LIKANISI MPO NA KOYEKOLA
Ndenge ya kokanga ntina ya maloba ya elilingi oyo ezali na Biblia
Biblia ezali na maloba ebele ya elilingi. Kasi, bato mingi oyo batángaka Biblia bazalaka na mokakatano ya kokanga ntina ya maloba yango. (Mat. 13:13) Nini ekoki kosalisa yo oyeba malamu ndimbola ya maloba ya elilingi oyo Biblia esaleli? Salelá makanisi oyo elandi:
Luká koyeba nini lisolo ezali kolobela mpe elilingi oyo basaleli. Maloba ya elilingi ekokanisaka lisolo na elilingi. Na ndakisa, Emoniseli 3:3 ekokanisi koya ya Yesu (lisolo) na koya ya moyibi (elilingi).
Luká koyeba ndenge oyo lisolo ná elilingi ekokani. Luká koyeba biloko mpe bizaleli oyo ekokanisi lisolo na elilingi.
Omindimisa ete ozwi liteya oyo ezali na elilingi. Bokokani mosusu oyo ezali kati na lisolo mpe elilingi ekoki kosala ete moto akanga ntina malamu te. Na ndakisa oyo tolobelaki, Yesu azali koya te mpo na koyiba. Kasi, bavɛrsɛ oyo ezali pembeni emonisi ete koya na ye ekozala lokola oyo ya moyibi na ndenge ete ekozala ya mbalakaka mpe kozanga kolaka.