Cour suprême ya Nigéria elongisi bonsomi ya losambo
BATO bapunzi bilanga ya moloni moko. Basusu bazingi ndako ya maçon moko mpe bazwi biloko na ye ya mosala. Etuluku mosusu epekisi mwasi moko kosomba mpe kotekisa biloko nyonso. Mpo na nini mitungisi ya lolenge yango? Ezali mpo ete banyokwami, oyo bazali bango nyonso ba Témoins de Jéhovah, baboyi kokota na masangá ya bato ya mbula na bango. Okoki komituna ntango mosusu, ‘Na nini?’
Lisangá ya bato na mbula moko to inɔngɔ esangisi bato, mbala mingi mibali, oyo babotami na eleko moko mpe na mboka moko. Bituluku ya masangá ya bato na mbula moko bizali mingi na est ya Nigéria. Bakoki kopesa mosolo ya kobongisa mboka, kasi bazali mpe komikotisa na losambo ya bikeko mpe kosala milulu ya bilimu mabe mpo na komonisa ete basili kokola. Ba Témoins de Jéhovah bazali kosangana na bituluku yango te mpo ete Biblia ezali kopekisa misala lolenge yango mpo na baklisto.—1 Bakolinti 10:20, 21; 1 Yoane 5:21.
Samuel Okogbue azali mosoni ya bilamba na engumba ya Aba, na Nigéria. Na 1978, basangani ya Lisangá ya bato ya mbula moko na Alayi basengaki ete afuta “mosolo” mpo na kotonga lopitalo. Samuel, oyo azali moklisto ya solo, azali kosala nyonso ekoki na ye mpo na kosunga bato mosusu, kasi aboyaki na motema mobimba komikotisa na bituluku ya bato ya mbula moko. Na avril ya mobu wana, basangani motoba ya etuluku yango bakotaki na makasi na esika ya mosala na ye mpe bazwaki masini na ye ya kotonga bilamba, oyo basengelaki kozongisa bobele soki afuti mosolo mosengami. Samuel amonisaki ete asengelaki te kofuta mosolo mpo ete azali mosangani ya lisangá na bango te. Wana azalaki na makoki te ya kozwa masini na ye, Samuel amemaki likambo yango na esambiselo.
Basambi liboso ya tribinale mingi
Na tribinale, basangani ya lisangá na bato ya mbula moko bamonisaki ete na kotalela mbula na ye, Samuel azali mbala moko mosangani ya lisangá na bango, asengisami na kofuta mosolo oyo bazali komikatela. Lisusu, momeseno ya mboka endimi ete soki mosangani moko akofuta mosolo wana te, biloko na ye bisengeli kozwama kino akofuta yango.
Tribinale eboyaki likanisi yango. Mokolo ya 28 février 1980, ekataki ete Samuel asengisami na makasi te mpo na kokoma mosangani ya etuluku ya bato na mbula na ye. Mosambisi mokambi alobaki ete: “Momeseno oyo ezali kopekisa citoyen liponi ya baninga na ye ezali na boyokani te na article 37 ya constitution ya République fédérale ya Nigéria mpe na yango eyokani na mibeko te.”
Etuluku ya bato ya mbula moko ememaki ekateli yango na esambiselo mosusu ya monene mpe balongisaki bango. Kuna mosambisi apesaki etinda ete Samuel afuta mosolo, na kolobaka ete ezalaki bobele mwango ya kosangana na botombeli mboka na ye.
Bongo Samuel asengaki ete basamba lisusu mpo ete likambo likatamaki na bosembo te. Cour d’appel ekweisaki ekateli ya liboso, mpe epesaki Samuel elonga. Lokola baboyaki kondima ete bakweisami, etuluku ya bato ya mbula moko bakumbaki likambo yango na Cour suprême ya Nigéria.
Bobele na ntango wana, basangani ya etuluku yango batyaki yikiyiki na mboka epai Samuel azalaki kofanda. Bandimisaki mokonzi ya mboka ete apekisa misala ya ba Témoins de Jéhovah kati na mboka yango mobimba, na kolobaka ete ba Témoins de Jéhovah bazali koboya mikano nyonso ya kobongisa mboka. Mopanzi nsango ya mboka asakolaki ete moto nyonso oyo akozala na boyokani elongo na ba Témoins de Jéhovah akofuta lomande. Batemwe ya mboka oyo ezali penepene bayaki mpe balimbolaki likambo yango epai na mikolo ya mboka. Balimbolaki ete libota ya Nzambe baboyi soki moke te kotombola bokoli ya mboka. Mpo na kondimisa yango, Samuel alakisaki mikanda na ye liboso ya esambiselo mpo na komonisa ete apesaka mosolo mpo na kobongisa mboka, kasi na nzela ya lisangá ya bato ya mbula moko te. Bongo mikolo ya mboka babongolaki ekateli na bango ya kokata boyokani nyonso elongo na Batemwe.
Bonsomi ya losambo elongi
Mokolo ya 21 octobre 1991, basambisi mitano ya Cour suprême ya Nigéria bakataki likambo na kopesaka Samuel elonga. Kolobelaka likambo ya ntina ya lisambisi emonisami na zuzi Paul Nwokedi, zuzi Abubakar Walli alobaki ete: “Mofundami [Samuel] azali nde koboya te kofuta mosolo oyo mokatami, kasi azali nde koboya likambo ya kozala mosangani ya lisangá moko, ya etuluku moko to bato ya mbula na ye, mpo ete yango ezali kotemela bindimeli ya lingomba na ye, lokola ye azali Témoin de Jéhovah.”
Zuzi abakisi: “Constitution ya 1963, article 24(1), epesi na ba citoyens Nigérians nyonso bonsomi ya lisosoli, ya makanisi mpe ya lingomba. Mofundami azali na lotomo ya kobatela bindimeli ya lingomba na ye, makanisi mpe lisosoli oyo epekisi ye kosangana na lisangá ya bato na mbula na ye. Momeseno nyonso oyo ekopusa bato na kosala ndenge mosusu eyokani te na constitution mpe ezali na motuya moko te.”
Na mokuse, tribinale ekataki ete moto moko te akokangama na makasi na nkombo ya mibeko mpo na kosangana na lisangá ya bato ya mbula na ye ata soki bosangani motindo yango ezali momeseno ya mboka. Ekatamaki lisusu ete moto moko te asengisami na makasi ete afuta mosolo mpo na lisangá oyo azali mosangani na yango te, ata soki mosolo yango ezali mpo na kobongisa mboka. Bongo kati na mwa ndimbola moke oyo, bonsomi ya losambo ebatelami mpo na ba Nigérians nyonso.