25-31/05/2026
LOYEMBO 135 Yehova alobi: ‘Zalá mayele, mwana na ngai’
Monisá bososoli mpe ‘okolonga’
“Moto oyo amonisaka bososoli na likambo akolonga.”—MAS. 16:20.
NA MOKUSE
Ndenge oyo komonisa bososoli ekoki kosalisa biso tólonga kosala oyo ezali malamu ntango tokutani na makambo ya mpasi.
1-2. Bososoli ezali nini, mpe ndenge nini ekoki kosalisa biso?
ESILÁ kokómela yo ete moto azanga kopesa yo limemya oyo omonaki ete obongi na yango? Esilá kokóma ete bákanisela yo mabe to básalela yo likambo na bosembo te? To osilá kokutana na likambo moko oyo ebangisaki yo? Soki ezali bongo, na ntembe te oyebi ndenge ezalaka mpasi kosala makambo na ndenge oyo ebongi na ntango yango. Likambo ya esengo, Biblia elobeli ezaleli moko oyo ekoki kosalisa biso na makambo ya ndenge wana mpe na makambo mosusu mingi: bososoli.
2 Bososoli ezali likoki ya kosuka kaka te na kotala oyo ezali komonana na libándá. Esalisaka biso tókanga ntina oyo mbala mosusu likambo moko esalemi to ntina oyo mbala mosusu moto asali likambo na lolenge moko boye. Na yango, bososoli ekoki kosalisa biso tósala makambo na bwanya, na ndenge oyo ebongi. Na ndakisa, ekoki kosalisa biso ‘tópekisa mbɛbu na biso’ mpe tóyeba ntango ya ‘kofanda nyɛɛ.’ (Mas. 10:19, msl; Nz. 4:4) Ekoki kosalisa biso tópekisa nkanda na biso mpe tólimbisa mabe oyo basali biso. Bososoli ekoki mpe kosalisa biso tóndima toli mpe disiplini. (Mas. 19:20) Ntango tomonisi bososoli, tokosepelisa kaka Yehova te, kasi biso moko mpe tokozwa matomba, mpe makambo oyo tolobi to tosali epai ya bato ekosalisa mpe bango. Yango ezali na ntina mingimingi ntango tokutani na makambo oyo ekoki kotinda biso tóloba na nkanda to tóbimisa mayoki ya mabe. Tótalela bandakisa misato ya Biblia oyo emonisi ndenge oyo bososoli ekoki kosalisa biso tóbatela komikitisa, kimya, mpe tótyela Yehova motema mobimba.
MONISÁ KOMIKITISA KASI LOLENDO TE
3. Naamane azalaki nani?
3 Mpo tólonga kosala oyo ezali malamu, tosengeli koboya lolendo. (1 Pe. 5:5) Bososoli ekoki kosalisa biso tósala yango. Ndenge nini? Tótalela ndakisa ya Naamane. Azalaki kofanda na Siri, ekólo moko na nɔrdi ya Yisraele. Naamane azalaki moto ya lokumu, mokonzi ya limpinga ya basoda ya Siri. Kasi, azalaki na maladi makasi ya loposo: maba.—2 Bak. 5:1.
4. Naamane asalaki nini na makambo oyo mwana mwasi moko ya moke alobaki?
4 Mwasi ya Naamane azalaki na mosaleli moko, mwana mwasi moko ya moke ya Yisraele oyo ayebisaki ye ete mosakoli moko azali na Yisraele mpe akoki kobikisa maladi ya mobali na ye. (2 Bak. 5:2, 3) Mbala mosusu Naamane akanisaki: ‘Mwa moombo mwasi ya moke oyo bazwaki na ekólo ya banguna akoki mpenza koyebisa ngai likambo ya malonga?’ Atako bongo, asalaki makambo na bwanya. Na esika aboya na lolendo makambo nyonso oyo mwana wana alobaki, na komikitisa nyonso andimaki maloba na ye. Na yango, asɛngaki mokonzi ya Siri nzela ya kokende na Yisraele mpo na koluka lobiko.—2 Bak. 5:4, 5.
5. Nini esalemaki ntango Naamane akómaki na Yisraele?
5 Naamane akómaki na lopango ya Yehorame Mokonzi ya Yisraele, na elikya ete akobikisama na maladi na ye ya maba. Kasi Yehorame akanisaki ete mokonzi ya Siri alingaki kaka kolukela ye makambo. Ntango mosakoli Elisha ayokaki likambo yango, asɛngaki Yehorame atindela ye Naamane. (2 Bak. 5:6-9) Makambo esalemaki te ndenge Naamane akanisaki. Elisha abimaki ata na ndako te mpo na kokutana na Naamane to kosolola na ye. Kasi, Elisha atindaki momemi-nsango moko ayebisa Naamane oyo asengeli kosala mpo na kobika.—2 Bak. 5:10.
6. (a) Mbala mosusu nini esalaki ete Naamane aboya kotosa malako ya momemi-nsango? (b) Ndenge nini basaleli ya Naamane bamonisaki bososoli, mpe esukaki ndenge nini? (2 Bakonzi 5:13, 14)
6 Na ebandeli, Naamane asepelaki te, ezala na momemi-nsango oyo batindelaki ye to na makambo oyo ayebisaki ye. “Asilikaki” mpe “akendaki na nkanda makasi.” (2 Bak. 5:11, 12) Mpo na nini? Mbala mosusu amonaki ete bamoniselaki ye te limemya oyo abongi na yango lokola azalaki mokonzi monene ya basoda. Lisusu, ekoki kozala ete Naamane amonaki ete malako ya Elisha emonisaki ete azangi limemya mpo na ekólo Siri. Ezala bongo to te, Naamane andimaki kozonga ndako kozanga ete abikisama. Kasi, basaleli na ye bamonisaki bososoli na ndenge babondelaki ye abongola ekateli na ye. Naamane amonisaki bwanya na ndenge atyaki lolendo pembeni mpe alandaki na komikitisa nyonso malako ya Elisha. Na yango, abikaki!—Tángá 2 Bakonzi 5:13, 14.
7. Lisolo ya Naamane ekoki koteya biso nini? (Masese 22:4) (Talá mpe bililingi.)
7 Lisolo yango ekoki koteya biso nini? Tokomonisa bososoli soki tozali kotalela likambo na bozindo, kosuka kaka te na kotala oyo ezali komonana libándá. Tokomonisa mpe bososoli soki tozali kotika te ete mayoki na biso etambwisa biso. Bososoli ekoki kosalisa biso tózala na komikitisa. Komikitisa ekosalisa biso tóndima ete toyebi nyonso te. Tokondima ete tokoki kozala na mposa ya lisalisi ya basusu, mingimingi ya Yehova. Naamane azalaki naino mosaleli ya Yehova te; kasi amonisaki mwa bososoli na ndenge ayokaki basusu na komikitisa nyonso: mwana mwasi ya moke ya Yisraele oyo azalaki moombo ya mwasi na ye, basaleli na ye moko, mpe oyo eleki ntina momonisi ya Yehova, Elisha. Naamane atikaki lolendo. Nsukansuka, azwaki ekateli ya bwanya mpe ememelaki ye lobiko. Liboso tóloba to tósala eloko, na ndakisa ntango bapesi biso toli ya Biblia oyo tosepeli na yango te to malako na ebongiseli ya Nzambe oyo tokangi ntina na yango te, tosengeli liboso kozwa ntango ya kokanisa soki oyo tokani koloba to kosala ekomonisa lolendo to komikitisa.—Tángá Masese 22:4.
Ndenge kaka Naamane ayokaki basusu na komikitisa nyonso, tosengeli koyoka ntango bapesi biso toli, ntango basusu bayebisi biso likambo oyo bakutani na yango, to ntango tozwi malako oyo euti na ebongiseli ya Nzambe (Talá paragrafe 7)
BATELÁ KIMYA, BOYÁ NKANDA
8. Ntango nini ekoki kozala pɛtɛɛ te mpo na biso kobatela kimya?
8 Bososoli ekoki kosalisa biso tóbatela kimya mpe tóboya koloba to kosala makambo na nkanda ntango tokutani na likambo oyo epesi biso nkanda. Mpo na koloba solo, yango ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo tokoki kozala na ntina ya kosilika mpo na maloba mpe makambo ya kozanga boboto to bosembo oyo basusu basali biso. (Ef. 4:26) Tótalela ndenge oyo Davidi mpe Abigaile bamonisaki bososoli ntango oyo bakutanaki na likambo moko ya mpasi.
9. Ndenge nini Nabale asalelaki Davidi makambo?
9 Tótalela likambo oyo esalemaki ntango Davidi ná bato na ye bazalaki kokimakima Saulo mpe kofanda na esobe ya Parane. (1 Sa. 25:1) Kuna, babatelaki na boboto nyonso babateli ya mpate mpe bitonga ya Nabale, mobali moko oyo azalaki na bozwi mingi. (1 Sa. 25:15, 16) Ntango eleko ya kokata nsuki ya bampate ekómaki, Davidi atindaki bato epai ya Nabale, atombelaki ye bomoi ya malamu mpe asɛngaki ye na limemya nyonso mwa biloko ya kolya. (1 Sa. 25:6-8) Kasi Nabale amonisaki ata botɔndi moke te mpo na nyonso oyo Davidi mpe bato na ye basalelaki ye. Azongiselaki Davidi maloba oyo ezangi limemya, alobaki kutu mabe mpo na Davidi ná bato na ye.—1 Sa. 25:10, 11.
10. Ndenge nini Davidi ná Abigaile bamonisaki bososoli? (1 Samwele 25:32, 33) (Talá mpe elilingi.)
10 Soki ozalaki na esika ya Davidi, olingaki komiyoka ndenge nini? Ezali mpasi te komona ntina oyo Davidi asilikaki makasi. Azalaki moto ya mayoki ya makasi, mpe na libaku yango, ayokaki nkanda makasi mpenza mpe alingaki koboma Nabale! (1 Sa. 25:13, 21, 22) Kutu, Davidi azalaki kokende mpo na kosala yango, kasi bakutanaki na Abigaile, mwasi mayele ya Nabale mpe apekisaki ye. Ndenge nini Abigaile amonisaki bososoli? Asosolaki ete Davidi azalaki moto malamu atako asilikaki makasi, na yango asalaki oyo akokaki mpo na kosalisa ye akitisa nkanda na ye. Amemelaki ye biloko ebele mpe apesaki ye toli ya bwanya na komikitisa nyonso. (1 Sa. 25:18, 23-31) Davidi amonisaki bososoli na ndenge atyaki likebi na makambo oyo Abigaile alobaki, andimaki ete maloba yango emonisaki ndenge oyo Yehova azalaki kotalela likambo yango. Na ndenge yango, Davidi akitisaki motema mpe asalaki te libunga moko monene.—Tángá 1 Samwele 25:32, 33.
Lokola bamonisaki bososoli ntango bakutanaki na likambo moko ya mpasi, Davidi ná Abigaile bapekisaki mpasi monene oyo elingaki koya (Talá paragrafe 10)
11. Ndenge nini komonisa bososoli ekoki kosalisa biso ntango likambo moko epesi biso mpasi to nkanda? (Masese 19:11)
11 Lisolo yango ekoki koteya biso nini? Bososoli ekoki kosalisa biso tósala makambo na ndenge ya kimya, ata soki tozali na ntina ya kosilika mpenza. Ekoki kosalisa biso tókanisa oyo maloba to misala na biso ekobimisa soki tosali makambo na nse ya nkanda. (Tángá Masese 19:11.) Ntango Davidi ayokaki lisusu makanisi ya Yehova, azwaki makasi mpo na kopekisa nkanda na ye. Soki likambo moko epesi yo mpasi to nkanda, kolinga te kosala makambo kozanga kokanisa. (Yak. 1:19) Bondelá Yehova mpe zwá ntango ya kosala bolukiluki mpo na koyeba makanisi na ye na likambo na yo, mpe yango ekosalisa yo okitisa motema.
12. Ndenge nini basusu bakoki kosalisa biso tómonisa bososoli mpe tóbatela kimya na biso?
12 Kaka ndenge Yehova asalelaki Abigaile mpo na kosalisa Davidi asuka kaka te na makambo oyo ezalaki komonana libándá, Yehova akoki kosalela basusu mpo na kosalisa biso tómonisa bososoli. Na yango, liboso oloba to osala eloko ntango likambo moko epesi yo nkanda, luká kosolola naino na mokristo moko oyo akɔmɛli, oyo akoki kosalisa yo otalela makambo na ndenge ya malamu. (Mas. 12:15; 20:18) Na ngámbo mosusu, soki ozwi libaku ya kosalisa moninga moko na likambo ya bongo, okoki komekola Abigaile. Salisá moninga na yo azala na likanisi ya Yehova na likambo yango. Kozanga ntembe Yehova akopambola milende na yo ya kosalisa basusu bámonisa bososoli mpe bábatela kimya.
ZALÁ NA ELIKYA KASI EZALELI YA KOBANGA TE
13. Ndenge nini bososoli ekoki ekosalisa biso tósuka kaka te na komona kobanga oyo tozali na yango?
13 Na bantango mosusu, tokokutana na makambo oyo ekobangisa biso. Bososoli ekoki kosalisa biso tómona kaka te kobanga oyo tozali na yango, mpo ekotinda biso tómikundwela ete likambo nyonso ya kobangisa na mokili oyo ekómaka mpamba liboso ya nguya ya Yehova ya kokamwa. (Nz. 27:1) Yehova akoki kosalisa biso na likambo nyonso, ata oyo ezali komonana ete elikya ezali te. Yango nde liteya oyo tokoki kozwa na bomoi ya mosakoli Yona. Azalaki na boyokani malamu na Yehova, kasi asengelaki komonisa bososoli mingi mpo na kolonga na mokumba moko ya mpasi.
14. Mpo na nini mbala mosusu Yona akakatanaki kondima mokumba oyo Yehova apesaki ye?
14 Yehova apesaki Yona mokumba moko ya mpasi: akende na Ninive kosakola nsango ya etumbu epai ya bafandi na yango. (Yona 1:1, 2) Olingaki komiyoka ndenge nini soki yo nde ozwaki mokumba yango? Kosala mobembo na makolo longwa na Yisraele tii na Ninive engumba ya Asiri ezalaki mpasi mpe ekokaki kozwa soki sanza mobimba. Bato ya Asiri bayebanaki lokola bato ya mobulu mpe ya nkanza. Kutu Ninive ebengamaki “engumba oyo esopaka makila.” (Nah. 3:1, 7) Na esika andima mokumba yango, Yona azwaki ekateli ya kokima.—Yona 1:3.
15. Ndenge nini Yona akómaki lisusu kotyela Yehova motema mingi? (Yona 2:6-9)
15 Yona akimaki, kasi Yehova akundwelaki ye nguya na Ye na ndenge asalaki likamwisi mpo na kobikisa bomoi ya Yona na ndenge ya kokamwa mpenza. (Yona 1:15, 17) Yona azwaki liteya. Akómaki komona mosika koleka makambo ya kobangisa oyo ezalaki na Ninive mpe kotya makanisi nyonso na ndenge Yehova akokaki kobatela ye ata na likama nini. (Tángá Yona 2:6-9.) Ntango Yehova apesaki ye libaku mosusu ya kondima mokumba yango, Yona akakatanaki te. Akendaki na Ninive, mpe mosala na ye ebotaki mpenza mbuma.—Yona 3:5.
16. Ndenge nini bososoli ekoki kosalisa biso na makambo ya kobangisa? (Masese 29:25) (Talá mpe bililingi.)
16 Lisolo yango ekoki koteya biso nini? Tolingaka te kotika eloko moko, mingimingi kobanga bato, epekisa biso kopesa Yehova losambo. (Tángá Masese 29:25.) Bososoli esalisaki Yona atika komona mikakatano ya mokumba na ye mpe atya makanisi nyonso na lisalisi ya Yehova. Ndenge moko mpe, tolingaka kosuka kaka te na komona kobanga oyo tozali na yango, kasi tokanisaka ndenge oyo Yehova asalisaki mpe abatelaki biso na kala. Tokoki mpe komanyola na ndakisa ya bandeko basi mpe mibali oyo balongaki makambo ya kobangisa to bakokisaki mikumba ya mpasi mpo batyelaki Yehova motema.a (Ebr. 13:6) Tiká ete tómonisa bososoli: tótyela Yehova motema mobimba mpe tósalisa basusu básala bongo.
Ndakisa ya Yona eteyi biso ete bososoli ekoki kosalisa biso tóndima litambwisi ya Nzambe mpe tólonga kokokisa mokumba moko ya mpasi (Talá paragrafe 16)
NDENGE YA KOKÓMA NA BOSOSOLI MPE KOBATELA YANGO
17. Ndenge nini tokoki kokóma na bososoli mingi?
17 Ndenge tomoni yango, komonisa bososoli ekoki kosalisa biso tólonga mpenza na ntango oyo tokutani na makambo ya mpasi. Ndenge nini tokoki kokóma na bososoli mingi? Yehova azali Liziba oyo eleki monene ya bososoli, mpe apesaka yango basambeli na ye na nzela ya Liloba na ye mpe ya elimo santu. (Neh. 9:20; Nz. 32:8) Apesaka biso toli oyo esalisaka biso tozwa bikateli ya bwanya mpe tópekisa mayoki na biso. (Nz. 119:97-101) Tokokóma na bososoli soki tozali koyekola na likebi mpenza makambo oyo Biblia elobi mpe kobondela Yehova mpo na kosɛnga nguya ya elimo santu na ye. Yango ekosalisa biso tótalela likambo na ndenge oyo ebongi mpe tóyeba malamu oyo tokosala mpo maloba mpe misala na biso emonisa makanisi ya Yehova.—Mas. 21:11, msl.
18. Ozali na ekateli ya kosala nini?
18 Tiká ete tókoba koluka mpe kozwa na motuya mingi bososoli oyo Yehova apesaka. (Nz. 14:2) Na ndenge yango, tokotika ata moke te “nzela ya mayele ya kososola.” (Mas. 21:16) Kasi tokozala na ekateli makasi ya komonisa bososoli ntango nyonso mpe na makambo nyonso. Mpe na bongo, ‘tokolonga.’
LOYEMBO 42 Libondeli ya mosaleli ya Nzambe
a Na ndakisa, talá lisolo ya Georgiy Porchulyan na eteni makambo ndenge na ndenge “Masolo ya bomoi ya Batatoli ya Yehova” na JW Library® to na jw.org.