Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w96 1/8 lok. 9
  • ‘Ekuke monene ezipwami mpo na mosala’ na Cuba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Ekuke monene ezipwami mpo na mosala’ na Cuba
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
  • Masolo mosusu
  • Kosalela Yehova mbula soki 70 na Cuba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
w96 1/8 lok. 9

Masoló ya Basakoli ya Bokonzi

‘Ekuke monene ezipwami mpo na mosala’ na Cuba

NTOMA Paulo azalaki mosakoli monene ya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Asalelaki mabaku nyonso mpo na koyebisa basusu bilaka ya Mozalisi oyo bitali bomoi ya seko oyo ekopesama epai na bato ya botosi. Ntango asalaki mobembo na Efese ya kala, Paulo amonaki mabaku mosusu ya sika oyo ekokaki kopesa ye nzela ya kosunga bato mingi koleka. Alobaki ete: “Nakotikala na Efese. . . .  Zambi ekuke monene ezipweli ngai mpo na mosala monene.”​—1 Bakolinti 16:8, 9.

Na Cuba, Batatoli ya Yehova bazwi mpe mabaku ya sika. Atako esakolami naino polele te ete bandimami na Letá, sikawa Batatoli ya Yehova bazali na likoki ya koyebisa elikya na bango ya Biblia epai na bazalani na bango na polele nyonso. Kala mingi te, boyangeli ya Cuba etyaki likebi makasi na kopesáká nzela na mangomba ndenge na ndenge ete másala misala na bango na bonsomi nyonso. Prezidá Castro alobaki liboso ya bato nyonso ete Batatoli ya Yehova bazali lingomba oyo boyangeli ya Cuba ezali na yango na boyokani malamu sikawa.

Libaku wana ya sika ezipweli Batatoli “ekuke monene mpo na mosala.” Na ndakisa, kala mingi te Batatoli ya Yehova bafungolaki biro moko na Cuba, oyo ezali kopesa bango nzela ete bátambwisa mosala na bango ya kosakola na mokili wana. Batatoli koleka 65 000 bazali kosalisa bato ete báyekola mpe básosola Biblia. Bazali kosalela mikanda oyo mikolimbolaka Biblia, na ndakisa bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Bafandi mingi na mboka Cuba oyo balingaka bosembo bazali kozwa matomba na boyekoli ya Biblia elongo na Batatoli ya Yehova.

Batatoli bazali mpe koyangana na makita pɔ́sɔ na pɔ́sɔ na bituluku mike na esanga mobimba. Mbala mosusu basepelaka na libaku malamu ya kosala mayangani minene na bituluku ya bato soko 150. Bazali na botɔ́ndi mpenza mpo na ndingisa oyo bazwi epai na bakonzi ya mboka Cuba, yango epesi bango libaku ya koyangana elongo na bandeko na bango ya elimo, mibali mpe basi, koyembáká nzembo ya masanzoli mpo na Nzambe, mpe kobondeláká elongo.

Kala mingi te Liyangani ya Etúká “Bobangi Nzambe” lisalemaki na bisika bikeseni koleka 1 000 bobele na boumeli ya pɔ́sɔ misato. Lapólo moko emonisaki ete “molɔngɔ́, disipilini mpe kimya” ezalaki mpenza komonana na liyangani mokomoko. Bakonzi ya Letá bapesaki longonya na Batatoli mpo na likambo yango.

Na mokili mobimba, baklisto ya solo bazali kosala milende mpo na kokokisa etindá oyo Nzambe apesi bango ya kosakola nsango ya Bokonzi na ye. Bobele na ntango yango, bazali mpe kosala milende mpo na kobatela boyokani ya kimya elongo na bakonzi ya Letá. (Tito 3:1) Batatoli ya Yehova bazali kolanda toli ya ntoma Paulo, oyo akomaki ete: “Bongo, nazali kolɔmba liboso ete bisɛngɛli mpe mabondeli mpe bilɔmbeli mpe matɔ́ndi mapesama mpo na bato nyonso, mpo na mikonzi nyonso baoyo bazali liboso ete tótambola na bizaleli na kimya mpe na kozanga mobulu kati na losambo na Nzambe mpe na sembo na bozito.”​—1 Timoté 2:1, 2.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto