11-17/05/2026
LOYEMBO 7 Yehova azali makasi na biso
Tyelá Nkolo Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba motema
“Yehova, yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.”—NZ. 83:18.
NA MOKUSE
Lisolo oyo ekosalisa biso tótya motema lisusu mingi ete Yehova azali Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba mpe ekondimisa biso ete akosalisa biso tólonga mikakatano sikoyo mpe na mikolo ezali koya.
1. Makambo nini ya mpasi Yobo akutanaki na yango?
YOBO, mobali moko ya kondima ya ntango ya kala, abungisaki nyonso: bana na ye, kolɔngɔnɔ ya nzoto na ye, mpe bozwi na ye. Longola yango, lokumu na ye ebebaki. Mpe makambo mingi oyo “baninga” na ye balobaki elendisaki ye te. Ata mwasi na ye oyo alingaki mingi alɛmbaki mpenza nzoto mpe ayebisaki Yobo: “Lakelá Nzambe mabe mpe kufá na yo.” (Yobo 2:9; 15:4, 5; 19:1-3) Makambo wana ya mpasi ekokaki kosala ete Yobo atyela lisusu Nzambe ya solo motema te, akóma komituna soki Yehova abatelaka mpenza baoyo balingaka Ye mpe basalelaka Ye.
2-3. Tokoki kobanda komituna nini, mpe tokoyekola nini na mokanda ya Yobo?
2 Tozali kobika na “ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.” (2 Tim. 3:1) Na bantango mosusu, biso mpe tokutanaka na mikakatano oyo ekoki kosala ete tótyela lisusu Yehova motema mpenza te. Mpe ntango mikakatano na biso ezali kolandana, tokoki kobulungana mpe komona ete tokokoka te koyika mpiko. Mikakatano ya ndenge wana etindá basusu bámituna soki Yehova atyelaka bango mpenza likebi.
3 Soki yo moko osilá komiyoka bongo, kolɛmba nzoto te. Yobo ayekolaki ete Yehova abikisaka baoyo bazali sembo epai na Ye. Biso mpe tokoki koyekola kotyela Tata na biso ya likoló motema mobimba ndenge wana. Mpo na kosalisa biso tósala yango, tótalela mokanda ya Yobo mpe tómona ndenge ekosalisa biso tóndima makambo mibale ya ntina: Ya liboso, tokomona ete kaka Yehova nde azali Nkolo Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Ya mibale, Nzambe na biso Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akoki kotambwisa makambo na mokili mpo na kokokisa mokano na ye mpe kobatela basaleli na ye na makama oyo ekoki kobebisa bango na elimo mpe na mosuni mpo na libela.
SATANA AKƆTAKI ELONGO NA BANGO
4. Nani mpe akɔtaki na likita moko na likoló oyo mokanda ya Yobo elobeli?
4 Mokolo moko, “bana ya Nzambe ya solo” bayanganaki liboso ya Yehova na likoló. Biblia elobi: “Satana mpe akɔtaki elongo na bango.” (Yobo 1:6) Yango ezali mbala ya liboso Biblia ebenga monguna monene ya Yehova na titre “Satana,” oyo elimboli “Motɛmɛli.” Na ntango yango, Satana azalaki lisusu mwana ya sembo te. Akómaki monguna ya Yehova mpe ya libota na Ye—baanzelu ya sembo na likoló mpe bato ya sembo awa na mabele. Yehova amonisaki ete Satana azalaki lisusu moto ya libota na Ye te na likoló ntango alobaki maloba oyo ezali na Ebandeli 3:15. Na yango, Satana azali te na kati ya libota ya Yehova oyo esangisi bikelamu ya elimo, elingi koloba “mwasi” oyo asengelaki kobimisa “mwana” to momboto.
5. Toyekoli nini na makambo oyo Satana alobaki mpe na likambo oyo Yehova asalaki?
5 Yehova akomisaki na Biblia makambo oyo elobamaki na likita yango na likoló. Maloba ya Satana emonisaki polele ete azali motema makasi mpe akoselaka basaleli ya Yehova makambo. (Yobo 1:9; talá mpe Emoniseli 12:10.) Ndenge Yehova asalaki ete likambo wana oyo esalemaki na likoló ekomama na Biblia ebɔndisi biso mpenza: endimisi biso ete Yehova asalelaka bokonzi na ye oyo ezangi nsuka na ndenge ya kokoka mpe na bosembo. Emonisi mpe ete azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe atyelaka basusu bandelo mpo na oyo bakoki kosala.
YEHOVA ATYELAKA BASUSU BANDELO
6. Ndenge nini Yehova amonisaki ete azalaki na bokonzi nyonso na likita oyo esalemaki na likoló? (Yobo 1:7, 8)
6 Tángá Yobo 1:7, 8. Na likita oyo esalemaki na likoló, Yehova nde azalaki na bokonzi nyonso. Atunaki Satana: “Otyaki likebi na mosaleli na ngai Yobo?” Ya solo, Yehova ayebaki malamu ete Satana azalaki kotyela Yobo moto ya sembo miso. Tótalela ndenge Yehova asalelaki nguya na ye oyo eleki nyonso mpo na kobatela Yobo.
7. Na kotalela Yobo 1:10, 11, Satana alobaki nini mpo na ntina oyo bato basalelaka Yehova?
7 Tángá Yobo 1:10, 11. Yehova azali Mozwi-ya-Nguya-Nyonso mpe Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba, mpe asalelaka bokonzi mpe nguya na ye na ndenge oyo amoni malamu. (Yir. 32:17; Dan. 4:35) Atako bongo, Satana alobaki ete Yehova asalelaka nguya na Ye na ndenge oyo ebongi te. Na maloba mosusu, Satana alingaki koloba ete Nzambe apesaka bato, lokola Yobo, kanyaka mpo básalela Ye. Satana amonisaki mpe ete baoyo basalelaka Yehova basalaka yango kaka mpo apesaka bango biloko ya malamu. Yehova asalaki nini?
8-9. Ndelo nini Yehova atyelaki Satana, mpe mpo na nini? (Yobo 1:12) (Talá mpe elilingi.)
8 Tángá Yobo 1:12. Yehova apesaki Zabolo nzela ya komonisa soki makambo oyo alobaki ezalaki solo, kasi atyelaki ye bandelo. Ayebisaki ye polele ete: “Kosala ye [moko Yobo] mabe te!” Na miso ya bayangani nyonso na likita yango, Yehova akatelaki Satana esika oyo akosuka na makambo oyo akokaki kosala Yobo. Satana azalaki na nguya te ya koleka ndelo oyo Yehova atyelaki ye, na yango azalaki na eloko mosusu ya kosala te, kaka kotosa oyo Yehova alobaki. Ezali mpe kaka bongo tii lelo. Na yango Yehova asalelaki bokonzi mpe nguya na Ye mpo na kobatela Yobo mpe lokumu na Ye moko.
9 Ntango Satana amekaki Yobo mbala ya liboso, alongaki ata moke te. Yobo atikalaki kaka sembo epai ya Tata na ye ya likoló. (Yobo 1:22) Kasi, Motɛmɛli asilisaki naino komeka Yobo te.
Yehova apesaki Satana nzela ya komonisa ntembe na ye liboso ya baanzelu nyonso (Talá paragrafe 8-9)
10. Mpo nini Yehova apesaki lisusu Satana nzela ameka Yobo? (Yobo 2:2-6)
10 Tángá Yobo 2:2-6. Na mbala oyo Satana abakisaki milende mpo na kobebisa bosembo ya Yobo. Satana alobaki ete Yobo akolakela mpenza Nzambe mabe mpo na kobikisa loposo na ye. Mpo na kokata makambo, Yehova apesaki Zabolo nzela ya kosimba nzoto ya mobali yango ya sembo. Kasi na mbala oyo mpe, Yehova atyelaki Satana ndelo; alobaki: “Koboma ye te!” Satana akokaki kosala eloko mosusu te longola kaka kotosa bipekiseli oyo batyelaki ye. Awa mpe, tomoni ete Oyo-Aleki-Likoló azalaki na makambo na mabɔkɔ na ntango ya komekama ya Yobo mpo Satana akokaki te koleka ndelo oyo Yehova atyelaki ye.
YEHOVA ASUKISI MPASI YA YOBO
11. Na kotalela Yobo 42:10-13, mbano nini Yehova apesaki Yobo nsima ya kosukisa mpasi na ye?
11 Tángá Yobo 42:10-13. Ntango emonanaki polele ete Yobo akobebisa bosembo na ye te, Yehova aboyaki Satana abundisa ye lisusu. Yehova azwaki ekateli ya kosukisa mpasi ya mosaleli na ye ya sembo. Awa mpe lisusu, Motɛmɛli azalaki na nguya te ya kopekisa ekateli ya Yehova. Satana azalaki lisusu na ndingisa te ya kokoba mbala moko konyokola Yobo, mosaleli ya sembo mpe ya motuya ya Yehova.
12. Pesá ndakisa oyo emonisi ndenge Yehova asalisaka baoyo batyelaka nguya na ye ya kobikisa motema.
12 Na mikolo oyo ya nsuka, basaleli mingi ya Yehova bamoni nguya na ye ya kobikisa. Na ndakisa, na 1945, Batatoli ya Yehova 230 babikaki na mobembo ya liwa, oyo esɛngaki kolongwa na kaa moko ya bakangami mpe kotambola bakilomɛtrɛ ebele tii na mbu na litambwisi ya basoda ya Banazi. Mpo na likambo wana ya nsɔmɔ, bakomaki ekateli moko na maloba oyo: “Touti na eleko molai ya komekama makasi mpe baoyo babiki, lokola bato oyo balongoli bango na mɔtɔ makasi, bazali ata na nsolo ya mɔtɔ te. . . . Nzokande, batondi na makasi mpe na nguya oyo euti na Yehova.” Babakisaki boye: “Tozali na mposa kaka moko . . . [nsima] ya kofanda na libulu ya bankɔsi, tózwa ndingisa ya kosalela Yehova . . . libela na libela. Yango ekozala mbano na biso oyo eleki monene.”—Talá mpe Danyele 3:27; 6:22.
13. Okoki kotya motema na nini ntango ozali na mikakatano? (Talá mpe bililingi.)
13 Biso mpe tokoki kokutana na mikakatano ya makasi lokola nde babwaki biso na libulu ya bankɔsi. (1 Pe. 5:8-10) Na bantango mosusu, tokoki komiyoka ete tosili makasi mpe komituna soki komekama na biso ekosila mpenza. Na bantango ya bongo, kokanisa lisolo ya Yobo ekoki kosalisa biso. Tokoki kotya motema mobimba ete Yehova azali na nguya ya kosilisa bampasi na biso—akoki kosala yango sikoyo to na mokili ya sika oyo ezali koya. Akotika te ete mokili oyo elekisa ata moke ntango oyo atyá mpo na kosukisa yango!
Yehova akosukisa mpasi ya basaleli na ye ya sembo (Talá paragrafe 13)
YEHOVA ALINGAKA BASALELI NA YE YA SEMBO
14-15. Yehova azali na mposa ya kosala nini mpo na basaleli na ye ya sembo? (Yobo 14:15) (Talá mpe elilingi.)
14 Tángá Yobo 14:15. Tata na biso ya likoló akangamaka makasi na baoyo bazali sembo epai na ye. Alingaka bango mingi na boye ete ata soki bakufi, akozongisa bango na bomoi. Na yango, akosilisa mpasi oyo liwa epesaka.—Yis. 65:17.
15 Atako Yobo akobaki kofanda na mokili oyo eyangelami na Satana, Biblia eyebisi biso ete Yehova azongiselaki Yobo kolɔngɔnɔ ya nzoto mpe apesaki ye kutu mapamboli mingi koleka oyo azalaki na yango liboso amekama. Mapamboli yango emonisaki kaka mwa moke makambo oyo Yehova akosala mpo na Yobo na mikolo ezali koya. Yehova amonisaki ete alingaka bato na ye ya sembo bázala mpenza na esengo mpe básepela na bomoi. Kutu, Yehova akopesa baoyo nyonso bakomonisa ete bazali sembo libaku ya kosepela na bomoi ya kokoka na paradiso awa na mabele. (Em. 21:3, 4) Lokola azali Nkolo Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba, azali na mposa ya kosala yango. Koyeba likambo yango esengeli mpenza kobɔndisa biso ntango tokutani na mikakatano!
Nsima ya komekama ya Yobo, ye ná mwasi na ye bazwaki mapamboli mingi epai ya Yehova (Talá paragrafe 14-15)
16. Ntina nini mosusu tozali na yango ya kotyela Yehova Nkolo Moyangeli motema?
16 Atako Yobo azalaki na bomoi molai, nsukansuka akufaki. Kasi Yehova azali Nkolo Moyangeli, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, oyo azali na nguya ata likoló ya liwa. (Mib. 32:39) Na yango, moto moko te akoki kopekisa ye kosekwisa baoyo ye alingaka. Mpe akosala yango na ntango oyo ye aponi.—Rom. 8:38, 39.
TYELÁ YEHOVA MOTEMA MOBIMBA
17. Nini emonisi ete Satana akokoka te kosilisa basaleli ya Yehova?
17 Mokanda ya Yobo epesi biso bantina oyo ebongi mpenza ya kotyela Yehova motema mobimba. Tozali mpenza na esengo ndenge Satana alongaka te kosilisa basaleli ya Yehova! Lelo oyo, biso nyonso bato soki milio 9 oyo tozali kosalela Yehova na bosembo tozali elembo oyo emonisi nguya ya Nkolo Moyangeli ya solo. Mbala na mbala, tomoni ndenge bibundeli nyonso oyo esalemi mpo na kosala basaleli ya Yehova mabe elongi te. (Yis. 54:17) Bikólo ya nguya ná bakonzi ya mangomba balongi te kolimwisa basaleli ya Yehova, oyo bamonanaka lokola bato bazangá libateli. Mpe eloko moko te ekoki kopekisa biso kopanza solo na oyo etali Yehova mpe komonisa polele ete Satana azali mobuki-lokuta mpe mobomi-bato. Ata liwa ekoki te kopekisa Yehova kozongisa na bomoi basaleli na ye nyonso ya sembo oyo bakufá.—Hos. 13:14.
18. Mpo na nini tozali na ntina te ya kobanga makambo oyo ekosalema na mikolo ezali koya?
18 Komanyola na lisolo ya bomoi ya Yobo ekokómisa kondima na biso makasi ete tozali na ntina te ya kobanga makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya. Na bolɔzi monene, basaleli ya Nzambe bakomonana lokola bazali na libateli te mpe ekomonana lokola Satana ná bato na ye bakolonga bango na pɛtɛɛ nyonso. Kasi kaka ndenge ezalaki na mikolo ya Yobo, Yehova akosalela bokonzi na ye mpe akopesa Satana nzela te ya kosala biso eloko moko oyo ekoki kosala biso mabe libela. Ntango oyo Yehova akosilisa bampasi oyo Satana abimiselá bato ezali koya nokinoki mpenza. Zabolo ná bademo bakobwakama na libulu mozindo na boumeli ya mbula 1000. (Luka 8:31; Em. 20:1-3) Nsukansuka, Satana ná baoyo nyonso bakozala na ngámbo na ye bakobomama. (Em. 20:10) Kaka ndenge Yehova alobaki yango, bakopanza motó ya Satana. Satana akobomama mbala moko mpo na libela.—Eba. 3:15; Rom. 16:20.
19. Nini ezali kozela baoyo batyelaka Yehova motema mobimba? (Talá mpe elilingi.)
19 Basambeli ya solo bazelaka na mposa makasi kokóma na bomoi ya kokoka mpe ya esengo na mokili ya sika oyo ekoya mosika te. Bomoi ekozala kutu malamu koleka ndenge oyo tokoki kokanisa. Yehova alaki ete: “Talá! Nazali kosala biloko nyonso biloko ya sika.” (Em. 21:5) Yango elimboli nini? Mpo na mbala ya liboso, nsima ya bankóto ya bambula banda na elanga ya Edene, bato bakozala na bomoi oyo ezangi kanyaka, koyinana, mpe makambo mabe ya Satana ná bademo na ye. Kimya oyo tokozala na yango ekopesa esengo mpenza! Mitungisi ya mokili oyo ekozangisa yo lisusu mpɔngi te na butu. Bato oyo bakobika na Armagedone bakomona makamwisi mingi ya kobikisama ya bato ya maladi. Lisusu, bandeko mpe baninga oyo bakufá bakosekwa. Tokozala na bomoi oyo Tata na biso ya likoló alingaki tózala na yango banda na ebandeli!
Basaleli ya sembo oyo bayikeli mikakatano mpiko bakozwa mapamboli mingi epai ya Yehova (Talá paragrafe 19)
20. Ozali na ekateli ya kosala nini?
20 Wana tozali koyika mpiko na mikakatano mosusu oyo tokoki kokutana na yango na mikolo oyo ya nsuka, tiká tózala na ekateli ya kotyela Yehova motema mobimba mpe kopesa boyangeli na ye mabɔkɔ. Tómonisa ete tolingaka Tata na biso ya likoló mpe ete Satana azali mobuki-lokuta. Ya solo, tokoki kotya motema ete soki totikali sembo epai ya Yehova, ye Oyo-Aleki-Likoló, tokozala na bomoi malamu na mikolo ezali koya, mpo Yehova azali na mposa makasi ya kopesa basaleli na ye ya sembo mbano mpe nsukansuka akosala yango!
LOYEMBO 153 Pesá ngai mpiko