Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mrt lisolo 138
  • “Bokoyoka lokito ya bitumba”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bokoyoka lokito ya bitumba”
  • Makambo mosusu
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo Yesu ateyaki
  • Oyo Yesu akosala
  • Bitumba ekosila mokolo nini?​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
  • Mosika te, mokili mozangi bitumba
    Lamuká!—1996
  • Ndenge oyo toyebi ete Armagedona ekómi pene
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Ndenge Nzambe atalelaka bitumba lelo oyo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Makambo mosusu
mrt lisolo 138
Bililingi: Yesu azali kosolola na bayekoli na ye makambo oyo ezali kosalela na ntango na biso. Bililingi mosusu ezali komonisa bitumba na ntango na biso: bibundeli ezali na balabala, milinga ya bombi atomique, mpe basoda bazali kotambola mpe bibundeli mopanzi na bango.

MAKAMBO OYO YESU ATEYAKI

“Bokoyoka lokito ya bitumba”

“Nasali bambula soki 60 na mosala na ngai ya mopanzi-nsango, mpe nalobelá bitumba koleka 40 oyo esalemá na mokili. Namoná mpe matata kati na États-Unis ná Union soviétique, mpe ndenge yango esilaki kaka na mbala moko. Kasi mbula ya nsɔmɔ lokola 2025, natikalá komona te! Ezali kaka te mpo bamboka mingi ezali na matata, kasi mpe ezali komonana polele ete moko ya matata yango ekoki kobongola makambo ya mokili na ndenge oyo etikalá kosalema te.”—John Simpson, mokomi na BBC.

Bato bazali kobanga ndenge bitumba ekómi mingi na mokili. Mingi bazali komituna soki makambo ekobonga lisusu. Yesu ateyaki nini?

Oyo Yesu ateyaki

Yesu asakolaki makambo oyo tozali komona lelo na mokili. Ayebisaki bayekoli na ye: “Bokoyoka lokito ya bitumba mpe bansango ya bitumba.”—Matai 24:6.

Atako bitumba mpe mobulu oyo tozali komona na mokili epesaka biso mpasi, kasi eloko moko ezali kopesa biso elikya. Eloko nini? Yesu ateyaki ete bitumba na mokili, kobeba ya bizaleli ya bato, mpe makambo mosusu ya ndenge wana, ekozala “elembo” oyo ekomonisa ete tokómi na “eleko ya nsuka ya mokili.” (Matai 24:3; Luka 21:7) Yango elakisi ete ezali na mokolo oyo Yesu akosala ete masolo ya bitumba ekóma masolo ya kala. Ndenge nini akosala yango?

Oyo Yesu akosala

Mosika te, Yesu, Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, ‘akosilisa bitumba na mabele mobimba.’—Nzembo 46:9.

Mpo na koyeba makambo mosusu oyo etali kimya na mikolo ezali koya, ndenge yango ekoya, mpe ndenge oyo bomoi ekozala na ntango wana, tángá lisolo “Ndenge bitumba mpe mobulu ekosila.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto