Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/12 nk. 21-23
  • Mpo na nini ezalaka mpasi te mpo na kokosa?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini ezalaka mpasi te mpo na kokosa?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bantina ya koloba lokuta
  • Talela makama na yango
  • Ntina mpo na yango ezalaka mpasi te mpo na kokosa
  • Mpo na nini koloba solo?
  • Lokuta​—Ekoki kozala ntango mosusu malamu?
    Lamuká!—2000
  • Tólobaka solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Solo ezalaka kaka na ntina?
    Makambo mosusu
  • Ntango mwana na yo akosi
    Lamuká!—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/12 nk. 21-23

Mpo na nini ezalaka mpasi te mpo na kokosa?

MOTO moko te alingaka ete bakosa ye. Nzokande, bato na mokili mobimba babukanaka lokuta moko na mosusu mpo na bantina ekeseni. Bolukiluki moko oyo ebimaki na mokanda Ntango Amerika ezalaki koloba solo (Lingelesi), ya James Patterson mpe Peter Kim emonisaki ete ba Ameriké 91 likoló na monkama balobaka lokuta mbala na mbala. Bakomi yango bamonisaki ete: “Mingi kati na biso bamonaka ete ezali mpasi kolekisa mposo mobimba kozanga kokosa. Likoló na bato mitano moko akoki kolekisa mokolo mobimba te kozanga kokosa​—mpe tozali kolobela lokuta oyo ebongisami mpe euti na motema.”

Koloba lokuta ezali mpenza momeseno kati na makambo nyonso ya bomoi ya mokolo na mokolo. Bakonzi ya politike bazali kobuka lokuta epai na bato na bango mpe moko epai na mosusu. Mbala na mbala, balakisaka bango na televizyo wana bazali koangana ete bayebi te makambo ya kosambwisa oyo basanganaki na yango solo. Kati na mokanda na ye Kokosa​—Liponi ya bizaleli malamu na bomoi kati na bato mpe na ndako (Lingelesi), Sissela Bok amonisi likanisi oyo ete: “Kati na makambo matali mibeko mpe na bopanzi nsango, na boyangeli mpe na boyokani elongo na bituluku ya bato, bokosi endimami wana emonani ete baoyo basalelaka yango bakosala eloko te mpe baoyo bazali koluka lisusu koyangela.”

Kokundolaka lokuta kati na politike na États-Unis, zulunalo Common Cause Magazine ya mai/juin 1989 emonisaki ete: “Likambo ya Watergate mpe etumba ya Viêt Nam ekokani mpenza na likambo ya Iran/Contras mpo na oyo etali kosalela bokosi kati na boyangeli mpe kozanga konfianse na bato epai na bango. Na yango, mpo na nini boyangeli ya Reagan esalaki mbongwana motindo yango? Mpamba te bato mingi balobaki lokuta, kasi bobele bato moke bandimaki mpo na yango.” Ezali mpenza na ntina soko bato batyelaka bakonzi na bango ya politike motema te.

Na makambo ya boyokani kati na biyangeli bakonzi ya lolenge yango bamonaka ete ezali mpasi kotyelana motema moko na mosusu. Filozofe Mogreke Platon emonisaki ete: “Bayangeli ya Leta . . . bakoki kopesamela nzela na koloba lokuta mpo na bolamu ya Leta.” Na makambo ya boyokani kati na bikolo, ezali lokola esakweli ya Biblia na Danyele 11:27 eyebisi ete: “Bakofanda na mesa moko mpo na koloba lokuta.”

Kati na mombongo, bokosi na ntina ya biloko ya koteka mpe misala misengeli kosalema ezali kosalema mingi. Basombi basengeli kozala na mayele ntango ya kosala boyokani, komindimisa mpenza ete basali liponi ya malamu. Na mikili misusu biyangeli bisili kotya masangá mpo na kobatela bato na piblisité ya lokuta, na biloko ya mabe oyo elakisami lokola ezali na matomba mpe na likama te, mpe na kobuba. Ata milende ya lolenge yango esalemi, bato bazali kobebisa mbongo na bango mpo na bateki ya lokuta.

Mpo na bato mosusu, kokosa ezali mpenza mpasi te yango esili kokoma momeseno na bango. Basusu balobaka solo, kasi wana bamonani na likama bakokosa. Bato bobele moke baboyaka kokosa kati na makambo ya lolenge nyonso.

Lokuta elimbolami lokola: “1. maloba to likambo ya solo te, oyo moto moko abimisi yango na mokano ya kokosa . . . 2. likambo nyonso oyo ekopesa to ekobimisa likanisi ya bokosi.” Mokano ezali ya kondimisa basusu likambo oyo mokosi ayebi ete ezali solo te. Na lokuta to kolimbola bobele solo moke, azali kosala makasi ete azimbisa baoyo bazali na lotomo ya koyeba bosolo ya likambo.

Bantina ya koloba lokuta

Bato balobaka lokuta mpo na bantina ekeseni. Basusu bakanisaka ete basengeli kokosa na ntina ya makoki na bango mpo ete balonga na mokili oyo etondi na kowelana. Basusu bazali koluka kozipa mabunga to ekweli na bango na nzela ya lokuta. Ezali mpe na baoyo bazali kokoma makambo ya lokuta mpo na komonisa ete basalaki mosala moko, nzokande basalaki yango te. Ezali lisusu na baoyo bazali kokosa mpo na kobebisa lokumu na moto mosusu, mpo na kokima nsoni, mpo na kozipa lokuta ya kala, to mpo na koyiba mbongo na bato.

Ntina oyo epesamaka mingi mpo na kolongisa lokuta ezali ete ekobatela moto mosusu. Bato mosusu bazali kotalela yango lokola “lokuta ya malamu” mpo bakanisi ete ekosala mabe na moto moko te. Kasi kobuka oyo ebyangami lokuta malamu ezali solo kosala mabe te?

Talela makama na yango

“Lokuta ya malamu” ekoki kofungola nzela na momeseno ya lokuta oyo ekobenda mindondo ya minene. Sissela Bok alimboli ete: “Nkuta nyonso oyo etangami ‘ya malamu’ ekoki mpenza te kolimwa nokinoki na makanisi. Ya liboso, koloba ete lokuta ekosala mabe te ezali kobimisa ntembe. Likambo oyo mokosi azali komona ete ezali mabe te to ezali litomba ekoki komonana motindo moko te epai na ye oyo akosami.”

Lokuta nyonso, ata emonani ete esali mabe moko te, ezali kobebisa boyokani malamu kati na bato. Lokumu ya mokosi esili kobeba, mpe ekoki kolongola konfianse libela. Mokomi ya mayele Ralph Waldo Emerson akomaki ete: “Kozanga koloba solo ezali mbala nyonso bobele lolenge ya komiboma ya mokosi te, kasi ekokani lisusu na kobebisa kolongono ya etuluku.”

Ezali mpasi te mpo na mobuki lokuta koloba makambo oyo mazali solo te na ntina na moto mosusu. Atako apesi elembeteli moko te, lokuta na ye ekobimisa ntembe, mpe bato mingi bakondima ye kozanga kotalela maloba na ye. Na lolenge yango lokumu ya moto oyo asali likambo te esili kobeba, mpe azwi mokumba monene ya komonisa ete asali likambo yango te. Ezali lisusu kopesa mpasi mingi ntango bato bazali kondima mokosi esika ya kondima moto oyo asali likambo te, mpe ezali kobebisa boyokani ya moto yango elongo na mokosi.

Mokosi akoki kokolisa kozanga mpasi momeseno ya koloba lokuta. Lokuta moko ememaka na mosusu. Thomas Jefferson, moto monene kati na boyangeli ya Amérika na ntango ya kala amonisaki ete: “Ezali na ezaleli mosusu te oyo etondi na likunya, na nsoni, na mayele mabe; mpe ye oyo amitiki koloba lokuta mbala moko, akomona mpasi te koloba yango mbala ya mibale mpe ya misato, kino na nsima ekokoma momeseno.” Ezali yango nzela ya kokweisama ya bizaleli malamu.

Ntina mpo na yango ezalaka mpasi te mpo na kokosa

Lokuta ebandaki ntango anzelu moko motomboki akosaki mwasi ya liboso, kolobaka na ye ete akokufa te soki atosi Mozalisi na ye te. Yango esili kobimisa epai na libota mobimba ya bato mpasi oyo eleki monene, komemaka kozanga kokoka, bokono mpe kufa epai na bato nyonso.​—Genese 3:1-4; Baloma 5:12.

Uta kozanga botosi ya Adam na Eva, bopusi mabe ya tata wana ya lokuta esili kobimisa kati na mokili ezaleli oyo ezali kokolisa lokuta. (Yoane 8:44) Tozali na mokili ya kobeba oyo kati na yango solo ezali bobele ndambondambo Zulunalo The Saturday Evening Post ya septembre 1986 emonisaki ete lokuta “ezali kotalela mombongo, biyangeli, biteyelo, kominanola, mpe ata boyokani ya mokolo na mokolo kati na bana mboka mpe baninga ya pembeni. . . . Tosili kondima likanisi ya solo ndambondambo, lokuta monene oyo elobi ete solo bobele moko na makambo nyonso ezali te.”

Yango ezali likanisi ya bato bameseni koloba lokuta, baoyo bazangi mawa epai na bato oyo bazali kokosa. Lokuta esili kokoma likambo ya petee epai na bango. Ezali motindo na bomoi na bango. Nzokande, basusu oyo mpo na bango koloba lokuta ezali momeseno te bakoki kokosa mpo na kobanga​—kobanga ete bayeba mabunga na bango te, kobanga ya kozwa etumbu, mpe bongo na bongo. Ezali bolembu ya nzoto ezangi kokoka. Lolenge nini kokitanya momeseno yango na ekateli ya koloba solo?

Mpo na nini koloba solo?

Solo ezali mitinda oyo Mozalisi na biso monene asili kotyela biso. Biblia, Liloba na ye likomami, lilobi na Baebele 6:18: “Nzambe akoki kobuka lokuta te.” Mitinda yango misimbamaki makasi na mwana na Ye, Yesu Klisto oyo azalaki momonisi ya Nzambe Ye moko awa na mabelé. Epai na bankonzi ya mangomba ya Bayuda oyo balukaki koboma ye, Yesu alobaki: “Sikawa bozali koluka koboma ngai, moto oyo alobelaki bino solo oyo nayokaki epai na Nzambe. . . . Soki nalobi ete nayebi ye te, mbele nakozala lokola bino, bato na lokuta.” (Yoane 8:40, 55) Atikeli biso ndakisa na boye ete “asalaki lisumu te, mpe bokosi ezwamaki na monoko na ye te.”​—1 Petelo 2:21, 22.

Mozalisi na biso, oyo azali na nkombo Jéhovah ayini lokuta, lokola Masese 6:16-19 elobi yango polele: “Ezali na makambo motoba oyo Jéhovah ayini; ɛɛ, nsambo ezali makambo maboyami na molimo na ye: miso na nzombo, lolemo na nkuta, maboko masopi makila na mosembwi, motema mozali kobanzabanza misala mabe, makolo makopota mbango kosala masumu, motatoli na lokuta oyo akolobaka maloba na sembo te, mpe ye oyo akoyeisa kowelana kati na bandeko.”

Nzambe wana ya solo azali kosenga ete tomitabwisa engebene mitinda na ye mpo tokoka kosepelisa ye. Liloba na ye lipemami ezali kopesa biso etinda oyo ete: “Bobukana lokuta te. Bosili kobwaka moto na kala elongo na misala na ye nyonso.” (Bakolose 3:9) Bato oyo bazali koboya kotika momeseno ya koloba lokuta bakoki kosepelisa ye te; bakozwa likabo ya bomoi te. Ya solo, Nzembo 5:6 elobi polele ete Nzambe “akoboma baoyo bakolobaka lokuta.” Lisusu, Emoniseli 21:8 elobi ete likabo na “baoyo nyonso bakolobaka lokuta” ezali “kufa ya mibale,” oyo ezali kobebisama ya seko. Yango wana kondima likanisi ya Nzambe mpo na lokuta ekopesa biso ntina makasi ya koloba solo.

Bongo esengeli kosala nini soki koloba solo ekoki kobimisa mindondo to koyokisa mpasi? Koloba lokuta ekoki ata soki moke te kozala mwango malamu, mbala mosusu ebongi boloba eloko te. Mpo na nini koloba lokuta oyo ekobebisa bobele lokumu na yo mpe ekotinda yo na koboyama na Nzambe?

Mpo na kobanga mpe bolembu ya mosuni, moto moko akoki koluka komibomba kati na lokuta. Wana ezali koluka nzela ezangi mpasi to komonisa ezalela ya malamu na esika oyo yango ebongi te. Ntóma Petelo akweaki na komekama motindo yango ntango awanganaki mbala misato ete ayebi Yesu te. Na nsima, ayokaki mpasi na motema mpo ete alobaki lokuta. (Luka 22:54-62) Kobongola motema na ye ya sembo etindaki Nzambe ete alimbisa ye, lokola yango emonani polele na mapamboli mingi ya mosala oyo azwaki nsima. Kobongola motema elongo na ekateli makasi ya kotika koloba lokuta ezali nzela oyo ekomema na lilimbisi na Nzambe na makambo oyo ye ayini.

Na esika ete oluka lilimbisi ya Nzambe nsima na koloba lokuta, batela boyokani malamu elongo na Mozalisi na yo mpe batela lokumu na yo epai na bato basusu na kolobaka solo. Kanisa oyo Nzembo 15:1, 2 elobi: “Ɛ Jéhovah, nani akoumela kati na hema na yo? Nani akofanda na ngomba na yo ya bulee? Ye oyo akotambolaka sembo mpe akosalaka na boyengene mpe akolobaka solo kati na motema na ye.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto