LISOLO YA BOMOI
Yehova ateyi ngai banda bolenge na ngai
NAZALAKI kotala eteni ya papye oyo ndeko moko apesaki ngai. Na papye yango bakomaki: “David Splane, 08/04/1953: ‘Yebisá bato ete nsuka ya mokili ekómi pene.’” Natunaki ye: “Ezali nini?” Ndeko yango alobaki: “Ezali diskur oyo okosala na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi.”a Nalobaki na ye: “Nakomisaki nkombo te!”
Kasi, nabanda lisolo na ngai na ebandeli. Nabotamá na ntango ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, na Calgary, na Canada. Na nsuka ya bambula ya 1940, Donald Fraser, oyo azalaki elenge mpe mobongisi-nzela, ayaki koteya libota na biso mpe Mama andimaki koyekola Biblia. Mama asepelaki makasi na solo, kasi mikakatano makasi ya kolɔngɔnɔ ya nzoto na ye epesaki ye nzela te ya komipesa mingi na makambo ya lisangá. Atako bongo, azwaki batisimo na 1950. Likambo ya mawa, ekokaki mbula mibale te, akufaki. Na ntango yango, Papa azalaki Motatoli ya Yehova te, kasi andimaki bandeko bátambwisa makambo nyonso mpo na kokunda mama.
Mwa mikolo nsima ya kokunda mama, ndeko mwasi moko ya mokóló, Alice, oyo azalaki mokristo oyo atyami mafuta na elimo, abengisaki ngai na makita. Ayebaki ngai mpo nazalaki kokende na makita ya nsuka ya pɔsɔ elongo na mama soki azwi makasi ya kokende. Nasɛngaki papa nzela. Andimaki nakende mpe alobaki ete akoya elongo na ngai “mbala moko kaka” mpo na kopesa matɔndi epai ya ndeko oyo asalaki diskur ya bokundi mama. Mokolo yango, ezalaki mokolo ya likita Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe Likita ya Mosala. Yango ezalaki likita ya liboso ya papa oyo ebongisamaki mpenza mpo na ye. Lokola ayekolá na kelasi ndenge ya koloba na miso ya bato, akamwaki mpenza ndenge oyo bandeko bazalaki kosala masolo na makita. Papa azwaki ekateli ya koyangana na likita yango pɔsɔ nyonso. Mokemoke, akómaki mpe koyangana na makita mosusu.
Na ntango wana, mokɛngɛli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi azalaki kobanda likita na kotánga na mongongo makasi bankombo ya bandeko oyo bakomisi nkombo mpo na kosala masolo, mpe mokomoko azalaki koyanola: “Nazali.” Mokolo moko, nasɛngaki mokɛngɛli atánga mpe nkombo na ngai na likita oyo ekolanda. Ndeko yango apesaki ngai longonya na esengo, kasi nayebaki te mpo na nini.
Nakanisaki ata moke te ete napesaki nde nkombo mpo nabanda kosala badiskur na eteyelo, nalingaki kaka bátánga mpe nkombo na ngai na mongongo makasi! Pɔsɔ oyo elandaki, batángaki nkombo na ngai mpe nayanolaki na esengo nyonso ete: “Nazali.” Nsima ya likita, bandeko mingi bapesaki ngai longonya. Bapɔsɔ ebele na nsima bapesaki ngai diskur, ndenge namonisaki yango na ebandeli.
Nabulunganaki! Na ntango wana, bana-kelasi bazalaki kosala badiskur ya miniti 8. Botángi ya Biblia mpamba ezalaki te. Papa asalisaki ngai mpo na kobongisa diskur yango mpe asɛngaki ngai nazongela yango mbala 20 liboso ete nasala yango na lisangá. Na nsima, mokɛngɛli apesaki ngai batoli ya malamu. Na boumeli ya bambula, Yehova ateyi ngai na nzela ya papa na ngai, ya bandeko mibali ná bandeko basi ya makoki, mpe na nzela ya ebongiseli na Ye.
FORMASYO EKOBI
Alice, oyo nalobelaki liboso, apesaki ngai formasyo ntango nabandaki mosala ya kosakola. Na ntango wana, bazalaki kolendisa biso tótángela moto vɛrsɛ misato mpe na nsima tópesa ye buku. Ntango ekómaki ngala na ngai ya koloba na porte moko, Alice azalaki kopesa nkombo na ye, kobanda lisolo, mpe na nsima kosɛnga ngai natánga vɛrsɛ ya liboso. Na nsima, ngai nde nazalaki kokoba lisolo, kotánga vɛrsɛ ya mibale mpe ya misato, mpe kopesa moto mokanda. Kendekende, ngai moko nayekolaki ndenge ya kobanda lisolo. Ntango papa na ngai azwaki batisimo na nsuka ya mbula 1954, akobaki kopesa ngai formasyo na mosala ya kosakola. Lokola mama azalaki te, asalaki oyo akokaki mpo na kobɔkɔla ngai na kati ya solo. Azalaki kosala masɛki te na oyo etali makita mpe mosala ya kosakola. Nayebaki ntango nyonso nini oyo tokosala na mpokwa ya mokolo ya makita mpe na ntɔngɔ ya mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo.
Nazalaki te na kati ya bana mayele na kelasi; kasi makambo mosusu oyo nayekolá na boumeli ya mbula 12 na kelasi esalisi ngai bomoi na ngai mobimba. Na ndakisa, nayekolaki kosala kalkile mpe makambo mingi oyo etali gramɛrɛ ya Anglais. Makambo ya Anglais mpe ya kokoma oyo nayekolá na kelasi esalisaka ngai na mokumba oyo nazali na yango lelo na Departema ya Bokomi.
Mbala mingi bato batunaka ngai mpo na nini nasepelaka na miziki. Baboti na ngai bazalaki kosepela na miziki. Ntango nazalaki na mbula 7, nayekolaki mwa moke kobɛta piano, kasi molakisi amonaki ete nazali mpenza na makoki te mpo na koyekola yango. Na yango ayebisaki papa ete natika koyekola. Sikoyo nayebi ete, na ntango yango nazalaki na mposa ya koyekola yango te.
Mwa basanza na nsima, papa azwelaki ngai molakisi mosusu. Na mbala yango, nayekolaki kobɛta piano mpe koyemba, mpe nalongaki. Ntango nazalaki koyemba na bomwana, nazalaki na mongongo kitoko mpe nalongaki na mimekano mosusu ya koyemba. Nazalaki koyekola miziki na mokano ya kozwa diplome oyo ekosalisa ngai nakóma molakisi ya miziki mpe nazwa mbongo oyo ekosalisa ngai na mosala ya ntango nyonso. Kasi, liboso nasilisa kotánga miziki, namonaki ete ekosɛnga ntango mingi mpo na koyekola makambo ya miziki liboso ya kosala baekzamɛ, na ndakisa koyokanisa banɔti, lisolo ya miziki, mpe kokoma banzembo. Yango wana nakataki kelasi mpe nakómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Ezalaki na 1963.
MOSALA YA MOBONGISI-NZELA EPESAKA ESENGO
Nsima ya mbula moko, batindaki ngai mobongisi-nzela monene na Kapuskasing, na Ontario. Daniel Sinner, moninga na ngai na mosala ya mobongisi-nzela azalaki mokóló na ngai, mbula na ngai mbala mibale. Ateyaki ngai ndenge makambo etambwisamaka na lisangá. Batyaki ngai na Komite ya Mosala na lisangá ntango nazalaki na mbula 20; na yango nazalaki na makambo mingi ya koyekola. Nazali na esengo ndenge ebongiseli na biso ezali kobɛta nsɛtɛ na likambo etali kopesa bilenge mibali formasyo. Soki bilenge basali makasi, Yehova akoki kosalela bango mingi ata na bolenge mpenza!
Kofanda na Kapuskasing ezalaki pɛtɛɛ te. Na eleko ya malili, malili ekómaka na -44, to soki malili ekiti ekómaka nde -33. Ngai ná Dan tozalaki mbala mingi kotambola makolo. Kasi, moko ya makambo mingi ya malamu na mokumba yango ezalaki ndenge nakutanaki na ndeko mwasi moko na nkombo Linda Cole, oyo na nsima akómaki Linda Splane.
Linda azalaki mosakoli ya molende mpe azalaki na bato mingi ya kozongela na mosala ya kosakola. Azalaki mokabi, boboto, mpe kosolola malamu na bato. Mama na ye, Goldie, azalaki ndeko mwasi moko ya sembo. Na ebandeli, papa na ye, Allen, azalaki kosepela na solo te. Atako botɛmɛli ya Allen, Goldie azalaki mbala na mbala komema Linda ná bandeko na ye ya mibali, John ná Gordon, na Ndako ya Bokonzi mpe na mosala ya kosakola. Na eleko moko boye, Goldie, Linda, John, mpe Gordon bango nyonso bakómaki babongisi-nzela. Bambula na nsima, Allen andimaki solo mpe amipesaki mingi na makambo ya lisangá.
Na 1965, babengaki ngai na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi oyo ezalaki koumela sanza moko na Betele ya Canada mpo na kozwa lisusu formasyo. Na eteyelo yango, basɛngaki ngai natondisa formilɛrɛ mpo na kokɔta eteyelo ya Gileade. Nakanisaki ata mokolo moko te kokóma misionɛrɛ; natikalá kokanisa te ete nazali na makoki ya kosala yango, kasi nandimaki kotondisa formilɛrɛ. Babengaki ngai na kelasi ya mbala ya 42. Na Gileade, mbala mingi balakisi bazalaki kopesa biso balapolo ya makambo oyo tozali kosala. Na lapolo ya liboso oyo nazwaki, balendisaki ngai nayekola nyonso oyo nakoki na oyo etali ebongiseli ya Yehova ntango oyo nazali na kelasi yango. Toli yango ebongaki mpenza mpo na ngai elenge ya mbula 21.
Moko ya makambo oyo nayekolaki na Gileade etalaki ndenge ya kosalela radio, televizyo mpe bazulunalo. Nasepelaki mingi koyekola makambo yango. Nayebaki te ete ekosalisa ngai na nsima, nakolobela yango nsima.
BATINDI NGAI NA SÉNÉGAL
Mwa mikolo moke nsima ya kozwa badiplome, ngai ná Michael Höhle, moninga na ngai na mosala ya misionɛrɛ tokendaki esika batindaki biso na Sénégal, na Afrika. Na ntango yango, basakoli bazalaki soki 100 na ekólo yango.
Nsima ya kosala na teritware basanza ebele, babengaki ngai mpo na kosala na Betele mokolo moko na kati ya pɔsɔ. Betele yango ezalaki kaka shambre moko na ndako moko ya bamisionɛrɛ. Atako ezalaki monene te, Emmanuel Paterakis, oyo azalaki mokɛngɛli ya filiale, azalaki kokundwela ngai ntango nyonso ete filiale yango ezalaki komonisa ebongiseli ya Yehova na ekólo. Mokolo moko, Ndeko Paterakis azwaki ekateli ete tókomela bamisionɛrɛ mikanda mpo na kolendisa bango. Na ntango wana, kosala bakopi ya mikanda ezalaki pɛtɛɛ te mpe ezalaki ntalo mpenza; na yango tobɛtaki mokanda yango mokomoko na masini. Ezalaki mosala makasi, mingimingi tosengelaki kokeba ete tósala ata mbeba moko te!
Wana nazalaki komibongisa mpo na kozonga na ndako na biso ya bamisionɛrɛ na mpokwa wana, Ndeko Paterakis apesaki ngai anvelɔpɛ moko. Alobaki: “David, la Société ekomeli yo.” Ntango nafungolaki anvelɔpɛ yango na nsima, namonaki moko ya mikanda oyo nakomaki. Likambo yango eteyaki ngai kozala na limemya mpo na ebongiseli ya Nzambe kozanga kotala monene to moke ya esika oyo makambo ezali kosalema.
Elongo na bamisionɛrɛ mosusu na Sénégal, na 1967
Nakómaki na baninga mingi na lisangá, nazalaki kolekisa ntango na mabota ya bandeko na mokolo ya pɔsɔ na bampokwa. Ezalaki bantango ya esengo mpenza! Tii lelo tosololaka na bango. Mpe nasalelaka Français oyo nayekolá kuna ntango nakei kotala Babetele na mokili mobimba.
Na 1968, ngai ná Linda tokómaki bafianse. Na boumeli ya basanza mingi, nalukaki mosala ya mikolo moke na pɔsɔ mpo ngai ná Linda tózala babongisi-nzela elongo na Sénégal, kasi bapatrɔ bazalaki kolinga kozwa kaka bana-mboka na esika ya bapaya. Nsukansuka, nsima ya kozonga na Canada, tobalanaki mpe batindaki biso babongisi-nzela monene na Edmundston, na New Brunswick, engumba moko moke na ndelo ya etúká ya Québec.
Na mokolo ya libala na biso, na 1969
MOSALA YA MOBONGISI-NZELA NA NEW BRUNSWICK MPE NA QUÉBEC
Basakoli bazalaki te na engumba yango mpe bayekoli ya Biblia bazalaki moke. Lingomba ya Katolike ezalaki kotambwisa bato na makambo mingi ya bomoi. Na bandako mingi okomona bakomi, Batatoli ya Yehova awa te. Na ntango wana, tozalaki mpenza kokipe bilembo yango te ndenge ekómá lelo, tozalaki kokende na ndako nyonso ezala bakomi bongo to te. Pɔsɔ nyonso, ebongiseli moko ya Katolike ezalaki kokoma na zulunalo ya mboka ete: “Tóluka bandɔki, Batatoli ya Yehova.” “Bandɔki” yango bazalaki kaka minei na engumba: Victor ná Velda Norberg mpe ngai ná Linda—na yango toyebaki ete bazalaki koloba na biso!
Nabosanaka te mbala ya liboso oyo mokɛngɛli ya zongazonga ayaki kotala biso. Nsima ya kolekisa pɔsɔ elongo na biso, alobaki: “Mbala mosusu likambo ya malamu oyo bokoki kosala awa ezali kaka ya kosalisa bato bátika kokanisela Batatoli ya Yehova mabe.” Banda wana, yango ekómaki mokano na biso, mpe ebotaki mbuma! Mokemoke, bato bakómaki komona ete Batatoli ya Yehova bazalaka na komikitisa, bakeseni na bakonzi ya mangomba ya Katolike, oyo bazali bato ya lolendo. Lelo, ezali na lisangá moko ya moke na engumba yango.
Nsima ya kosala soki mbula moko na teritware yango ya mosika, babengaki biso tókende kopesa mabɔkɔ na lisangá moko ya monene na Engumba Québec. Tosalaki kuna sanza motoba elongo na bandeko oyo bayebaki mpenza koyamba bapaya, na nsima batindaki biso na mosala ya zongazonga.
Na bambula 14 oyo elandaki, tosalaki na bazongazonga ya etúká ya Québec. Tozalaki kosepela mpenza. Mosala na Québec ezalaki kobota mbuma mpenza, mpe na masangá mingi, tozalaki kokuta bato ebele ya libota moko bazali kokola elongo mpo na kozwa batisimo!
TOBOSANI TE BANDEKO OYO BASALAKA MOSALA MAKASI
Bandeko ya eteni ya Canada epai balobaka Français bazalaka na boboto mpenza. Balobaka makambo polele, bazali bato ya esengo mpe ya nsai. Kasi, ezalaki ntango nyonso pɛtɛɛ te mpo na bango kondima solo, mpe botɛmɛli ezalaki mingi na kati ya mabota. Bilenge mosusu mpenza, baboti na bango oyo bazalaki bandimi te bazwelaki bango ekateli oyo: “Soki otiki koyekola Biblia te na Batatoli ya Yehova, okolongwa na ndako!” Mingi mpenza, to mpe bango nyonso, bakutanaki na likambo yango. Na ntembe te Yehova asepelaki na bango mingi!
Sikoyo, nalingi nalobela babongisi-nzela ya sembo oyo basalaki na Québec na bambula wana. Mingi bautaki na bisika mosusu ya Canada. Bayekolaki Français, bayekolaki mpe mimeseno ya mboka mpe ndenge bato batalelaka makambo, oyo mingi eutaki na mimeseno ya Lingomba ya Katolike.
Mbala mingi bazalaki kotinda babongisi-nzela monene na bateritware ya mosika epai basakoli bazalaki te. Lokola bato bazalaki na makanisi ya mabe, ezalaki mpasi babongisi-nzela yango bázwa ndako ya kofutela, mpe mpasi koleka mpo na kozwa mosala ya mikolo moke. Ata bato oyo bauti kobalana sika bazalaki kofanda na etuluku ya bato 4, 6, to 8 mpo bákoka kofuta ndako. Bazalaki na makoki te ya kozwa ndako mpo na bango moko. Babongisi-nzela yango ya molende basalaki mosala makasi. Ntango babandi koyekola na moto, bazalaki kotyela ye likebi nyonso. Sikoyo lokola Québec ekómi na basakoli ebele, mingi ya babongisi-nzela yango bakendá na bisika oyo mposa ezali mingi.
Ntango tozalaki na mosala ya zongazonga, mbala mingi tozalaki kosala makasi tóbima na bilenge na mosala ya kosakola mokolo ya pɔsɔ na ntɔngɔ. Yango ezalaki kosalisa biso tóyeba mikakatano oyo bazalaki kokutana na yango. Bilenge mosusu oyo tozalaki kosakola na bango bazali lelo kosala na bikólo mosusu lokola bamisionɛrɛ to na mikumba mosusu.
Na ntango wana, masangá mosusu ezalaki na makoki te ya kozongisela biso mbongo oyo tosaleli mpo na koya epai na bango; na yango na bantango mosusu mbongo na biso ezalaki kosila liboso tókóma na nsuka ya sanza. Na bantango yango, tozalaki kotyela Yehova motema mobimba, mpo kaka ye nde ayebaki bamposa na biso. Asundolaki biso ata mbala moko te. Na lolenge moko boye, azalaki ntango nyonso kosalisa biso tókende na lisangá oyo elandi.
MATEYA OYO NAZWAKI EPAI YA BANDEKO YA SEMBO
Ndenge namonisaki yango, nasepelaki mingi na liteya oyo tozwaki na Gileade na oyo etali kosolola na bapanzi-nsango. Na mikolo yango na Québec, tozalaki na mabaku mingi ya kopesa litatoli na radio, na televizyo, to na bazulunalo. Mbala mingi bazalaki kotinda ngai nasala elongo na Léonce Crépeault, oyo azalaki mpe mokɛngɛli-motamboli mpe azalaki na mokumba ya kolandela makambo etali bapanzi-nsango. Soki akei kokutana na moto moko monene na makambo etali kopanza bansango, na esika abimisa mayele na ye, azalaki nde koloba: “Ngai ná moninga na ngai tozali kaka basakoli. Toyebi makambo mingi te na mosala ya bapanzi-nsango. Kasi basɛngi biso tósalisa bato báyeba ete Batatoli ya Yehova bakosala liyangani moko monene. Soki ozali na likanisi oyo ekoki kosalisa biso, tokosepela mingi.” Kosala makambo na komikitisa ndenge wana ezalaki kosala ete bapanzi-nsango mingi bándima kosalisa biso.
Na nsima, biro ya filiale etindaki ngai nasala na Ndeko Glen How, moko ya baavoka ya ebongiseli na biso, na makambo ya ntina mingi oyo ekokaki kobenda likebi ya bapanzi-nsango. Makambo oyo nayekolaki na Gileade mpe epai ya Léonce esalisaki ngai mingi. Ezalaki libaku malamu mpenza kosala elongo na Ndeko How. Azalaki kobanga te ntango azali kosala makambo etali mibeko, kasi libosoliboso azalaki moto ya Nzambe. Alingaki Yehova mingi mpenza.
Na 1985, batindaki biso na zongazonga oyo ezalaki pembeni ya esika oyo papa na ngai azalaki kofanda, na wɛsti ya Canada, mpe yango epesaki biso nzela ya kosalisa ye. Akufaki nsima ya sanza misato. Tokobaki kosala na bazongazonga oyo ezalaki na wɛsti ya Canada tii na 1989 ntango tokamwaki ndenge babengaki biso tókende kosala na Betele ya États-Unis. Yango elimbolaki kotika mosala ya mokɛngɛli-motamboli nsima ya mbula pene na 19. Na bambula yango, tofandaki na bankama ya bandako mpe tolyaki epai ya bankóto ya bandeko. Tozali na botɔndi mingi epai ya baoyo nyonso bayambaki biso epai na bango mpe baleisaki biso!
TOKEI NA ÉTATS-UNIS
Ntango tokómaki na Brooklyn, batyaki ngai na Departema ya Mosala. Nakobosana ata moke te formasyo malamu oyo nazwaki kuna. Moko ya makambo oyo nayekolaki ezalaki ya koluka koyeba bosolo ya makambo mpe kokanisa mbala moko te ete oyebi ndenge likambo ezali. Na nsima, na 1998, batindaki ngai na Departema ya Bokomi, esika nazali tii lelo koyekola ndenge ya kokoma. Na boumeli ya basanza mingi, nazwaki libaku ya kosala lokola mosungi ya Ndeko John Barr, oyo azalaki mokɛngɛli na Komite ya Bokomi. Nasalelaka tii lelo formasyo oyo nazwaki epai na ye mpe nabosanaka te ntango oyo nalekisaki elongo na ye. Azalaki na bizaleli malamu ya bokristo.
Elongo na John ná Mildred Barr
Ezali mpenza esengo kosala elongo na bandeko mibali mpe bandeko basi ya komikitisa oyo basalaka na Departema ya Bokomi. Liboso bábanda mosala na bango, basalaka libondeli mpe bayebi ete mosala nyonso ya malamu oyo basali ezalaka na lisalisi ya elimo ya Yehova, kasi te na mayele na bango moko.
Azali kokamba korale ya Watchtower na likita ya nsuka mbula na 2009
Azali kokabola Babiblia na liyangani oyo esangisi mikili mingi na 2014 na Séoul, Corée
Ngai ná Linda tozwá libaku ya kokende kotala bandeko na bikólo 110. Tomoni na miso bolingo ya bamisionɛrɛ, ya bandeko ya Bakomite ya filiale, mpe basaleli mosusu ya ntango nyonso. Ezali mpe lipamboli mpenza komona molende mpe bosembo ya basakoli ya masangá, oyo bazali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso atako bitumba, mikakatano ya mbongo, mpe monyoko. Na ntembe te Yehova alingaka bango mingi!
Na boumeli ya bambula, Linda asalisi ngai mingi mpenza mpo nakokisa mikumba ndenge na ndenge. Alukaka ntango nyonso ndenge ya kosalisa basusu. Ayebi mpe malamu ndenge ya kobanda masolo. Asalisi bato ebele báya na solo, ata mpe bandeko oyo balɛmbaki na elimo. Linda azali mpenza likabo oyo euti na Yehova! Awa tozali kokóma mibange, tozali kopesa matɔndi mingi na bilenge mibali mpe basi oyo basalisaki biso na mosala ya zongazonga mpe na makambo mosusu.—Mrk. 10:29, 30.
Soki nakanisi mbula 80 oyo eleki, nazalaka na esengo makasi. Nandimaka maloba oyo ya mokomi ya nzembo ete: “Ee Nzambe, oteyi ngai banda bolenge na ngai, mpe tii sikoyo nazali koyebisa misala na yo ya kokamwa.” (Nz. 71:17) Mposa na ngai ezali ete nakoba kosala yango ntango nyonso oyo nakozala na bomoi.
a Lelo oyo formasyo yango ezali na likita ya kati ya pɔsɔ.