Mpe soki makambo ya kozanga bosembo epesi ngai nkanda, nazalaki kokɔta na esika oyo tozalaki kosukola mpe nazalaki kobondela.” Ndeko yango azalaki mpe komanyola bandakisa ya basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala mpe ya mikolo na biso oyo babatelaki bosembo na bango. Yango esalisaki ye ayikela monyoko mpiko mpe azwa kimya oyo Yesu alakaki bayekoli na ye.—Yoa. 14:27; 16:33.

13. Nini ekoki kosalisa biso tólonga koyina?

13 Tozali na bolingo oyo ezali makasi koleka koyina. Tii ntango akataki motema, Yesu alingaki Tata na ye na motema na ye mobimba. Yesu alingaki mpe baninga na ye. (Yoa. 13:1; 15:13) Ntango tokolisi bolingo ya makasi ndenge wana, ezala mpo na Yehova to bandeko na biso ya lisangá, biso mpe tokolonga koyina. Ndenge nini? Ndakisa ya ntoma Paulo ekopesa biso eyano.

14. Nini esalisaki Paulo azala na mpiko ata liboso ya liwa?

14 Mwa moke liboso báboma ye, Paulo akomelaki moninga na ye Timote ete: “Nzambe apesaki biso elimo ya bibangabanga te, kasi elimo ya nguya, ya bolingo.” (2 Tim. 1:7) Paulo alingaki koloba nini? Paulo alingaki koloba ete soki mokristo alingi Yehova makasi, yango ekoki kotinda ye andima ata komekama ya makasi. (2 Tim. 1:8) Na ntembe te, bolingo oyo Paulo azalaki na yango epai ya Yehova nde esalisaki ye azala na mpiko ata liboso ya liwa mpe asundola losambo ya solo te.—Mis. 20:​22-24.

15. Ndenge nini bandeko bamoniselanaka bolingo oyo ezangi moimi na mikolo na biso? (Talá mpe elilingi.)

15 Tolingaka mpenza bandeko na biso oyo batikalaka sembo liboso ya monyoko. Lelo oyo, bato mosusu bandimaka kotya bomoi na bango na likama mpo na bandeko na bango bakristo, kaka ndenge Akila ná Prisile batyaki bomoi na bango na likama mpo na Paulo. (Rom. 16:​3, 4). Na ndakisa, na Russie, bandeko mingi bakendaka na batribinale mpo na kolendisa bandeko oyo bakangaki. Ntango ndeko mwasi moko oyo bakangaki amonaki ebele ya bandeko na ye ya elimo na kati ya tribinale, abɔndisamaki mingi mpe akokaki koloba te mpo na mwa ntango. Bolingo ya bondeko oyo ezangi moimi elendisaki ye na ntango oyo azalaki mpenza na mposa na yango. Biso mpe tokoki kozala na esengo ndenge tozali na bolingo oyo eleki koyina!

Bapolisi mibale ya basi bazali kokɔtisa ndeko mwasi moko na motuka ya bapolisi, mpe bandeko bazali kobɛtɛla ye mabɔkɔ.

Ata esika oyo mosala na biso epekisami to batyeli yango bipekiseli, bandeko na biso bamoniselanaka bolingo oyo ezangi moimi (Talá paragrafe 15)c


16. Mpo na nini ntoma Petro alobaki ete baoyo bazali konyokwama mpo basalelaka Nzambe bakoki kozala na esengo? (1 Petro 4:14)

16 Toyebi ete koyika mpiko ntango bazali koyina biso esalaka ete Yehova andima biso. (Tángá 1 Petro 4:14.) Ntoma Petro alobaki ete baoyo banyokwamaka mpo na kosalela Nzambe basengeli kozala na esengo. Mpo na nini? Mpo monyoko yango emonisi ete elimo ya Nzambe “efandi likoló na [biso].” Petro ayebaki ndenge moto akoki komiyoka malamu ntango andimami na Nzambe mpe ayiki mpiko na monyoko. Mwa moke nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B., bapolisi ya tempelo ya Bayuda batindamaki mpo na kokanga Petro ná bantoma mosusu mpo bazalaki kosakola. Kasi Petro akɔtelaki kondima na ye na mpiko nyonso. (Mis. 5:​24-29) Atako babɛtaki bango fimbo, ye ná bantoma mosusu batikaki kosakola te. Kasi, bazalaki kosepela mpo “batángamaki bato oyo babongi kosambwisama mpo na nkombo [ya Yesu].” Biso mpe tokoki kosepela ntango tozali koyikela komekama mpiko.—Mis. 5:​40-42.

17. Yesu ayebisaki bayekoli na ye nini na butu liboso akufa?

17 Na butu ya nsuka liboso akufa, Yesu ayebisaki bayekoli na ye: “Moto oyo alingaka ngai, Tata na ngai akolinga ye, mpe ngai nakolinga ye.” (Yoa. 14:21) Tozali mpenza kozela ntango oyo bato bakoyina biso lisusu te mpo tosalelaka Yehova, kasi bakolinga biso nde! (2 Tes. 1:​6-8) Liboso ntango yango eya, tiká ete bantina oyo totaleli, oyo mpo na yango tokoki kozala na esengo ntango bazali koyina biso, ebɔndisa biso mpe epesa biso makasi.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Mpo na nini bato bayinaka bayekoli ya Yesu?

  • Na ndenge nini bolingo ezali makasi koleka koyina?

  • Mpo na nini tokoki kozala na esengo ntango bato bazali koyina biso?

LOYEMBO 149 Loyembo ya bolongi

a Topesi bango bankombo mosusu.

b NDIMBOLA YA BILILINGI: Elilingi oyo emonisi ndenge Ignacio azali kopesa molakisi na ye litatoli.

c NDIMBOLA YA BILILINGI: Elilingi oyo emonisi ndenge makambo ezalaka ntango bandeko mibali mpe bandeko basi balendisaka ndeko oyo bakangi mpo na kondima na ye.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto