Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w26 Mars lok. 32
  • Zalá na mpiko mpe sembo lokola Benaya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zalá na mpiko mpe sembo lokola Benaya
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Masolo mosusu
  • Video oyo ezali na nsango ya ntina mingi
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Yekolá epai ya basaleli ya sembo ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • “Teyá ngai nayeba kosala mokano na yo”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Zalá na mpiko lokola Zadoke
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
w26 Mars lok. 32

BATO OYO BIBLIA ELOBELI

Zalá na mpiko mpe sembo lokola Benaya

Benaya azalaki elombe ya etumba na boyangeli ya Mokonzi Davidi mpe ya Mokonzi Salomo. Atako Benaya azalaki mwana ya nganga-nzambe mpe akokaki te kosimba bibundeli, abundaki bitumba ya Yehova. Amonisaki mpiko mpenza. Na ndakisa, abomaki nkɔsi moko na libulu ya mai mpe alongaki soda moko ya engambe mpenza. Davidi azalaki kotyela Benaya motema mingi, yango wana atyaki ye mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka ye.—2 Sa. 23:​20-23.

Benaya atikalaki sembo epai ya Davidi ntango Abisalome ná Adoniya batombokelaki Davidi. (2 Sa. 8:18; 15:18; 1 Bak. 1:8) Ntango Davidi akómaki mobange, Benaya apesaki ye mpe mabɔkɔ mpo Salomo atyama mokonzi. (1 Bak. 1:​32-40) Ya solo, Benaya azalaki sembo epai ya Yehova mpe epai ya baoyo Yehova atyaki mafuta ata na ntango oyo basusu bazalaki sembo te.

Biso mpe tosengeli na mpiko mpo na kobundisa monguna na biso monene, Satana, ná baoyo bapesaka ye mabɔkɔ. Lisusu, tosengeli kozala na ekateli ya kokoba kotosa mibeko ya Nzambe. (Ef. 6:11; 1 Pe. 5:​8, 9) Ata soki basusu baponi kotika Yehova, biso tokotikala sembo epai na ye, mpo toyebi ete akopesa biso mbano.—2 Sa. 22:26.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto