LISOLO YA BOMOI
Kosalela Yehova mbula soki 70 na Cuba
NABOTAMÁ na 1947 na esanga kitoko ya Caraïbe na Cuba. Esanga yango ezali esika oyo mai ya mɔtɔ ya nɔrdi ya Mbu ya Caraïbes ná océan Atlantique ekutaná. Nsima ya kobota ngai, baboti na ngai babotaki baleki na ngai mibale ya basi. Biso nyonso mitano tozalaki kofanda na mboka Esmeralda.
Nabosanaka te bomoi ya kimya oyo tozalaki na yango na mboka na biso ya moke. Tozalaki kofanda pene na bandeko na biso mosusu ya libota, na ndakisa batata-mwasi, banɔkɔ, mpe bankɔkɔ. Tozalaki kozanga te eloko ya kolya mpe tozalaki na bomoi ya esengo.
Ntango nakómaki na mbula soki mitano, baboti na ngai babandaki koyekola Biblia ná Walton Jones. Azalaki mosakoli ya molende oyo asengelaki kotambola bangonga soki 10 kaka mpo na koya na mboka na biso. Ntango nyonso oyo azalaki koya, bato mingi ya libota na biso bazalaki kosangana na ndako ya nkɔkɔ na biso mpo na kosolola makambo ya Biblia na Walton na boumeli ya bangonga mingi. Baboti na ngai, nɔkɔ na ngai Pedro, mpe tata-mwasi Ela, basepelaki na makambo oyo bazalaki koyekola mpe eumelaki te bazwaki batisimo mpe bakómaki Batatoli ya Yehova. Sikoyo Ela akokisi mbula pene na 100 mpe azali kokoba na mosala ya mobongisi-nzela na Cuba.
Na ntango wana, Batatoli ya Yehova bazalaki na bonsomi ya kosala losambo na Cuba. Toyebanaki malamu mpo tozalaki kosakola ndako na ndako, mpe komema basakosi oyo etondi na mikanda oyo elimbolaka Biblia. Mpe tozalaki kotambola mingi! Ntango nakanisaka eleko wana, nasepelaka ndenge oyo nasalelaki Yehova na “bantango ya malamu” ya bomoi ya ngai. Kasi “bantango ya mpasi” ezalaki kozela biso.—2 Tim. 4:2.
BANTANGO YA MPASI EYEI
Ntango nakómaki na mbula soki mitano, tata ná nɔkɔ na ngai basalaki mobembo na eteni mosusu ya esanga mpo na kokɔta liyangani. Likambo ya mawa, na mobembo yango, bango mibale babɛlaki typhoïde mpo bazalaki komɛla mai ya pɛto te. Nazali koyeba lisusu ete ntango bazongaki, nsuki ya nɔkɔ ekatanaki kasi akufaki te. Nzokande, tata na ngai akufaki. Azalaki kaka na mbula 32.
Nsima ya liwa ya tata na ngai, mama azwaki ekateli ete libota na biso ekende kofanda epai ya ndeko na ye ya mobali na mboka Lombillo. Yango elakisaki ete tosengelaki kotika bandeko na biso ya libota, ata mpe bankɔkɔ na biso, oyo tozalaki kolinga mingi. Kasi tokobaki kosalela Yehova elongo na libota.
Na mokolo ya 26/08/1957, nazwaki batisimo na mai moko ya moke pene na Lombillo. Nazalaki na mbula 10. Kasi nsima ya kozwa batisimo, elekaki mbula mibale te, bomoi ya Batatoli ya Yehova na Cuba ebongwanaki makasi. Na 1959, Bakoministe bakweisaki guvɛrnema mpe bakómaki koyangela.
Tokómaki sikoyo na nse ya guvɛrnema oyo ezalaki na mposa ya basoda mingi. Yango ezalaki mpasi mpo na basaleli ya Yehova, oyo na mokili mobimba bakɔtaka na makambo ya politiki te mpe na mosala ya soda te. Na yango, mokemoke tobungisaki bonsomi ya kosala losambo oyo tozalaki na yango bambula mingi. Nsukansuka guvɛrnema epekisaki mosala na biso, mpe bankama ya bandeko ya sembo bakɔtaki bolɔkɔ. Mbala mingi bazalaki kobɛta basusu mpe kopimela bango bilei. Na bantango mosusu, bazalaki kopesa bango bilei oyo ezalaki na makila, eloko oyo Biblia epekisi biso kolya.
Atako mikakatano wana, tokobaki koyangana elongo mpo na kosambela Yehova. (Ebr. 10:25) Tozalaki kosala mayangani ata na baferme to na bisika mosusu na ekólo. Nabosanaka te ntango ndeko moko apesaki biso esika na ye ya monene ya kobatela bampate mpo tósala liyangani. Tokokaki te kopɛtola esika yango to ata kobimisa bampate libanda liboso ya kosala liyangani. Na yango, tosalaki liyangani elongo na bampate—bibwele mpe bampate ya elilingi, elingi koloba bandeko!—Mika 2:12.
Tozalaki na botɔndi na mosala makasi ya bandeko mibali oyo basalisaki biso tózwa bilei ya elimo na ntango wana. Na ndakisa, bazalaki kokɔtisa programɛ ya liyangani na bakasɛti mpe na nsima kokabola yango na ekólo. Na bantango mosusu, kaka bandeko mibali mibale nde bazalaki na mokumba ya kobongisa, kosala, mpe kokɔtisa mingongo ya badiskur nyonso ya programɛ. Lokola bandeko yango basengelaki kokɔtisa badiskur yango na kasɛti na kobombana, tozalaki na bantango mosusu koyoka nsoso ezali kolela mpe makelele mosusu. Soki kura ezali te na esika ya liyangani, ndeko mobali moko asengelaki konyata pédale ya velo oyo bakangisi na masini oyo epesaka kura mpo tózwa kura oyo tosengeli na yango. Na ndenge yango tokokaki kobɛtisa kasɛti mpe koyoka programɛ. Tokokaki te kosala mayangani na ndenge oyo ebongi to kozwa mikanda ebele oyo bandeko na biso bazalaki na yango na bikólo mosusu, kasi tozangaki ata moke te bilei ya elimo. Mpe tozalaki mpenza na esengo ya kosalela Yehova elongo.—Neh. 8:10.
KOZALA BABONGISI-NZELA MPE BABOTI
Ntango nakómaki na mbula 18, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza na engumba Florida. Mbula soki moko na nsima, nakómaki mobongisi-nzela monene na engumba Camagüey, engumba-mokonzi ya etúká. Kuna nde nakutanaki na Emilia, ndeko mwasi moko ya kitoko oyo autaki na Santiago ya Cuba. Tolinganaki mpe nsima ya pene na mbula kaka moko, tobalanaki.
(Na lobɔkɔ ya mwasi) Eteyelo ya mosala ya Bokonzi mpo na bankulutu—Camagüey, Cuba, na 1966
(Na lobɔkɔ ya mobali) Na mokolo ya libala na biso, na 1967
Nakómaki kosala mikolo nyonso na moko ya baizini ya sukali ya Leta. Ngai ná Emilia tozalaki lisusu te na likoki ya kozala babongisi-nzela; kasi, tozalaki na mposa ya komipesa mingi na makambo ya elimo. Nazwaki bibongiseli mpo nasalaka na izini yango kobanda 3h00 tii 11h00. Nazalaki kolinga te kolamuka ntɔngɔntɔngɔ, kasi yango esalisaki ngai nasakolaka mbala na mbala mpe nayanganaka na makita nyonso ná Emilia.
Na 1969 mwana na biso ya liboso, Gustavo, abotamaki. Basɛngaki ngai nazongela mosala ya ntango nyonso na zongazonga. Na ntango yango bakɛngɛli mingi ya zongazonga na Cuba bazalaki na bana. Yango ezali moko ya makambo oyo epesaki biso esengo mingi koleka kasi esɛngaki biso mpe makambo mingi na bomoi. Ngai ná Emilia tomonaki ete tozwi libaku kitoko ya kosalela bandeko na biso na lolenge wana. Na boumeli ya mosala na biso ya zongazonga, mwana na biso ya mobali Obed abotamaki, na nsima Abner, mpe mwa bambula na nsima mwana na biso ya mwasi, Mahely abotamaki.
Ntango nakanisaka bambula oyo tolekisi na mosala ya zongazonga, epesaka ngai esengo komona ndenge Yehova apambolaki basaleli na ye na Cuba. Mpe apambolaki mpenza milende na biso lokola baboti mpo na kokolisa bolingo na ye na mitema ya bana na biso. Sikoyo nayebisa bino bomoi oyo ngai ná Emilia tozalaki na yango na mikolo wana ntango tozalaki kosala mosala ya zongazonga.
MOSALA YA ZONGOZONGA NA NTANGO YA EPEKISELI
Na bambula 1960 mpe 1970, tokómaki mpenza komona mikakatano oyo epekiseli ememaki na mosala na biso. Bandako ya Bokonzi ekangamaki. Babenganaki bamisionɛrɛ na ekólo. Bakangaki bandeko mibali mingi ya bilenge mpe batyaki bango na bolɔkɔ. Mpe Betele na Havana ekangamaki.
Na mosala ya zongazonga, na bambula 1990
Tozalaki kotala masangá kaka na nsuka ya pɔsɔ mpo na epekiseli. Na yango tozalaki kotala lisangá mokomoko na pɔsɔ oyo tokómi mpe na pɔsɔ oyo elandi. Tozalaki mbala mingi kosala mobembo na velo mpe na biloko ebele te, mpo ezalaki lolenge oyo eleki malamu ya kobenda likebi ya bato te. Lisusu, tozalaki kotala masangá na kobombana. Tozalaki kosala lokola toyei kotala bandeko ya libota. Kosala bongo ezalaki mpasi te mpo na kotala masangá. Kutu, tokómaki komiyoka lokola tozali na libota mpe tosengelaki kosala keba ete tóbosana te mokano oyo toyei kotala bango. (Mrk. 10:29, 30) Kasi, tosengelaki koboya kobenda likebi. Mbala mingi bapolisi bazalaki kotuna biso mituna. Bakokaki kutu kokanga bandeko oyo bayambi biso soki bayebi ete toyei wana mpo na makambo ya elimo.—Rom. 16:4.
Na eleko yango, tokutanaki na bandeko mingi oyo bamoniselaki biso ezaleli ya koyamba bapaya na ndenge ya kokamwa atako bazalaki na biloko mingi te. Emonanaki ete na bisika mosusu ngungi ezalaki mingi koleka bato, kasi na boboto nyonso baninga bapesaki biso mustikɛrɛ kaka moko oyo bazalaki na yango mpo tólala malamu na butu. Basusu bandimaki koyamba biso atako bazalaki na bilei moke mpenza. Kutu, na bantango mosusu tosengelaki komema bilei na biso mpo na kokabola na baoyo bayambi biso na ndako na bango.
Tokokaki te komema bana na biso nyonso ntango tokei kotala masangá. Na yango tozalaki kosala mobembo kaka na mwana moko mpe bana mosusu bazalaki kotikala na ndako elongo na mama na ngai mpe ndeko na ngai ya mwasi. Na ntango yango, kosala mobembo ná bebe ezalaki kobatela biso. Na libaku moko, bapolisi bazalaki kolukaluka na biloko na biso, kasi tobombaki mikanda na saki ya bakushɛ ya salite ya mwana—esika oyo bapolisi bakokaki kolukaluka te.
Nasepelaka na Emilia mingi mpenza mpo na nyonso oyo asali mpo na kobatela bana mpe kosalisa ngai na boumeli ya bambula na mosala ya ntango nyonso. Mpo na ngai, nakokaki kosala mosala na ngai ya mosuni na izini mpe kokokisa mokumba na ngai ya mokɛngɛli ya zongazonga. Ndenge nini? Na bantango mosusu, nazalaki kolandisa mikolo mibale ya mosala mbala moko to mibale na pɔsɔ, mpo nasala te na nsuka ya pɔsɔ. Kasi na nsima, mokumba na ngai na mosala ya mosuni ebongwanaki. Nakómaki mokambi ya ekipi mpe batyaki ngai nasalaka mikolo 7 na pɔsɔ. Nakokaki te koboya programɛ yango. Kasi namonaki ete kopesa bato ya ekipi na ngai misala ebele na nsuka ya pɔsɔ, ekosala ete bákoba kosala mingi ata soki nakei kotala masangá. Oyo nayebi ezali ete, bakonzi na biso batikalaki koyeba te ete nazalaki koya mosala te na nsuka ya pɔsɔ!
KOBATELA ESENGO NA BANTANGO YA MBONGWANA
Liyangani ya liboso ya etúká nsima ya epekiseli, na 1994
Mokolo moko na 1994, bandeko oyo bazalaki kotambwisa mosala na biso na Cuba babengisaki bakɛngɛli-batamboli nyonso 80 na likita moko ya ntina na Havana. Ezalaki mpenza esengo kokutana lisusu nsima ya bambula wana nyonso! Na likita yango, tolobelaki liboso mwa bambongwana na ebongiseli na biso. Na nsima bapesaki biso liyebisi moko ya kobangisa. Bandeko bayebisaki biso ete bazalaki kobongisa kopesa bankombo na biso epai ya bakonzi ya Leta! Mpo na nini kosala bongo?
Balobaki ete bakutanaki na bakonzi ya Leta mpo na koluka kobongisa boyokani kati na guvɛrnema mpe Batatoli ya Yehova. Na yango bakonzi ya Leta basɛngaki liste ya bankombo ya bakɛngɛli ya zongazonga nyonso. Biso nyonso tondimaki kopesa bankombo. Bandá wana, tokómaki koyokana malamu na bakonzi ya Leta.
Nsukansuka, tokómaki kosala makita mpe kosakola na polele, atako ebongiseli na biso endimamaki naino te na Leta. Na nsima, toyaki koyeba ete bakonzi yango basilaki koyeba bankombo ya bakɛngɛli-batamboli mosusu kasi balingaki kaka tóyebisa bango yango.
Na sanza ya 09/1994, bapesaki biso nzela ya kofungola lisusu Betele. Lokola efungwamaki, tosalelaki kaka bandako oyo ekangamaki na boumeli ya bambula 20.
Na nsima na 1996, babengaki ngai ná Emilia na telefone tókende kosala na Betele. Nakamwaki makasi mpenza, kasi nayebisaki bandeko ete nazali naino na bana mibale oyo nazali kobɔkɔla. Na boboto nyonso bandeko bamityaki na esika na ngai mpe balobaki na nsima ete bazali kaka na mposa tósala na Betele. Tondimaki mpe tomibongisaki mpo na kokende elongo na libota na Havana.
(Na lobɔkɔ ya mwasi) Emilia na departema ya kotonga bilamba na Betele ya Cuba, na ebandeli ya bambula 2000
(Na lobɔkɔ ya mobali) Molulu ya bofungoli Ndako ya liyangani, na 2012
Mpo na koloba solo, na ebandeli nazalaki kosepela kosala na Betele te. Nalekisaki bambula mingi na mosala ya zongazonga, yango wana makanisi mpe motema na ngai ezalaki na teritware. Nazalaki kokoka te kofanda na biro. Kasi bandeko oyo tozalaki na bango na Betele mpe mingimingi mwasi na ngai, Emilia, basalisaki ngai nabongisa makanisi na ngai. Kendekende, nazongelaki esengo na ngai, mpe sikoyo nazali na esengo ya kosala na Betele.
(Na lobɔkɔ ya mwasi) Likita ya kopesa badiplome ya Eteyelo ya Biblia mpo na bandeko oyo babalá, na 2013
(Na lobɔkɔ ya mobali) Komite ya filiale na Cuba, na 2013
Na liyangani moko ya zongazonga elongo na mwana na biso ya mwasi ná mobali na ye
Ngai ná Emilia tozali lisusu bilenge te. Kasi, toyokaka esengo mingi ntango tokanisaka bandeko basi mpe bandeko mibali nyonso oyo tozwi libaku ya koyeba mpe kosala elongo na bango na boumeli ya bambula mingi. Tozali mingimingi na esengo ya komona bana na biso, ata mpe bankɔkɔ na biso, bazali kosalela Yehova. Tomiyokaka lokola ntoma Yoane oyo akómaki mobange, mpe alobaki: “Nazali na esengo monene te koleka oyo: ete nayokaka bazali koloba ete bana na ngai bazali kokoba kotambola na kati ya solo.”—3 Yoa. 4.
Esali sikoyo mbula pene na 30 oyo tozali kosala na Betele, mpe ngai ná Emilia tosalaka makasi ya kokokisa mikumba na biso atako tozali kobundana mokolo na mokolo na maladi ya kanser mpe bobange. Na boumeli ya bambula oyo tolekisi na mosala ya Yehova, tokutani na mikakatano, kasi tosepelaka ndenge oyo tosaleli “Nzambe ya esengo” na boumeli ya mbula soki 70 awa na esanga ya Cuba!—1 Tim. 1:11; Nz. 97:1.