Courtesy Jamie Christiani/Bulletin of the Atomic Scientists
BÓSƐNZƐLAKA!
Likɔnga ya montre ya nsuka ya mokili epusani na 00:00!
Na mokolo ya 27/01/2026, bato ya siansi bapusaki likɔnga ya montre oyo babengaka “Horloge de l’Apocalypse” pene na 00:00. Zero heure ezali komonisa ntango oyo mabele esengeli kobebisama nyonso.
“Lelo oyo, zulunalo Bulletin of the Atomic Scientists Science mpe Security Board epusi likɔnga ya montre ya nsuka ya mokili na 23:58’ 35”, ezali mbala ya liboso ngonga yango epusana makasi bongo.”—Bulletin of the Atomic Scientists.
“Horloge de l’Apocalypse emonisi nyonso polele. Makambo nyonso ezali kobeba se kobeba, boyokani ezali ata moke te na mokili, mpe tozali lisusu na ntango te. Communauté internationale esengeli na lombango nyonso kosɛnga na bakambi na yango bábongisa makambo nokinoki, soki basali yango te, ekozala mpasi—bakoki kobongisa makambo.”—Alexandra Bell, présidente mpe directrice générale, Bulletin of the Atomic Scientists.
Ezali solo ete mokili ekómi na nsuka? Tosengeli kobanga makambo oyo ekoki kosalema na mikolo ezali koya? Biblia elobi nini?
Nini ekoya lobi
Biblia elobi ete ‘mabele ekotikala mpo na libela’ mpe ekozala na bato oyo “bakofanda wana mpo na libela.” (Mosakoli 1:4; Nzembo 37:29) Yango elakisi, bato bakokoka te kobebisama mabele tii bato bázanga esika ya kofanda.
Kasi, Biblia elobeli mpe nsuka ya mokili. Na ndakisa, elobi ete “mokili ezali koleka.”—1 Yoane 2:17.
Mpo na koyeba soki Biblia elingi koloba nini ntango elobeli nsuka ya mokili, tángá lisolo “Nsuka ya mokili ekómi pene? Emoniseli ezali nini?”
Mpo na koyeba oyo Biblia elobi mpo na ntango oyo makambo minene ekosalema na mokili, tángá lisolo “Nsuka ya mokili ekoya ntango nini?”
Kobanga eloko te!
Biblia ekoki kosalisa yo ozala na kimya atako makambo ya mokili oyo ezali kobangisa. Ndenge nini?
Biblia epesi biso batoli ya ntina. (2 Timote 3:16, 17) Na ndakisa, tángá lisolo “Nasala nini mpo namitungisa koleka ndelo te?” mpo na komona ndenge Biblia ekoki kosalisa yo obatela makanisi malamu atako mikakatano.
Biliba epesi biso elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya. (Baroma 15:4) Elobeli polele makambo oyo ezali kosalema sikoyo mpe oyo ekosalema na mikolo ezali koya, mpo na kosalisa biso tólɛmba nzoto te ezala makambo nini ezali kosalema na mokili.
Soki olingi koyeba makambo mingi ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo, meká boyekoli ya Biblia na lisalisi ya moto moko.