Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g00 Juillet nk. 20-21
  • Lokuta​—Ekoki kozala ntango mosusu malamu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lokuta​—Ekoki kozala ntango mosusu malamu?
  • Lamuká!—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bizaleli malamu oyo Biblia emonisi
  • “Mayele lokola banyoka”
  • Mpo na nini ezalaka mpasi te mpo na kokosa?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Solo ezalaka kaka na ntina?
    Makambo mosusu
  • Tólobaka solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Ntango mwana na yo akosi
    Lamuká!—2014
Makambo mosusu
Lamuká!—2000
g00 Juillet nk. 20-21

Engebene Biblia

Lokuta​—Ekoki kozala ntango mosusu malamu?

“NA BANTANGO MOSUSU MWA LOKUTA MOKE ESALISAKA NA ESIKA YA KOLOBA MAKAMBO MINGI.”

MALOBA oyo emonisi ndenge bato mingi bakanisaka mpo na kobuka lokuta. Likanisi na bango ezali ete kobuka lokuta ezali mabe te soki epesi moto moko mpasi te. Bato ya mayele babengaka likanisi yango ete kosala malamu to mabe na kotalela likambo oyo okutani na yango (morale de la situation), yango emonisi ete mobeko kaka moko oyo osengeli kotosa ezali mobeko ya bolingo. Diane Komp, ye akomaka babuku, alimboli yango na maloba mosusu ete: “Soki mposa na yo ezali malamu mpe soki makanisi na yo ezali malamu, (na ntango wana, ata) obuki lokuta . . . ezali mabe te.”

Lelo oyo, likanisi ya ndenge wana epalangani na mokili mobimba. Makambo ya lokuta oyo bato minene ya politiki mpe bakonzi mosusu ya mokili balobaka ezali kokamwisa bato. Ntango bamonaka makambo ya ndenge wana, bato mingi balobaka lisusu solo te. Kutu na makambo mosusu, lokuta ekómi mpenza mosala oyo endimami na bato nyonso. Mwasi moko oyo atɛkaka na magazini amileli ete: “Bafutaka ngai mpo nabukaka lokuta. Nabukaka lokuta mpo ete natɛka biloko mingi mpe na nsuka ya mbula nazala na kati ya bato oyo bayebi kotɛka koleka bato mosusu nyonso. . . . Emonani ete likambo yango ezali momeseno ya bato oyo batɛkaka na bamagazini mpe na babutiki nyonso.” Bato mingi bakanisaka ete ezali mpenza mabe te kosalela mwa lokuta ya moke, lokuta oyo epesaka bato mosusu mpasi te. Likanisi yango ezali malamu? Ezali na bantango oyo bapesi moklisto nzela ete akosa?

Bizaleli malamu oyo Biblia emonisi

Biblia epekisi lokuta ya lolenge nyonso makasi mpenza. Mokomi ya nzembo alobi ete: ‘Nzambe akobebisa baoyo bakolobaka lokuta.’ (Nzembo 5:6; Talá Emoniseli 22:15.) Na Masese 6:16-19, Biblia etángi makambo sambo oyo Yehova ayinaka. Na kati ya makambo yango, Biblia elobeli polele ‘lolemo na lokuta’ mpe “motatoli na lokuta oyo akolobaka maloba na sembo te.” Mpo na nini? Mpo Yehova ayinaka mpasi oyo eutaka na kobuka lokuta. Yango wana Yesu abengaki Satana mobuki ya lokuta mpe mobomi ya bato. Lokuta na ye ememeli bato mpasi mpe liwa.​—Genese 3:4, 5; Yoane 8:44; Baloma 5:12.

Likambo oyo ekómelaki Anania na Safila emonisi mpenza ete Yehova atalelaka lokuta na lisɛki te. Bato yango mibale babukaki lokuta na nko mpo balukaki komonisa bantoma ete bakabaka mingi, nzokande ezalaki bongo te. Bakanaki kobuka lokuta mpe basalaki yango na nko. Yango wana ntoma Petelo alobaki ete: “Obuki lokuta na bato te, kasi obuki lokuta na Nzambe.” Yango wana, Nzambe abomaki bango nyonso mibale.​—Misala 5:1-10.

Bambula mingi na nsima, ntoma Paulo akebisaki baklisto ete: “Bóbukanaka lokuta te.” (Bakolose 3:9) Toli oyo ezali na ntina mingi, mingimingi na lisangá ya boklisto. Yesu alobaki ete bato bakoyeba bayekoli ya solo na bolingo na bango. (Yoane 13:34, 35) Bolingo oyo ezangi bokosi ndenge wana ekoki komonana mpenza kaka na esika oyo bato bazali sembo mpe bazali kotyelana motema. Ezali mpasi kolinga moto oyo tokoki kotyela ye motema te ete akolobela biso ntango nyonso solo.

Atako lokuta nyonso ezali mabe, ezali na lokuta oyo ezali mabe koleka mosusu. Na ndakisa, moto akoki kokosa mpo na nsɔni to mpo na kobanga. Moto mosusu akoki kozala na momeseno mabe ya kobuka lokuta mpo na kopesa to koyokisa bato mosusu mpasi. Lokola azali na makanisi mabe, moto oyo azali kobuka lokuta ndenge wana azali kosala yango na nko mpe moto yango azali likama mpo na bato mosusu, yango wana akoki kobimisama na lisangá soki abongoli motema te. Lokola lokuta nyonso eutaka na makanisi mabe te, tosengeli kokeba ete tópesaka etumbu mpambampamba te, kasi tosengeli komindimisa ete toyebi makambo nyonso oyo esali ete moto yango abuka lokuta na nko. Esengeli kotalela makanisi ya moto mpe makambo nini esalaki ete abuka lokuta.​—Yakobo 2:13.

“Mayele lokola banyoka”

Ya solo, koloba solo ntango nyonso elimboli te ete tosengeli kobimisa makambo nyonso epai ya moto nyonso oyo atuni biso yango. Na Matai 7:6, Yesu akebisaki ete: “Bópesa biloko na bulɛɛ epai na mbwa te; bóbwaka mpe biloko na bino na motuya liboso na ngulube te ete . . . bábongwana kopombwa likoló na bino te.” Na ndakisa, bato oyo bazali na makanisi mabe bazali na lotomo te ya koyeba makambo mosusu. Baklisto bayebi ete bazali na mokili oyo bato bazali koyinana mingi. Yango wana, Yesu apesaki bayekoli na ye toli ete bázalaka na “mayele lokola banyoka” kasi bázalaka ntango nyonso na “bopɔlɔ lokola bibenga.” (Matai 10:16; Yoane 15:19) Yesu azalaki ntango nyonso te koyebisa bosolo ya makambo nyonso polelepolele, mingimingi ntango yango ekokaki komemela ye to bayekoli na ye mpasi ya mpamba. Kasi, ata na bantango wana, abukaki lokuta te. Nzokande, azalaki koloba eloko te to azalaki koluka kolobela makambo mosusu.​—Matai 15:1-6; 21:23-27; Yoane 7:3-10.

Biblia elobeli mibali mpe basi ya sembo lokola Abalayama, Yisaka, Laaba mpe Davidi, bango basalelaki mayele ntango bazalaki liboso ya bato oyo bakokaki kozala banguna na bango. (Genese 20:11-13; 26:9; Yosua 2:1-6; 1 Samwele 21:10-14) Biblia etángi mibali mpe basi yango na molɔngɔ ya basaleli ya sembo, oyo bazalaki na botosi na boumeli ya bomoi na bango mobimba. Na yango, ebongi tólanda ndakisa na bango.​—Baloma 15:4; Baebele 11:8-10, 20, 31, 32-39.

Na bantango mosusu, ekoki komonana ete lokuta ebikisaka. Kasi, lelo oyo ntango bazali kokutana na mikakatano, baklisto balandaka ndakisa ya Yesu mpe batosaka lisosoli na bango oyo eteyami na Biblia.​—Baebele 5:14.

Biblia elendisi biso ete tólobaka solo ntango nyonso mpe tózala sembo. Lokuta ezali mabe mpe tosengeli kotosa toli ya Biblia oyo elobi ete: “Tiká ete moto na moto aloba sembo na mozalani na ye.” (Baefese 4:25) Soki tosali bongo, tokozala na lisosoli ya malamu, tokokolisa kimya mpe bolingo na kati ya lisangá, mpe tokokumisa ntango nyonso “Nzambe ya [solo, NW].”​—Nzembo 31:5; Baebele 13:18.

[Elilingi na lokasa 20]

Anania na Safila bakufaki mpo babukaki lokuta

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto