Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mrt lisolo 131
  • Lisalisi mpo na baoyo bakufá miso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lisalisi mpo na baoyo bakufá miso
  • Makambo mosusu
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge Nzambe atalelaka bato oyo bakufá miso
  • Ndenge oyo Batatoli ya Yehova basalisaka baoyo bakufá miso
  • Bisaleli nini topesaka bango mpo na koyekola Biblia?
  • Tósalisa bato oyo bakufá miso báyeba Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Matɔnɔmatɔnɔ ebongoli bomoi ya bato
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola​—Kopesa bato oyo bakufá miso litatoli
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Kokufa miso
    Lamuká!—2015
Makambo mosusu
Makambo mosusu
mrt lisolo 131
Moto moko oyo akufá miso afandi libándá na banc azali koyoka audio na nzela ya JW Library .

Lisalisi mpo na baoyo bakufá miso

Bato ya mayele balobi ete na mokili mobimba ezali na bato soki milio 43 oyo bakufá miso mpe bato milio 295 oyo bamonaka malamu te.a Likambo ya mawa, basalelaka bato yango makambo na boboto te mpe na kozanga bosembo.

Ndenge nini Nzambe atalelaka bato oyo bakufá miso? Biblia elobi nini mpo na bango? Mpe ndenge nini Batatoli ya Yehova basalisaka bato yango lelo oyo?

Ndenge Nzambe atalelaka bato oyo bakufá miso

Biblia emonisi ete Yehovab atyelaka mpenza bato oyo bakufá miso likebi. Alingi ete bato basalelaka bango makambo na bosembo mpe bazwaka matomba na mateya oyo apesaka. Apesi mpe bango elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya.

Oyo Makomami elobi: “Alakelama mabe moto oyo abungisi moto oyo akufá miso nzela.”​—Kolimbola Mibeko 27:18.

Oyo yango elimboli: Mobeko oyo Nzambe apesaki basaleli na ye na ntango ya kala, esalisaki bato oyo bakufá miso mpo bato mosusu banyokolaka bango te.

Oyo Makomami elobi: “Nzambe aponaka bilongi te.”​—Misala 10:34.

Oyo yango elimboli: Nzambe azwaka na motuya bato oyo bakufá miso kaka ndenge azwaka bato oyo bakoki komona malamu.

Oyo Makomami elobi: Yesu “asalaki ete bato mingi oyo bakufá miso bákoka komona.”​—Luka 7:21.

Oyo yango elimboli: Ndenge Yesu asalisaki bato oyo bakufá miso bámona ntango azalaki awa na mabele, amonisaki makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala na mikolo ezali koya.

Oyo Makomami elobi: “Miso ya bato oyo bakufá miso ekofungwama.”​—Yisaya 35:5.

Oyo yango elimboli: Yehova alaki ete mosika te, ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mabele, baoyo bakufá miso bakomona.

Ndenge oyo Batatoli ya Yehova basalisaka baoyo bakufá miso

Na mokili mobimba, biso Batatoli ya Yehova, tosakolaka nsango malamu epai ya bato oyo bakufá miso. Ndenge nini tosalaka yango?

  • Tobimisaka Biblia mpe mikanda oyo elimbolaka yango ata mpe bavideo mpo na bato oyo bakufá miso mpe baoyo bamonaka malamu te, tobimisaka yango na ekomeli ya braille, ya makomi minene, mpe ya audio.

  • Na makita na biso tóyambaka bato nyonso, ata mpe baoyo bakufá miso.

  • Biso Batatoli ya Yehova toyekolaka Biblia na moto mokomoko.c

Tosalaka nyonso wana ofele. Mpo na nini? Mpo Yesu alobaki ete: “Bozwi ofele, bópesa ofele.”​—Matai 10:8.

Batatoli ya Yehova batyelaka mpenza bato oyo bakufá miso likebi. Bato nyonso oyo basambelaka Nzambe elongo na biso bakómaka baninga na biso ya motema. Talá makambo oyo Batatoli ya Yehova mosusu oyo bakufá miso bakutanaki na yango.

Talita Alnashi, oyo afandaka na Suède amonaka malamu te banda abotamá. Luká koyeba ndenge baboti na ye bateyaki ye Biblia mpe ndenge baninga na bango bamoniselaki bango bolingo mpe basalisaki bango.

James Ryan, oyo afandaka na États-Unis abotamá matoi ekufá mpe na nsima miso na ye mpe ekufaki. Luká koyeba makambo oyo esalaka ete azala na bomoi ya malamu mpe ya esengo.

Cynthia Pablo.

Cynthia Pablo, oyo afandaka na Philippines, akufá matoi mpe miso. Ndenge nini bandeko na ye bakristo basalisaki ye na ntango ya maladi mabe ya Coronavirus? Luká koyeba yango na lisolo “Bandeko ya lisangá basalisi ndeko mwasi moko ya baba mpe akufá miso.”

Bisaleli nini topesaka bango mpo na koyekola Biblia?

Moto moko oyo akufá miso azali kosalela aparɛyi oyo etángáka makomi ya braille.

Mikanda ya braille. Tobimisaka Biblia na ekomeli ya braille ezala ya mobimba to ya ndambo na minɔkɔ ebele. (Mpo na koyeba minɔkɔ yango, talá etanda “Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na ekomeli ya braille.”) Tobimisaka mpe mikanda na biso mingi oyo elimbolaka Biblia na ekomeli ya braille. Tobimisá mpe buku Yekolá kotánga Braille, mpo na baoyo balingi koyekola ekomeli yango. Ebongisamá mpo na kosalisa moto oyo akufá miso ayekola kotánga ekomeli ya braille na lisalisi ya moto oyo amonaka.

  • Mpo na kozwa mikanda ebele na ekomeli ya braille, sololá na Motatoli ya Yehova moko to sɛngá Batatoli ya Yehova báya kotala yo.

  • Na jw.org, zwá ba-fichiers mpo na baaparɛyi oyo ezwaka banɔti.d

Mikanda ya papye mpe ya Internet oyo ezali na makomi ya minene. Mikanda na biso mingi oyo ezali na makomi ya minene esalemi mpo na baoyo bamonaka malamu te. Site Internet na biso esalemi mpo ekoka komonana malamu ata ntango moto akómisi makomi na yango minene. Application JW Library epesaka moto nzela ya kokómisa makomi na yango minene to mike.

  • Mpo na kozwa mikanda ebele na ekomeli ya braille, Sololá na Motatoli ya Yehova moko to sɛngá Batatoli ya Yehova báya kotala yo.

  • Na jw.org, zwá mikanda ebele ya makomi minene oyo ezali ndenge moko na oyo ya papye.

Mikanda ya Audio. Tobimisaka audio ya Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na minɔkɔ koleka 200. Longola yango, tobimisaka mpe ba-audio ya mikanda na biso mingi oyo elimbolaka Biblia. Mbala mingi, audio yango ezalaka na maloba oyo elimbolaka bililingi.

  • Landá to zwá audio na jw.org mpe na application JW Library.

  • Na jw.org, zwá ba-fichiers oyo etángaka maloba, na ndakisa, mikanda oyo basalelaka na aparɛyi oyo etángaka maloba mpe audio ya mikanda oyo ezali na Internet.e

Elilingi ya moto oyo azali koloba.

Video oyo ezali na audio oyo elimbolaka bililingi.f Batatoli ya Yehova babimisaka bavideo oyo elimbolaka Biblia, ezalaka mpe na audio oyo elimbolaka bililingi oyo ezali na bavideo yango na minɔkɔ koleka 100. Bavideo yango esalisaka bato bákanga ntina mpe básalela batoli ya ntina mingi oyo ezali na Biblia.

Okoki kolanda mwa ndakisa ya audio oyo ezali na maloba oyo elimbolaka bililingi na bavideo oyo elandi:

  • Ndenge ya kozala na libala ya esengo

  • Biblia ebongolaka bato

  • Moto azali koyema

Makita mpe mayangani. Na mokili mobimba tozali na masangá epai toyanganaka pɔsɔ na pɔsɔ mpo na koyekola mpe kosambela. Mbula na mbula, tobongisaka mpe mayangani ya minene epai toyekolaka Biblia. Na mayangani na biso epai tolakisaka mpe bavideo, tozwaka bibongiseli mpo na bato oyo balingi kolanda bavideo oyo ezali na audio oyo elimbolaka bililingi. Soki likoki ezali, tosimbaka mabɔkɔ ya baoyo bakufá matoi mpe miso, mpo na kosalisa bango bajestɛ mpo bákanga ntina ya makambo oyo ezali kolobama na makita mpe na mayangani na biso. Toyambaka moto nyonso mpe toponaka bilongi te.

  • Luká koyeba esika oyo makita na biso esalemaka.

  • Luká koyeba makambo etali mayangani na biso ya mbula na mbula.

  • Yanganáká na Ekaniseli ya liwa ya Yesu, oyo ezali molulu na biso ya ntina mingi na mbula.

José Luis Ayala afandaka na Mexique. Abotamá matoi ekufá mpe ntango akómaki na mbula 29 miso na ye mpe ekufaki. Luká koyeba ndenge makita na biso esalisaki ye mpe ndenge oyo basalisaki ye mpo akóma moteyi malamu mpenza ya Biblia.

Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na ekomeli ya braille

Biblia ya ekomeli ya braille oyo etángamaka na pɛtɛɛ nyonso ebimisami na minɔkɔ oyo elandi kobanda 01/05/2025:

Chichewa

Néerlandais

Anglais

Français

Géorgien

Allemand

Grecque

Hongrois

Italien

Japonais

Coréen

Portugais (Brésil)

Russe

Espagnol

Ukrainien

a “Moto oyo amonaka malamu te” ezali moto oyo azali na mokakatano ya komona oyo ekoki kosila te mpe oyo esalaka ete azala na likoki te ya kokokisa makambo na ye ya mokolo na mokolo. Na lisolo oyo, ntango tozali kolobela “moto oyo akufá miso” yango esangisi moto oyo akufá mpenza miso mpe moto oyo amonaka malamu te.

b Yehova ezali nkombo mpenza ya Nzambe. (Nzembo 83:18) Talá lisolo “Yehova azali nani?”

c Okoki kosɛnga oyekola Biblia ofele.

d Aparɛyi oyo ezwaka bakopi ezali esaleli moko oyo ezwaka bakopi ya mikanda mpo na kokómisa yango na ekomeli ya bato bakufá miso, ezali na baprogramɛ ya ordinatɛrɛ oyo etángaka na mongongo makasi makambo nyonso oyo ezali na écran. Écran ya aparɛyi yango ebimisaka to mpe ekómisaka madodo mike mpo na kobimisa makomi ya braille. Moto oyo azalaka na aparɛyi yango azalaka na ntina te ya kozala na bakopi ebele ya makomi ya braille.

e Baaparɛyi oyo basalelaka mpo na kotánga mikanda mpe audio ya mikanda oyo ezali na Internet, esalelamaka na baordinatɛrɛ oyo ebimisaka mongongo to maloba oyo basí bakɔtisá. Mayele yango esalisaka mpo na komema na bisika ndenge na ndenge na mokanda moko.

f Maloba oyo elimbolaka bililingi ya video ebakisamaka na video mpo na kolimbola bililingi oyo ezali kobima na écran.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto