Bazali kosakola na “bato ya lolenge nyonso” na Belgique
NTOMA Paulo akundolaki na baninga na ye baklisto bapakolami na elimo ete mokano na Nzambe ezali ete “bato na lolenge nyonso babika mpe bakoma na boyebi koyeba solo.” Mpo na yango basengelaki kobondela ete bazala “na bomoi ya kimya mpe kozanga mobulu” na ntina ete bakoka kosakola nsango malamu ya Bokonzi epai na bato balingi koyoka.—1 Timoté 2:1-4.
Na mikolo na biso, kosakola nsango malamu epai na “bato ya lolenge nyonso” esili kozwa ndimbola ya sikisiki mpo na ba Témoins de Jéhovah ya Belgique. Uta nsuka ya Etumba ya mibale ya mokili mobimba, mokili wana moke oyo ekokani mwa moke na etando ya libeké ya Tanganyika to lokola katikati ya libeké ya Michigan, esili kozwa mbongwana monene kati na bafandi na yango mpe bizaleli na bango. Longola bituluku minene na yango misato—flamand (néerlandais), français mpe allemand—okokuta lelo na Belgique ebele na bituluku bikeseni ya bato ya minoko mpe mimeseno ndenge na ndenge. Ezali na ba Arabes, ba Turcs, ba Indiens, ba Chinois, ba Philippins, bato ya Afrika mpe Amerika, mwa ndambo oyo tokoki kotanga. Ekanisami ete moto moko likoló na bato zomi azali na euteli ya bopaya.
Yango wana, Batemwe ya Belgique, lokola bandeko na bango ya mokili mobimba bazali kokutana na ntembe ya kosakola nsango malamu epai na “bato ya lolenge nyonso.” Kosakola kati na bato ya bikolo bikeseni ezali ndenge nini? Lolenge nini kosolola na bato oyo bazali na makanisi mpe mangomba mosusu? Mpe lolenge nini bazali koyanola na nsango ya Biblia?
Koyeba kobanda masolo ezali kopesa litomba
Kosolola na “bato ya lolenge nyonso” nsango malamu ya Bokonzi ezali likambo ya esengo mpe ya kosepelisa. Na balabala na bisika ya zando, kati na bus mpe na mosala ya ndako na ndako, bato ya bikolo mpe mposo mingi ekeseni bazali komonana. Soki mosakoli ya Bokonzi amonisi mwa mayele, nokinoki akoki kobanda masolo, oyo mbala mingi ebimisaka matomba malamu.
Na esika ya kozela bus, mosakoli moko ya mwasi abandaki masolo elongo na mwasi moko moto ya Afrike bobele na kosekaka mwa moke epai na ye. Nokinoki, mwasi yango amonisaki bosepeli na ye ya koyoka nsango malamu ya Bokonzi, mpe alingaki koyeba makambo mingi na ntina ya Biblia. Azwaki bazulunalo La Tour de Garde mpe Réveillez-vous! mpe apesaki mosakoli adresse na ye. Ntango mosakoli alobaki ete akozongela ye nokinoki, ayanolaki ete: “Te! te! Topesana elaka ya sikisiki mpo nazala na ndako ntango okoya.”
Nsima na mikolo misato, ntango mosakoli alingaki kotala mwasi yango, amonaki ete asilaki kobungisa adresse na ye. Lokola azalaki komikundola nkombo ya balabala, akendeki kuna mpe atelemaki na bikuke nyonso mpo na komona soki akozwa nkombo ya bato ya Afrika. Atambolaki kino nsuka ya balabala, kasi amonaki te oyo azalaki koluka. Alembaki mpenza! Kasi ntango azalaki komibongisa mpo na kozonga, na pwasa, mwasi yango azalaki wana liboso na ye, lokola moto oyo auti epai te. Ezali mpenza ngonga oyo bayokanaki mpo na kokutana. Babandaki boyekoli ya Biblia.
Bongo tokoloba nini na ntina ya mimeseno, bindimeli mpe bonkoko? Na ndakisa, ezali boni mpo na bindimeli ya ba Hindu? Pionnier moko ya mwasi amikundolaki batoli oyo atangaki na mokanda Comment raisonner à patir des Écritures ete: “Esika ya kobungisa ntango na bafilozofi ya ba Hindu, lakisa solo ya kobondisa oyo ezwami na Biblia Mosantu. . . . Mateya ya solo oyo ezali polele kati na Liloba na ye ekosimba mitema na baoyo bazali na nzala mpe na mposa ya mai ya boyengebene.”
Ezali mpenza oyo pionnier wana asalaki ntango akutanaki na Kashi, mwasi ya Inde oyo andimaki koyekola Biblia. Kashi atikaki te kokola, mpe nokinoki abandaki kosolola elongo na baninga na ye makambo oyo azalaki koyekola. Mokolo mosusu, pionnier wana akutanaki na mwasi ya ambassadeur oyo atunaki ye ete: “Yo nde ozali koyekola Biblia elongo na Kashi?” Kanisa kokamwa ya pionnier wana ya mwasi ntango mwasi yango abakisaki ete: “Ozali molakisi ya makoki mingi! Alongi kondimisa ngai makambo mingi. Kanisa naino! Ezali ye, Hindu, nde azali koteya ngai Biblia, ngai Mokatolike!”
Na bokutani elongo na bato ya Philippines, okososola nokinoki ete mingi na bango balingi Biblia. Bazali na esengo mpe na boyambi malamu, ezali mpenza mpasi te kobanda masolo elongo na bango. Mwasi moko, moto ya Philippines andimaki bazulunalo mibale, kasi lokola azalaki Mokatolike, abwakaki yango. Nsima ya mwa bamposo, andimaki kozwa mosusu mibale, oyo atyaki na sakosi na ye. Na mpokwa moko aokaki mposa ya kotanga. Nsima ya kolukaluka bipai binso mokanda oyo ekokaki kosepelisa ye, azwaki bazulunalo. Kokakatanaka, abandaki kotanga yango mpe mposa na ye ekolaki. Mwa moke na nsima, Temwe moko ayaki kotala ye mpe atunaki mituna mingi. Ezalaki mpo na ye mbala ya liboso kokokanisa bindimeli ya Bakatolike na oyo ya Biblia. Mateya ya polele ya Biblia oyo bamonisaki ye mandimisaki ye ete asili kozwa solo.
“Bwaka limpa na yo”
Mingi na bapaya oyo bafandi na Belgique bazali kati na mombongo to bazali kosala na ba ambassades 150 to lisusu mpo na babiro ya Lisangani ya Nkita mpo na mikili ya Mpoto. Mingi na bango baumelaka bambula mingi te. Likanisi ya liboso ekoki kozala ete, kopesa bango litatoli mpe koyekola Biblia elongo na bango ezali na litomba te. Kasi Biblia ezali kopesa elendiseli oyo: “Bwaka limpa na yo likoló na mai, mpo ete okozwa yango nsima na mikolo mingi.” (Mosakoli 11:1) Ya solo, mbala mosusu matomba na yango mazali ya kokamwa.
Tokamata ndakisa ya mwasi moko moto ya Amerika oyo mosakoli moko azalaki kotikela ye bazulunalo mbala na mbala. Mokolo mosusu, mosakoli amonisaki ye matomba ya boyekoli ya Biblia oyo elandani malamu, mpe monisaki mposa ya kobanda yango elongo na ye. Mwasi yango andimaki mpe akolaki nokinoki. Aumelaki te kosala bokeseni kati na lingomba ya solo mpe mangomba ya lokuta. Na yango apetolaki ndako na ye na kolongola bikeko nyonso ya mangomba oyo azalaki na yango. Na nsima ntango na bozongi na ye na États-Unis ekokaki. Kokende na ye etyaki nsuka na bokoli na ye ya elimo? Kanisa naino esengo mpe kokamwa ya mosakoli oyo ayekolaki na ye ntango Temwe moko ya États-Unis abengaki ye na telefone mpo na koyebisa ye ete mwasi yango alandaki koyekola, amipesaki epai na Jéhovah mpe azwaki batisimo. Asilaki mpe kosenga mosala ya pionnier auxiliaire.
Ezalaki mpe lolenge moko mpo na Kashi, mwasi ya ekolo Inde, mpe mpo na mwasi ya mokili Philippines baoyo tolobelaki liboso. Ntango Kashi azongaki na Inde, ye mpe mobali na ye balandaki koyekola Biblia. Basukaki na komipesa epai na Jéhovah mpe babandaki kosakola. Lokola bafandaki na etuka epai Batemwe mosusu bazalaki te, basengaki ete boyekoli ya mokanda ya lisangá etambwisama na ndako na bango. Na meko oyo kolongono ya nzoto epesi ye nzela, Kashi akosalaka mosala ya pionnier auxiliaire, mpe atambwisaka boyekoli motoba ya Biblia, oyo nyonso esangisaka bato 31. Bobele bongo, mwasi ya mokili Philippines akendeki kofanda na États-Unis, akolaki kino komipesa mpe kozwa batisimo, mpe asili kokoma pionnier permanent. Wana ezali mwa bandakisa ya ebele na matomba ya kosepelisa oyo basakoli ya Bokonzi bazali kozwa na kolandaka kosakola na Belgique.
Kolonga ntembe ya minoko mingi
Mpo na kokokisa malamu mosala ya kosakola epai na “bato ya lolenge nyonso,” biro ya filiale esengeli kozala na mikanda na minoko koleka monkama. Ezali sikawa na masangá ya minoko zomi na Belgique. Likoló na masangá 341 ya mokili wana, masangá 61 mazali na minoko ya bapaya, mpe likoló na basakoli ya Bokonzi 26 000, bato na bikolo ya bopaya bazali 5 000. Moko kati na masangá yango esangisi bato na bikolo 25. Ntina ezali te ya kobakisa ete bayangani bazali bato ya mposo mpe bizaleli bikeseni! Atako bongo, bolingo mpe bomoko oyo ezali kati na bandeko ezali litatoli monene ya kondimisa ete bazali bayekoli ya solo ya Klisto.—Yoane 13:34, 35.
Mpo ete ezali na bapaya mingi na Belgique oyo basengeli koyoka nsango malamu na minoko ya bapaya, basakoli mingi bandimaki kolonga ntembe ya koyekola minoko makasi lokola turc, arabe mpe chinois. Milende na bango ebimisaki mpenza mbano.
Baoyo bazali kosakola epai na ba Arabes bamonaki ete bakoki kolamusa mposa na bango mpo na Biblia na komonisaka motuya na yango kati na makambo ya bomoi. Mosakoli moko asalaki lisolo moko kitoko elongo na molakisi moko Moarabe, kasi na boumeli ya mibu misato oyo milandaki azwaki libaku te ya kokutana na ye. Lokola mosakoli yango abungisaki milende na ye noki te, azwaki ekateli ya kokomela molakisi wana mwa mituna ya Biblia. Etungisaki Molakisi yango mingi kino azwaki ekateli ya kotalela Biblia na bosolo nyonso. Akamwaki mpenza na makambo oyo azalaki koyekola na boye ete ye mpe mwasi na ye, bango nyonso bamizilmá, bamibombelaki bampokwa mosusu mpo na kotanga Biblia elongo.
Basakoli oyo bazali kosala milende mpo na kosalisa ba Chinois mingi ya bingumba minene basengeli te kolonga bobele bipekiseli ya minoko. Ba Chinois mingi bandimaka te ete Nzambe azali Mozalisi, mpe batalelaka Biblia te lokola Liloba na ye. Nzokande balingaka koyeba makambo mpe kososola ntina na yango. Balingaka mingi kotanga. Ekomaka mbala mingi ete batanga mikanda mikolimbolaka Biblia na mobimba na yango, to ndambo monene ya Biblia, bobele na mikolo mike. Wana bazali na motema sembo, nguya ya Liloba na Nzambe ekozanga te kosimba motema na bango.
Mwasi moko Mochinois azalaki komona ete ezali mpasi kondima likanisi ete Mozalisi azali. Kasi na boyekoli ya mbala ya mibale, azalaki kolela wana alobaki ete: “Sikawa, nandimeli Jéhovah Nzambe, mpo ete soki Biblia ekomamaki na boumeli ya mibu 1 600 na bakomeli 40 mpe ezali kolobela na boyokani nyonso motó ya likambo bobele moko, yango emonisi ete Jéhovah nde akambaki kokomama na yango. Ezali mpenza likanisi ya kondimisa!”
Ntango mosakoli moko asololaki na mwasi mosusu Mochinois kati na train, atunaki ete: “Ozali moklisto?” Na nsima alobelaki ye ete azali na mawa mingi ya komona bokeseni ya makanisi oyo ezali kati na baoyo bazali komitanga baklisto. Mosakoli amonisaki ete ye mpe andimi likanisi yango, kasi alimbolaki ete, Biblia ezali na bongolabongola te. Nzokande, mwasi yango asengelaki kokita na ntango wana. Apesaki mosakoli adresse na ye, mpe wana mosakoli akendeki kotala ye, alobaki: “Soki nakokaki koyeba, mbele nakotaki na train mbula moko liboso!” Ntango asosolaki ete mosakoli akangaki ntina ya maloba na ye te, alimbolaki ete: “Ezalaki mbala ya liboso ete nakende na université na train. Kanisa naino! Nabungisi mbula mobimba!” Azalaki na esengo ya kokoka koyekola Biblia, atako ezalaki bobele mpo na mwa basanza, liboso ete azonga na Chine.
Batemwe ya Belgique basili kozwa liteya na makambo oyo nyonso. “Na ntongo, lona mboto na yo mpe na mpokwa pekisa loboko na yo te; mpo ete oyebi te soki nini ekokoma malamu to oyo to yango nyonso mibale ekozala malamu.” (Mosakoli 11:6) Ezali mpenza na ntina kosala milende ya kolonga bipekiseli ya minoko, ya mimeseno mpe bonkoko. Mpe likoló ya nyonso wana, bosepeli na bato mpo na nsango malamu ezali komonisa ete, ya solo, “Nzambe akoponaponaka te, kasi na mabota nyonso moto oyo akobanga ye mpe akosala na boyengebene andimami na ye.”—Misala 10:34, 35.