Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w26 Juin lok. 31
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Masolo mosusu
  • “Elilingi” oyo ezali na ntina mpo na biso
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2019
  • “Elilingi” ya ntina mingi mpo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Kondimana ndenge na ndenge oyo ekangani na mokano na seko na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Zalá na kondima makasi na Bokonzi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
w26 Juin lok. 31

MITUNA YA BATÁNGI

Kondimana nini mibale Paulo alobelaki na Bagalatia 4:24?

Nsima ya kolobela boyokani ya Abrahama ná Sara mpe ná Agare, ntoma Paulo akomaki boye: “Makambo wana ezali elilingi: mpo basi wana balakisi kondimana mibale.” (Gal. 4:​22-24) Liboso, tozalaki koloba ete kondimana yango mibale ezalaki kondimana ya Mibeko mpe kondimana ya sika. Kasi, nsima ya kotalela yango lisusu na mozindo, tomoni ete ndimbola yango esengeli kosembolama. Emonani ete Paulo azalaki kolobela kondimana ya sika te, kasi nde kondimana ya Abrahama. Tótalela mwa makambo oyo emonisi yango.a

Paulo alobelaki Agare, mwana mwasi ya mosala na boyokani na Ngomba Sinai. (Gal. 4:25) Agare alimboli kondimana ya Mibeko oyo epesamaki na Ngomba Sinai na mobu 1513 L.T.B. (Kob. 19:​5, 6) Moto moko te ya kozanga kokoka akokaki kokokisa Mibeko na ndenge ya kokoka, na yango ezalaki kokundwela Bayuda ete bazalaki baombo ya lisumu. Kondimana yango ekokaki kosalisa ekólo Yisraele eyeba Masiya, moto kaka moko oyo asengelaki kokokisa Mibeko na ndenge ya kokoka. Ntango Masiya apesaki bomoi na ye ya kokoka, asalaki ete bato ya kozanga kokoka bálongwa na boombo ya lisumu mpe liwa. (Gal. 3:​19, 24, 25) Ntango kaka Yesu akokisaki mokano ya Nzambe, Mibeko ezalaki lisusu na ntina te.—Rom. 10:4.

Paulo amonisaki bokeseni kati na Agare mpe Sara, “mwasi ya nsomi” oyo abotaki mwana “na nzela ya elaka moko.” (Gal. 4:23) Elaka yango ezalaki kondimana ya Abrahama. (Gal. 3:29; 4:​28, 30) Yango elobelami na mokuse na Ebandeli 22:18 ete: “Na nzela ya libota na yo [ya Abrahama], bikólo nyonso ya mabele ekomizwela lipamboli mpo oyoki mongongo na ngai.”

Kondimana yango oyo esalemaki ná Abrahama ekɔtaki na kati ya elaka oyo Yehova apesaki na Edene. (Eba. 3:15) Emonisaki ete “mwana” to momboto oyo alakamaki akozala mokitani moko ya Abrahama. Paulo alimbolaki ete “mwana” to momboto yango azali komonisa libosoliboso Yesu Kristo. Kasi baoyo bazali “bato ya Kristo,” elingi koloba, bato 144000 oyo bakoyangela elongo na Yesu na Bokonzi na ye, bazali mpe na kati ya mwana to momboto yango ya elilingi. (Gal. 3:​16, 29; Em. 14:​1-3) Kokokisama ya elaka yango ya Nzambe epai ya Abrahama ekomema mapamboli mingi epai ya baoyo bandimaka mpe batosaka Yesu.

Mpo na nini Paulo asalelaki “elilingi” yango? Amonisaki ete soki Bayuda ya mikolo na ye batingami na Mibeko, bakotikala na boombo lokola Agare. Kasi, soki bandimi “mwana” to momboto ya libosoliboso ya Abrahama, elingi koloba Yesu Kristo, bakozala na bonsomi lokola Sara. Balingaki kolongwa mpenza na boombo ya lisumu mpe ya liwa. (Yoa. 8:​32-34) Soki bandimaki Yesu te, balingaki kobungisa mokano mpenza ya kondimana ya Mibeko, elingi koloba, komema bango na Kristo.

Bagalatia mingi oyo Paulo akomelaki bazalaki Bayuda te mpe bazalaki ata moke te na nse ya Mibeko. Bayuda mosusu oyo bakangamaki na bonkɔkɔ na bango bazalaki kotingama ete bato ya bikólo oyo bakómaki bakristo bátosa Mibeko, oyo esangisaki mpe kokatama ngenga. Paulo alobaki ete ekozala bozoba mpo na bango kozonga na “boombo” ya Mibeko oyo basilaki kozwela “bonsomi” ya kokóma bato ya Kristo.—Gal. 5:​1, 10-14.

a Yango esemboli oyo elobamaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/03/2006, nk. 10-12.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto