29/06–05/07/2026
LOYEMBO 131 “Oyo Nzambe akangisi esika moko”
Kobá kokómisa makasi boninga na molongani na yo
“Moninga mosusu akangamaka makasi koleka ndeko.”—MAS. 18:24.
NA MOKUSE
Tokomona ete mpo libala ezala na esengo, mwasi ná mobali basengeli kozala na boninga makasi bango mibale mpe basengeli kolinga Yehova.
1. Mpo na nini baninga malamu bazali likabo oyo euti na Yehova?
BANINGA malamu bazali likabo oyo euti na Yehova. (Yak. 1:17) Balingaka Nzambe, mpe balingaka biso. Bakabolaka esengo na biso, babɔndisaka biso ntango tozali na mawa, mpe bapesaka biso toli na bosembo ntango tosengeli na yango. Batikaka biso te, mpe tokoki kotyela bango motema. Kozala na baninga ya ndenge wana “esepelisaka motema”!—Mas. 27:9.
2. Mpo na nini ezali na ntina ete mwasi ná mobali bákoba kokómisa boninga na bango makasi? (Matai 19:6)
2 Ezali na ntina ete mwasi ná mobali bázala baninga oyo baleki malamu. Basengeli kokanisa te ete soki bazali baninga ekoki bongo; basengeli nde kokoba kosala milende mpo na kokómisa boninga na bango makasi. Soki bazali kokipe boninga na bango te, mokomoko na bango akoki kobanda komiyoka lokola azali kaka ye moko, esengo na bango ekokita, mpe kutu bakoki kokóma nkandankanda. Kasi, soki bazali kokoba kokolisa boninga na bango, bakoki kokóma na boninga makasi koleka oyo bato mibale bakoki kozala na yango. (Tángá Matai 19:6.) Na lisolo oyo, tokomona ndenge oyo baoyo babalá bakoki kokoba kokómisa boninga na bango makasi. Kasi liboso, tótalela naino oyo bakristo oyo bazali minzemba bakoki kosala mpo na kopona molongani oyo akokóma moninga malamu koleka na bomoi na bango.
NDENGE YA KOPONA MOLONGANI OYO AKOZALA MONINGA BOMOI MOBIMBA
3-4. Nini ekosalisa mokristo azwa molongani oyo abongi na ye? (Masese 18:22)
3 Liboso ya kozwa ata ekateli nini ya monene, tosengeli kokanisa mikakatano oyo ekoki kobimisa, matomba oyo tokozwa, mpe nsuka na yango. Lokola bikateli ya minene ekoki kobongola bomoi na biso mobimba, tosengeli kokanisa malamu liboso ya kozwa bikateli ya ndenge wana.
4 Kopona molongani, moto oyo akokóma moninga na biso bomoi mobimba, ezali moko ya bikateli ya minene oyo tokoki kozwa. Lokola Yehova nde atyá ebongiseli ya libala, ebongi mpenza koluka toli na ye mpo na kopona molongani. Alingi ete mobali azwa mwasi ya malamu, mpe alingi ete mwasi azwa mobali ya malamu. Yehova ayebaka ntango nyonso nini eleki malamu mpo na biso. Mitinda oyo ezali na Liloba na ye ekoki kosalisa mokristo azwa moto oyo akozala molongani oyo abongi na ye.
5. Mpo na nini ezali na ntina ete moto oyo tokopona mpo akóma molongani na biso azala moto oyo azwá batisimo?
5 Ntango ozwi batisimo, okómi moninga ya Nzambe. (Nz. 25:14) Yango wana soki olingi kobala, osengeli kopona moto oyo akozala molongani na yo na kati ya baninga ya Yehova. (1 Ko. 7:39) Soki osali bongo, okomonisa ete osepelaka na mibeko ya Yehova mpe okomona molongani na yo lokola lipamboli ya Yehova. (Mas. 19:14) Ekosalisa yo mpe oboya mindɔndɔ oyo ekoki kobima mpo ‘okangani na ekanganeli ya mabe esika moko’ na moto oyo azali mondimi te. (2 Ko. 6:14) Ezali ata moke te likambo ya bwanya kolingana na moto oyo azali Motatoli ya Yehova te, mbala mosusu mpo ozali kokanisa ete na lisangá bakristo oyo babongi na yo bazali mpenza te. Ezali mpe bwanya te kokanisa ete soki olingani na moto oyo azali Motatoli te, mbala mosusu akoyekola solo.
6-7. Mituna nini bato oyo balingani basengeli komituna?
6 Yango elingi koloba te ete moto nyonso oyo azwá batisimo akozala molongani oyo abongi na biso. Na yango, soki osepeli na moto moko, luká koyeba soki akozala molongani oyo abongi na yo.a Omituna boye: ‘Ndenge nini asalelaka bato ya libota na ye makambo? Azalaka na boboto mpe na limemya? Baninga na ye banani? Asalaka nini soki azwani matata na moto? Atingamaka ete makambo esalema kaka ndenge ye alingi, to andimaka makanisi ya basusu soki ebuki mitinda ya Biblia te? Ndenge nini atalelaka mbongo?’
7 Okoki mpe komituna boye: ‘Moninga yango alingaka Yehova makasi? Azali kolata “bomoto ya sika”? Akosalisa ngai nakoba kosalela Yehova mingi koleka? Tozali na mikano ndenge moko ya elimo? Nazali komona ete tokozala kaka baninga malamu to tokoki kokóma baninga oyo bakangani mpenza makasi?’ (Kol. 3:9, 10) Soki ozali ndeko mwasi, omoni ete ndeko mobali oyo olingani na ye akozala moninga malamu mpe mokonzi malamu ya libota? (1 Ko. 11:3) Soki ozali ndeko mobali, ozali komona ete ndeko mwasi oyo olingani na ye akondima kotosa yo lokola mokonzi na ye atako mabunga na yo? Ekosɛnga yo ntango mpo ozwa biyano na mituna yango. Yango wana, salelá eleko oyo bolingani mpo na koyeba malamu moto oyo okobala.
8-9. Nini ekoki kosalisa bato oyo balingani báyeba soki basengeli kokoba to te? (Talá mpe elilingi.)
8 Na eleko oyo bolingani, na ntembe te okozwa ekateli ya bwanya soki oluki koyeba mpenza bomoto ya moto oyo olingani na ye. Luká koyeba soki bato mosusu bakanisaka nini mpo na ye. Okoki kotuna soki ayebani lokola moto ya ndenge nini mpe bizaleli na ye nini. Na ndakisa, ayebani lokola moto ya komikitisa, ya boboto, mpe ya makambo makasimakasi te? Sarah, ndeko mwasi moko na Guyane, oyo abalanaki na ndeko mobali moko na nkombo Daniel, alobi boye: “Nayebaki makambo ya Daniel epai ya ndeko mobali oyo bazalaki kofanda na ye ndako moko mpe azalaki moninga na ye mobongisi-nzela; natunaki mpe nkulutu moko ya lisangá na bango, baninga na biso, mpe bandeko basi ya lisangá na bango.” Na boboto nyonso, okoki kotuna moto oyo olingani na ye soki ezali na eloko moko ya bomoi na ye ya kala to ya sikoyo, oyo osengeli koyeba. Ebongi kotuna motuna yango, mpo na nsima makambo to mimeseno mosusu ekoki kobimisa matata makasi na kati ya libala.
9 Soki ozali na bantembe ya makasi, kolekisa yango kaka boye te, kotya mpe mopanzi mbala moko te makambo oyo baninga oyo bakɔmɛli na elimo bayebisi yo. Soki osali bongo, ekosalisa yo oyeba soki ezali likambo ya bwanya kokoba eleko ya kolingana na ndeko yango, to kokata yango.b Sikoyo, na eteni oyo etikali, tólobela bato oyo babalá.
Ntango olingani na moto, luká koyeba mpenza bomoto na ye (Talá paragrafe 8-9)
KOLEKISA NTANGO ELONGO EKOKÓMISA BONINGA MAKASI
10. Mpo na nini ebongi mwasi ná mobali bálekisaka ntango elongo mpe bátyelanaka likebi?
10 Soki mwasi ná mobali bazali kolekisa ntango elongo ata soki bazalaka na makambo mingi ya kosala, bakoki kokoba kokómisa makasi boninga na bango mpe libala na bango ekozala malamu. Kolekisa ntango elongo ekopesa bango libaku ya kosolola makambo oyo elekaki na mokolo, koyebisana makanisi mpe mayoki na bango ya kati mpenza, komoniselana bolingo, to kaka kosɛka elongo.
11. Nini ekoki kobebisa boninga kati na mwasi ná mobali?
11 Mwasi ná mobali oyo bazali na boninga makasi basepelaka mpenza kozala esika moko. Ya solo, na bantango mosusu bakoki kozala esika moko te mpo na mwa ntango. Kasi, kozala mosika na molongani ntango molai ekoki kozala likama mpo na libala. Na ndakisa, bandeko mosusu bandimá kokende kosala na ekólo mosusu, mpe bazalaka mosika na mabota na bango na boumeli ya ntango molai. Kosala mibembo ya ndenge wana ekoki kopesa mwa mbongo, kasi kozala mosika na molongani ekoki mpenza kobebisa libala.
12-13. (a) Bakristo mosusu oyo babalá basali nini mpo bálekisaka ntango na balongani na bango? (Talá mpe elilingi.) (b) Boyokani na biso na molongani na biso esengeli kozala na esika nini? (Talá etanda “Esika ya molongani na yo na bomoi na yo.”)
12 Talá makambo oyo babalani mosusu basali mpo bálekisaka ntango elongo mbala na mbala. Leah, na Guam, alobi boye: “Ngai ná mobali na ngai tosepelaka kosala makambo ndenge na ndenge elongo. Ezalaka mpasi ete moko na biso atikala, bongo mosusu akei fɛti moko to abimi kozwa mopɛpɛ elongo na baninga.” Roxanne, na États-Unis, alobi boye: “Lokola tokómi na makambo mingi ya kosala, tomonaki ete tosengeli kokɔtisa ntango oyo tokolekisa elongo na kati ya programɛ na biso, kaka ndenge tosalaka na makambo mosusu ya ntina.” (Talá mpe Amose 3:3.) Damien, oyo afandaka na France, alobi boye: “Toyekoli kosepela mpe ata kosala makambo oyo moninga alingaka mingi.” (Mat. 7:12) Mpe Katie, oyo afandaka mpe na États-Unis, alobi boye: “Na bantango mosusu totikaka batelefone na biso mosika mpo tózala kaka biso mibale.”
13 Koleka nyonso, bólekisaka ntango elongo na makambo ya elimo. Myriam, oyo afandaka na France, alobi boye: “Totángaka Biblia elongo ntɔngɔ nyonso, mpe na nsima tolobelaka makambo oyo tosepeli na yango mpe oyo tokoki kosalela na bomoi na biso. Nasepelaka na ntango yango mingi.” Abakisi boye: “Nasepelaka mpe ntango tobondelaka, mpe nayokaka ndenge mobali na ngai alingaka mingi Yehova.” Katie, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Tosepelaka mingi ntango tozali na mosala ya kosakola elongo. Koyoka ndenge moninga azali kolobela kondima na ye epesaka mokomoko na biso makasi, mpe tokobaka koyekola makambo ya sika epai ya moninga.”—Mas. 27:17.
Bólekisaka ntango elongo mpo bókómisa boninga na bino makasi (Talá paragrafe 12-13)
BÓKANGANA MAKASI NTANGO MIKAKATANO EBIMI
14-15. Mpo na nini babalani basengeli kosala makasi básilisa matata oyo ebimi na libala? Pesá ndakisa.
14 Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, mwasi ná mobali bakozanga mikakatano te na libala na bango. Biblia mpe endimi ete bato oyo babalá bakozala na “bolɔzi na mosuni na bango.” (1 Ko. 7:28, msl.) Nɔti ya boyekoli na vɛrsɛ yango elobi ete maloba yango “emonisaka matata mpe mikakatano oyo bato oyo babalá bakutanaka na yango.” Ntango matata ebimi, mpo na nini basengeli kosala nyonso básilisa yango mpe bákangama kaka elongo?
15 Tózwa ndakisa ya ndako moko oyo ekendá nsango to liyemi moko ya ntina mingi. Soki ebebi, na ntembe te bankolo na yango bakoluka kobongisa yango. Bakoki kotya mbongo ebele mpe biloko mosusu na mosala ya kobongisa yango, mpe mosala yango ekoki koumela bambula ebele. Mpo na nini bakosala milende yango? Mpo ndako to liyemi yango ezali na motuya na miso na bango. Ndenge moko mpe, mabala nyonso ezali na motuya. Ata na mabala oyo eleki malamu, matata ekobima kaka. Kasi, kaka ndenge tokoki kobongisa ndako to liyemi oyo ebebi, libala ya matata mpe ekoki kobonga. Mpe na ntembe te kobongisa yango ekosɛnga ntango mpe mwa mosala makasi, kasi Yehova akosepela soki mwasi ná mobali basali makasi mpo na kobongisa libala na bango mpe kotikala elongo. (Mal. 2:16) Soki basali bongo, bakomonisa bolingo mpe limemya, kaka epai na bango moko te kasi mpe epai ya Yehova, Mobandisi ya libala.
16. Na kotalela 1 Bakorinti 13:4-8a, nini ekoki kosalisa babalani oyo bazali na matata makasi na libala na bango? (Talá mpe elilingi ná etanda “Lisalisi mpo na kokómisa boninga na bino makasi.”)
16 Soki matata ebimi na libala na yo, kokanisa mbala moko te kokabwana na molongani na yo. (1 Ko. 7:10, 11) Kasi, omituna boye: ‘Nakoki kosala nini mpo tókóma na boninga makasi na libala na biso?’ Talelá lisusu makambo oyo Biblia elobi na oyo etali komonisa bolingo, mpe omituna ndenge oyo okoki komonisa bizaleli oyo emonisaka ndenge bolingo ezalaka oyo ezali na 1 Bakorinti 13:4-8a. (Tángá.) Na esika oluka ndenge ya koboma libala, salá makasi oluka ndenge ya kozongisa motema epai ya molongani na yo. Tyá makanisi na makambo oyo yo okoki kosala mpo na kobongisa boyokani na bino. Bondelá Yehova mpo atambwisa yo. Salá bolukiluki na mikanda na biso mpe na bavideo, mpe tuná toli epai ya bankulutu mpe bakristo mosusu oyo bakɔmɛli. Soki otye motema epai ya Yehova, nsinga ya misato mpe oyo eleki makasi na kati ya “bansinga misato,” libala na bino ‘ekokatana nokinoki te.’—Mos. 4:12.
Bókangama makasi ntango matata ebimi na libala (Talá paragrafe 16)
17. Baoyo bazali kokana kobala mpe baoyo babalá bakoki kosala nini mpo bázala na esengo?
17 Yehova alingi ete basaleli na ye nyonso bázala na esengo, ezala baoyo bazali kokana kobala to baoyo basili kobala. Soki ozali monzemba mpe ozali na likanisi ya kobala, poná malamu moto oyo akozala moninga na yo bomoi mobimba. Mpe soki obalá, kobá kokómisa makasi boninga na molongani na yo. Bósalaka makasi bósilisa matata oyo ekoki kobima na libala; bósɛnga Yehova asalisa bino. Soki ozali kosala bongo, ‘okosepela na bomoi’ elongo na molongani na yo ya bolingo!—Mos. 9:9.
LOYEMBO 132 Sikoyo tokómi moto moko
a Mituna oyo elandi etali mibali mpe basi.
b Mpo na kozwa makanisi na oyo etali koyebana, talá lisolo “Ndenge ya kosala mpo eleko oyo bolingani esalisa mpenza” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 05/2024, na motó ya likambo moke “Bóyekola koyebana malamu.”